Mokanda ya lisangani ya Mikóló-Bakambi
Epai na yo moto oyo olingaka Yehova:
Yesu alobaki maloba oyo ezali kolendisa mpenza: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Moto akoki koyeba solo ata na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ oyo ezali mikolo ya mabe mpe etondi na lokuta. (2 Timote 3:1) Oyebi lisusu ntango oyebaki solo ya Liloba ya Nzambe? Ezalaki mpenza likambo ya esengo!
Atako ezali na ntina mingi tóyeba solo ya Biblia mpe tósakolaka yango epai ya bato mosusu, ezali mpe na ntina tózala na etamboli oyo eyokani na solo yango. Mpo na yango, tosengeli kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Yango elingi koloba nini? Likambo moko Yesu alobaki na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele ezali kopesa eyano na motuna yango. Ayebisaki bantoma na ye ya sembo boye: “Soki botosi mitindo na ngai, bokotikala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.”—Yoane 15:10.
Tomoni ete mpo Yesu atikala na kati ya bolingo ya Nzambe, atosaki mitindo ya Tata na ye. Biso mpe tosengeli kosala bongo. Mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli kosalela mateya ya solo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na butu wana, Yesu alobaki lisusu boye: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.”—Yoane 13:17.
Tozali mpenza na elikya ete buku oyo ekosalisa yo okoba kosalela mateya ya solo na bomoi na yo, mpe na ndenge yango, okotikala na kati ya “bolingo ya Nzambe . . . mpo na bomoi ya seko.”—Yuda 21.
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova