Sanza ya 2
Mwaminei, 1 sanza ya 2
Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba.—Yak. 1:4.
Ndenge nini ezaleli ya koyika mpiko ekoki ‘kosala mosala’ na yango mobimba epai na biso? Ntango tokutani na komekama, tokoki komona ete tosengeli komonisa lisusu motema molai, botɔndi, to bolingo. Ntango tozali koyikela komekama mpiko, tokoyekola komonisa bizaleli yango lisusu mingi, mpe na ndenge yango, tokobongisa lisusu bomoto na biso ya bokristo. Lokola ezaleli ya koyika mpiko ekoki kosalisa biso tókóma bakristo ya malamu koleka, tokolinga te kobuka mibeko ya Yehova kaka mpo tótya nsuka na komekama na biso. Na ndakisa, soki ozali kobunda na makanisi ya mbindo, komitika te ete okwea na komekama! Sɛngá Yehova asalisa yo obengana makanisi wana ya mabe. Ezali na moto moko ya libota na yo oyo azali kotɛmɛla yo? Soki ezali bongo, kolɛmba te! Zalá na ekateli ya kokoba kosalela Yehova. Kobosana likambo oyo te: Mpo Nzambe andima biso, tosengeli koyika mpiko.—Rom. 5:3-5; Yak. 1:12. w16.04 2:15, 16
Mwamitano, 2 sanza ya 2
Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.—Flp. 2:3.
Toyebi ete Yehova amonaka te ete moto moko aleki basusu to etuluku moko ya bato ezali malamu koleka mosusu. Na miso na ye, biso nyonso tozali ndenge moko. Ya solo, Yehova asalá biso nyonso ndenge moko te, mpe tosengeli kosepela na bokeseni wana. Alingi mpe te ete tótika mimeseno na biso. Kasi, alingi te tókanisa ete toleki basusu. (Rom. 10:12) Tosengeli soki moke te kozala na lolendo mpo na ekólo to mboka na biso mpe kokanisa ete eleki mosusu. Soki tokanisaka ndenge wana, ekoki kozala mpasi mingi tóboya kokɔta na makambo ya mokili. Likambo yango esalemaki na siɛklɛ ya liboso. Bandeko mosusu Baebre basalelaki bandeko basi Bagrɛki oyo mibali na bango bakufá makambo na bosembo te. (Mis. 6:1) Ndenge nini tokoki koyeba soki tobandi kokolisa lolendo ya ndenge wana? Soki ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo autá mboka mosusu apesi yo toli, okanisaka mbala moko ete: ‘Ndenge oyo biso tosalaka awa ezali malamu,’ na nsima oboyaka likanisi na ye? Soki osalaka bongo, kanisá toli oyo ya ntina mingi oyo ezali na maloba ya mokapo ya lelo. w16.04 4:12, 13
Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 2
Nasengeli . . . kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Luka 4:43.
Yesu asakolaki “nsango malamu ya Bokonzi,” mpe alingi ete bayekoli na ye básala mpe bongo. Banani bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato nyonso? (Mat. 28:19) Ezali kaka Batatoli ya Yehova! Yoká likambo oyo sango moko oyo asalaki mosala ya misionɛrɛ na bikólo ndenge na ndenge ayebisaki Motatoli ya Yehova moko. Na ekólo mokomoko, sango yango atunaki Batatoli ya Yehova nsango nini bazali kosakola. Sango yango alobi ete: “Bango nyonso bazalaki bazoba, yango wana bazalaki kopesa kaka eyano moko: ‘Nsango malamu ya Bokonzi.’” Maloba ya sango yango emonisi ete tozali bazoba te, kasi tozali na bomoko mpo tozali bakristo ya solo. (1 Ko. 1:10) Bokonzi ya Nzambe ezali mpe nsango ya libosoliboso oyo ezalaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Na mwayene, tobimisaka zulunalo yango pene na 59 000 000 na minɔkɔ 254; yango esali ete ezala zulunalo oyo ekabolamaka mingi koleka bazulunalo mosusu nyonso na mokili! w16.05 2:6
Mwalomingo, 4 sanza ya 2
Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye.—2 Ko. 9:7.
Mbala mosusu, ozali na mposa ya kokóma mobongisi-nzela. Osilá kobongola makambo mosusu na bomoi na yo mpo olekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Kasi oyebi te soki okozala mpenza na esengo na mbongo moke mpe na biloko moke. Biblia elobi te ete mpo na kosalela Yehova, esengeli kaka kozala mobongisi-nzela. Tokoki kokoba kosalela ye na bosembo lokola mosakoli. Kasi, kobosana likambo oyo te: Yesu alobaki ete Yehova apambolaka baoyo bandimaka komipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi. (Luka 18:29, 30) Biblia elobi mpe ete Yehova asepelaka soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kokumisa ye, mpe alingaka ete tózala na esengo ntango tozali kosalela ye. (Nz. 119:108) Soki tozali kobondela mpo na makambo wana mpe komanyola na yango, tokoki kozwa ekateli oyo ebongi, na kotalela likambo oyo tozali na yango, mpe ndenge oyo Yehova akopambola. w16.05 3:13
Mwayambo, 5 sanza ya 2
Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo, liboso mikolo ya mpasi eya.—Mos. 12:1.
Bakristo ya mikóló basengeli te koboya kotánga mikanda na biso oyo elobeli bilenge mpo bakanisi ete ebongi na bango te. Mikakatano mingi oyo balobelaka na masolo yango etalelaka bakristo nyonso. Na ndakisa, biso nyonso tosengeli kolobela bindimeli na biso, koyeba komipekisa, koboya makanisi mabe ya baninga, koboya baninga mabe mpe kominanola ya mabe. Na yango, ata soki mikanda yango ekomamaki mpo na bilenge, makambo oyo ezali na kati euti na Biblia, mpe bakristo nyonso bakoki kozwela yango matomba. Mikanda oyo ekomami mpo na bilenge ekoki mpe kosalisa bango bákómisa makasi boninga na bango na Yehova. Mikóló mpe bakoki kozwela yango matomba.—Mos. 12:13. w16.05 5:15, 16
Mwamibale, 6 sanza ya 2
Yoká, Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko. Mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso ya bomoi.—Mib. 6:4, 5.
“Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” Maloba wana ezali mpenza na nguya! Kokundwela Bayisraele bongo epesaki bango makasi ya koyikela mikakatano mpiko ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka mpe bazwaki yango. Maloba yango ekoki mpe kopesa biso makasi mpo tókoka kokatisa bolɔzi monene mpe tópesa mabɔkɔ na kokómisa mabele Paradiso na mikolo ezali koya. Tiká tókoba kokangama kaka na Yehova. Tosengeli kolinga ye mpe kosalela ye na motema na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso, na makasi na biso nyonso, mpe tosengeli kosala makasi tóbatela kimya mpe bomoko elongo na bandeko na biso. Soki tokobi kosala makambo wana, Yesu akotalela biso lokola bampate mpe tokomona kokokisama ya maloba na ye oyo: “Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.”—Mat. 25:34. w16.06 3:2, 20
Mwamisato, 7 sanza ya 2
Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso.—Yir. 17:9.
Lolendo ekoki kotinda biso tóluka kolongisa etamboli na biso ya mabe. Esilá kokómela yo ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko azokisa yo? Esilá kokómela yo osila esengo mpo obungisi mokumba moko? Osalaki nini? Okómaki na lolendo, to omonaki nde ete kozongisa kimya na ndeko mpe kokoba kozala sembo epai ya Yehova eleki ntina? (Nz. 119:165; Kol. 3:13) Soki moto azali kokoba kosala masumu, ata mpe kobomba mabe oyo azali kosala, ekoki kozala mpasi moto yango andima toli ya Nzambe. Na nsima, ekozala mpasi te asala masumu mosusu. (Mos. 8:11) Ndeko mobali moko oyo, na boumeli ya mwa ntango, akómaki na momeseno ya kotala pornografi, alobaki boye: “Nakómaki koloba mabe mpo na bankulutu.” Momeseno na ye wana ebebisaki boyokani na ye ná Yehova. Ntango basusu bayebaki makambo oyo azalaki kosala, kaka bankulutu nde basalisaki ye. Toyebi ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi, soki tokómi koloba mabe mpo na baoyo bapesi biso toli to soki tozali koluka komilongisa ntango tosali likambo moko ya mabe, na esika ya kosɛnga Nzambe alimbisa biso mpe asalisa biso, motema na biso ekoki kokóma makasi. w16.06 2:5, 6
Mwaminei, 8 sanza ya 2
Bótika komitungisa mpo na milimo na bino.—Mat. 6:25.
Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki komitungisa mpo na biloko oyo basengelaki kolya, komɛla, mpe kolata, yango wana na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alingaki kosalisa bango báyeba ntina oyo basengeli te komitungisa mpo na biloko wana nyonso. Ayebaki ete soki bamitungisi mingi, ata mpo na biloko oyo basengelaki na yango mpenza, bakokaki kobosana makambo oyo eleki ntina na bomoi. Yesu azalaki mpenza kotyela bayekoli na ye likebi, yango wana na lisolo na ye likoló ya ngomba, akebisaki bango koleka mbala minei mpo na likama yango. (Mat. 6:27, 28, 31, 34) Yesu ayebaki biloko oyo bato basengeli na yango. Ayebaki ete na “mikolo ya nsuka,” bayekoli na ye bakobika na ntango moko ya mpasi mpenza. (2 Tim. 3:1) Kutu, lelo oyo, bato mingi bakoki te kozwa mosala, mpe biloko ezali kokoba komata ntalo. Na bisika mingi, bato bazali mpenza babola mpe bazali kaka na biloko moke to bazangi biloko ya kolya. Kasi Yesu ayebaki mpe ete bomoi ya moto ezali na ntina mingi koleka bilei mpe nzoto eleki bilamba na motuya. w16.07 1:8, 9
Mwamitano, 9 sanza ya 2
Nakómaki mosaleli na yango na kotalela likabo ya ofele ya boboto monene ya Nzambe.—Ef. 3:7.
Lokola tokoki te kotosa Yehova na ndenge ya kokoka, tobongi te na boboto monene na ye. Kutu, tobongi nde na liwa. Mokonzi Salomo alobaki: “Ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.” (Mos. 7:20) Na nsima, ntoma Paulo alobaki: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te,” mpe “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Rom. 3:23; 6:23a) Lokola Yehova alingaka bato mingi, atindaki “Mwana na ye se moko oyo abotamaki” mpo akufela biso. Yango ezalaki likambo eleki monene ya boboto monene na ye. (Yoa. 3:16) Ntoma Paulo alobaki ete Yesu “alati motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo anyokwamaki mpe akufaki, mpo, na nzela ya boboto monene ya Nzambe, akufela moto nyonso.” (Ebr. 2:9) Ya solo, “likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”—Rom. 6:23b. w16.07 3:3, 4
Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 2
Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.—Eba. 2:18.
Kobala ezali mabe te. Kasi ndenge nini libala ebandaki, mpe mokano na yango ezali nini? Koyeba yango ekosalisa biso tótalela libala mpe mapamboli na yango na ndenge ya malamu. Nzambe akelaki Adama, mobali ya liboso, mpe apesaki ye mokumba ya kopesa banyama nkombo. Adama amonaki ete banyama nyonso ezalaki mwasi ná mobali, “kasi mosungi oyo abongi na moto amonanaki te.” Yango wana, Yehova alalisaki Adama mpɔngi makasi, azwaki mokuwa moko ya mopanzi na ye mpe na mokuwa yango asalaki mwasi. Amemaki mwasi yango epai ya Adama, mpe akómaki mwasi na ye. (Eba. 2:20-24) Ndenge tomoni yango, libala ezali likabo oyo eutá epai ya Yehova. Bambula mingi na nsima, Yesu azongelaki maloba oyo Yehova alobaki na elanga ya Edene: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.” (Mat. 19:4, 5) Lokola Nzambe azwaki mokuwa ya mopanzi ya Adama mpo na kokela mwasi ya liboso, na ntembe te mwasi ná mobali yango bamonaki ete bazali lokola patalo ná mokaba. Yehova alingaki ata moke te ete mobali ná mwasi báboma libala, ete mobali abala basi ebele, to mwasi azala na mibali ebele. w16.08 1:1, 2
Mwalomingo, 11 sanza ya 2
[Yesu] alongwaki kuna akei koteya mpe kosakola na bingumba na bango.—Mat. 11:1.
Yesu azalaki ntango nyonso te koteya ebele ya bato. Mbala mingi, azalaki kosolola na moto mokomoko, mpe azalaki kosala yango na boboto. Na ndakisa, asololaki lisolo moko ya malamu ná mwasi moko oyo ayaki kotoka mai na libulu moko pene na engumba Sikare. (Yoa. 4:5-30) Yesu asololaki mpe na Matai Levi, oyo azalaki mokɔngɔli-mpako, mpe abengaki ye akóma moyekoli na ye. Matai andimaki kolanda ye mpe na nsima abengisaki Yesu ná bato mosusu na ndako na ye mpo na kolya. Kuna, Yesu ateyaki bato ebele. (Mat. 9:9; Luka 5:27-39) Yesu asololaki mpe na Natanaele na boboto, atako Natanaele alobaki mabe mpo na bato ya Nazarete. Lokola Yesu asololaki na ye na boboto, Natanaele abongolaki ndenge na ye ya kotalela Yesu, oyo azalaki moto ya Nazarete. Mpe Natanaele alingaki Yesu ayebisa ye makambo mosusu. (Yoa. 1:46-51) Ndakisa ya Yesu eteyi biso ete soki tozali kosolola na bato na boboto, bakosepela mpenza koyoka biso. Soki topesi bato ya sika formasyo mpo bálobaka ndenge wana, bakosepela lisusu mingi na mosala ya kosakola. w16.08 4:7-9
Mwayambo, 12 sanza ya 2
Mwasi akabwana na mobali na ye te; . . . mpe mobali atika mwasi na ye te.—1 Ko. 7:10, 11.
Ntango babalani bakutani na mikakatano makasi mpe basilisi yango te, basusu bazwaka ekateli ya kokabwana to koboma libala. Babalani mosusu bakoki komona ete mikakatano na bango ezali makasi mingi mpe basengeli kokabwana. Kasi, Yesu amonisaki ete kokabwana ezali likambo ya kozwa na lisɛki te ntango azongelaki makambo oyo Nzambe alobaki na ebandeli mpo na libala, na nsima abakisaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:3-6; Eba. 2:24) Na yango, Yehova alingi ete mibali ná basi na bango bákabwana te. (1 Ko. 7:39) Biso nyonso tosengeli kobosana te ete tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na makambo oyo tosalaka. Koyeba yango ekoki kosalisa biso tósilisaka makambo nokinoki liboso ete ekóma minene. w16.08 2:10, 11
Mwamibale, 13 sanza ya 2
Kotika mabe elonga yo te.—Rom. 12:21.
Tosengeli kozala ekɛngɛ ntango nyonso. Mpo na nini? Mpo banguna na biso bakoki kobundisa biso ntango oyo tozali kokanisa te to ntango tozali na bolɛmbu. Soki tokobi kobundisa mabe, tokoki kolonga! Kasi, soki tozali lisusu ekɛngɛ te mpe totiki kobunda, Satana, mokili na ye, mpe bolɛmbu na biso ekoki kolonga biso. Yango wana, kotika te. Kolɛmba nzoto te mpe kolɛmbisa mabɔkɔ te! (1 Pe. 5:9) Mpo na kolonga, tosengeli kobosana te ntina oyo tozali kobunda. Ezali mpo tolingi ete Nzambe andima biso mpe apambola biso. Baebre 11:6 elobi: “Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” Koluka Yehova na mposa makasi elimboli kosala mpenza makasi soki tolingi ete andima biso.—Mis. 15:17. w16.09 2:4, 5
Mwamisato, 14 sanza ya 2
Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.—1 Ko. 10:31.
Biblia ezali na toli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tópona molato ya malamu oyo ekokumisa Nzambe. Atako bongo, bilamba oyo tolataka emonisaka makambo oyo tosepelaka na yango. Midɛlɛ oyo tolingaka mpe bilamba oyo tosombaka ekoki kokesana na oyo ya basusu. Kasi bilamba na biso esengeli ntango nyonso kozala malamu, pɛto, ya kolekisa ndelo te, oyo ebongi na ntango mpe na esika oyo tozali, mpe endimami na mboka oyo tofandi. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kozwa bilamba ya malamu mpe oyo ebongi. Bamagazini mingi etɛkaka kaka bilamba oyo ezali kolatama mingi. Yango wana, ekoki kosɛnga ntango mingi mpe milende mingi mpo na kozwa jipe oyo ebongi, robɛ oyo ebongi, mpe bluzɛ oyo ebongi, to kopona kazaka mpe patalo oyo ezali kokanga nzoto mingi te. Kasi bandeko bakomona mpe bakosepela na milende oyo tozali kosala mpo na kolata bilamba oyo ezali kitoko mpe oyo ebongi. Mpe esengo oyo tokoyoka mpo toyebi ete tozali kopesa lokumu na Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo eleki mosika makambo oyo tokoki komipimela mpo na kolata na ndenge oyo ezali kokumisa ye. w16.09 3:15, 16
Mwaminei, 15 sanza ya 2
Atandi nɔrdi na esika oyo ezali mpamba, akakisi mabele na eloko moko te.—Yobo 26:7.
Ntango ozali kosalela bandakisa, ozali kotinda bana na yo bákanisa. Yango ekosalisa bango bákanisa liteya oyo ozali koteya bango, bákanga yango malamu, mpe bábosana yango te. Bakosepela mpe koyekola. Okoki kosalela bandakisa mpo na koteya bana na yo ete likambo nyonso oyo Biblia elobaka ezali solo. Na ndakisa, okoki kotánga mokapo ya mokolo ya lelo. Kosuka te na koyebisa bana na yo ete likambo oyo vɛrsɛ yango elobi esengeli kouta kaka epai ya Yehova. Salisá nde bango básalela makoki na bango ya kokanisa. Okoki koloba ete na ntango ya Yobo bato bazalaki te kondima ete mabele esimbami na eloko moko te. Bayebaki ete eloko nyonso, na ndakisa bale to libanga, esengeli kosimbama na eloko mosusu. Na ntango wana, moto moko te apesaki bilembeteli oyo emonisi ete mabele esimbami na eloko moko te, mpo bazalaki te na bamasini lokola téléscope to fize. Liteya yango oyo: Atako Biblia ekomamaki eleki bambula mingi, makambo oyo elobaka ezalaka ntango nyonso solo, mpo eutá epai ya Yehova.—Neh. 9:6. w16.09 5:9, 12
Mwamitano, 16 sanza ya 2
Ozali kondima na motema na yo.—Rom. 10:9.
Soki tondimeli Yehova mpe Yesu, tokosuka kaka te na koyeba makambo oyo basalá mpe oyo bakosala mpo na biso. Tozali mpe na mposa makasi ya kozala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo bateyi biso. Mpe tozali na mposa ya kosalisa basusu báyeba bango. Mpo na kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe, tosengeli kozala na kondima mpe kokoba kobatela kondima yango makasi. Kondima ezali lokola molona. Tosengeli kosopelaka yango mai mpo ezala malamu mpe ekoba kokola. Kasi soki tozali kosopela yango mai mingi te, ekoki kokauka mpe kokufa. Ndenge moko mpe, tosengeli kondimisama ete kondima na biso ezali “makasi” mpe ezali kokoba “kokola.”—Tito 2:2; 2 Tes. 1:3; Luka 22:32; Ebr. 3:12. w16.10 4:4, 5
Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 2
Kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi apesaki bango bankombo mosusu. Bongo apesaki Danyele nkombo Beleteshazare.—Dan. 1:7.
Ntango Danyele ná baninga na ye bazalaki na boombo na Babilone, bato ya Babilone balukaki kotinda bango na makasi bándima mimeseno mpe losambo na bango. Ndenge nini? Bateyaki bango “monɔkɔ ya Bakaladea” mpe bapesaki bango bankombo ya bato ya Babilone. (Dan. 1:3-7) Nkombo oyo bapesaki Danyele eutaki na Bele, nzambe ya libosoliboso ya Babilone. Na yango, ekoki kozala ete mokonzi Nebukadenezare alingaki kotinda Danyele andima ete nzambe ya Babilone aleki Yehova, Nzambe ya Danyele, na nguya. (Dan. 4:8) Na Babilone, bazalaki kopesa Danyele bilei kitoko ya mokonzi. Kasi Danyele “akanaki na motema na ye” ete akobuka mobeko ya Nzambe te. (Dan. 1:8) Lokola akobaki koyekola makomami mosantu, oyo ezalaki na monɔkɔ ya Ebre, akobaki kozala na boyokani malamu ná Yehova, atako azalaki na mboka mopaya. (Dan. 9:2) Kutu, ata nsima ya kosala mbula soki 70 na Babilone, ayebanaki kaka na nkombo na ye ya Ebre, Danyele.—Dan. 5:13. w16.10 2:7, 8
Mwalomingo, 18 sanza ya 2
Esika nyonso oyo elimo elingaki kokende.—Ezk. 1:20.
Bato mosusu bakoki kokanisa ete bazali na mposa te ete moto mosusu alimbolela bango Biblia. Kasi kobanda 1919, Yesu azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe bákanga ntina ya mateya ya Biblia mpe bálanda oyo yango elobi. (Mat. 24:45-47) Soki totosi oyo Biblia elobi, tokobatela lisangá pɛto, tokotya kimya, mpe tokozala na bomoko. Omituna boye: ‘Nakozala sembo epai ya Yesu mpe nakolanda malako ya moombo ya sembo?’ Na nzela ya Biblia, toyebi ete basaleli ya Yehova na likoló mpe babongisami. Na ndakisa, mosakoli Ezekiele amonaki na emonaneli moko Yehova azali kotambwisa likalo moko oyo ekokaki kobaluka mbangu epai nyonso oyo Yehova alingi ete ekende. (Ezk. 1:4-28) Mosika te, Kristo mpe baanzelu bakoboma mokili oyo mabe. Na ntango yango, moto moko te akozanga kokumisa Yehova mpe nkombo na ye to koloba mabe mpo na bokonzi na ye! w16.11 3:9, 10
Mwayambo, 19 sanza ya 2
Tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.—Ebr. 10:25.
Kaka lokola bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso, tosengeli koyekola elongo mpe kolendisana. (1 Ko. 14:31) Ata bandeko oyo basaleli Yehova bambula ebele bazalaka na mposa ete bálendisaka bango. Tózwa ndakisa ya Yosua. Ntango Bayisraele bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova aponaki Yosua mpo na kokamba bango. Kasi, Yehova ayebisaki Moize alendisa Yosua atako asalelaki Yehova bambula ebele. Yehova alobaki: “Pesá Yosua mokumba mpe yikisá ye mpiko mpe lendisá ye, mpamba te ye nde akokatisa liboso ya bato oyo mpe ye nde akosala ete bázwa lokola libula mokili oyo okomona.” (Mib. 3:27, 28) Yosua azalaki na mposa bálendisa ye, mpo na nsima ekólo Yisraele esengelaki kobunda bitumba ebele; mpe balongaki te na bitumba yango mosusu. (Yos. 7:1-9) Lelo oyo, tokoki kolendisa bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga, oyo bazali kosala mosala makasi mpo na kobatela basaleli ya Nzambe.—1 Tes. 5:12, 13. w16.11 1:12, 13
Mwamibale, 20 sanza ya 2
Nalakisa yo lisambisi ya mwasi ya ndumba monene oyo afandi na mai mingi.—Em. 17:1.
Bayekoli ya Biblia basosolaki ete basengelaki kosuka kaka te na koyebisa bato ya libota, baninga ya motema, mpe bandimi ya mangomba ete bazali lisusu te kopesa mangomba ya lokuta mabɔkɔ. Balingaki ete mokili mobimba eyeba ete Babilone Monene ezali kosala kindumba na makambo ya losambo! Yango wana, kobanda na sanza ya zomi na mibale 1917 tii na ebandeli ya 1918, bankóto ya Bayekoli ya Biblia bakabolaki na molende batrakte 10 000 000 oyo ezalaki na lisolo moko na motó ya likambo “Babilone ekwei” (na Lingelesi). Trakte yango emonisaki polele bosolo na oyo etali mangomba ya bokristo. Kanisá nkanda makasi oyo bakonzi ya mangomba bakokaki kozala na yango! Kasi, Bayekoli ya Biblia bazongaki nsima te. Bazalaki na ekateli ya kokoba kosakola mpe kotosa “Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Mis. 5:29) Yango emonisi nini? Emonisi ete mibali mpe basi bakristo wana bakɔtaki te na boombo ya Babilone na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba; kutu, bazalaki nde kobima na boombo ya mangomba ya lokuta mpe kosalisa basusu básala lokola bango. w16.11 5:2, 4
Mwamisato, 21 sanza ya 2
Baoyo bazali kolanda bamposa ya nzoto batyaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi baoyo bazali kolanda elimo na makambo ya elimo.—Rom. 8:5.
Bato mosusu bakanisaka ete ntoma Paulo azalaki kolobela bato oyo bazalaki bakristo te mpe baoyo bazalaki bakristo. Nzokande, na bavɛrsɛ yango, ntoma Paulo akomelaki nde bakristo, oyo ‘babengami mpo bázala basantu.’ (Rom. 1:7) Yango wana, ezala baoyo bazalaki “kolanda bamposa ya nzoto” mpe baoyo bazalaki “kolanda elimo,” bango nyonso bazalaki bakristo. Mpo na kozwa eyano, tótala na Baroma 7:5. Kuna, ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango tozalaki kolanda bamposa ya nzoto, bamposa ya masumu oyo elamwisamaki na Mibeko ezalaki kosala mosala na binama na biso.” Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo alimbolaki ete bato oyo bazali na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto” ezali baoyo batyaka makanisi na bango na bamposa na bango ya masumu mpe balandaka yango, mpo na kosala oyo balingi. w16.12 2:5, 7
Mwaminei, 22 sanza ya 2
Esengo na moto oyo balimbisi botomboki na ye.—Nz. 32:1.
Ntango mosusu bato bamitungisaka mpo na mabunga na bango ya kala. Ntango mosusu, mokonzi Davidi azalaki komona ete mabunga na ye elekeli ye motó. Alobaki boye: “Nagangi mpo na komilelalela ya motema na ngai.” (Nz. 38:3, 4, 8, 18) Na likambo yango, Davidi asalaki likambo moko ya bwanya. Atyaki motema na mawa ya Yehova mpe na likoki na ye ya kolimbisa. (Nz. 32:2, 3, 5) Na bantango mosusu, okoki komitungisa mpo na sikoyo. Na ndakisa, ntango Davidi akomaki Nzembo 55, azalaki kobanga mpo balingaki koboma ye. (Nz. 55:2-5) Atako bongo, atikaki te ete mitungisi epekisa ye kotyela Yehova motema. Davidi abondelaki Yehova asalisa ye na mikakatano na ye, kasi ayebaki mpe ete ye moko asengelaki kosala mwa eloko mpo na mikakatano na ye. (2 Sa. 15:30-34) Liteya nini okoki kozwa epai ya Davidi? Na esika ya kotika ete mitungisi elekela yo motó, salá nde nyonso oyo okoki mpo na kosilisa likambo yango, mpe tyelá Yehova motema ete akosalisa yo. w16.12 3:14, 15
Mwamitano, 23 sanza ya 2
Nasaleli Yehova lisumu.—2 Sa. 12:13.
Davidi atikaki Yehova asalisa ye. Na ndakisa, andimaki ete Natane, mosakoli ya Yehova, asembola ye. Lisusu, Davidi abondelaki Yehova mpe ayambolaki masumu na ye, amonisaki ete alingi mpenza ete Yehova andima ye lisusu. (Nz. 51:1-17) Na esika ete Davidi amitungisa koleka ndelo mpo na ngambo oyo amemaki, azwaki nde liteya na mabunga na ye. Azongelaki lisusu te masumu wana ya minene. Bambula mingi na nsima, akufaki sembo, mpe ezali ndenge wana nde Yehova akanisaka ye. (Ebr. 11:32-34) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Davidi? Soki tosali lisumu ya monene, tosengeli kobongola mpenza motema, koyambola lisumu na biso epai ya Yehova, mpe kosɛnga ye alimbisa biso. (1 Yoa. 1:9) Tosengeli mpe koyebisa bankulutu lisumu yango, mpo bakoki kosalisa biso tózongisa boyokani na biso na Yehova. (Yak. 5:14-16) Soki tondimi lisalisi ya Yehova, tokomonisa ete totyaka motema na elaka na ye ya kolimbisa biso. Longola yango, tosengeli kozwa mateya na mabunga na biso mpe kokoba kosalela Yehova na elikya ete akolimbisa biso.—Ebr. 12:12, 13. w17.01 1:13, 14
Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 2
Pekisá mosaleli na yo misala ya lofundo.—Nz. 19:13.
Misala ya lofundo ezali nini? Ezali kosala likambo moko oyo tozali na lotomo to ndingisa ya kosala yango te, ntango mosusu mpo tozangi motema molai to tozali na lolendo. Mbala mosusu, biso nyonso tosilá kosala likambo moko na lofundo mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi ndenge tomoni yango na ndakisa ya mokonzi Saulo, soki yango ekómi momeseno, Yehova akosepela te. Nzembo 119:21 elobi ete Yehova ‘akopamela bato ya lofundo.’ Mpo na nini asalaka bongo? Ya liboso, soki tosali likambo moko na lofundo, tozali komonisa ete tozangi limemya epai ya Yehova, Nzambe na biso mpe Moyangeli na biso. Ya mibale, soki tosali makambo oyo tozali na lotomo ya kosala te, mbala mosusu tokoki koswana na basusu to kozanga koyokana na bango. (Mas. 13:10) Mpe ya misato, tokoki komonana bazoba soki basusu bayebi ete tosalaki likambo moko na lofundo. (Luka 14:8, 9) Tomoni polele ntina oyo Yehova alingi ete tózala na bopɔlɔ. w17.01 3:4, 5
Mwalomingo, 25 sanza ya 2
Bango moko nde babebisi makambo; bazali bana na ye te, mbeba ezali ya bango moko.—Mib. 32:5.
Adama abungisaki bomoi ya malamu mpenza oyo ezalaki kozela ye liboso, kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na bana na ye. Kasi, atikelaki bana na ye nde ezaleli ya kozanga kokoka, lisumu, mpe liwa. (Rom. 5:12) Adama alongolaki bango libaku ya kozala na bomoi ya seko. Adama ná Eva bakokaki te kobota mwana ya kokoka, bana na bango mpe bakokaki te kobota bana ya kokoka. Banda ntango Satana atindaki Adama ná Eva bápesa Nzambe mokɔngɔ, Zabolo azali koluka kotinda bato nyonso básala kaka bongo. (Yoa. 8:44) Yehova akobaki kaka kolinga bato. Atako Adama ná Eva baboyaki ye, alingaki kaka ete bato bázala na boyokani ya malamu elongo na ye. Mpe alingaki te ete ata moko na bango abomama. (2 Pe. 3:9) Yango wana, Nzambe azwaki mbala moko bibongiseli mpo bato bákoka lisusu kozala na boyokani elongo na ye.—Yoa. 3:16. w17.02 1:12-14
Mwayambo, 26 sanza ya 2
Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.—Mas. 13:10.
Tokozala na bopɔlɔ mingi soki tozali koluka makambo ya malamu oyo basusu bazali na yango, ndenge Yehova asalaka. Na esika ya kobenda likebi ya basusu epai na biso to koyebisa bango oyo basengeli kosala, tósɛnga nde bango bápesa biso toli mpe tóndima makanisi na bango. Tokosepela soki bandeko na biso ya mibali mpe ya basi bazwi mikumba mosusu. Mpe totɔndaka Yehova ndenge apesi biso nyonso likoki ya kosalela ye. (1 Pe. 5:9) Lisusu, mitinda yango eteyaka biso ndenge oyo Yehova amiyokaka mpe akanisaka. Soki toyekoli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango, tokoki kozwa bikateli oyo ekosepelisa ye. Ntango tozali koyekola, kobondela, mpe kosalela makambo oyo toyekoli, lisosoli na biso ekokóma malamu koleka. (1 Tim. 1:5) Tokotika basusu bázala liboso, biso na nsima. Soki tosali makambo wana, Yehova alaki ete ‘akosilisa kobongisa biso,’ mpe akosalisa biso tózala na bopɔlɔ mingi.—1 Pe. 5:10. w17.01 4:17, 18
Mwamibale, 27 sanza ya 2
Bankulutu oyo bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza bátángama bato babongi na lokumu mbala mibale, mingimingi mpenza baoyo bazali kosala mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.—1 Tim. 5:17.
Bandeko basi mpe mibali babongi ete tópesaka bango lokumu mpe limemya. Ezali na ntina tósalaka yango mingimingi mpo na bandeko oyo bazali kokamba biso, na ndakisa bankulutu, bakɛngɛli ya zongazonga, bandeko ya Komite ya filiale, mpe bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Bango nyonso bakokisaka bamposa ya basaleli ya Nzambe, mpe Biblia ebengi bango “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Yango wana, ebongi mpenza ete tópesaka bango lokumu mpe limemya, ata soki bazali bato ya ekólo nini, batángá kelasi mingi to te, bazali na bomoi ya ndenge nini, bazali bazwi to babola. Bakristo ya liboso batikelá biso ndakisa malamu na likambo yango. Bazalaki kopesa mibali oyo bazalaki kokamba lisangá lokumu; biso mpe tosengeli kosala kaka bongo lelo oyo. Ntango tozali elongo na mibali yango, tosengeli te kotalela bango lokola baanzelu, elingi koloba, kokanisa ete bazali te lokola bato mosusu. Kasi, totosaka bango mpe topesaka bango lokumu mpo na mosala makasi oyo basalaka mpe mpo na komikitisa na bango.—2 Ko. 1:24; Em. 19:10. w17.03 1:13
Mwamisato, 28 sanza ya 2
Mpo na nini ozali kobenga ngai malamu? Moto malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.—Mrk. 10:18.
Erode Agripa I, oyo akómaki mokambi ya Yudea, azalaki na ezaleli oyo ekeseni mosika na oyo ya Yesu! Mokolo moko, na likita moko monene, mokonzi Erode alataki bilamba ya kitoko mingi mpe ya ntalo mingi. Ntango bato bamonaki ye mpe bayokaki diskur oyo asalaki, bagangaki: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” Erode azalaki moto oyo alingá lokumu. “Na mbala moko anzelu ya Yehova abɛtaki ye, mpo apesaki Nzambe nkembo te; mpe nkusu elyaki ye mpe akataki motema.” (Mis. 12:21-23) Emonani polele ete Yehova aponaki Erode te mpo azala mokambi. Nzokande, Yesu amonisaki ete Nzambe aponaki ye, mpe azalaki ntango nyonso kokumisa Yehova, oyo azali Mokambi Monene ya basaleli na ye. Yehova alingaki ete Yesu azala Mokambi kaka mpo na mwa bambula te. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” Abakisaki: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”—Mat. 28:18-20. w17.02 3:20, 21