Loyembo 1
Bizaleli ya Yehova
Ya Papye
1. Oleki na Nguya yo Nzambe
Opesaka bomoi ná pole.
Misal’emonisi Nguya na yo;
Bakoyeba yango seko.
2. Kiti na yo eza’ bosembo.
Oyebisi mibeko ya sembo.
Tofungwami miso na Liloba
Bwanya na yo ez’ongɛnga.
3. Bolingo na yo nde monene.
Makabo na yo eza’ ebele.
Nkombo na yo, bizaleli na yo,
Tósakola mpenza yango.