Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 5
  • Bomoi ya mpasi ebandi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ya mpasi ebandi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Babengani bango na Edene
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Adama ná Eva batosaki Nzambe te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 5

Lisolo 5

Bomoi ya mpasi ebandi

NTANGO Adama ná Eva batiki elanga ya Edene, kuna na libándá bakutanaki na mikakatano ebele. Basengelaki kosala makasi mpo na kozwa bilei. Na esika ya komona banzete ya mbuma ya kitoko, bakómaki komona nde banzete ya nzubɛ na esika bazali. Yango nde makambo ekómelaki Adama ná Eva lokola batosaki Nzambe te, mpe bazalaki lisusu baninga na Ye te.

Likambo ya mabe koleka, Adama ná Eva bazalaki lisusu na likoki ya kozala na bomoi libela te. Kobosana te ete Nzambe akebisaki bango ete, soki balei mbuma ya nzete oyo apekisaki, bakokufa. Na yango, banda mokolo oyo balyaki mbuma yango, babandaki kokóma bampaka, mpe nsukansuka bakufaki. Talá bozoba ya koboya kotosa Nzambe!

Adama ná Eva babandaki kobota bana nde nsima ya ntango oyo Nzambe abenganaki bango na elanga ya Edene. Yango elimboli ete bana na bango mpe basengelaki kokóma bampaka mpe kokufa.

Soki Adama ná Eva bátosa Yehova, mbɛlɛ bazalaki na bomoi ya esengo elongo na bana na bango! Mbɛlɛ bakokaki kozala na bomoi libela na esengo awa na mabele. Mbɛlɛ moto moko akokaki kokóma mpaka te, kokufa mpe te.

Mokano ya Nzambe ezali ete bato bázala na bomoi ya esengo mpe ya seko mpe alaki ete mokolo mosusu ekozala bongo. Mabele ekokóma paradiso mpe bato nyonso bakozala na nzoto malamu. Bato nyonso bakozala baninga ya malamu mpe bango nyonso bakozala baninga ya Nzambe.

Kasi Eva azalaki lisusu moninga ya Nzambe te. Yango ememelaki ye mpasi. Akómaki kobota bana na mpasi makasi. Kozanga kotosa Yehova ememelaki ye mawa mingi.

Adama ná Eva babotaki bana ebele, ya mibali mpe ya basi. Ntango babotaki mwana ya liboso, bapesaki ye nkombo Kaina. Mpe mwana ya mibale bapesaki ye nkombo Abele. Oyebi likambo oyo ekómelaki bango?

Ebandeli 3:16-23; 4:1, 2; Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto