Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 57 lok. 138-lok. 139 par. 1
  • Yehova atindi Yirimia asakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova atindi Yirimia asakola
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova
    Teyá bana na yo
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 57 lok. 138-lok. 139 par. 1
Yirimia azali kobukabka elokó ya mabele ya moyemi-mbɛki liboso ya bankumu

LITEYA 57

Yehova atindi Yirimia asakola

Yehova aponaki Yirimia azala mosakoli ya bato ya Yuda. Ayebisaki ye akebisa bango mpo batika kosala makambo ya mabe. Kasi Yirimia alobaki: ‘Yehova, nazali kaka mwana. Nayebi ndenge ya koloba na bato yango te.’ Yehova ayebisaki ye: ‘Kobanga te. Nakoyebisa yo makambo oyo okoloba. Nakosalisa yo.’

Yehova ayebisaki Yirimia ayanganisa bankulutu, abukabuka elokó ya mabele ya moyemi-mbɛki liboso na bango, mpe aloba: ‘Yerusaleme ekobukama kaka boye.’ Ntango Yirimia asalaki ndenge Yehova alobaki, mikóló basilikaki makasi. Nganga-nzambe moko na nkombo Pashure abɛtaki Yirimia mpe akɔtisaki ye na bikanga-makolo basalá na libaya. Butu mobimba, Yirimia akokaki koningana te. Pashure abimisaki ye na ntɔngɔ. Yirimia alobaki: ‘Nakokoka lisusu boye te. Nakotika kosakola.’ Kasi, atikaki mpenza? Te. Ntango Yirimia akanisaki lisusu mwa moke, alobaki: ‘Nsango ya Yehova ezali kopela lokola mɔtɔ na kati na ngai. Nakoki kotika kosakola te.’ Na yango, akobaki kokebisa bato.

Bambula elekaki mpe Yuda ezwaki mokonzi ya sika. Banganga-nzambe ná basakoli ya lokuta bazalaki kosepela na nsango ya Yirimia te. Bayebisaki bankumu: ‘Moto oyo abongi na liwa.’ Kasi Yirimia alobaki: ‘Soki bobomi ngai, bokoboma ngai kaka mpamba. Makambo oyo nazali koloba ezali ya Yehova, ezali ya ngai te.’ Ntango bankumu yango bayokaki bongo, balobaki: ‘Ebongi te koboma moto oyo.’

Yirimia akobaki kosakola, mpe bankumu bayokaki nkanda makasi. Basɛngaki mokonzi aboma Yirimia. Mokonzi ayebisaki bango básala ye nyonso oyo balingi. Bazwaki Yirimia mpe babwakaki ye na libulu moko mozindo ya pɔtɔpɔtɔ, na elikya ete akokufa kuna. Yirimia abandaki kozinda na kati ya pɔtɔpɔtɔ yango.

Ebede-meleke ná bato oyo bazalaki na ye bazali kobimisa Yirimia na libulu

Na nsima, kapita moko ya ndako ya mokonzi na nkombo Ebede-meleke ayaki koyebisa mokonzi ete: ‘Bankumu babwaki Yirimia na libulu! Soki totiki ye kuna, akokufa.’ Mokonzi ayebisaki Ebede-meleke akende elongo na mibali 30 kobimisa Yirimia na libulu yango. Omoni te ete tosengeli kolanda ndakisa ya Yirimia, oyo atikaki eloko moko te epekisa ye kosakola?

“Mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka, akobika.”​—Matai 10:22

Mituna: Mpo na nini Yirimia atosaki Yehova, ata ntango azalaki elenge? Banani balukaki kopekisa Yirimia kosakola?

Yirimia 1:1-19; 19:1-11; 20:1-13; 25:8-11; 26:7-16; 38:1-13

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto