Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wt mok. 3 nk. 23-31
  • Kangamá makasi na Liloba ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kangamá makasi na Liloba ya Nzambe
  • Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tósalisa bato mosusu bákanga ntina ya Biblia mpe básepela na yango
  • Botángi na biso ya Biblia
  • Mokano na biso
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Biblia​—⁠Búku oyo esengeli kotángama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
wt mok. 3 nk. 23-31

Mokapo ya misato

Kangamá makasi na Liloba ya Nzambe

1. (a) Ndenge nini Yisalaele ya kala emonaki bosolo ya liloba ya Nzambe? (b) Mpo na nini likambo yango ezali na ntina mpo na biso?

“BOYEBI na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino.” (Yosua 23:14-16) Wana ezali maloba oyo Yosua alobaki na mikóló ya Yisalaele ntango bakómaki na Mokili ya Ndaka. Ya solo mpenza, bilaka ya Yehova ebongaki kotyelama motema. Lisolo ya bilaka yango​—mpe masolo mosusu nyonso oyo ezali na Biblia​—ebatelamaki mpo na biso mpo ete “tókoka kozala na elikya.”​—Baloma 15:4.

2. (a) Na lolenge nini Biblia ‘epemami na Nzambe’? (b) Lokola toyebi ete Biblia epemami na Nzambe, mokumba nini tozali na yango?

2 Atako Yehova asalelaki bato soki 40 mpo na kokoma Biblia, kasi ye moko azali Mobandisi na yango. Yango elingi koloba ete ye moko atambwisaki mosala ya kokoma makambo nyonso oyo ezali na Biblia? Ɛɛ. Asalaki yango na nzela ya elimo santu na ye, nguya oyo asalaka na yango misala. Ntoma Paulo alobaki na kondima nyonso ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe . . . mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso malamu.” Bato na bisika nyonso oyo bandimi ete Biblia epemami na Nzambe, batyelaka yango likebi mpe batambwisaka bomoi na bango na boyokani na makambo oyo ezali na kati na yango.​—2 Timote 3:16, 17; 1 Tesaloniki 2:13.

Tósalisa bato mosusu bákanga ntina ya Biblia mpe básepela na yango

3. Wapi lolenge eleki malamu ya kosalisa bato mingi oyo bandimaka te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe?

3 Bato mingi oyo tosololaka na bango bandimaka te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Mbala mingi, lolenge oyo eleki malamu ya kosalisa bango ezali kofungola Biblia mpe kolakisa bango makambo oyo ezali na kati. “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale . . . mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebele 4:12) “Liloba ya Nzambe” ezali lisapo te, kasi ezali nde na bomoi! Bilaka ya Biblia ekokisamaka mpenza. Ntango nsango ya Biblia esimbi motema ya moto, yango ezalaka na nguya koleka likambo nyonso oyo tokoki koloba mpo na kolendisa ye.

4. Bandimbola nini ya mateya ya Biblia ebongoli makanisi ya bato mosusu na ndenge bazalaki kotalela Biblia, mpe mpo na nini?

4 Komona nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia esalisi bato mingi básepela na Biblia makasi. Bato mosusu bazwaki mokano ya koyekola Biblia ntango bamonisaki bango makambo oyo Biblia elobi: na ndakisa, ntina ya bomoi, mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe, ndimbola ya makambo oyo ezali kosalema na mikolo na biso, mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Na mikili oyo misala ya mangomba ezali kotya bato na likama ya kotungisama na bilimo mabe, ndimbola oyo Biblia ezali kopesa mpo na koyeba ntina ya likambo yango mpe ndenge ya kozwa libɔndisi, ebendaki likebi ya bato. Mpo na nini makambo yango ekamwisaka bato ya motema malamu? Mpamba te Biblia ezali liziba kaka moko mpo na kozwa nsango oyo ebongi na kotyela motema mpo na makambo nyonso ya ntina.​—Nzembo 119:130.

5. (a) Ntango bato balobi ete bandimaka Biblia te, bantina na yango ekoki kozala nini? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya ndenge wana?

5 Kasi, tokoki kosala nini soki bato bayebisi biso ete bandimaka Biblia te? Yango esengeli kokata lisolo na biso? Ezali bongo te soki bato yango balingi kososola. Ekoki kozala ete batalelaka Biblia lokola buku moko ya mangomba ya boklisto. Bokosi oyo ezali na kati ya mangomba ya boklisto mpe ndenge mangomba yango emikɔtisaka na makambo ya politiki, bakisa mpe momeseno na yango ya kosɛngasɛnga mbongo ya mabonza, ekoki mpenza kozala ntina oyo bato bakoki koboya kondima Biblia. Mpo na nini te kotuna soki ezali mpenza bongo mpo na bato oyo ozali kosolola na bango? Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali kokweisa bizaleli ya mokili ndenge ezali na mangomba ya boklisto, mpe makambo oyo ezali kokesenisa mangomba ya boklisto na boklisto ya solo, ekoki kobenda likebi ya moto yango.​—Mika 3:11, 12; Matai 15:7-9; Yakobo 4:4.

6. (a) Nini endimisi yo mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe? (b) Makanisi nini mosusu okoki kosalela mpo na kosalisa moto andima ete Biblia euti mpenza na Nzambe?

6 Mpo na bato mosusu, kosolola na bango na mozindo mpenza mpo na kolakisa bango bilembeteli oyo ezali komonisa ete Biblia epemami na Nzambe, ekoki mpenza kosalisa bango. Nini ezali komonisa yo polele ete Biblia euti na Yehova Nzambe? Ezali nde oyo Biblia yango moko elobi ete euti na Yehova Nzambe? To ezali mpo ete Biblia ezali na bisakweli ebele oyo ezali kopesa boyebi ya makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, bisakweli oyo esengeli kouta epai ya ye oyo aleki mpenza bato? (2 Petelo 1:20, 21) Mbala mosusu ezali mpo ete makambo oyo ezali na kati ya Biblia ezali na molɔngɔ mpe na boyokani, atako ekomamaki na bato 40 na eleko moko ya mbula soki 1600? To ezali mpo na bosikisiki na yango na makambo ya siansi oyo ekeseni mpenza na mikanda mosusu ya ntango wana? To mpo na bosembo ya bato oyo bakomaki yango? To mpo na ndenge ebatelamaki liboso ya milende makasi oyo banguna na yango bazalaki kosala mpo na kolimwisa yango? Ezala likambo nini oyo esimbi motema na yo, okoki mpe kosalela yango mpo na kosalisa moto mosusu.a

Botángi na biso ya Biblia

7, 8. (a) Tosengeli ntango nyonso kosala nini na Biblia? (b) Longola botángi ya moto na moto ya Biblia, tozali lisusu na mposa ya nini? (c) Ndenge nini oyebaki mikano ya Yehova?

7 Longola likambo ya kosalisa bato mosusu bándima Biblia, biso moko mpe tosengeli kobongisa ntango mpo na kotángaka yango mokolo na mokolo. Osalaka bongo? Kati na babuku nyonso oyo bato babimisá, Biblia eleki. Kasi, yango elingi koloba te ete soki tozali kotánga Biblia biso moko, tosengeli na eloko mosusu te. Makomami ezali kokebisa biso ete tómitangolaka na basusu te. Tosengeli kokanisa te ete soki tozali kosala kaka bolukiluki ya biso moko, tokoyeba makambo nyonso. Boyekoli ya moto na moto mpe koyangana na makita ya basaleli ya Nzambe, ezali na ntina mpo ete tókoka kozala baklisto oyo bazali na bokatikati.​—Masese 18:1; Baebele 10:24, 25.

8 Na likambo yango, Biblia ezali kolobela lisolo ya Moetiopia moko, mosali monene ya Leta, oyo azalaki kotánga esakweli ya Yisaya. Anzelu moko akambaki Filipo, moklisto mopalanganisi ya nsango malamu, mpo na kotuna mobali yango ete: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Na komikitisa mpenza, Moetiopia yango azongisaki ete: “Ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?” Asɛngaki Filipo alimbolela ye esakweli yango. Kasi, Filipo azalaki kaka te motángi ya Biblia oyo azalaki kolukaluka koyeba makambo ye moko mpe kopesa makanisi na ye moko likoló ya Makomami. Akangamaki nde na ebongiseli ya Nzambe oyo ezali komonana. Yango wana, akokaki kosalisa Moetiopia ayeba mateya oyo Yehova azalaki kopesa na nzela ya ebongiseli yango. (Misala 6:5, 6; 8:5, 26-35) Ndenge moko mpe lelo oyo, moto moko te akoki kokóma na boyebi ya solosolo ya mikano ya Yehova kaka na ndenge na ye moko. Biso nyonso tozali na mposa ya lisalisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye oyo ezali komonana.

9. Manaka nini ya botángi ya Biblia ekoki kopesa biso nyonso matomba?

9 Mpo na kosalisa biso tókanga ntina ya Biblia, ebongiseli ya Yehova ezali kopesa bilei kitoko ya elimo na mikanda ndenge na ndenge. Lisusu, batyeli biso manaka ya botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi oyo esalemaka na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Kotalela Makomami mosantu moto na moto ekoki kopesa matomba mingi. (Nzembo 1:1-3; 19:7, 8) Salá makasi otángaka Biblia mokolo na mokolo. Atako ozali kokanga ntina ya makambo nyonso te, kasi ndenge ozali komesana na Makomami, yango ekoki kozala na ntina mingi mpo na yo. Na ndakisa, soki ozali kotánga kaka nkasa minei to mitano na mokolo, okoki kosilisa Biblia mobimba na mbula moko.

10. (a) Ntango nini otángaka Biblia? (b) Ntango ozali kotánga Biblia, osengeli mpe kozala elongo na nani, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi kotángaka mbala na mbala?

10 Ntango nini okoki kotánga Biblia? Soki obongisi miniti 10 to 15 mokolo na mokolo mpo na yango, okozwa matomba mingi. Soki bongo te, okoki kobongisa manaka ya kotánga Biblia mbala mingi na pɔsɔ moko, mpe tosáká manaka yango. Soki obalá, yo na mobalani na yo bokoki kotángelanaka Biblia na mongongo makasi. Soki bozali na bana ya mikóló oyo bakoki kotánga, bakoki kotángaka na mongongo makasi, moto na moto na ngala na ye. Botángi ya Biblia esengeli kozala momeseno ya bomoi mobimba, ndenge moko na momeseno ya kolya. Lokola oyebi yango, soki moto azali na momeseno ya kolyaka malamu te, nzoto na ye mpe ekozala malamu te. Ndenge moko mpe, bomoi na biso ya elimo, ata mpe bomoi ya seko, etaleli momeseno na biso ya komileisa na “liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.”​—Matai 4:4.

Mokano na biso

11. Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali kotánga Biblia?

11 Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali kotánga Biblia? Mokano na biso esengeli kozala kaka te ya kotánga nkasa mingi. Mposa na biso esengeli kozala ya koyeba Nzambe malamumalamu mpo ete tókóma kolinga ye makasi mpe tósambela ye na ndenge oyo ekosepelisa ye. (Yoane 5:39-42) Makanisi na biso esengeli kozala ndenge moko na mokomi ya Biblia oyo alobaki ete: “Ɛ Yehova, yebisá ngai banzela na yo, lakisá ngai bilekelo na yo.”​—Nzembo 25:4.

12. (a) Mpo na nini osengeli kokola na “boyebi ya solosolo,” mpe molende nini osengeli kosala ntango ozali kotánga Biblia mpo na kozwa boyebi yango? (b) Wapi lolenge minei ya kotalela makambo oyo soki tosaleli yango tokozwa matomba na makambo oyo tozali kotánga na Biblia? (Talá etanda na lokasa 30.) (c) Monisá makambo yango na ndakisa ntango ozali koyanola na mituna oyo ezali na paragrafe oyo. Luká mikapo oyo batii wana kasi bakomi maloba na yango te.

12 Wana tozali kozwa mateya oyo euti na Yehova, tosengeli kozala na mposa ya kokola na “boyebi ya solosolo.” Soki yango te, ndenge nini tokoki kosalela Liloba ya Nzambe malamumalamu na bomoi na biso to koyebisa yango malamumalamu epai ya bato mosusu? (Bakolose 3:10; 2 Timote 2:15) Mpo na kozwa boyebi ya solosolo, esɛngaka kotánga na likebi mpenza, mpe soki makambo oyo tozali kotánga ezali makasi, tosengeli mbala mosusu kotánga yango mbala mingi mpo na kokanga ntina na yango. Tokozwa mpe matomba mingi soki tobongisi ntango mpo na komanyola likoló ya makambo oyo tozali kotánga, kokanisa yango na mozindo na kotaleláká makambo ndenge na ndenge ya bomoi. Lolenge minei ya kokanisa na mozindo oyo tokoki kotalela etyami na lokasa 30. Tokoki kozwa matomba na bisika mingi ya Makomami ntango tozali kotalela mikapo yango na kolanda moko ya lolenge wana ya kokanisa. Ntango okoyanola na mituna oyo ezali na lokasa oyo elandi, okomona ndenge lolenge yango ekoki kopesa matomba.

(1) Mbala mingi, eteni ya Makomami oyo ozali kotánga ekoki koyebisa yo likambo moko etali bomoto ya Yehova. Na ndakisa, na Nzembo 139:13, 14, Biblia ezali koyebisa biso ndenge Nzambe amibanzabanzaka mpo na mwana oyo azali naino na libumu ya mama: “Otongaki ngai kati na libumu ya mama na ngai. Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yo ezali na kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” Misala ya Yehova oyo etali bozalisi ezali mpenza ya kokamwa! Lolenge Nzambe asalá bato ezali mpenza komonisa bolingo monene oyo Nzambe azali na yango mpo na biso.

Na kotalela oyo elobelami na Yoane 14:9, 10, ntango tozali kotánga ndenge Yesu azalaki kotalela bato mosusu, tomonaka mpenza ndenge Yehova ye moko akokaki kosala. Na likanisi wana na motó, tokoki koloba nini mpo na Yehova na makambo oyo ekomami na Luka 5:12, 13 mpe Luka 7:11-15?

(2) Talelá ndenge lisolo oyo ozali kotánga ezali kolobela motó ya likambo ya Biblia: kolongisama ya bokonzi ya Yehova mpe kosantisama ya nkombo na ye na Bokonzi ya Yesu Klisto, Momboto oyo alakamaki.

Ndenge nini Ezekiele na Danyele balobeli motó ya likambo ya Biblia? (Ezekiele 38:21-23; Danyele 2:44; 4:17; 7:9-14)?

Ndenge nini Biblia ezali komonisa polele ete Yesu azali mpenza Momboto oyo alakamaki? (Bagalatia 3:16)

Ndenge nini Emoniseli ezali kolobela kokokisama monene ya motó ya likambo ya Bokonzi ya Nzambe? (Emoniseli 11:15; 12:7-10; 17:16-18; 19:11-16; 20:1-3; 21:1-5)

(3) Omituna yo moko ndenge nini okoki kosalela makambo oyo ozali kotánga. Na ndakisa, na Exode tii Deteronome, tozali kotánga makambo oyo ezali kolobela misala ya mbindo mpe botomboki ya Yisalaele. Biblia ezali koyebisa biso ete bizaleli mpe misala na bango wana ememelaki bango mikakatano. Yango wana, tosengeli kosepelisa Nzambe mpe koboya kolanda ndakisa mabe ya Yisalaele. “Makambo wana ezalaki kokómela bango lokola bandakisa, mpe ekomamaki mpo na kozala likebisi epai na biso baoyo bansuka ya ebongiseli ya ntango oyo ekómeli biso.”​—1 Bakolinti 10:11.

Lisolo oyo ezali kolobela ndenge Kaina abomaki Abele ezali na liteya nini mpo na biso? (Genese 4:3-12; Baebele 11:4; 1 Yoane 3:10-15; 4:20, 21)

Toli ya Biblia mpo na baklisto oyo bazali na elikya ya kokende na likoló ezali mpe kotalela baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele? (Mituya 15:16; Yoane 10:16)

Atako tozali na etamboli malamu na kati ya lisangá ya boklisto, mpo na nini tosengeli kotalela ndenge ya kosalela malamumalamu toli ya Biblia oyo tosili koyeba? (2 Bakolinti 13:5; 1 Tesaloniki 4:1)

(4) Kanisá ndenge okoki kosalela makambo oyo ozali kotánga mpo na kosalisa bato mosusu. Bato nyonso bazali komitungisa mpo na mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, yango wana tokoki kotánga elongo na bango makambo oyo Yesu asalaki mpo na komonisa oyo akosala na mabele mobimba ntango akozala Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe: “Bibele ya bato bapusanaki epai na ye, komemáká elongo na bango bato oyo bazalaki batɛngumi, bibɔsɔnɔ, bato bakufá miso, bababa, mpe bamosusu mingi . . . mpe abikisaki bango.”​—Matai 15:30.

Nani akoki kozwa lisalisi na lisolo ya lisekwa ya mwana ya Yailo? (Luka 8:41, 42, 49-56)

13. Soki tozali ntango nyonso kotánga Biblia mpe koyekola yango elongo na ebongiseli ya Yehova, tokoki kozwa matomba nini?

13 Ntango tozali kotalela makambo minei oyo touti kolobela awa na likoló, tokozwa mpenza matomba na botángi ya Biblia! Ya solo, kotánga Biblia ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, ekoki kopesa biso matomba mpo na bomoi na biso mobimba, mpamba te ntango tozali kotánga Makomami, tokokola mpe tokokóma makasi na elimo. Kotánga Biblia mbala na mbala ekolendisa boyokani na biso na Yehova, Tata na biso ya bolingo mpe na bandeko na biso baklisto. Ekosalisa biso tótya likebi na toli ya kolanda kokangama makasi na “liloba ya bomoi.”​—Bafilipi 2:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo ezali komonisa mpo na nini ebongi kotalela Biblia, talá mwa buku Un livre pour tous, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Bozongeli

• Mpo na nini Biblia ekomamaki mpe ebatelamaki tii na mikolo na biso?

• Ndenge nini tokoki kosalisa basusu básepela na Biblia?

• Mpo na nini kotánga Biblia yo moko mbala na mbala ezali na matomba? Wapi makanisi minei oyo soki tosaleli yango tokozwa na yango matomba ntango tozali kotalela oyo tozali kotánga na Biblia?

[Etanda/Elilingi na lokasa 30]

NTANGO OZALI KOTÁNGA ETENI MOKO YA BIBLIA, TALELÁ MAKAMBO OYO:

Ezali koyebisa yo nini mpo na bomoto ya Yehova?

Ezali na boyokani nini na motó ya likambo ya Biblia?

Ndenge oyo yango esengeli kobongola bomoi na yo

Ndenge oyo okoki kosalela yango mpo na kosalisa bato mosusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto