Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 103 lok. 238-lok. 239 par. 2
  • “Bokonzi na yo eya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bokonzi na yo eya”
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bomoi ya mpasi ebandi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Etikali moke Nzambe akokisa mokano na ye mpo na mabelé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 103 lok. 238-lok. 239 par. 2
Mikóló mpe bana na Paradiso

LITEYA 103

“Bokonzi na yo eya”

Yehova alakaki ete: ‘Koganga, mpasi, maladi mpe liwa ekozala lisusu te. Nakopangwisa mai ya miso nyonso na miso na bango. Bato bakobosana makambo nyonso ya mabe.’

Yehova atyaki Adama ná Eva na elanga ya Edene mpo bázala na kimya mpe na esengo. Basengelaki kosambela Tata na bango ya likoló mpe kobota bana mpo na kotondisa mabele. Adama ná Eva batosaki Yehova te, kasi mokano na ye ebongwani te. Na buku oyo, tomoni ete likambo nyonso oyo Nzambe alaki ekokisamaka. Bokonzi na ye ekomema mapamboli kitoko mpenza na mabele, kaka ndenge alakaki Abrahama.

Mikóló, bana mpe banyama ya zamba bafandi esika moko na Paradiso

Mosika te, Satana, bademo na ye ná bato nyonso ya mabe bakobomama. Bato nyonso bakosambela Yehova. Tokobɛla lisusu te mpe tokokufa te. Kutu, mikolo nyonso tokobanda kolamuka na nzoto makasi mpe na esengo. Mabele ekokóma paradiso. Bato nyonso bakolya malamu mpe bakozala na bandako oyo ebongi. Bato bakozala na boboto, kasi te na nko to mobulu. Banyama ya zamba bakobanga biso te, biso mpe tokobanga bango te.

Ekozala esengo mingi ntango Yehova akobanda kosekwisa bato. Tokoyamba bato ya kala, lokola Abele, Noa, Abrahama, Sara, Moize, Ruta, Estere mpe Davidi. Tokosala na bango elongo mpo na kokómisa mabele paradiso. Tokozala ntango nyonso na makambo mingi ya kosala.

Yehova alingi ozala kuna. Okoyekola koyeba ye na ndenge oyo okanisaki te. Tókoba kopusana penepene na Yehova mokolo na mokolo, lelo oyo mpe libela na libela!

“Yehova, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso.”​—Emoniseli 4:11

Mituna: Makambo nini Bokonzi ya Nzambe ekosala na mabele? Na bato nyonso oyo otángi na buku oyo, okosepela komona banani na Paradiso?

Emoniseli 21:3, 4; Yobo 33:25; Masese 2:21, 22; Yisaya 11:2-10; 33:24; 65:21; Matai 6:9, 10; Yoane 5:28, 29; 17:3

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto