Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 21 lok. 150-lok. 152 par. 5
  • Konyata malamu maloba ya ntina na bavɛrsɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Konyata malamu maloba ya ntina na bavɛrsɛ
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Kotanga mikapo mpe kolimbola ntina oyo otangeli yango
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Koyeba konyata maloba ya ntina
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 21 lok. 150-lok. 152 par. 5

LITEYA 21

Konyata malamu maloba ya ntina na bavɛrsɛ

Osengeli kosala nini?

Osengeli konyata maloba oyo ezali komonisa ndenge makanisi na yo ezali kolandana. Monisá mpenza mayoki na yo ntango ozali kotánga.

Yango ezali na ntina nini?

Soki ozali konyata malamu maloba ya ntina, bavɛrsɛ oyo ozali kotánga ekosimba mpenza mitema ya bato.

NTANGO ozali kosolola na bato mikano ya Nzambe, ezala na ndako to na lisangá, nyonso oyo ozali koloba na lisolo na yo esengeli kouta na Liloba ya Nzambe. Mbala mingi, yango esɛngaka kotánga bavɛrsɛ ya Biblia, yango wana osengeli kosala yango malamu mpenza.

Konyata maloba ya ntina esɛngi mpe komonisa mayoki na yo. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, botángi na yo esengeli komonisa mayoki na yo. Tózwa mwa bandakisa. Ntango ozali kotánga na mongongo makasi Nzembo 37:11, mongongo na yo esengeli komonisa esengo oyo tozali na yango na ndenge tozali kozela na motema mɔtɔ kimya oyo elakami wana. Ntango ozali kotánga Emoniseli 21:4 oyo elobi ete bampasi ekosila mpe liwa ekozala lisusu te, mongongo na yo esengeli komonisa ete ozali mpenza kosepela mpo na kosikwama monene wana oyo elakami. Ntango ozali kotánga Emoniseli 18:2, 4, 5 oyo ezali kobenga bato bábima na “Babilone Monene” oyo etondi na masumu, mongongo na yo esengeli komonisa mpenza ete ezali likambo ya kosala nokinoki. Ya solo, ntango ozali komonisa mayoki na yo, esengeli kozala mpenza makambo oyo euti na motema na yo, kasi kolekisa ndelo te. Vɛrsɛ yango moko mpe ndenge oyo ozali kosalela yango ekosalisa yo oyeba lolenge malamu ya komonisa mayoki na yo mpo na yango.

Konyata maloba oyo ebongi. Soki makanisi oyo okopesa nsima ya kotánga vɛrsɛ moko ekouta kaka na mwa maloba ya vɛrsɛ yango, osengeli konyata maloba wana ntango ozali kotánga vɛrsɛ yango. Na ndakisa, soki ozali kotánga Matai 6:33 mpo na kolimbola ‘kokoba koluka liboso Bokonzi,’ okonyata te maloba lokola “boyengebene na ye” to “biloko nyonso wana.”

Mbala mosusu na lisolo na yo na Likita ya Mosala, olingi kotánga Matai 28:19. Maloba nini osengeli konyata? Soki olingi kolendisa bato bázala na molende mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato, osengeli konyata maloba “bókómisa bato bayekoli.” Kasi soki olingi kolobela mokumba ya baklisto, oyo ya koteya solo ya Biblia epai ya bato oyo bauti bikólo mosusu to soki olingi kolendisa basakoli mosusu bákende kosakola na esika mposa ezali, okoki konyata maloba “na bikólo nyonso.”

Mbala mingi, topesaka vɛrsɛ mpo na koyanola na motuna moko to mpo na kosimba likanisi moko oyo bato mosusu bazali kotyela yango ntembe. Soki ozali konyata ndenge moko maloba nyonso ya vɛrsɛ yango, bato bakokoka te komona boyokani oyo ezali kati na vɛrsɛ mpe likambo ozali koloba. Mbala mosusu bakokanga te likanisi ya ntina oyo ezali wana, atako yo moko ozali komona ete ezali polele.

Na ndakisa, ntango ozali kotánga Nzembo 83:18 na kati ya Biblia moko oyo ezali na nkombo ya Nzambe, soki onyati kaka maloba “Oyo-Aleki-Likoló,” moto oyo azali koyoka yo akokoka te komona ete Nzambe azali mpenza na nkombo na ye moko. Osengeli nde konyata nkombo “Yehova.” Nzokande, soki ozali kosalela kaka vɛrsɛ wana moko mpo na kolobela bokonzi ya Yehova, osengeli nde konyata maloba “Oyo-Aleki-likoló.” Ndenge moko mpe, ntango ozali kosalela Yakobo 2:24 mpo na komonisa ntina ya kozala na kondima mpe komonisa yango na misala, soki onyati maloba “akotángama moyengebene” na esika ya konyata liloba “misala,” bato mosusu oyo bazali koyoka yo bakokanga likanisi ya ntina te.

Ndakisa mosusu oyo ekoki kosalisa yo ezali oyo ya Baloma 15:7-13. Yango ezali mwa maloba ya mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki lisangá moko oyo ezalaki na bato ya bikólo mosusu mpe Bayuda. Na mokanda yango, ntoma Paulo azali komonisa ete mosala ya Klisto ezali kaka te mpo na matomba ya Bayuda oyo bakatami ngenga, kasi mpe mpo na bato ya bikólo mosusu, mpo “bikólo mosusu bákoka kopesa Nzambe nkembo mpo na motema mawa na ye.” Na nsima, Paulo alobeli makambo minei oyo euti na makomami ya Liebele mpe ezali komonisa ete bato ya bikólo mosusu bakozwa libaku malamu wana. Ndenge nini osengeli kotánga bavɛrsɛ wana mpo na konyata mpenza likanisi oyo Paulo azalaki na yango? Ntango ozali kotya elembo na maloba oyo okonyata, na vɛrsɛ 9 okoki kopona liloba “bikólo,” na vɛrsɛ 10 “bino bikólo mosusu,” na vɛrsɛ 11 “bino bikólo nyonso” mpe “bato ya mikili nyonso,” na vɛrsɛ 12 okoki kozwa “bikólo.” Meká kotánga Baloma 15:7-13 mpe onyata maloba ndenge yango. Soki osali bongo, mokemoke, okomona polele kolandana ya makanisi ya Paulo mpe ekozala mpasi te mpo okanga yango.

Ndenge ya konyata maloba ya ntina. Ezali na ndenge mingi oyo okoki konyata maloba oyo ezali na makanisi ya ntina. Lolenge oyo okonyata maloba yango esengeli koyokana na vɛrsɛ oyo ozali kotánga mpe ndenge oyo okosala lisolo na yo. Talá mwa makanisi oyo okoki kosalela.

Komatisa to kokitisa mongongo. Yango esɛngi komatisa to kokitisa mongongo mpo na komonisa polele maloba oyo ezali na makanisi ya ntina mpe kokesenisa yango na maloba mosusu na kati ya fraze. Okoki konyata maloba ya ntina soki obongoli mpe mongongo na yo, elingi koloba, okoki koloba makasi to na mongongo ya nse. Na minɔkɔ mingi, komatisa to kokitisa mongongo emonisaka ete ozali konyata maloba ya ntina. Kasi na minɔkɔ mosusu, yango ekoki mpe kobongola ndimbola ya maloba oyo ozali kotánga. Soki otángi malɛmbɛmalɛmbɛ maloba oyo ezali na makanisi ya ntina, yango emonisaka mpenza ete ezali na ntina mingi. Mpo na minɔkɔ oyo komatisa to kokitisa mongongo ebongolaka ndimbola ya maloba, ekozala malamu osala ndenge bato oyo balobaka monɔkɔ yango basalaka mpo na konyata maloba ya ntina.

Kopema. Okoki kopema liboso to nsima ya kotánga maloba oyo esimbi makanisi ya ntina ya vɛrsɛ moko; to okoki kopema liboso mpe nsima ya kotánga maloba yango. Ntango opemi liboso ya kotánga likanisi ya ntina, yango ekosala ete bato bázela makambo oyo olingi kotánga; ntango opemi nsima ya kotánga likanisi ya ntina, yango ekosala ete básimba malamu makambo oyo otángi. Nzokande, soki ozali kopemapema na maloba nyonso, likanisi ya ntina ekobima te.

Kozongela maloba. Okoki konyata likanisi moko soki okati mwa moke kotánga mpe ozongeli liloba to maloba yango. Nzokande ezali malamu kosilisa kotánga vɛrsɛ mobimba mpe na nsima, kozongela maloba ya ntina.

Bajɛstɛ. Mbala mingi, soki ozali koningisa nzoto na yo mpe soki ozali kosalela elongi na yo, yango ekoki kosala ete maloba oyo ozali kotánga emonisa mpenza ndenge oyo ozali koyoka na motema.

Mongongo. Na minɔkɔ mosusu, okoki kobongola mongongo mpo na kobimisa ndimbola ya maloba mpe konyata yango. Na esika oyo, osengeli mpe kokeba, mingingi soki ozali kobongola mongongo mpo na kotánga maloba ya kotyola.

Ntango bato mosusu bazali kotánga bavɛrsɛ. Ntango moto oyo ozali kosolola na ye azali kotánga vɛrsɛ moko, akoki mbala mosusu konyata maloba oyo ezali mpenza na ntina te, to akoki ata konyata liloba moko te. Okosala nini? Eleki malamu olimbola vɛrsɛ wana polele ntango ozali kolakisa ye ndenge oyo akoki kosalela yango. Nsima ya kolakisa ye ndenge oyo akoki kosalela vɛrsɛ yango, okoki kotya likebi mingimingi na maloba oyo ezali na makanisi ya ntina na kati ya Biblia.

NDENGE YA KOYEKOLA KONYATA MALOBA YA NTINA

  • Na vɛrsɛ nyonso oyo olingi kotánga, omituna boye: ‘Ndenge nini moto akomiyoka ntango azali kotánga maloba oyo? Ndenge nini nasengeli komonisa yango ntango nakotánga maloba yango?’

  • Talelá malamumalamu bavɛrsɛ oyo okotánga. Omituna boye mpo na vɛrsɛ mokomoko: ‘Ntina ya vɛrsɛ oyo ezali nini? Maloba nini nasengeli konyata mpo na komonisa ntina na yango?’

DEVUARE: (1) Talelá malamumalamu vɛrsɛ moko oyo okotánga na mosala ya kosakola. Tángá yango mbala na mbala mpe omonisa mayoki na yo. Awa oyebi ndenge oyo okosalela vɛrsɛ yango, tángá yango na mongongo makasi mpe nyatá liloba to maloba oyo ebongi. (2) Na mokanda oyo bozali koyekola, poná paragrafe moko oyo ezali na maloba ya bavɛrsɛ mosusu. Talelá malamumalamu ndenge basaleli bavɛrsɛ yango. Tyá elembo na maloba oyo ezali na makanisi ya ntina. Tángá paragrafe mobimba na mongongo makasi mpe nyatá makanisi ya ntina ya bavɛrsɛ yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto