Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/11 nk. 15-17
  • Ozalaka na boboto epai ya basusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na boboto epai ya basusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya Yesu
  • Zaláká na maloba ya boboto
  • Salisáká basusu
  • Tótonda na maloba ya boboto mpe na misala ya kosunga basusu
  • “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • ‘Bozwa kopema na bino‘
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bilenge oyo bazali lokola matanga ya mamwe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/11 nk. 15-17

Ozalaka na boboto epai ya basusu?

NGOMBA Helemone ezali na sudi ya bangomba oyo babengaka Anti-Liban; ezali na molai ya mɛtrɛ 2 814. Na boumeli ya basanza mingi, nɛjɛ ezipaka nsɔngɛ ya ngomba yango mpe mopɛpɛ oyo eutaka kuna ezalaka mpiɔ mpe ebimisaka mamwɛ. Mamwɛ yango ekitaka likoló ya banzete ya sapin mpe banzete mosusu oyo ezali na nse ya ngomba yango mpe likoló ya banzete ya vinyo oyo ezali na lobwaku. Na Yisalaele ya kala, na ntango ya elanga, mamwɛ nde ezalaki kobatela banzete mpo ekauka te.

Nzembo moko oyo epemami na Nzambe ekokanisi bomoko ya basambeli ya Yehova na “mamwɛ ya Helemone oyo ekokitaka na ngomba Siona.” (Nzembo 133:1, 3) Se ndenge Ngomba Helemone ezalaki kokitisa mamwɛ likoló ya banzete, biso mpe tokoki kozala na maloba ya kokitisa motema mpe ya boboto epai ya bato zingazinga na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

Ndakisa ya Yesu

Bato bazalaki kosepela mingi na Yesu Klisto. Ata moto oyo asololi na ye kaka moke azalaki kobɔndisama. Na ndakisa, Malako akomaki boye: “[Yesu] akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, kotyáká mabɔkɔ na ye likoló na bango.” (Malako 10:16) Na ntembe te bana yango basepelaki mingi mpenza!

Na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu asukolaki bayekoli na ye makolo. Na ntembe te, komikitisa na ye esimbaki mitema na bango. Na nsima, Yesu alobaki na bango boye: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasaleli bino yango, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoane 13:1-17) Bayekoli na ye basengelaki mpenza kozala na komikitisa. Atako bantoma basimbaki liteya yango mbala moko te mpe na nsima, kaka na butu yango, bakómaki kowelana mpo na koyeba nani aleki basusu, Yesu asilikaki te. Azalaki na motema molai mpe asalisaki bango. (Luka 22:24-27) Ata “ntango azalaki kofingama, [Yesu] azalaki kozongisa kofinga te.” Kutu, “ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi akobaki komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na boyengebene.” Ebongi mpenza tólanda ndakisa ya Yesu.​—1 Petelo 2:21, 23.

Yesu alobaki boye: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” (Matai 11:29) Kanisá ndenge okomiyoka soki Yesu ye moko ateyi yo! Nsima ya koyoka ndenge oyo ateyaki na sinagoga na bango, bato ya mboka na ye bakamwaki mpe balobaki boye: “Epai wapi moto oyo azwi bwanya oyo mpe misala oyo ya nguya?” (Matai 13:54) Kotánga masolo ya bomoi mpe mosala ya Yesu ekoki koteya biso ndenge ya kozala na boboto epai ya basusu. Tiká tótalela ndakisa ya malamu mingi oyo Yesu apesaki ya kozala na maloba ya boboto mpe ya kolinga kosalisa basusu.

Zaláká na maloba ya boboto

Kotonga ndako ezali mpasi mingi koleka kokweisa yango. Ezali mpe bongo na oyo etali kotonga to mpe kobebisa na maloba na biso. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tosalaka mabunga. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Moyengebene azali kati na mokili te oyo akosala bobele malamu mpe akobunga te.” (Mosakoli 7:20) Ezali mpasi te komona mabunga ya moto mosusu mpe kozokisa ye na maloba na biso. (Nzembo 64:2-4) Nzokande, kozala ntango nyonso na maloba ya boboto esɛngaka milende.

Yesu azalaki kolendisa bato na maloba na ye. Azalaki kobɔndisa bango na elimo na ndenge azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Luka 8:1) Lisusu, Yesu alendisaki bato oyo bakómaki bayekoli na ye na ndenge asalisaki bango báyeba Tata na ye. (Matai 11:25-27) Tokoki kokamwa te ete bato bazalaki kosepela na Yesu!

Nzokande, Bakomeli ná Bafalisai bazalaki komibanzabanza mpo na basusu te. Yesu alobaki boye: “Balingaka esika ya lokumu koleka na bolei ya mpokwa mpe bakiti ya liboso na kati ya basinagoga.” (Matai 23:6) Kutu, bazalaki kotyola bato mpamba; bazalaki koloba boye: “Ebele wana ya bato oyo bayebi Mibeko te bazali bato balakelamá mabe.” (Yoane 7:49) Ezaleli na bango ezalaki kobɔndisa ata moke te!

Mbala mingi maloba na biso emonisaka ndenge oyo motema na biso ezali mpe ndenge oyo totalelaka basusu. Yesu alobaki boye: “Moto malamu abimisaka malamu na eloko ya motuya ya malamu ya motema na ye, kasi moto mabe abimisaka oyo ezali mabe na eloko ya motuya na ye ya mabe; mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ na ye elobaka.” (Luka 6:45) Na bongo, tosengeli kosala nini mpo tózalaka na maloba ya boboto?

Ya liboso, tosengeli kokanisaka liboso ya koloba. Masese 15:28 elobi boye: “Motema ya moyengebene ekobanzabanza liboso ya kozongisa liloba.” Likambo yango esɛngaka ntango mingi te. Mbala mingi, soki kaka tokanisi ata mwa moke liboso ya koloba, tokoki koyeba ndenge oyo maloba na biso ekosala epai ya bato oyo bakoyoka yango. Tokoki komituna boye: ‘Likambo oyo nalingi koloba ezali ya boboto? Ezali solo, to ezali bilobaloba? Ezali “liloba lilobami na ntango ekoki?” Ekobɔndisa bato oyo bakoyoka yango?’ (Masese 15:23) Soki tomoni ete likambo yango ekozala mabe to ebongi te, tósala makasi tóbimisa yango te. Kasi, na esika tókangaka kaka monɔkɔ, tólukaka nde makambo ya kolendisa mpe ya malamu! Maloba ya mabe ezali lokola “koswama ya mbeli”; nzokande, maloba ya malamu ezali “bomoi.”​—Masese 12:18.

Likambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso ezali koluka makambo oyo Nzambe asepelaka na yango epai ya bandeko na biso. Yesu alobaki boye: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Yehova amonaka bizaleli ya malamu epai ya basaleli na ye nyonso ya sembo​—ata baoyo tokoki komona ete bazalaka matata. Soki tozali kosala makasi ya koluka bizaleli na bango ya malamu, tokomona bantina ya koloba malamu mpo na bango.

Salisáká basusu

Yesu azalaki mpenza komitya na esika ya bato oyo bazalaki konyokwama. Kutu, “ntango amonaki bibele wana ya bato ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Kasi, Yesu asukaki kaka te na koyokela bango mawa; asalisaki bango. Alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.” Alendisaki mpe bato na maloba oyo: “Ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”​—Matai 11:28, 30.

Tozali lelo oyo na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Bato mingi bazali konyokwama mpo na “mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 13:22) Bamosusu bazali kobunda na mikakatano ya bango moko. (1 Batesaloniki 5:14) Ndenge nini tokoki kolendisa bato oyo bazali na mpasi ndenge yango? Lokola Klisto, tokoki kosalisa mpo na kokómisa mokumba na bango pɛpɛlɛ.

Bato mosusu oyo bazali konyokwama bazalaka na mposa ya koyebisa mikakatano na bango epai ya moto. Soki moto ya ndenge wana aluki kosolola na biso, tozwaka ntango ya koyoka ye na likebi nyonso? Kozala moyoki malamu esɛngaka kozala na komipekisa. Esɛngaka kotya makanisi na makambo oyo moto azali koloba, na esika ya koluka eyano nini tokopesa ye to ndenge nini tokosilisa mokakatano na ye. Soki tozali koyoka na likebi, tozali kotala moto oyo azali koloba na biso, mpe tozali kosɛka na ntango esɛngi kosɛka, akomona ete tozali kotyela ye likebi.

Na kati ya lisangá, tozalaka na mabaku mingi ya kolendisa bandeko. Na ndakisa, ntango tokei na makita na Ndako ya Bokonzi, tokoki kotya likebi na bato oyo bazali na maladi. Mbala mosusu, esɛngaka kaka kosolola na bango mwa miniti liboso to nsima ya makita mpo na kolendisa bango. Tokoki mpe kokanisa banani oyo tozali komona te na etuluku na biso ya Boyekoli ya Mokanda. Mbala mosusu, tokoki kobenga bango na telefone mpe koyebisa bango ete tozali kokanisa bango to kotuna soki tokoki kosalisa bango na likambo moko.​—Bafilipi 2:4.

Bankulutu bazali na mokumba monene na kati ya lisangá. Tokoki kosala mingi mpo na koyeisa mokumba na bango pɛpɛlɛ soki tozali kosunga bango mpe soki tozali kokokisa na komikitisa mokumba nyonso oyo bapesi biso. Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.” (Baebele 13:17) Soki tozali na elimo ya komipesa, tokoki kolendisa baoyo “bazali kokamba na ndenge ya malamu.”​—1 Timote 5:17.

Tótonda na maloba ya boboto mpe na misala ya kosunga basusu

Mamwɛ oyo ekitaka na nse ezalaka nde ebele ya matanga mikemike oyo emonanaka kutu te ntango ezali kokita. Ndenge moko mpe, kolendisa mpenza basusu ezali kosɛnga te tósala kaka likambo moko ya monene, esɛngaka tómonisaka ntango nyonso bizaleli ya boklisto.

Ntoma Paulo akomaki boye: “Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino. Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Baloma 12:10) Tiká ete tósalela toli ya Paulo. Tiká ete tólendisaka mpenza basusu na maloba mpe na misala na biso.

[Bililingi na lokasa 16]

Mamwɛ ya Ngomba Helemone ebatelaka banzete ekauka te

[Elilingi na lokasa 17]

Moyoki malamu alendisaka basusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto