Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rq liteya 12 nk. 24-25
  • Tómonisa limemya mpo na bomoi mpe makila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa limemya mpo na bomoi mpe makila
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Masolo mosusu
  • Zwá bomoi na motuya mpo ezali likabo ya Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nzambe azwaka bomoi na motuya—Bongo yo?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
rq liteya 12 nk. 24-25

Liteya 12

Tómonisa limemya mpo na bomoi mpe makila

Lolenge nini tosengeli kotalela bomoi? (1) kosopa zemi? (1)

Lolenge nini baklisto bazali komonisa ete babatelami na lisosoli? (2)

Ezali mabe koboma banyama? (3)

Wapi mwa ndambo na misala oyo mizali komonisa te limemya mpo na bomoi? (4) Mobeko ya Nzambe na ntina na makila ezali nini? (5)

Yango etaleli mpe likambo ya kozongisama makila? (6)

1. Yehova azali Liziba ya bomoi. Nzambe nde apesaki bomoi na biloko nyonso oyo bizali na bomoi. (Nzembo 36:9) Bomoi ezali bulɛɛ na miso ya Nzambe. Ata bomoi ya mwana oyo azali kati na libumu ya mama na ye ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Koboma mwana wana oyo azali kokóla ezali mabe na miso ya Nzambe.​—Exode 21:22, 23; Nzembo 127:3.

2. Baklisto ya solo bamibanzabanzaka mpenza mpo na bomoi. Bazali kotala malamu ete mituka na bango mpe bandako na bango ebimisa makámá te. (Deteronome 22:8) Basaleli ya Nzambe batyaka bomoi na bango na likámá te mpo na kozwa esengo to bosepeli. Na yango basanganaka te na masano ya mobulu oyo na nkó nyonso mazali koyokisa bato mosusu mpasi. Baboyaka kominanola oyo ezali kolendisa mobulu.​—Nzembo 11:5; Yoane 13:35.

3. Bomoi ya banyama ezali mpe bulɛɛ na miso ya Mozalisi. Moklisto akoki koboma nyama mpo na kozwa bilei mpe bilamba to mpo na komibatela na bokɔnɔ mpe na likámá. (Genese 3:21; 9:3; Exode 21:28) Kasi ezali mabe konyokola banyama to koboma bango bobele mpo na masano to mpo na bisengo.​—Masese 12:10.

4. Komela makaya, komela bángi, mpe kosalela bilangwiseli mpo na komisepelisa ebongi te mpo na baklisto. Misala wana mizali mabe mpamba te (1) mizali kokómisa biso baombo na yango, (2) mizali kobebisa nzoto na biso, mpe (3) mizali mbindo. (Baloma 6:19; 12:1; 2 Bakolinti 7:1) Ekoki mpenza kozala mpasi mpo na kotika mimeseno wana. Kasi tosengeli kotika yango mpo na kosepelisa Yehova.

5. Nzambe mpe atalelaka makila ete ezali bulɛɛ. Nzambe alobi ete molimo, to bomoi, ezali kati na makila. Na bongo ezali mabe kolya makila. Ezali mpe mabe kolya mosuni ya nyama oyo bakataki nkingo te mpo na kobimisa makila na yango. Soki nyama moko ekamolami nkingo to ekufi kati na motambo, esengeli kolyama te. Soki etɔbɔlami likɔnga to ebɛtami masasi, esengeli kokata yango nkingo nokinoki mpo na kobimisa makila soki yango esengeli kolyama.​—Genese 9:3, 4; Levitike 17:13, 14; Misala 15:28, 29.

6. Ezali mabe kondima kozongisama makila? Omikundola ete Yehova asɛngi ete tóboya makila. Yango elimboli ete tosengeli te kokamata ata na lolenge nini makila ya moto mosusu to ata mpe oyo ya biso moko, oyo ebombamaki na esika moko boye. (Misala 21:25) Na yango baklisto ya solo bakondima kozongisama makila te. Bakondima mitindo misusu ya nkisi ya monganga, oyo esalemi na makila te. Balingi kozala na bomoi, kasi bakomeka te kobikisa bomoi na bango na kobukáká mibeko ya Nzambe.​—Matai 16:25.

[Bililingi na lokasa 25]

Mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli koboya kozongisama makila, koboya mimeseno ya mbindo, mpe kopɛngola makámá

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto