Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 95 lok. 222-lok. 223 par. 1
  • Eloko moko te ekokaki kopekisa bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eloko moko te ekokaki kopekisa bango
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Anzelu abikisi bango
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • ‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Jéhovah azali Mokonzi na biso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 95 lok. 222-lok. 223 par. 1
Petro ná Yoane bazali kosakola na mpiko atako banganga-nzambe ná basadukai bazali kotɛmɛla bango

LITEYA 95

Eloko moko te ekokaki kopekisa bango

Mokolo na mokolo, mobali moko oyo azalaki makolo ebukaná azalaki kofanda na porte ya tempelo mpo na kosɛnga. Mokolo moko nsima ya midi, amonaki Petro ná Yoane bayei na tempelo. Alobaki na bango: ‘Bókabela ngai mwa eloko.’ Petro ayebisaki ye ete: ‘Eloko oyo nakoki kopesa yo eleki mbongo. Na nkombo ya Yesu, tɛlɛmá mpe tambolá!’ Bongo, Petro asalisaki ye atɛlɛma, mpe mobali yango abandaki kotambola! Ebele ya bato basepelaki mingi mpo na likamwisi yango mpe bato mingi lisusu bakómaki bandimi.

Kasi, banganga-nzambe mpe Basadukai basilikaki. Bakangaki bantoma, bamemaki bango na tribinale, mpe batunaki bango boye: ‘Nani apesaki bino nguya mpo bóbikisa mobali wana?’ Petro ayebisaki bango ete: ‘Nguya yango euti epai ya Yesu Kristo, mobali oyo bobomaki.’ Bakonzi yango ya mangomba bagangaki: ‘Bótika kolobela Yesu!’ Kasi bantoma balobaki: ‘Tokolobela ye kaka. Tokotika te.’

Ntango batikaki Petro ná Yoane, bakendaki epai ya bayekoli mosusu mpe bayebisaki bango makambo oyo esalemaki. Babondelaki elongo mpe basɛngaki Yehova ete: ‘Tobondeli yo opesa biso mpiko mpo tókoba kosala mosala na yo.’ Yehova apesaki bango elimo santu, mpe bakobaki kosakola mpe kobikisa bato. Bato mosusu ebele bakómaki bandimi. Basadukai bayokaki zuwa mpe bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na bolɔkɔ. Kasi na butu, Yehova atindaki anzelu, mpe afungolaki baporte ya bolɔkɔ mpe ayebisaki bantoma: ‘Bókende na tempelo koteya bato.’

Na ntɔngɔntɔngɔ, bayebisaki Sanedrina, oyo ezalaki tribinale ya bakonzi ya mangomba ete: ‘Baporte ya bolɔkɔ ekangamá, kasi mibali oyo bokangaki bazali te! Bazali na tempelo mpe bazali koteya bato!’ Bakangaki lisusu bantoma mpe bamemaki bango na Sanedrina. Nganga-nzambe monene alobaki na bango: ‘Topekisaki bino bólobela Yesu!’ Kasi Petro alobaki: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”

Bakonzi ya mangomba basilikaki makasi mpe balingaki koboma bantoma. Kasi, Mofarisai moko na nkombo Gamaliele atɛlɛmaki mpe alobaki: ‘Bókeba! Ntango mosusu Nzambe azali na mibali oyo. Bolingi mpenza kobundisa Nzambe?’ Bayokaki toli na ye. Nsima ya kobɛta bantoma fimbo, bapesaki bango mitindo lisusu ete bátika kosakola, mpe batikaki bango bákende. Kasi, likambo wana epekisaki bantoma te. Bakobaki kosakola nsango malamu na mpiko, na tempelo mpe na ndako na ndako.

“Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29

Mituna: Mpo na nini bantoma batikaki kosakola te? Ndenge nini Yehova asalisaki bango?

Misala 3:1–4:31; 5:12-42

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto