Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wt mok. 10 nk. 90-100
  • Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”
  • Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bayangeli ya Bokonzi ya Nzambe
  • Ndenge oyo Bokonzi ekokokisa mikano na yango
  • Makambo oyo ezali kosalema
  • Bokonzi ya mbula nkóto
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
wt mok. 10 nk. 90-100

Mokapo ya zomi

Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”

1. Makambo oyo ezali koleka na mokili na boumeli ya lisolo ya bato emonisi nini?

MAKAMBO oyo ezali koleka na mokili mokolo na mokolo ezali komonisa ete bato bazwi esengo te ndenge baboi boyangeli ya Yehova mpe bazali komeka komitambwisa bango moko. Ebongiseli moko te ya boyangeli ya moto epesi bato nyonso bolamu ndenge moko. Atako bato bakolisi boyebi na bango na makambo ya siansi, kasi balongi te kosilisa maladi to kolongola liwa, ata mpo na moto moko kaka. Boyangeli ya moto elongi te kosilisa bitumba, mobulu, makambo ya mabe, mpe bobola. Biyangeli mabe ezali naino konyokola bato bipai mingi na mokili. (Mosakoli 8:9) Teknoloji, lokoso mpe kozanga koyeba makambo malamumalamu, ezali kobebisa mabele, mai mpe mopɛpɛ. Lokola bakonzi bazali kosalela nkita na ndenge ya mabe, bato mingi bazali kokoka te kozwa biloko ya ntina mpo na kobikela. Bankóto ya bambula ya boyengeli ya moto emonisi mpenza bosolo ya maloba oyo: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”​—Yilimia 10:23.

2. Wapi eloko kaka moko oyo esengeli kosilisa mikakatano ya bato?

2 Kasi makambo makobonga ndenge nini? Na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye básambelaka mpo na yango boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Mokanda ya 2 Petelo 3:13 ezali kolobela Bokonzi ya Nzambe na likoló lokola “likoló ya sika,” oyo esengeli koyangela “mabele ya sika,” elingi koloba bato ya boyengebene. Lokola Bokonzi ya Nzambe na likoló ezali na ntina mingi, yango wana Yesu akómisaki yango motó ya likambo ya mosala na ye ya kosakola. (Matai 4:17) Amonisaki esika oyo yango esengeli kozwa na bomoi na biso, ntango alobaki ete: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.”​—Matai 6:33.

3. Mpo na nini koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya kosala na lombangu sikoyo?

3 Koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo esengeli kosala na lombangu sikoyo, mpamba te etikali moke Bokonzi yango ebongola ndenge ya koyangela mabele mpo na libela. Danyele 2:44 esakolaki ete: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te [bato bakoyangela mabele lisusu te]; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [oyo ezali lelo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Na bongo, Bokonzi yango ekomema mikolo oyo ya nsuka mpenza na nsuka na yango ntango ekobebisa ebongiseli nyonso ya makambo ya ntango oyo. Na nsima, Bokonzi yango ekoyangela yango moko mabele mpo na libela. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ndenge kobɔndisama oyo boyangeli yango ekomema ekómi solo pene!

4. Na boyokani na likambo etali Bokonzi, nini esalemaki na 1914 na likoló, mpe mpo na nini likambo yango ezali na ntina mingi mpo na biso?

4 Na 1914, Klisto Yesu atyamaki mokonzi, mpe bapesaki ye nzela ya kozala na “bokonzi kati na bayini na [ye].” (Nzembo 110:1, 2) Na mbula yango mpe, “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ebandaki. (2 Timote 3:1-5, 13) Lisusu kaka na ntango yango, makambo oyo Danyele amonaki na emonaneli ya esakweli esalemaki na likoló. “[Mokóló na Mikolo, NW]” Yehova Nzambe, apesi Mwana ya moto, Yesu Klisto “nguya na nkembo na bokonzi . . . ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso básalela ye.” Ntango azalaki kolobela makambo amonaki na emonaneli yango, Danyele akomaki ete: “Nguya na ye ezali nguya ya lobiko na lobiko, ekosila te, mpe bokonzi na ye ekobebisama te.” (Danyele 7:13, 14) Na nzela ya Bokonzi yango ya likoló oyo ezali na mabɔkɔ ya Yesu Klisto nde Nzambe akosala ete bato oyo balingi boyengebene básepela na ebele ya makambo ya kitoko oyo akanaki kosala ntango atyaki baboti na biso ya liboso na Paladiso.

5. Makambo mosusu nini etali Bokonzi oyo tosengeli kotalela yango malamumalamu, mpe mpo na nini?

5 Ozali na mposa ya kozala moko ya bato oyo bakoyangelama na Bokonzi yango? Soki ezali bongo, okosepela koyeba ndenge boyangeli yango ya likoló esalemi mpe ndenge ezali kosala mosala na yango. Okolinga koyeba makambo oyo ezali kosala sikoyo, oyo ekosala na mikolo ezali koya, mpe makambo oyo esɛngami epai na yo. Ntango ozali koluka koyeba Bokonzi yango malamumalamu, okokóma mpe na botɔndi mingi mpo na yango. Soki ondimi boyangeli na yango, okobongisama malamumalamu mpo na koyebisa bato mosusu makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato ya botosi.​—Nzembo 48:12, 13.

Bayangeli ya Bokonzi ya Nzambe

6. (a) Ndenge nini Makomami ezali komonisa ye oyo boyangeli na ye emonisami na nzela ya Bokonzi ya Masiya? (b) Makambo oyo tozali koyekola oyo etali Bokonzi esengeli kosala biso nini?

6 Soki totaleli boyangeli yango malamu, moko ya makambo oyo ezali komonisa ezali ete Bokonzi yango ya Masiya ezali komonisama ya boyangeli ya Yehova ye moko. Yehova nde apesaki Mwana na ye “nguya na nkembo na bokonzi.” Ntango bapesaki Mwana ya Nzambe nguya ya kobanda koyangela lokola Mokonzi, mingongo na likoló eyokanaki mpe elobaki ete: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso [Yehova Nzambe] mpe ya Klisto na ye, mpe [Yehova] akoyangela libela na libela.” (Emoniseli 11:15) Yango wana, eloko nyonso oyo tomoni oyo etali Bokonzi yango mpe makambo oyo yango ezali kokokisa ekoki kosala ete tókangama na Yehova ye moko. Makambo tozali koyekola esengeli kopesa biso mposa makasi ya kotosa boyangeli yango libela na libela.

7. Lokola Yesu Klisto azali Moyangeli Molandi oyo Yehova atii, mpo na nini tosengeli kotalela likambo yango na likebi mpenza?

7 Tótya mpe likebi na ndenge Yehova atii Yesu Klisto na kiti ya bokonzi lokola Moyangeli Molandi na ye. Lokola azalaki Mosali Monene oyo Nzambe asalelaki mpo na kosala mabele mpe bato, Yesu ayebi bamposa na biso malamu koleka moto nyonso kati na biso. Lisusu, kobanda na ebandeli ya lisolo ya bato, amonisaki ‘esengo na ye mpo na bana ya bato.’ (Masese 8:30, 31; Bakolose 1:15-17) Lokola alingaki bato mingi, ye moko ayaki awa na mabele mpe apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na bolamu na biso. (Yoane 3:16) Na yango, apesi biso nzela ya kosikolama na lisumu mpe na liwa, apesi biso mpe libaku ya kozwa bomoi ya seko.​—Matai 20:28.

8. (a) Na bokeseni na biyangeli ya bato, mpo na nini boyangeli ya Nzambe ekoumela libela na libela? (b) Boyokani nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali na yango na boyangeli yango ya likoló?

8 Bokonzi ya Nzambe ekobebisama te, ezali boyangeli oyo ekoumela libela na libela. Ekoumela bongo mpamba te Yehova ye moko akufaka te. (Habakuku 1:12) Na bokeseni na bakonzi ya bato, Yesu Klisto, ye oyo Nzambe apesi bokonzi, akokufa mpe te. (Baloma 6:9; 1 Timote 6:15, 16) Bato mosusu 144000, basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bauti na “mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso,” bakozala elongo na Klisto na bakiti ya bokonzi na likoló. Bango mpe bakokufa lisusu te. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1-4; 1 Bakolinti 15:42-44, 53) Mingi kati na bango basilá kokende na likoló, mpe ndambo na bango oyo bazali naino awa na mabele basali “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo azali kotambwisa makambo ya Bokonzi yango awa na mabele na bosembo mpenza.​—Matai 24:45-47.

9, 10. (a) Bokonzi yango ekolongola makambo nini ya mabe oyo ekabolaka mpe ebebisaka bato? (b) Soki tolingi ete tókóma banguna ya Bokonzi ya Nzambe te, makambo nini tosengeli koboya komikɔtisa na yango?

9 Etikali moke, na ntango oyo ye moko aponi, Yehova akotinda mampinga na ye mpo na koboma ete mabele epɛtolama. Bakoboma mpo na libela bato oyo bazali koboya na nko kondima boyangeli na ye mpe baoyo bazali kotyola bibongiseli ya bolingo oyo azali kokamata na nzela ya Yesu Klisto. (2 Batesaloniki 1:6-9) Yango ekozala mokolo ya Yehova, ntango oyo azelaki banda kala mpo na komilongisa lokola Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. “Talá mokolo ya [Yehova] ezali koya na [mɔ́tɔ] makasi na nkanda mpe na nkɛlɛ; kokómisa mokili mpamba mpe kobebisa kati na yango bato ya masumu na yango.” (Yisaya 13:9) “Mokolo yango ezali mokolo ya nkanda, mokolo ya mpasi mpe mikakatano; mokolo ya molili mpe ya kozanga pole; mokolo ya mapata mpe ya molili tuu.”​—Sefania 1:15.

10 Mangomba nyonso ya lokuta mpe biyangeli ya bato na mampinga na yango, oyo moyangeli moko ya mokili oyo amonanaka te azali kosalela, ekobebisama mpo na libela. Baoyo nyonso bazali komitya na ngámbo ya mokili oyo mpe kolanda bomoi ya mabe, ya moimi, mpe ya kobuba bato, bakobomama mpo na libela. Satana na bademo na ye bakozala lisusu na mabele te, bakokangama na boumeli ya mbula nkóto. Na nsima, Bokonzi ya Nzambe ekotambwisa makambo nyonso ya mabele. Ekozala mpenza ntango moko ya kimya mpo na baoyo nyonso balingaka boyengebene!​—Emoniseli 18:21, 24; 19:11-16, 19-21; 20:1, 2.

Ndenge oyo Bokonzi ekokokisa mikano na yango

11. (a) Ndenge nini Bokonzi ya Masiya ekokokisa mokano ya Yehova mpo na mabele? (b)Ntango Bokonzi yango ekoyangela ekosala nini mpo na bato oyo bakozala na bomoi awa na mabele na ntango yango?

11 Bokonzi ya Masiya ekokokisa mpenza mokano oyo Nzambe abongisaki kobanda na ebandeli mpo na mabele. (Genese 1:28; 2:8, 9, 15) Kino lelo, bato balongi te kopesa mabɔkɔ mpo na kokokisa mokano yango. Kasi, “mabele efandami oyo ezali koya” ekoyangelama na Mwana ya moto, Yesu Klisto. Bato nyonso oyo bakobika mokolo Yehova akobebisa ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, oyo enuni, bakosala na bomoko na litambwisi ya Klisto Mokonzi, mpe na esengo mpenza bakosala nyonso oyo akosɛnga, mpo ete mabele mobimba ekóma paladiso. (Baebele 2:5-9) Bato nyonso bakosepela na mosala ya mabɔkɔ na bango mpe bakozwa mpenza matomba ya biloko mingi oyo mabele ekobota.​—Nzembo 72:1, 7, 8, 16-19; Yisaya 65:21, 22.

12. Ndenge nini bato oyo Bokonzi yango ekoyangela bango bakokóma na makanisi ya kokoka mpe na nzoto ya kokoka?

12 Ntango Adama na Eva basalemaki, bazalaki bato ya kokoka, mpe mokano ya Nzambe ezalaki ete bátondisa mabele na bana na bango, nyonso bázala na makanisi ya kokoka mpe na nzoto ya kokoka. Mokano yango ekokokisama na nkembo mpenza na ntango Bokonzi yango ekoyangela. Yango ezali kosɛnga kolongola mbeba nyonso ya lisumu, mpe mpo na yango, Klisto azali kosala kaka te lokola Mokonzi kasi mpe lokola Nganga-Nzambe Monene. Mokemoke, akosalisa bato na ye ya botosi mpo bázwa matomba na motuya ya mbeka ya bomoi na ye ya moto, oyo apesaki mpo na kosikola bato na lisumu.

13. Bato bakozwa matomba nini na nzoto na bango na ntango Bokonzi yango ekoyangela?

13 Na ntango Bokonzi yango ekoyangela, bato oyo bakofanda na mabele bakozwa matomba na nzoto na bango. “Na eleko wana, miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama. Na eleko wana ebɔsɔnɔ akomata likoló lokola mboloko, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.” (Yisaya 35:5, 6, NW) Nzoto ya moto oyo ebebi mpo akómi mobange to mpo na maladi ekokóma kitoko koleka ya mwana moke, mpe bato ya maladi oyo esilaka te bakokóma nzoto kolɔngɔnɔ. “Tiká ete mosuni na ye eleka yango na elenge na kitoko, azonga na mikolo ya bolenge na ye.” (Yobo 33:25) Mokolo ekoya ntango moto moko te akoloba ete, “Nazali na maladi.” Mpo na nini? Mpamba te bakolongola kilo ya lisumu mpe mbeba na yango likoló na bato oyo babangaka Nzambe. (Yisaya 33:24; Luka 13:11-13) Ɛɛ, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, na mawa na koganga na mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

14. Kozala moto ya kokoka etaleli mpe makambo nini?

14 Kasi, kozala moto ya kokoka esuki kaka te na kozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makanisi malamu. Etaleli mpe komonisa bizaleli ya Yehova na ndenge ebongi, mpamba te tosalemaki na ‘lolenge ya Nzambe mpe na elilingi ya Nzambe.’ (Genese 1:26) Na yango, ekosɛnga koteyama mingi. Na mokili ya sika, “boyengebene ekofanda.” Yango wana, ndenge Yisaya asakolaki, “bafandi ya [mabele] bakoyekola boyengebene.” (2 Petelo 3:13; Yisaya 26:9) Ezaleli yango epesaka nzela ete kimya ezala​—kati na bato ya mposo nyonso, kati na baninga ya motema, kati na libota mpe, oyo eleki nyonso, elongo na Nzambe ye moko. (Nzembo 85:10-13; Yisaya 32:17) Baoyo bayekolaka kokóma na boyengebene, mokemoke bakoyeba soki mokano ya Nzambe ezali nini mpo na bango. Wana bolingo mpo na Yehova ezali kokóma makasi na mitema na bango, bakolanda banzela na ye na makambo nyonso ya bomoi na bango. Bakoloba ndenge Yesu alobaki, ‘nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka Tata na ngai.’ (Yoane 8:29) Bomoi ekozala mpenza na esengo ntango bato nyonso bakozala ndenge wana!

Makambo oyo ezali kosalema

15. Ntango ozali kosalela mituna na paragrafe oyo, lobelá makambo oyo Bokonzi yango ezali kokokisa mpe monisá oyo tosengeli kosala sikoyo.

15 Makambo ya kokamwa oyo Bokonzi ya Nzambe mpe bato oyo bakoyangelama na yango bazali kosala ezali komonana polele. Mituna mpe bavɛrsɛ oyo elandi ekokundolela yo makambo mosusu kati na yango, bakisa mpe makambo bato oyo bakoyangelama na Bokonzi bakoki kosala mpe basengeli kosala sikoyo.

Bokonzi yango ebundisaki libosoliboso nani, mpe yango esukaki ndenge nini? (Emoniseli 12:7-10, 12)

Banda Klisto atyamaki na kiti ya bokonzi, likebi etyamaki mpo na kosangisa ndambo ya banani? (Emoniseli 14:1-3)

Mosala nini Yesu asakolaki ete akosala ntango bolɔzi monene ekobanda, ndenge yango elobelami na Matai 25:31-33?

Mosala nini ezali kosalema naino lelo oyo? Banani bazali kopesa mabɔkɔ na mosala yango? (Nzembo 110:3; Matai 24:14; Emoniseli 14:6, 7)

Mpo na nini banguna oyo bazali bato ya politiki mpe ya mangomba bakoki te kopekisa mosala ya kosakola? (Zekalia 4:6; Misala 5:38, 39)

Mbongwana nini ezali kosalema na bomoi ya bato oyo bazali kotosa ndenge Bokonzi yango ezali koyangela? (Yisaya 2:4; 1 Bakolinti 6:9-11)

Bokonzi ya mbula nkóto

16. (a) Klisto akoyangela mbula boni? (b) Makambo nini ya malamu ekosalema na ntango wana mpe nsima?

16 Nsima ya kobwaka Satana na bademo na ye na lobwaku mozindo, Yesu Klisto na bandeko na ye 144000 basangoli ya libula bakoyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe mpo na mbula nkóto. (Emoniseli 20:6) Na eleko wana, bato bakokóma na ezaleli ya kokoka, lisumu mpe liwa oyo euti na Adama ekolongolama mpo na libela. Na nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto yango, lokola akokokisa mokumba na ye nyonso ya Masiya mpe Nganga-Nzambe Monene, Yesu “akozongisa bokonzi” epai ya Tata na ye, “mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.” (1 Bakolinti 15:24-28) Na nsima, bakofungola Satana mpo na mwa ntango moke mpo ameka bato oyo basombami mpo na koyeba bokangami na bango na boyangeli ya Yehova. Nsima ya komekama wana ya nsuka, Yehova akoboma Satana mpe batomboki oyo bakolanda ye. (Emoniseli 20:7-10) Baoyo bakomitya na ngámbo ya boyangeli ya Yehova​—mpe kondima lotomo na ye ya koyangela​—bakosila kolakisa mpenza bosembo na bango makasi. Bakokóma moto na moto na boyokani malamu kati na ye na Yehova, mpe akondima bango lokola bana na ye, mpe akopesa bango bomoi ya seko.​—Baloma 8:21.

17. (a) Na nsuka ya mbula nkóto, nini ekokómela Bokonzi? (b) Na lolenge nini ezali solo ete Bokonzi “ekobebisama te”?

17 Na bongo, Yesu mpe ba 144000 bakotika mosala oyo bazalaki kosala mpo na mabele. Mosala na bango na ntango wana ekozala nini? Biblia elobi yango te. Kasi, soki tosimbi boyangeli ya Yehova na bosembo mpenza, tokozala na bomoi na nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto yango mpo na koyeba nini Yehova akani mpo na bango mpe mpo na molɔ́ngɔ́ mobimba. Atako bongo, boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto ekozala “lobiko na lobiko” mpe Bokonzi na ye “ekobebisama te.” (Danyele 7:14) Na ndenge nini? Na ndenge oyo: lokola Yehova akozala Moyangeli, bokonzi ekoleka na mabɔkɔ ya bato mosusu te oyo bazali na mikano ya ndenge mosusu. Lisusu, bokonzi yango “ekobebisama te” mpamba te makambo oyo yango ekosala ekotikala libela na libela. (Danyele 2:44) Mpe Masiya Nganga-Nzambe Mokonzi na bandeko na ye banganga-nzambe oyo basangani na ye bakozwa lokumu libela na libela mpo na mosala na bango ya sembo epai na Yehova.

Bozongeli

• Mpo na nini kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato? Ntango nini Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe abandaki koyangela?

• Nini mpenza ezali kosepelisa yo na likambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe misala oyo yango ekosala?

• Makambo nini Bokonzi ezali kosala oyo tokoki komona, mpe mokumba na biso ezali nini na likambo yango?

[Elilingi na lokasa 92, 93]

Na Bokonzi ya Nzambe, bato nyonso bakoyekola boyengebene

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto