Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fg liteya 1 mituna 1-3
  • Nsango malamu ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu ezali nini?
  • Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini koyekola epai ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
fg liteya 1 mituna 1-3

LITEYA 1

Nsango malamu ezali nini?

1. Nsango nini euti na Nzambe?

Bato bazali kosepela na bomoi na mabele

Nzambe alingi ete bato básepela na bomoi awa na mabele. Asalaki mabele mpe biloko nyonso oyo ezali na mabele mpo alingaka bato. Mosika te, akosala likambo moko mpo bato ya mikili nyonso bázala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Akolongola makambo oyo enyokolaka bato.​—Tángá Yirimia 29:11.

Guvɛrnema moko te elongi kosilisa mobulu, maladi, to liwa. Atako bongo, ezali na nsango moko ya malamu. Mosika te, Nzambe akolongola baguvɛrnema ya bato, mpe na esika na yango, akotya oyo ya ye moko. Bato oyo guvɛrnema ya Nzambe ekoyangela bakozala na kimya mpe na nzoto kolɔngɔnɔ.​—Tángá Yisaya 25:8; 33:24; Danyele 2:44.

2. Mpo na nini bato basengeli koyoka nsango malamu sikoyo?

Mabe ekosila kaka ntango Nzambe akolongola bato nyonso ya mabe na mabele. (Sefania 2:3) Yango ekosalema ntango nini? Liloba ya Nzambe esakolá banda kala makambo oyo ezali konyokola bato lelo oyo. Makambo mabe oyo ezali kosalema lelo emonisi ete etikali moke, Nzambe atya nsuka na mokili oyo.​—Tángá 2 Timote 3:1-5.

3. Tosengeli kosala nini?

Tosengeli koyekola makambo ya Nzambe na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Buku yango ezali lokola mokanda oyo tata ya bolingo akomeli biso. Ezali koyebisa biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu lelo oyo mpe ndenge ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele na mikolo ezali koya. Toboyi te, bato mosusu bakoki kosepela te ete oyekola Biblia. Kasi, lokola Nzambe alaki biso bomoi malamu na mikolo ezali koya, tosengeli te kotikela bato mosusu nzela bápekisa biso koyekola Biblia.​—Tángá Masese 29:25; Emoniseli 14:6, 7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto