Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lr mok. 32 nk. 167-171
  • Ndenge babatelaki Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge babatelaki Yesu
  • Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Masolo mosusu
  • Banganga-minzoto bayei kotala Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu mpe banganga-minzoto
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mokonzi mabe alongi te
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • “Mibali misato ya bwanya” bazalaki banani? Balandaki “monzoto” ya Beteleme?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Yekolá epai ya Moteyi Monene
lr mok. 32 nk. 167-171

MOKAPO 32

Ndenge babatelaki Yesu

YEHOVA asalaka makambo na ndenge ya kokamwa na bantango mosusu mpo na kobatela baoyo bazali bana mike mpe baoyo bazali na makoki ya komibatela bango moko te. Soki okei kotambola na mboka, okomona ndenge Yehova asalaka likambo yango. Kasi na ebandeli, ntango okomona likambo yango okoki mpenza kokanga ntina na yango te.

Omoni ndɛkɛ moko ekiti na mabelé penepene na yo. Emonani lokola nde bazokisi yango. Ezali kobenda lipapu moko na nse mpe ezali kokima ntango ozali kolinga kopusana pene na yango. Ntango ozali kolanda ndɛkɛ yango, ezali kaka kokima liboso na yo. Na nsima, omoni na mbala moko ndɛkɛ yango epumbwe. Emonanaki lokola nde lipapu moko ya ndɛkɛ yango ebukani, nzokande ezalaki bongo te! Oyebi mpo na nini ndɛkɛ yango ezalaki kosala bongo?—

Penepene na esika oyo ozalaki, esika oyo ndɛkɛ yango ekitaki, bana na ye babombamaki na matiti. Mama ya bandɛkɛ yango azalaki kobanga noki okomona bana na ye mpe okosala bango mabe. Yango wana, ndɛkɛ yango akosaki ete azoki mpo abenda yo mosika olongwa pene na bana na ye. Oyebi nani akoki kobatela biso ndenge ndɛkɛ wana ebatelaka bana na ye?— Na Biblia, bakokanisi Yehova na ndɛkɛ oyo babengi mpongo, oyo asalisaka bana na ye.​—Deteronome 32:11, 12.

Mama ya bandɛkɛ asali lokola nde azoki ndenge atiki mapapu na nse ntango bana bazali kopusa esika bana na ye bandɛkɛ bazali

Ndenge nini mama ya bandɛkɛ oyo abateli bana na ye?

Mwana ya Yehova oyo aleki motuya ezali Yesu, Mwana na ye ya bolingo. Ntango Yesu azalaki na likoló, azalaki elimo moko ya nguya lokola Tata na ye. Azalaki na likoki ya komibatela ye moko. Kasi ntango Yesu abotamaki awa na mabelé, wana azalaki kaka mwana moke mpenza, azalaki na mako ki ya komibatela te. Esengelaki moto mosusu abatela ye.

Mpo akokisa mokano oyo Nzambe abongisaki mpo na ye awa na mabelé, esengelaki Yesu akola mpe akóma mobali moko ya kokoka, oyo akɔmɛli malamumalamu. Nzokande, Satana alukaki koboma Yesu liboso kutu akola. Mayele mabe nyonso oyo esalemaki mpo na koboma Yesu ntango azalaki naino mwana moke mpe ndenge oyo Yehova abatelaki ye, ezali lisolo moko oyo ezali kobenda likebi. Okosepela koyoka yango?—

Mwa ntango moke nsima ya kobotama ya Yesu, na epai ya Ɛsti, Satana abimisi eloko oyo emonani lokola monzoto mpo na kongɛngisa likoló. Bato oyo babengi banganga-minzoto, oyo bayekolaka minzoto, batamboli bakilomɛtrɛ ebele mpo na kolanda monzoto yango oyo ememi bango tii na Yelusaleme. Ntango bakómi kuna, batuni epai wapi moto oyo akozala mokonzi ya Bayuda asengeli kobotama. Ntango batuni bato oyo bayebi makambo Biblia elobi mpo na esika yango, bayanoli ete: “Na Beteleme.”​—Matai 2:1-6.

Banganga-minzoto bazali kopesa Malia ná Yozefe makabo oyo bamemeli Yesu

Nsima ya ntango oyo banganga-minzoto bakei kotala Yesu, likebisi nini Nzambe apesi bango oyo ebikisi Yesu?

Na nsima Erode, mokonzi mabe na Yelusaleme, ayoki nsango ete mokonzi ya sika auti kobotama na Beteleme, engumba moko oyo ezali penepene wana; ayebisi banganga-minzoto ete: ‘Bókende koluka komona mwana yango, mpe na nsima, bózonga, bóya koyebisa ngai.’ Oyebi mpo na nini Erode alingi koyeba epai Yesu azali?— Ezali mpo Erode ayoki zuwa mpe alingi koboma ye!

Ndenge nini Nzambe abateli Mwana na ye?— Ntango banganga-minzoto bakómi epai Yesu azali, bapesi ye makabo. Na nsima, Nzambe alɔtisi banganga-minzoto ndɔtɔ mpe akebisi bango ete bázonga epai ya Erode te. Na bongo bazongi epai na bango na nzela mosusu kozanga ete báleka na Yelusaleme. Ntango Erode ayebi ete banganga-minzoto basili kozonga epai na bango, asiliki makasi. Lokola azali kosala nyonso mpo na koboma Yesu, Erode atindi bato báboma bana nyonso ya mibali na Beteleme oyo bazali na mbula banda na mibale tii na nse! Kasi na ntango wana, Yesu azalaki lisusu wana te.

Oyebi ndenge oyo Yesu abiki na likama wana?— Nsima ya ntango oyo banganga-minzoto balongwe mpe bazongi epai na bango, Yehova akebisi Yozefe, mobali ya Malia, ete atɛlɛma mpe akima na Ezipito. Ezali kuna nde Yesu akimi Erode, mokonzi mabe. Mwa bambula na nsima, ntango Malia ná Yozefe balongwe na Ezipito elongo na Yesu, Nzambe akebisi lisusu Yozefe. Ayebisi ye na ndɔtɔ ete akende na Nazalete, epai Yesu akobatelama malamu.​—Matai 2:7-23.

Yozefe abateli Yesu ndenge amemi ye ná Malia na Ezipito

Ndenge nini Yesu abikisami lisusu ntango oyo azalaki naino mwana moke?

Omoni ndenge Yehova abatelaki Mwana na ye?— Mpo na yo, nani oyo okoki koloba ete akokani na bana ya ndɛkɛ oyo mama na bango abombaki bango na matiti to nani oyo akokani na Yesu ntango azalaki mwana moke mpenza? Yo okokani na bango, ezali bongo te?— Ezali na bato oyo balingi kosala yo mpe mabe. Oyebi bango?—

Biblia elobi ete Satana azali lokola nkɔsi oyo azali konguluma, oyo alingi kolya biso. Mpe kaka ndenge bankɔsi balukaka mbala mingi kolya banyama ya mike, ndenge moko mpe Satana ná bademo na ye balukaka mbala mingi kosala bana mike mabe. (1 Petelo 5:8) Kasi Yehova aleki Satana na makasi. Yehova akoki kobatela bana na ye to kobongisa makambo nyonso ya mabe oyo Satana azali kosala bango.

Oyebi lisusu likambo oyo toyekolaki na Mokapo 10 ya mokanda oyo, oyo Zabolo ná bademo na ye bazali koluka kotinda biso tósala?— Ɛɛ, bazali koluka kotinda biso tósangisa nzoto na ndenge oyo Nzambe alobi ete ezali mabe. Kasi banani mpenza basengeli kosangisa nzoto?— Ezali kaka mwasi ná mobali oyo bakolá mpe babalaná.

Nzokande, likambo ya mawa, ezali na mikóló mosusu oyo balingaka kosangisa nzoto na bana mike. Ntango bazali kosala bongo, bana mibali mpe bana basi bakobanda kosala makambo ya mabe oyo bamoni epai na mikóló yango. Bana yango bakobanda mpe kosalela nzoto na bango ya mobali mpe ya mwasi na ndenge ya mabe. Yango nde likambo oyo esalemaki na engumba ya Sodome, esili koleka bambula mingi. Biblia elobi ete bato ya engumba wana, “banda bana mobali tii mobange,” balukaki kosangisa nzoto na mibali oyo bayaki kotala Lota.​—Genese 19:4, 5, NW.

Na bongo kaka ndenge Yesu asengelaki kobatelama, yo mpe osengeli kobatelama mpo mikóló mosusu​—to mpe ata na bana mosusu—​oyo bazali na mposa ya kosangisa na yo nzoto básala yango te. Mbala mingi, bato yango bakokosa ete bazali baninga na yo. Bakoki ata mpe kopesa yo eloko moko boye soki olaki bango ete okoyebisa bato mosusu te likambo oyo balingi kosala yo. Kasi bato yango bazali koluka kaka kokokisa bamposa na bango moko, lokola Satana ná bademo na ye, mpe bazali koluka kaka komisepelisa. Mpe bazali koluka komisepelisa na kosangisa nzoto na bana mike. Yango ezali likambo moko ya mabe mpenza!

Oyebi nini bakoki kosala mpo na komisepelisa?— Bakoki koluka kosimbasimba nzoto na yo ya mobali to ya mwasi. To bakolinga ata kotutanisa nzoto na yo ya mobali to ya mwasi na oyo ya bango. Kasi osengeli kotika nzela soki moke te ete moto asakana na nzoto na yo ya mobali to ya mwasi. Moto asakana na yango te ezala ndeko na yo ya mobali to ya mwasi, ezala mama na yo to tata na yo. Binama wana ya nzoto ezali mpo na yo moko.

Mwana moko ya mwasi atomboli lobɔkɔ mpo na kopekisa mobali moko atika kosimba ye na ndenge ya mabe

Okoloba nini mpe okosala nini soki moto ameki kosimba yo na ndenge ya mabe?

Ndenge nini okoki kobatela nzoto na yo liboso ya bato oyo basalaka makambo ya mabe ndenge wana?— Libosoliboso, kotika nzela te ete moto asakana na nzoto na yo ya mobali to ya mwasi. Soki moto ameki kosakana na yango, gangá na mongongo makasi mpe lobá na ye ete: “Komeka te! Nakofunda yo!” Mpe soki moto yango alobi ete soki likambo wana esalemi, ezali mpo yo olukaki yango, kondima maloba na ye te. Oyo alobi ezali solo te. Azala moto ya ndenge nini, kende kaka kofunda ye! Osengeli kofunda ye ata soki alobi ete likambo oyo bozali kosala ezali sɛkɛlɛ ya bino mibale. Ata soki moto yango alobi ete akopesa yo biloko ya kitoko to ata soki alobi ete akobɛta yo, osengeli kokima ye mpe kofunda ye kaka.

Osengeli kobanga te, kasi ata bongo osengeli kokebaka. Ntango baboti na yo bakebisi yo ete bato boye to bisika boye ekoki kozala likama mpo na yo, osengeli koyokela bango. Soki osali bongo, okopesa moto mabe nzela te ete asala yo mabe.

Mpo na komibatela na makambo etali kosangisa nzoto na ndenge ya mabe, tángá Genese 39:7-12; Masese 4:14-16; 14:15, 16; 1 Bakolinti 6:18; mpe 2 Petelo 2:14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto