Babilone Monene
Ndimbola: Lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, elingi koloba, mangomba nyonso oyo mateya mpe misala na yango eyokani te na losambo ya solo ya Yehova, Nzambe ya solo kaka moko. Lingomba ya lokuta ebandaki nsima ya Mpela ya ntango ya Noa, na Babele (oyo na nsima eyebanaki na nkombo Babilone). (Eba. 10:8-10; 11:4-9) Mokemoke, mateya mpe misala ya lingomba ya Babilone epanzanaki na mikili mingi. Na yango, ebongi mpenza ete mangomba nyonso ya lokuta ebengama Babilone Monene.
Nini ezali kosalisa biso tóyeba Babilone Monene oyo mokanda ya Emoniseli elobeli?
Babilone yango ekoki kozala engumba Babilone ya kala te. Mokanda ya Emoniseli ekomamaki na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso mpe elobeli makambo oyo esengelaki kokokisama na mikolo na biso. Buku moko (The Encyclopedia Americana ya 1956, Vol. III, lok. 7) elobi ete : “Siruse Monene nde akambaki basoda ya Perse oyo babɔtɔlaki engumba Babilone na mobu 539 L.T.B. Na nsima, Alezandre Monene akanaki kokómisa Babilone mboka-mokonzi ya eteni ya ampire na ye oyo ezalaki na ɛsti, kasi nsima ya liwa na ye, Babilone ebungisaki mokemoke lokumu na yango.” Lelo oyo, engumba yango etikalá kaka mabangamabanga mpe ezali na bato te.
Na maloba ya elilingi na mokanda ya Emoniseli, Babilone Monene emonisami ete ezali “engumba monene,” “bokonzi,” oyo ezali koyangela bakonzi mosusu. (Em. 17:18) Lokola ezali engumba, ezali na bibongiseli ebele; mpe lokola ezali bokonzi oyo ezali na bakonzi mosusu na boyangeli na yango, ezali na bokonzi na mokili mobimba. Biblia emonisi ete Babilone Monene ezali na boyokani na bakonzi ya politiki mpe ezali mpenza kosalisa bato ya mombongo bákóma na bozwi mingi, mpe yango ezali ebongiseli ya misato oyo ezali “esika ya kofanda ya bademo” mpe ezali konyokola ‘basakoli mpe basantu.’—Em. 18:2, 9-17, 24.
Babilone ya kala eyebanaki mingimingi mpo na losambo na yango mpe mpo na kotɛmɛla Yehova
Eba. 10:8-10: “Nimerode . . . amikómisaki elombe mobomi-nyama oyo azalaki kotɛmɛla Yehova. . . . Mpe bokonzi na ye ebandaki na Babele [oyo na nsima eyebanaki na nkombo Babilone].”
Dan. 5:22, 23: “Yo, [Beleshazare mokonzi ya Babilone] . . . omitombolaki mpo na kotɛmɛla Nkolo ya likoló, . . . mpe bosanzoli banzambe ya palata mpe ya wolo, ya motako, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga, oyo emonaka te mpe eyokaka te mpe eyebaka eloko moko te; kasi Nzambe oyo mpema na yo ezali na lobɔkɔ na ye mpe oyo banzela na yo nyonso ezali ya ye, okumisi ye te.”
Makomi moko ya kala ya cunéiforme elobi ete: “Babilone ezalaki na batempelo 53 ya banzambe minene, bandako-nzambe 55 mpo na Marduku, bandako-nzambe 300 mpo na banzambe ya mabele, bandako-nzambe 600 mpo na banzambe ya likoló, bitumbelo 180 mpo na nzambe-mwasi Ishtar, bitumbelo 180 mpo na nzambe Nergal ná nzambe Adad, mpe bitumbelo mosusu 12 mpo na banzambe mosusu.”—Euti na The Bible as History (New York, 1964), W. Keller, lok. 301.
Buku moko (Encyclopedia Americana ya 1977, Vol. 3, lok. 9) elobi boye: “Banganga-nzambe bazalaki na bokonzi likoló ya makambo ya bomoi ya bato ya Sumer [oyo ezalaki engumba moko ya Babilone]; lugal (oyo elimboli ‘moto monene’) nde azalaki mokonzi ya Leta, azalaki momonisi ya banzambe.”
Na yango, tokoki koloba ete Babilone Monene oyo Emoniseli elobeli ezali ebongiseli ya mangomba. Lokola bakokanisi yango na engumba mpe na ampire, ezali kaka lingomba moko te, kasi mangomba nyonso oyo etɛmɛlaka Yehova, Nzambe ya solo.
Mateya mpe misala ya Babilone ya kala ezali komonana na mangomba ya mokili mobimba
“Losambo ya Babilone ekɔtaki mpenza na Ezipito, na Perse mpe na Grɛsi . . . Lelo oyo, banganga-mayele bandimi ete makambo ya bomoi ya bakitani ya Seme ezali mingi mpenza na masapo ya Bagrɛki ya kala mpe na makambo na bango ya losambo, yango wana moto akoki kotyela yango ntembe te. Makambo mingi ya bomoi ya bakitani ya Seme euti mpenza na Babilone.”—The Religion of Babylonia and Assyria (Boston, 1898), na buku ya M. Jastrow, Jr., nk. 699, 700.
Banzambe ya Babilone: Bato ya Babilone bazalaki kosambela banzambe misatomisato, mpe nguya ya biloko oyo ekelamá ezalaki komonisama na banzambe na bango mosusu mpe bato bazalaki kokanisa ete banzambe yango batambwisaka misala mosusu ya bato. (Babylonian and Assyrian Religion, Norman, Okla.; 1963, S. H. Hooke, nk. 14-40) “Liteya ya Bosato ndenge Platon ateyaki yango, ezalaki kaka lolenge ya sika ya kolobela banzambe misatomisato oyo bato ya kala bazalaki kosambela, mpe yango emonanaki ete ezali filozofi ya bosato oyo ebongi, oyo ezalaki komonisa bizaleli misatomisato, mpe yango nde ebotaki biteni misato ya ntina ya liteya ya Bosato oyo eteyamaka na mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba. . . . Liteya wana ya banzambe misato oyo moto ya mayele ya Bagrɛki [Platon] ateyaki ezali na mangomba nyonso ya kala ya bapakano.”—Nouveau Dictionnaire Universel (Paris, 1865-1870), ebimisami na M. Lachâtre, Vol. 2, lok. 1467.
Kosalela bikeko: “[Na losambo ya bato ya Mezopotamia] bato bazalaki kosalela bikeko mingi, ezala moto azali kosambela ye moko to elongo na bato mosusu na ndako-nzambe. Eloko endimisi likambo yango ezali ete bakabolá ebele ya bikeko yango mpe batɛká yango na ntalo moke. Mbala mingi, bato bazalaki kondima ete nzambe moko boye azali na kati ya ekeko oyo ezali komonisa nzambe yango soki ekeko yango emonisi bizaleli to biloko ya kitoko ya nzambe yango, mpe yango ezalaki kotinda bato bábatela ekeko yango malamu.”—Ancient Mesopotamia—Portrait of a Dead Civilization (Chicago, 1964), A. L. Oppenheim, lok. 184.
Liteya etali bakufi: “[Na Babilone], ná bandimi ná bakonzi ya mangomba, bango nyonso bazalaki kondima te ete ekelamu ya bomoi ekoki kokufa mpo na libela. Bazalaki kokanisa ete liwa ezali nde ebandeli ya bomoi mosusu.”—The Religion of Babylonia and Assyria, lok. 556.
Lokumu ya banganga-nzambe: “Na losambo ya [Babilone], bokeseni ezalaki makasi kati na banganga-nzambe ná bandimi mpamba.”—Encyclopædia Britannica (1948), Vol. 2, lok. 861.
Kotala minzoto mpo na koyeba makambo, kosakola makambo oyo ebombaná, maji mpe bonganga-nkisi: A. H. Sayce, moto ya istware, akomaki ete: “[Na] losambo ya Babilone ya kala . . . bato bazalaki kokanisa ete eloko mokomoko mpe nguya ya biloko oyo ekelamá ezali na zi to elimo na yango, oyo Shaman, to nganga-nzambe ya nkisi azalaki na bokonzi likoló na yango.” (The History of Nations, New York, 1928, Vol. I, lok. 96) “Bakaladea [bato ya Babilone] bayebaki makambo mingi oyo etali minzoto, mpo bazalaki koluka na molende mpenza koyeba makambo oyo ekoya na nzela ya minzoto. Mayele yango ebengami ‘kotala minzoto mpo na koyeba makambo.’”—The Dawn of Civilization and Life in the Ancient East (Chicago, 1938), R. M. Engberg, lok. 230.
Biblia ekokanisi Babilone Monene na mwasi ya ndumba, oyo afandi na ebele ya biloko ya kitoko oyo azali koyokela nsɔni te
Em. 17:1-5 elobi: “‘Yaká nalakisa yo lisambisi ya mwasi ya ndumba monene oyo afandi na mai mingi [bato], oyo bakonzi [bayangeli ya politiki] ya mabele basalaki na ye pite, mpe bato oyo bafandi na mabele balangwaki vinyo ya pite na ye.’ . . . Mpe nkombo moko ekomamá na elongi na ye, libombami moko: ‘Babilone Monene, mama ya basi ya ndumba mpe ya biloko ya bosɔtɔ ya mabele.’” Emoniseli 18:7 ebakisi ete “amikumisaki mpe afandaki na ebele ya biloko ya kitoko oyo azali koyokela nsɔni te.”
Bakonzi ya mangomba minene balukaka kozala baninga ya bakonzi ya politiki mpo na kozwa bokonzi mpe bomɛngo, atako likambo yango ememelaka bato mpasi mingi, boye te? Bakonzi minene ya mangomba na bango bazali bato ya bomɛngo, atako ebele ya bato oyo bango basengeli kosalisa bazali se kokóma babola, boye te?
Mpo na nini tokoki koloba ete mangomba oyo elobaka ete ezali ya bokristo ezali na kati ya Babilone Monene, ndenge moko na mangomba oyo ezali ya bokristo te?
Yak. 4:4: “Basi ya ekobo, boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Na yango, atako bayebi makambo oyo Biblia elobi mpo na Nzambe, lokola baponi kozala baninga ya mokili mpe komekola banzela na yango, bazali komikómisa banguna ya Nzambe.)
2 Ko. 4:4; 11:14, 15: “Nzambe ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima, mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Kristo, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kokɔta te.” “Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki basali na ye mpe bazali kokoba komimonisa lokola basali ya boyengebene. Kasi nsuka na bango ekozala na kolanda misala na bango.” (Na yango, bato nyonso oyo bazali kosambela Nzambe ya solo ndenge alingaka te, atako balobaka ete bazali bakristo, bakumisaka nde Satana Zabolo, monguna monene ya Yehova. Talá mpe 1 Bakorinti 10:20.)
Mat. 7:21-23: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai [Yesu Kristo]: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló. Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?’ Nzokande nakoyebisa bango polele ete: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.”
Mpo na nini esengeli kobima nokinoki na Babilone Monene?
Em. 18:4: “Bóbima kati na ye, bato na ngai, soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.”
Em. 18:21: “Anzelu moko ya makasi atombolaki libanga moko ekokani na libanga monene oyo banikaka na yango mbuma mpe abwakaki yango na mbu, alobi: ‘Ndenge wana nde bakobwaka Babilone engumba monene na mbala moko, mpe ekomonana lisusu te.’”
Luka 21:36: “Yango wana, bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”
Nini ekokómela bato oyo bazalaki naino na Babilone Monene mpe bayebaki solo ya Biblia te liboso bákufa?
Mis. 17:30: “Nzambe akangi miso mpo na bantango wana ya kozanga boyebi, nzokande sikoyo azali koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema.”
Mis. 24:15: “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Nzambe nde ayebi “bato oyo bazangi boyengebene” oyo akosekwisa.)
Yobo 34:12: “Ya solo, Nzambe asalaka mabe te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko abebisaka lisambisi te.”