Liteya 13
Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
Mangomba nyonso masepelisaka Nzambe, to ezali bobele na lingomba moko oyo esepelisaka ye? (1)
Mpo na nini mangomba mazali mingi oyo mazali komikumisa ete mazali ya boklisto? (2)
Lolenge nini okoki koyeba baklisto ya solo? (3-7)
1. Yesu abandisaki lingomba moko ya solo ya boklisto. Na yango, lelo oyo esengeli kozala na lisangá bobele moko ya basambeli ya solo ya Yehova Nzambe. (Yoane 4:23, 24; Baefese 4:4, 5) Biblia ezali koteya ete bobele bato moke nde bazali kotambola na nzela moke ya bomoi.—Matai 7:13, 14.
2. Biblia esakolaki ete nsima na kufa ya bantoma, mateya ya lokuta mpe mimeseno ya boklisto te ekokɔta mokemoke kati na lisangá ya boklisto. Mibali bakobenda bandimi ete bálanda bango na esika ya kolanda Klisto. (Matai 7:15, 21-23; Misala 20:29, 30) Yango wana tozali komona ebele ya mangomba oyo mazali komikumisa ete mazali ya boklisto. Lolenge nini tokoki koyeba baklisto ya solo?
3. Elembo ya polele ya baklisto ya solo ezali ete bazali mpenza na bolingo kati na bango. (Yoane 13:34, 35) Bakokanisaka te ete bango bazali malamu koleka bato ya bikólo mosusu to ya mposo mosusu. Mpe bakoyinaka bato ya mikili misusu te. (Misala 10:34, 35) Na yango, basanganaka na bitumba te. Baklisto ya solo batalelanaka ete bazali bandeko mibali mpe bandeko basi.—1 Yoane 4:20, 21.
4. Elembo mosusu ya lingomba ya solo ezali ete basangani na yango bazalaka na limemya mozindo mpo na Biblia. Bandimaka yango ete ezali Liloba ya Nzambe mpe bandimaka makambo oyo yango ezali koteya. (Yoane 17:17; 2 Timoté 3:16, 17) Batalelaka Liloba ya Nzambe ete ezali na ntina mingi koleka makanisi to mimeseno ya bato. (Matai 15:1-3, 7-9) Basalaka makasi na komitambwisa na kolanda Biblia kati na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Na yango bateyaka te likambo boye mpe na nsima kosalela likambo mosusu.—Tito 1:15, 16.
5. Lingomba ya solo esengeli mpe kokumisa nkombo ya Nzambe. (Matai 6:9) Yesu alakisaki nkombo ya Nzambe, Yehova, epai na bato mosusu. Baklisto ya solo basengeli kosala sé bongo. (Yoane 17:6, 26; Baloma 10:13, 14) Banani kati na esika ofandi balakisaka basusu nkombo ya Nzambe?
6. Baklisto ya solo basengeli kosakola Bokonzi ya Nzambe. Yesu asakolaki yango. Ntango nyonso azalaki kolobela Bokonzi. (Luka 8:1) Apesaki etindá na bayekoli na ye ete básakola nsango oyo moko na mabelé mobimba. (Matai 24:14; 28:19, 20) Baklisto ya solo bandimaka ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekopesa kimya mpe kobatelama ya solo awa na mabelé.—Nzembo 146:3-5.
7. Bayekoli ya Yesu basengeli te kosangana na mokili oyo ya mabe. (Yoane 17:16) Bakomikɔtisaka te na makambo ya politiki ya mokili oyo mpe na kowelana kati na bato. Baboyaka etamboli, misala, mpe bizaleli mabe oyo ezali komonana mingi kati na mokili. (Yakobo 1:27; 4:4) Okoki koyeba lingomba moko na esika ofandi oyo ezali kokokisa bilembo wana ya boklisto ya solo?
[Bililingi na lokasa 26, 27]
Baklisto ya solo balinganaka moko na mosusu, bamemyaka Biblia, mpe basakolaka Bokonzi ya Nzambe