Lisungi mpo na banyokwami na makanisi
“Biloko nyonso bizalisami bizali konyokwama mpe kooka mpasi esika moko.” (Baloma 8:22) Bampasi ya bato ezalaki makasi na ntango maloba oyo makomamaki, ekokisi sikawa koleka mibu 1900. Bato mingi banyokwamaki na makanisi. Yango wana baklisto balendisamaki na ‘kozala na maloba mpo na kobɔndisa banyokwami na makanisi.’—1 Batesaloniki 5:14.
Lelo oyo, mpasi ya bato eleki lisusu makasi, mpe banyokwami na makanisi baleki mingi mpenza. Yango esengeli kokamwisa biso? Te, mpamba te Biblia elobeli eleko na biso lokola “mikolo ya nsuka” mibéngami ete “ntango na mpasi mpe na mikakatano.” (2 Timoté 3:1-5) Yesu Klisto asakolaki ete na mikolo ya nsuka, “mabota makozala na mitema likoló” mpe “bato bakosɛnzwa na nsɔmɔ mpo na makambo oyo makoyela mabelé mafandami.”—Luka 21:7-11, 25-27; Matai 24:3-14.
Wana bato bazali ntango nyonso na mitungisi, na nsɔmɔ, na mawa to na mayoki mosusu ya mpasi, bakoki konyokwama na makanisi. Konyokwama na makanisi to kozala na mawa makasi, ekoki kouta na kokufela moto olingaki mingi, na koboma libala, na kolongolama na mosala to na maladi ekosilaka te. Bato bazali mpe konyokwama na makanisi mpo bazali komitánga ete bazali mpamba, bazangi makoki, to mpo bakanisi ete nyonso bazali kosala ekosepelisaka bato mosusu te. Moto nyonso akoki, mokolo moko to mosusu, kotungisama mingi na likambo moko ya mpasi, kasi ye oyo akozala na mayoki ya kozanga elikya mpe oyo ayebi te koluka nzela ya kosilisa mikakatano na ye, akoki konyokwama makasi kati na makanisi.
Bato ya ntango na kala bazalaki mpe na mayoki motindo wana. Yobo azwaki maladi mpe mpasi ezwami na bato mosusu te. Lokola akanisaki ete Nzambe atiki ye, azalaki lisusu na mposa ya bomoi te. (Yobo 10:1; 29:2, 4, 5) Yakobo anyokwamaki na makanisi wana ayokaki ete mwana na ye akufaki; aboyaki kobɔndisama mpe amonaki malamu ete akufa. (Genese 37:33-35) Wana atungisamaki mpenza nsima na lisumu monene oyo asalaki, mokonzi Davidi amilelaki ete: “Mokolo mobimba nazali kotambolatambola wana etondi ngai na mawa. Nanyɛtami.”—Nzembo 38:6, 8; 2 Bakolinti 7:5, 6.
Lelo oyo, bato mingi bazali konyokwama na makanisi mpo ete bazali komeka koluka lolenge na bomoi oyo eleki bososoli na bango, makanisi na bango mpe makasi na bango. Emonani ete komitungisa mingi, bakisa makanisi mpe mayoki ya mpasi, ekoki kobebisa nzoto mpe kolɛmbisa bɔɔngɔ́, oyo ekoki komema na konyokwama na makanisi.—Tala Masese 14:30.
Lisungi oyo bazali na yango mposa
Epafolodite, moklisto ya ekeke ya liboso, ya mboka Filipi, ‘amitungisaki mingi mpo ete [baninga na ye] bayokaki ete azalaki na maladi.’ Epafolodite azwaki maladi nsima wana atindamaki na Loma na baninga na ye, mpo ete amemela ntomá Paulo likabo liutaki na bango, mpe akanisaki mbala mosusu ete aokisaki bango mawa mpe, ete batalelaki ye lokola moto azangi makoki. (Bafilipi 2:25-27; 4:18) Lisungi nini ntomá Paulo apesaki ye?
Azongisaki Epafolodite epai na ye elongo na mokanda motindamaki epai na baninga na ye, moye molobaki ete: “Bóyamba ye [Epafolodite] kati na Nkolo na esengo nyonso; bokumisa lolenge na bato oyo.” (Bafilipi 2:28-30) Likambo oyo ete Paulo alobaki na ntina na ye na maloba na kokumisa mpe ete Bafilipi bayambaki ye na esengo nyonso mpe na bolingo, ebɔndisaki Epafolodite mpe esalisaki ye ete atika kotungisama kati na makanisi na ye.
Na ntembe te, toli ya Biblia mpo na ‘kozala na maloba ya kobɔndisa banyokwami’ ezali malamu mingi. Mwasi moko anyokwamaki na makanisi alimbolaki ete: “Mingimingi, okozala na mposa ya koyeba ete basusu balingi yo. Okolinga koyoka maloba lokola: ‘Nazali komitya na esika na yo; mosika te, okokóma malamu.’”
Mbala mingi ezalaka na ntina ete monyokwami na makanisi aluka moto moko ayebi komitya na esika na ye, oyo akoyebisa ye makambo na ye. Moto yango asengeli koyeba koyokamela mpe kozala na motema molai. Moto wana asengeli te kopamela to kosambisa na maloba oyo ete: “Osengelaki kozala na mayoki wana te” to: “Ozali na makanisi malamu te.” Monyokwami na makanisi azali na mayoki makasi te, mpe bifundeli bikolendisa bobele lolenge oyo azali komitalela.
Monyokwami na makanisi akanisi mbala mosusu ete azali na ntina mingi te. (Yona 4:3) Nzokande, asengeli komikundola ete, likambo ya ntina ezali lolenge oyo Nzambe azali kotalela ye. Bato batalelaki Yesu Klisto ‘na motuya te,’ kasi yango ekitisaki te motuya na ye na miso na Nzambe. (Yisaya 53:3) Yeba ete, Nzambe alingi yo lokola alingi Mwana na ye na bolingo.—Yoane 3:16.
Yesu azalaki na mawa mpo na bato bazalaki na mpasi, mpe asalaki nyonso mpo na kosunga bango ete bayeba motuya na bango. (Matai 9:36; 11:28-30; 14:14) Alimbolaki ete Nzambe azali nkutu kotalela bandeke mike atako bazali na motuya mingi te. Alobaki ete: “Nzambe abosani moko na bango te.” Nzambe azali komibanzabanza boni na bato oyo bazali komeka kosala mokano na ye! Yesu alobaki na ntina na bango ete: “Ata nsuki nyonso na mitó na bino, itangami.”—Luka 12:6, 7.
Ya solo, ekoki komonana lokola likambo ya mpasi mpo na moto oyo anyokwami na makanisi, atungisami na koleka ndelo na bolɛmbu na ye to na mabungá na ye, mpo na kondima ete Nzambe akoki kotalela ye na motuya. Akokanisa mbala mosusu ete abongi te na bolingo mpe na likebi ya Nzambe. Liloba ya Nzambe liyebisi ete: ‘Motema na biso efundaka biso.’ Kasi, yango ezali mpenza na ntina mingi? Te. Nzambe ayebi ete bato bazangi kokoka bakoki kozala na makanisi mabe mpe ata komikweisa bango mpenza. Yango wana Liloba na ye lindimisi biso na maloba oyo ete: “Nzambe aleki mitema na biso mpe ye ayebi makambo nyonso.”—1 Yoane 3:19, 20.
Ee, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, azali mpenza kotalela masumu mpe mabungá na biso te. Atalelaka mabaku ya mpasi, nyonso oyo tokutanaki na yango, mikano na biso mpe makanisi na biso. Ayebi ete tosili kosangola lisumu mpe maladi mpe liwa, mpe na yango, tozali na makoki moke mpasi. Likambo oyo ete tozali kooka mawa mpe ete tozali kobongola motema, emonisi ete tozali te kosala masumu na nko mpe ete tokei mosika te. Biblia elobi ete ‘toyeisami mpamba’ na mokano na biso te. Yango wana Nzambe azali kooka mawa mpo na ezalela na biso ya mpasi mpe akomonisaka motema mawa mpo na mabungá na biso.—Baloma 5:12; 8:20.
Biblia endimisi biso ete: “Jéhovah aleki na motema mawa. Atangoli biso longwa na masumu na biso pelamoko kobima na moi etangwi na kolala na moi. Mpo ayebi lolenge nini biso tosalemi, abosani te ete tozali mputulu.” (Nzembo 103:8, 12, 14) Ya solo, Jéhovah azali “Nzambe na kobɔndisama nyonso, akobɔndisaka biso na bolózi.”—2 Bakolinti 1:3, 4.
Bato banyokwami na makanisi bazali kozwa lisungi oyo bazali na yango mposa na kobɛlɛma na Nzambe na bango ya motema mawa, mpe na kondimáká libyangi na ye mpo ‘bakitisa bozito na bango epai na ye.’ Akoki ‘kosepelisa motema ya motutami.’ (Nzembo 55:22; Yisaya 57:15) Yango wana Liloba ya Nzambe lizali kolendisa biso na kobondela, ete: “Bókitisa mitungisi na bino nyonso likoló na [Jéhovah], mpo ete akobatelaka bino.” (1 Petelo 5:7) Ee, na nzela ya mabondeli mpe na malɔmbo, tokoki kobɛlɛma na Nzambe mpe kozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Bafilipi 4:6, 7; Nzembo 16:8, 9.
Ekoki kozala ntina na kobongola lolenge ya bomoi na biso mpo na kobika na konyokwama na makanisi. Kosala ngalasísi, kolya biloko malamu, kominanola mpe kopema mingi, kopɛngola kozala ntango molai liboso ya televizyo, wana makambo kitoko osengeli kosala. Mwasi moko asalisaki bato oyo banyokwami na makanisi na kotambolisa bango. Wana moto moko anyokwami na makanisi autaki koloba na ye ete: “Nazali na mposa ya kokende kotambola te,” ye ayanolaki moto yango na boboto, nde na mpiko nyonso ete: “Kasi, yaka tokende na yo elongo.” Mwasi yango ayebisaki ete: ‘Totambolaki na ntaká ya bakilometele motoba. Ntango tozongaki, alɛmbaki, kasi amiyokaki malamu. Tokoki te koyeba bolamu bouti na ngalasísi liboso na kosala yango.’
Atako bongo, ezali mbala mosusu mpasi na kolónga mpenza konyokwama na makanisi, ata nsima na kosala nyonso ekoki, kati na yango, kolanda lisalisi ya monganga. Mwasi moko azali na mibu koleka ntuku mitano alobaki ete: “Nasali nyonso, kasi maladi ya konyokwama na makanisi esili te.” Ezali mpe mpasi na kobikisa bokufi miso, bomímí mpe bokakatali. Nzokande, baoyo banyokwami na makanisi bakoki kozwa elendiseli mpe elikya na kotángáká Liloba ya Nzambe mbala na mbala; mokanda wana mozali kopesa endimiseli ete bato bakosikwama libela na mpasi na bango nyonso.—Baloma 12:12; 15:4.
Ntango oyo ata moto moko te akonyokwama lisusu na makanisi
Na ntango alobelaki makambo minene masengelaki kobima na mabelé na mikolo ya nsuka, Yesu abakisaki ete: “Wana makambo yango makobanda kobima, botɛlɛma alima mpe botómbola mitó na bino, mpo ete lisiko na bino libɛlɛmi.” (Luka 21:28) Yesu alobelaki kosikwama oyo ekopesa nzela na kokɔta na mokili ya sika mpe ya sembo na Nzambe, epai “biloko bizalisami bikosikwa na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.”—Baloma 8:21.
Ekozala kobɔndisama monene mpo na bato na kosikwa na mpasi mingi ya ntango na kala mpe na kolamuka ntɔngɔ nyonso na makanisi malamu mpenza, na mposa ya kokokisa misala ya mokolo na mokolo. Moto moko te akonyokwama lisusu na makanisi. Bato bazwi elaká ya solo ete, Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango; mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te. Makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21,3, 4.
Soki liyebisi ezali te, mikapo nyonso ya Biblia oyo ezali awa euti na Biblia ya Lingala haut-fleuve, ebimeli ya 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.