Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jd mok. 4 nk. 43-55
  • Yehova—Nzambe oyo ayebisaka makambo liboso mpe akokisaka yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova—Nzambe oyo ayebisaka makambo liboso mpe akokisaka yango
  • Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKONZI MALAMU OYO AZALI NA BOKONZI LIKOLÓ NA NYONSO
  • AKOKISAKA BILAKA NA YE
  • TATA OYO AKOKISAKA BAMPOSA YA BATO NA YE
  • KOLIMBISA EFUNGOLAKA NZELA YA LOBIKO
  • Basakoli oyo bansango na bango ekoki kosalisa biso
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Mokolo ya Yehova—likambo ya ntina mingi
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?”
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • ‘Lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te’
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
Makambo mosusu
Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
jd mok. 4 nk. 43-55

Mokapo 4

Yehova—Nzambe oyo ayebisaka makambo liboso mpe akokisaka yango

1, 2. (a) Mpo na nini bato mosusu bakoki kokanisa ete bazali na bokonzi te likoló ya bomoi na bango? (b) Ndenge nini basakoli 12 balobeli bizaleli ya Yehova?

BATO mingi bamonaka ete bazali na bokonzi te likoló ya bomoi na bango. Ntango batángaka bazulunalo bamonaka ete elikya ezali lisusu te mpo na bato. Milende oyo bato bazali kosala mpo na kosilisa bampasi na mokili ezali nde kobebisa lisusu makambo na mokili oyo ezangi elikya. Tosengeli mpenza koyeba ete basusu na kati ya basakoli 12 oyo tozali koyekola makambo na bango bakutanaki mpe na makambo ya ndenge wana, mpe basakolaki bansango ya elikya oyo biso tokoki kozwela yango litomba mpe tokoki kosalela yango mpo na kolendisa basusu.—Mika 3:1-3; Habakuku 1:1-4.

2 Likambo ya ntina oyo okoki kokuta na mikanda wana ya bisakweli ezali ete Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, ayebi makambo nyonso ya bato mpe amibanzabanzaka mpenza mpo na bolamu na bango. Na yango, mokomoko na biso akoki koloba ete “Yehova amibanzabanzaka mpo na bolamu na ngai.” Basakoli 12 balobeli na maloba kitoko “Yehova ya mampinga.” Nzambe akoki “kosimba mokili, bongo ezali konyangwa,” kasi apesi bato na ye elaka oyo: “Moto oyo azali kosimba bino azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zekaria 2:8; Amose 4:13; 9:5) Omoni te ete ezali mpenza kosimba motema kotánga mikapo oyo ezali komonisa ndenge Nzambe asalaka makambo na bolingo mpe ndenge oyo amonisaka motema mawa mpe alimbisaka? (Hosea 6:1-3; Yoele 2:12-14) Likambo ya esengo, makambo oyo basakoli yango bakomaki elobeli te likambo mokomoko ya bizaleli ya Nzambe; mikanda nyonso 66 ya Biblia ezali na ntina mpo na kolobela bizaleli yango. Atako bongo, mikanda yango 12 ezali kosalisa biso tómona bizaleli kitoko ya Nzambe mpe ndenge asalelaka bato makambo.

3. Ndenge nini basakoli 12 bamonisi polele ete Yehova azali Nzambe oyo azali na mokano?

3 Mikanda ya basakoli 12 ekoki kosalisa biso tókóma lisusu kotyela Yehova motema mingi, mpo azali Mosakoli ya makambo oyo ekoya mpe Mokokisi ya mikano na ye. Emonisi mpe ete nsukansuka akokómisa mabele paradiso oyo ekotambwisama na bokonzi ya Nzambe. (Mika 4:1-4) Basakoli yango mosusu balobeli ndenge oyo Yehova abongisaki nzela mpo na koya ya Masiya mpe mpo na lisiko oyo ekosikola bato na lisumu mpe na liwa. (Malaki 3:1; 4:5) Mpo na nini koyeba makambo wana nyonso ezali na ntina?

MOKONZI MALAMU OYO AZALI NA BOKONZI LIKOLÓ NA NYONSO

4, 5. (a) Basakoli 12 babendaki likebi na likambo nini ya solo oyo etali Nzambe? (b) Bonene ya Yehova ezali kotinda yo osala nini?

4 Kanisá lisusu ntembe oyo ebimaki mpo na lotomo ya Nzambe ya koyangela ndenge tolobelaki yango na mokapo oyo eleki. Botomboki oyo esalemaki mpo na bokonzi ya Yehova—mpe bantembe oyo ebimaki mpo na ndenge na ye ya koyangela—etindaki baanzelu mosusu na likoló bátombokela Nzambe mpe yango esalaki ete mobulu makasi ezala awa na mabele. Na yango, emonani polele ete kondima mpe kotosa boyangeli ya Yehova ezali na ntina mpo makambo etambola malamu na kati ya molɔ́ngɔ́ mpe bato bákóma na kimya. Na yango, Yehova azali na ntina malamu ya kolongisa boyangeli na ye. Tiká tótalela naino ndenge mikanda 12 ya basakoli ekoki kosalisa biso tómona likambo yango lisusu polele.

5 Lokola bazalaki bamemi-nsango ya Yehova, basakoli yango balobelaki mingi bonene na ye. Na ndakisa, mpo na kokumisa nkombo mpe boyangeli ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Amose asalelaki maloba “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso” mbala 21. Yango emonisi ete Nzambe ya solo azali mpenza monene mpe likambo moko te eleki ye na makasi. (Amose 9:2-5; talá etanda “Yehova Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”) Kaka Yehova nde abongi kozala Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpo aleki mosika bikeko. (Mika 1:7; Habakuku 2:18-20; Sefania 2:11) Lokola Yehova azali Mokeli ya biloko nyonso, abongi mpenza mpe azali na lotomo ya kozala na bokonzi likoló ya nyonso. (Amose 4:13; 5:8, 9; 9:6) Mpo na nini ezali na ntina mpo na yo?

6. Ndenge nini moto nyonso atalelami na kokokisama ya mokano ya Nzambe?

6 Soki esilá kokómela yo ete bato bálinga yo te, basalelá yo makambo na bosembo te, to bákanisela yo mabe, okoki kobɔndisama na koyeba ete Yehova, Mokonzi ya malamu amibanzabanzaka mpo na moto nyonso. Yehova azalaki mpenza na boyokani na ekólo ya Yisraele, atako bongo, amonisaki mpe mposa na ye ya kopambola bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso. Azali “Nkolo ya solosolo ya mabele mobimba.” (Mika 4:13) Nzambe alakaki ete nkombo na ye “ekozala monene na kati ya bikólo.” (Malaki 1:11) Lokola Tata na biso ya likoló aponaponaka te moto oyo asengeli koyeba ye, ‘bato ya minɔkɔ nyonso ya bikólo’ bazali kondima ndenge Nzambe azali kobenga bango bákóma basambeli na ye.—Zekaria 8:23.

7. Mpo na nini ndimbola ya nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi?

7 Koyeba ndenge Nzambe azali mpe koyeba oyo akosala ezali mpenza na boyokani na nkombo na ye. (Nzembo 9:10) Na mikolo ya Mika, nkombo ya Yehova efingamaki mpo bato mingi oyo bazalaki komema nkombo yango bakómaki mpenza kozanga botosi. Na lisalisi ya elimo santu, mosakoli alobelaki “bonene ya nkombo ya Yehova” mpe amonisaki ete “moto oyo azali na bwanya, akobanga nkombo [ya Nzambe].” (Mika 5:4; 6:9) Mpo na nini alobaki bongo? Elikya ya solosolo oyo okoki kozala na yango mpo na mikolo ezali koya esimbami mpenza na ndimbola ya nkombo yango: “Akómisaka.” Mpo na nini te kotánga Yoele 2:26 mpe kokanisa ndenge oyo okoki kosala mpo na komema nkombo yango mpe koyebisa basusu makambo na ntina na Nzambe oyo akómaka nyonso oyo alingi mpo na bolamu ya bikelamu na ye nyonso? Nzambe amonisaki ete azali na makoki oyo ezangi nsuka mpo na kokokisa makambo nyonso esengelaki. Okoki komona yango na kokokisama ya ebele ya bisakweli oyo basakoli 12 basakolaki.

8. Na makambo nini nkombo ya Yehova elendisaka yo?

8 Bamilio ya bato basepelaki na koyeba ete Yehova azali na likoki ya kokokisa likambo nyonso oyo alingi. Yoele amonisaki likambo yango na maloba kitoko oyo bakristo mosusu batángaki na makomi na bango: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.” (Yoele 2:32; Misala 2:21; Baroma 10:13) Tozalaka na likanisi ndenge moko na Mika, oyo alobaki ete “biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko”? (Mika 4:5) Ya solo, na ntango ya minyoko to na ntango oyo tozali na mpasi, na elikya nyonso tokoki ‘kokima epai ya nkombo ya Yehova.’—Sefania 3:9, 12; Nahumu 1:7.

9. Nzambe azali na nguya nini likoló ya bakonzi ya mokili?

9 Ntango ozali kotánga mikanda wana ya bisakweli, okokóma lisusu na kondima makasi ete Yehova azali na bokonzi ata likoló ya bakonzi ya mokili mpe likoló ya bato oyo batyaka mibeko. Azali na likoki ya kotinda bango básala makambo oyo eyokani na mokano na ye. (Masese 21:1) Tózwa ndakisa ya Dariuse Monene mokonzi ya Perse. Banguna ya losambo ya solo balukaki lisalisi na ye mpo na kokata mosala ya kotonga tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Kasi, makambo esalemaki te ndenge bakanaki! Na mobu soki 520 L.T.B., Dariuse azongelaki mobeko oyo Siruse abimisaki mpe apesaki Bayuda mabɔkɔ na mosala ya kotonga. Ntango mikakatano mosusu eyaki mpo na kopekisa mosala, nsango oyo Nzambe apesaki Zerubabele, guvɛrnɛrɛ ya Bayuda elobaki ete: “‘Na limpinga ya basoda te, na nguya mpe te, kasi nde na elimo na ngai,’ Yehova ya mampinga alobi bongo. Ee ngomba monene, yo nani? Liboso ya Zerubabele okokóma mokili moko ya patatalu.” (Zekaria 4:6, 7) Eloko moko te ekopekisa Yehova aboma mokili oyo mabe mpe atya paradiso mpo na basambeli na ye.—Yisaya 65:21-23.

10. Nzambe azali na bokonzi tii likoló ya nini, mpe mpo na nini likambo yango ezali na ntina?

10 Tóbosana mpe te ete Yehova azali na bokonzi likoló ya biloko ya nguya oyo akelá, oyo akoki kosalela mpo na koboma banguna na ye soki alingi kosala yango. (Nahumu 1:3-6) Mpo na komonisa ndenge oyo Yehova akoki kobatela basaleli na ye, Zekaria asalelaki maloba oyo ya elilingi: “Likoló na bango Yehova ye moko akomonana, mpe likula na ye ekobima mpenza lokola mokalikali. Mpe Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ye moko akoyula liseke, mpe akobima mpenza elongo na mipɛpɛ makasi ya sudi.” (Zekaria 9:14) Na yango, ekoki kozala mpasi mpo na Nzambe alakisa bonene na ye likoló ya bikólo ya bapakano ya ntango na biso? Soki moke te!—Amose 1:3-5; 2:1-3.

AKOKISAKA BILAKA NA YE

11, 12. (a) Mpo na nini Ninive ezalaki komonana lokola ekoki kokwea te? (b) Mpo na kokokisa liloba ya esakweli ya Nzambe, makambo esukelaki Ninive ndenge nini?

11 Kanisá ete ozalaki na bomoi na ekeke ya 9 L.T.B., na esika oyo ebengami lelo Proche-Orient. Engumba nini ya monene okokaki koyoka nsango na yango? Na ntembe te, olingaki koyoka bato bazali koloba mpo na engumba Ninive. Ezalaki engumba moko monene ya Asiri oyo ezalaki na bokula ya Ebale Tigre, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 900 na nɔrdi-ɛsti ya Yerusaleme. Ntango mosusu okokaki koyoka nsango ya bonene na yango—kilomɛtrɛ soki 100! Bato oyo bakendaki kotala engumba Ninive balobaki ete kitoko na yango ekokanaki na oyo ya engumba Babilone, ezalaki na bandako ya mokonzi, batempelo, babalabala minene, ba-jardin mpo na bato nyonso, mpe bibliotɛkɛ moko ya monene. Lisusu, basoda balobelaki bifelo na yango ya libándá mpe ya kati oyo ezalaki minene mpe mpasi mpo na kokɔta.

12 “Ekoki kokwea te!” Bato mingi bazalaki koloba bongo mpo na Ninive. Kasi basakoli mosusu ya mwa ekólo Yuda balobaki ete Yehova akanaki koboma “engumba [wana] oyo esopaka makila.” Lokola bato ya Ninive bandimaki nsango ya Yona, engumba yango ebikaki naino mpo na mwa ntango na bitumbu ya Nzambe. Kasi, bato ya Ninive bazongelaki bizaleli na bango ya mabe. Nahumu asakolaki boye: “Ninive . . . , mopanga ekolongola yo . . . libɔndisi mpo na likama na yo ezali te.” (Nahumu 3:1, 7, 15, 19; Yona 3:5-10) Kaka na ntango wana, Nzambe asalelaki Sefania asakola ete Ninive ekotikala mpamba. (Sefania 2:13) Bokonzi ya politiki ya nguya ya ntango wana ekokaki kokwea mpo liloba ya Yehova ekokisama? Eyano eyaki na mobu soki 632 L.T.B., ntango bato ya Babilone, bato ya Scythes, mpe Bamede bazingaki Ninive. Mpela ya mbalakaka ebebisaki bifelo na yango, mpe banguna bakɔtaki na engumba wana ya makasi. (Nahumu 2:6-8) Engumba yango oyo tii na ntango wana ezalaki makasi, etikalaki mbala moko mpamba. Tii lelo, Ninive etikalá mpamba.a “engumba ya bisengo” elongaki te kopekisa liloba ya Nzambe ekokisama!—Sefania 2:15.

13. Makambo nini ya bisakweli oyo ekokisamaki okoki kokuta na mikanda ya basakoli 12?

13 Likambo oyo ekómelaki Ninive ezali kaka ndakisa moko ya bisakweli oyo ekokisamaki. Talá karte ya lelo ya Proche-Orient. Okoki komona engumba ya Amona, ya Asiri, Babilone, Edome, to Moabe? Ezali te! Atako bingumba yango ezalaki na ntango moko boye na nguya, basakoli 12 basakolaki kokwea na yango. (Amose 2:1-3; Obadia 1, 8; Nahumu 3:18; Sefania 2:8-11; Zekaria 2:7-9) Bikólo yango elimwaki mokomoko mpe ezalaka lisusu te. Yehova alobaki ete ekolimwa, mpe esalemaki bongo! Mpe makambo oyo basakoli yango balobaki mpo na ndambo ya Bayuda oyo basengelaki kobima na boombo na Babilone, ekokisamaki—Esalemaki mpenza bongo!

14. Mpo na nini okoki koyokanisa bomoi na yo na bilaka ya Yehova?

14 Koyeba ete Yehova azali na likoki ya kosakola makambo oyo ekoya esalisi yo okóma kotyela Yehova motema lisusu mingi? Okoki mpenza kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye; azali Nzambe “oyo akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Lisusu, na nzela ya Liloba na ye, Nzambe ayebisi biso makambo oyo tosengeli koyeba. Okoki koyokanisa bomoi na yo na kokokisama ya mokano ya Yehova mpe na maloba na ye ya esakweli. Bisakweli oyo ezali na mikanda 12 ezali kaka te bandakisa mpamba ya makambo oyo ekokisamaki na ntango ya kala. Ebele ya bisakweli ezali mpe kokokisama lelo oyo to mpe ekokokisama mosika te. Na yango, makambo oyo ezali na mikanda yango 12 ekoki kosalisa yo okóma na elikya makasi ete bisakweli oyo elobeli ntango na biso mpe mikolo oyo ezali koya ekokokisama. Tyá likebi na bisakweli yango 12.

TATA OYO AKOKISAKA BAMPOSA YA BATO NA YE

15. Ntango ozali kobundana na mikakatano, ndenge nini makambo oyo Mika akutanaki na yango ekoki kosalisa yo?

15 Tosengeli kotyela Yehova motema te kaka mpo na makambo oyo ekokómela bikólo mpe mokili mobimba. Yehova asakolaka mpe akokisaka bilaka na ye na ndenge oyo ekoki mpenza kotalela yo. Ndenge nini? Ekoki kozala ete ozali kobundana na mikakatano. Omoni ete ozali kaka te na mposa ete moto moko ayeba mikakatano na yo, kasi ozali nde na mposa ya moto okoki kotyela motema mpo asalisa yo. Na ekeke ya mwambe L.T.B., Mika amiyokaki ye moko liboso ya Bayuda oyo batondaki na lolendo. Ekoki kozala ete akanisaki ete azali moto ya nsuka ya sembo awa na mabele, mpo na yango akokaki kotyela ata libota na ye motema te. Ata akei wapi, azalaki se kokutana na bato oyo bazalaki na mposa ya kosopa makila, bato ya bokosi, mpe ya kanyaka. Atako bongo, Mika alendisamaki na bilaka ya Nzambe ete akobatela basaleli na ye ya sembo ata soki bato basali nini. Yo mpe okoki kolendisama na bilaka yango, mingimingi soki bozali mingi te oyo bozali kosalela Yehova to ozali yo moko na kati ya ebele ya bato oyo bamemyaka Nzambe te.—Mika 7:2-9.

16. Mpo na nini okoki kozala na elikya ete Nzambe amonaka makambo ya kanyaka mpe minyoko mpe ete akosikola basembwi na ye?

16 Ndenge esalemaka mingi lelo oyo, bazwi mpe bato oyo bazalaki na bokonzi na Yuda mpe na Yisraele bakómaki lokoso mpe bazangaki bosembo. Lokola bazalaki kofutisa bato mpako koleka ndelo mpe kobɔtɔla mabele na bango, esalaki ete bamosusu bákóma baombo. Bazalaki kotalela babola lokola biloko mpamba, ata mpe konyokola bango. (Amose 2:6; 5:11, 12; Mika 2:1, 2; 3:9-12; Habakuku 1:4) Na nzela ya bamemi-nsango na ye, Nzambe amonisaki polele ete ayinaka kanyaka, konyokola bato mpe ete akopesa etumbu na bato oyo bazali kokoba kosala mabe. (Habakuku 2:3, 6-16) Asakolaki ete “akosembola makambo etali bikólo ya nguya” mpe basaleli na ye oyo andimi “bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.” (Mika 4:3, 4) Kanisá naino ndenge basaleli na ye babɔndisamaki! Nzambe asakolaki mpe na nsima akokisaki makambo mingi mosusu. Omoni te ete osengeli kozala na elikya ete elaka wana mpe ekokokisama?

17, 18. (a) Mpo na nini Nzambe apesi bato elikya? (b) Ndenge nini tosengeli kotalelaka disiplini ya Yehova?

17 Yehova akokokisa bilaka na ye kaka te mpo na komonisa ete azali na likoki ya kosakola makambo oyo ekoya, lokola nde azalaka na mposa ya kokamwisa bato. Bolingo nde etambwisaka makambo oyo asalaka, mpamba te “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Kanisá lisusu ndakisa ya Hosea, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mwambe L.T.B. Kaka ndenge mwasi na ye Gomere azalaki sembo te epai na ye, ndenge moko mpe Bayisraele bazalaki sembo te epai ya Yehova. Losambo na bango ya bikeko ekokanaki na ekobo; basangisaki losambo ya Baala na losambo ya pɛto ya Yehova. “Basalaki mpe pite” na ndenge ya elilingi ná Asiri mpe Ezipito. Yehova alingaki kosala ndenge nini? Hosea asengelaki kokende koluka mwasi na ye oyo asalaki ekobo mpe kozongisa ye. Na bolingo na ye, Yehova alukaki bato na ye. “Nazalaki kobenda bango na bansinga ya moto ya mabele, na bansinga ya bolingo, . . . mpe na boboto, namemelaki mokomoko biloko ya kolya.” (Hosea 2:5; 11:4) Soki babongolaki mpenza motema, Nzambe akokaki kolimbisa bango, kozongisa boyokani malamu elongo na ye. (Hosea 1:3, 4; 2:16, 23; 6:1-3; 14:4) Koyeba bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na basaleli na ye esali yo nini na motema? Omituna boye: ‘Soki Yehova amonisaki bolingo ya ndenge wana na ntango ya kala, nakoki te kondima ete akoki komonisela ngai bolingo na ye ya motema oyo ezali sembo, ebongwanaka te mpe esilaka te?’—Hosea 11:8.

18 Mikanda 12 ya bisakweli ekoki mpe kosalisa biso tómona ete bolingo ya Nzambe esɛngaka mpe asembola biso. Yehova apesaki basaleli na ye oyo babungaki elikya ete ‘akolimwisa bango nyonso te.’ (Amose 9:8) Ntango ezalaki kosɛnga kopesa etumbu, Nzambe azalaki kopesa yango, kasi likambo ya kobɔndisa ezali ete etumbu yango ezalaki kaka mpo na mwa ntango! Malaki 1:6 ekokanisi Yehova na Tata moko ya bolingo. Ndenge oyebi yango, tata oyo alingaka bana na ye akoki kopesa bango etumbu mpo na kosembola bango. (Nahumu 1:3; Baebre 12:6) Kasi, bolingo ya Tata na biso ya likoló esalaka mpe ete ayoka nkanda noki te, mpe Malaki 3:10, 16 emonisi ete akopambola mpenza basaleli na ye.

19. Ebongi mpenza omitalela na likambo nini?

19 Malaki abandi mokanda na ye na maloba oyo ya elikya: “Yehova alobi ete: ‘Nalingi bino.’” (Malaki 1:2) Ntango ozali kokanisa elikya wana oyo Nzambe apesaki Bayisraele, omituna boye: ‘Nazali kosala likambo moko oyo ekoki kopekisa Nzambe amonisela ngai bolingo? Makambo nini ya bolingo ya Nzambe nasengeli koyeba mpe koluka komona yango polele?’ Soki okangi mpenza ntina ya bolingo ya Nzambe okoki mpenza kozala na elikya na bolingo na ye oyo ezangi nsuka.

KOLIMBISA EFUNGOLAKA NZELA YA LOBIKO

20. Ndenge nini bolimbisi ya Nzambe efungolaka nzela na lobiko?

20 Ntango ozali kotánga mikanda wana ya bisakweli, okomona ete na bantango mosusu Yehova asakolaki mpe makambo ya mpasi. Mpo na nini? Mbala mingi, ezalaki mpo na kotinda basaleli na ye bábongola motema. Mpo na yango, apesaki nzela ete bapaya bábebisa Samaria na mobu 740 L.T.B. mpe Yerusaleme na mobu 607 L.T.B. Makambo oyo Nzambe asakolaki ekokisamaki, kasi na nsima apesaki nzela ete baoyo babongolaki motema bázonga lisusu na mabele na bango. Ya solo, mikanda yango, ezali komonisa polele ete Nzambe alimbisaka na bolingo nyonso mpe andimaka baoyo batiki masumu mpe bazongi epai na ye. (Habakuku 3:13; Sefania 2:2, 3) Yango etindaki Mika asakola ete: “Nani azali Nzambe lokola yo, oyo alimbisaka libunga mpe abosanaka kobuka mibeko ya bato ya libula na ye oyo batikali? Akokanga mpenza nkanda na ye libela te, mpo asepelaka na motema boboto.” (Mika 7:18; Yoele 2:13; Zekaria 1:4) Kokokisama ya esakweli endimisi likambo yango.

21. (a) Basakoli 12 balobaki nini na ntina na Masiya? (b) Bisakweli nini etali Masiya esepelisi yo?

21 Kutu, Yehova azwaki ebongiseli mpo masumu elimbisama libela na libela, asakolaki koya ya Masiya, oyo asengelaki kopesa bomoi na ye lokola “lisiko oyo ekokani” mpo na bato ya masumu. (1 Timote 2:6) Amose alobelaki ndenge Masiya, mwana ya Davidi akobongisa makambo. (Amose 9:11, 12; Misala 15:15-19) Kutu, Mika amonisaki polele esika mpenza oyo Yesu asengelaki kobotama, ye oyo asengelaki komema matomba epai ya baoyo nyonso bakomonisa kondima na mbeka na ye. (Mika 5:2) Mpe Zekaria alobaki na ntina na Yesu “Etape,” oyo asengelaki ‘kofanda mpenza mpe koyangela na kiti na ye ya bokonzi.’ (Zekaria 3:8; 6:12, 13; Luka 1:32, 33) Na ntembe te, kondima na yo ekokóma mpenza makasi soki otaleli mingi ya bisakweli yango.—Talá etanda “Bisakweli minene oyo elobeli Masiya.”

22. Ndenge nini makambo oyo basakoli 12 balobi mpo na Nzambe ekómisi makasi elikya na yo epai ya Yehova?

22 Ntango ozali kotánga nsango ya basakoli 12, kondima na yo na kolonga oyo Nzambe akolonga mpo na mbala ya nsuka ekokóma makasi. Yehova akokɔtela biso, mpe akozongisa bosembo ya solosolo. Liloba ya Nzambe ekoumela. Abosanaka te bilaka oyo apesaka bato na ye, amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye, mpe asikolaka bango na mabɔkɔ ya banyokoli na bango nyonso. (Mika 7:8-10; Sefania 2:6, 7) Yehova abongwani te. (Malaki 3:6) Ezali mpenza esengo koyeba ete ezali na eloko moko te oyo ekoki kopekisa ye akokisa mokano na ye! Ntango alobi ete mokolo na ye ya kosambisa ekoya, ekoya mpenza. Yango wana, tókoba kosɛnzɛla mpo na mokolo ya Yehova! “Yehova akokóma mpenza mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo yango Yehova akozala moko, mpe nkombo na ye moko.” (Zekaria 14:9) Asakolaki yango; akokokisa yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na sanza ya Novɛmbɛ 2002, liboso etumba ya Irak ebanda, profɛsɛrɛ Dan Cruickshank akendaki kotala Irak. Na emisyo moko ya televizyo na BBC, alobaki boye: “Likoló mpenza ya engumba Mossoul, nde esika Ninive, engumba moko monene oyo ebebá ezalaki—Bato ya arkeoloji ya Angleterre, bakundolaki engumba yango nzela moko na engumba Nimrud na bambula ya 1840. . . . Kokende kotala bingumba wana ya Asiri esalisi mpo na koyeba engumba wana oyo ebungá kala, oyo toyebaki yango kaka na masolo mokuse oyo Biblia elobeli oyo ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanga ntina na yango, mpe ezali ya lokumu te.”

NDENGE NINI KONDIMA NA YO ELENDISAMI

• na nguya monene ya Yehova?—Yoele 1:15.

• ndenge Yehova aponaka bilongi te?—Zekaria 8:23.

• na ndimbola ya ntina mingi ya nkombo ya Nzambe?—Mika 5:4.

NDENGE NINI OKOKI KOKOLISA BOYOKANI NA NZAMBE

• na kokanisa na mozindo na likoki oyo azali na yango ya kokokisa bilaka na ye?—Yoele 2:11.

• na kotalela bolingo mpe motema boboto na ye?—Hosea 11:4; 14:4; Sefania 3:17.

• na kokanisa na mozindo na motema mawa na ye mpe ndenge alimbisaka?—Hosea 2:23; Mika 7:18.

[Etanda na lokasa 45]

YEHOVA MOZWI-YA-NGUYA-NYONSO

Na Ebre, moko ya batitre oyo epesami mpo na Nzambe ezali Shadday, to “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Liloba yango esalelami mbala moko na mikanda 12 ya basakoli, na Yoele 1:15. Bato mosusu bakanisaka ete ndimbola na yango ya libosoliboso ezali “kozala na nguya” to “kosala na nguya.” Maloba ‘Yehova ya mampinga,’ oyo ekokani na yango, esalelami mbala 107 na mikanda ya basakoli 12. Mpo na kokokisa mokano moko, esɛngaka kozala na makasi to nguya. Emonisaka mpe kolonga mikakatano to botɛmɛli. Yehova azali na nguya oyo eleki nyonso mosusu mpo na kokokisa mokano na ye, kokokisa makambo oyo alobi.

[Etanda/Elilingi na lokasa 55]

BISAKWELI MINENE OYO ELOBELI MASIYA

Esakweli Mokapo Kokokisama

Akobotama na Beteleme Mika 5:2 Luka 2:4-11;

Yoane 7:42

Akobengama longwa Hosea 11:1 Matai 2:14, 15

na Ezipito

Akokɔta na Yerusaleme Zekaria 9:9 Matai 21:1-9;

likoló ya mpunda Yoane 12:12-15

Akotɛkama na palata 30 Zekaria 11:12 Matai 26:15; 27:3-10

Mobateli ya mpate Zekaria 13:7 Matai 26:31, 56

akobɛtama, etonga ekopanzana

Akotɔbɔlama ntango Zekaria 12:10 Matai 27:49;

azali likoló ya nzete Yoane 19:34, 37

Na nkunda mikolo Yona 1:17; 2:10 Matai 12:39, 40; 16:21;

misato, mpe na nsima akosekwa 1 Bakorinti 15:3-8

[Elilingi na lokasa 48]

Ninive emonanaki lokola nde ekokwea te, kasi ndenge nini esakweli ya Yehova ekokisamaki?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto