Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es22 nk. 7-17
  • Sanza ya 1

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 1
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 1
  • Mwalomingo, 2 sanza ya 1
  • Mwayambo, 3 sanza ya 1
  • Mwamibale, 4 sanza ya 1
  • Mwamisato, 5 sanza ya 1
  • Mwaminei, 6 sanza ya 1
  • Mwamitano, 7 sanza ya 1
  • Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 1
  • Mwalomingo, 9 sanza ya 1
  • Mwayambo, 10 sanza ya 1
  • Mwamibale, 11 sanza ya 1
  • Mwamisato, 12 sanza ya 1
  • Mwaminei, 13 sanza ya 1
  • Mwamitano, 14 sanza ya 1
  • Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 1
  • Mwalomingo, 16 sanza ya 1
  • Mwayambo, 17 sanza ya 1
  • Mwamibale, 18 sanza ya 1
  • Mwamisato, 19 sanza ya 1
  • Mwaminei, 20 sanza ya 1
  • Mwamitano, 21 sanza ya 1
  • Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 1
  • Mwalomingo, 23 sanza ya 1
  • Mwayambo, 24 sanza ya 1
  • Mwamibale, 25 sanza ya 1
  • Mwamisato, 26 sanza ya 1
  • Mwaminei, 27 sanza ya 1
  • Mwamitano, 28 sanza ya 1
  • Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 1
  • Mwalomingo, 30 sanza ya 1
  • Mwayambo, 31 sanza ya 1
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2022
es22 nk. 7-17

Sanza ya 1

Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 1

Banda bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu, oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali na boyokani na Kristo Yesu.​—2 Tim. 3:15.

Kondima ya Timote esimbamaki na mateya ya Biblia oyo epesaki ye mposa ya kokóma moninga ya Yehova. Yo mpe osengeli koyekola Biblia mpe komona mpenza makambo oyo yango eteyaka mpo na Yehova. Mpo na yango, yo moko osengeli komindimisa ete mateya misato oyo ya ntina ezali mpenza solo. Ya liboso, osengeli komindimisa ete Yehova Nzambe azali Mozalisi ya biloko nyonso. (Kob. 3:14, 15; Ebr. 3:4; Em. 4:11) Ya mibale, osengeli komindimisa ete Biblia ezali na nsango ya Nzambe mpo na bato. (2 Tim. 3:16, 17) Mpe ya misato, osengeli komindimisa ete Batatoli ya Yehova nde bazali etuluku ya bato oyo Yehova abongisi mpo na kosambela ye na litambwisi ya Kristo. (Yis. 43:10-12; Yoa. 14:6; Mis. 15:14) Yango esɛngi kaka te oyeba makambo nyonso oyo Biblia eteyaka. Mokano na yo esengeli kozala ya kosalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ mpo omindimisa mpenza ete ozali na solo.​—Rom. 12:1. w20.07 10 par. 8-9

Mwalomingo, 2 sanza ya 1

Bapesaki mayoyo yango nzela ya koboma bango te, kasi ya konyokola bango sanza mitano.​—Em. 9:5.

Esakweli oyo elobeli ebele ya mayoyo oyo ezali na bilongi lokola bilongi ya bato mpe na mitó na yango “ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo.” (Em. 9:7) Mayoyo yango etungisaki “bato [banguna ya Nzambe] oyo bazali na elembo ya Nzambe na bilongi na bango te” na boumeli ya sanza mitano, eleko oyo ekokani na bomoi mobimba ya mayoyo. (Em. 9:4) Emonani ete mayoyo oyo Emoniseli elobeli nde emonisi mpenza basaleli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo. Bazali kosakola na mpiko nyonso bitumbu oyo Nzambe akopesa ebongiseli oyo mabe, mpe bato na yango bazali kotungisama mpo na nsango yango. Tolingi nde koloba ete mayoyo oyo balobeli na Yoele 2:7-9 ezali na ndimbola moko te na mayoyo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli? Ɛɛ. Na Biblia, ekómaka ete elilingi moko ezala na ndimbola ekeseni ntango basaleli yango na ndenge mosusu. Na ndakisa, na Emoniseli 5:5, Yesu abengami “Nkɔsi ya libota ya Yuda,” kasi na 1 Petro 5:8, Zabolo abengami “nkɔsi oyo ezali koganga.” w20.04 3 par. 8; 5 par. 10

Mwayambo, 3 sanza ya 1

Miso ya Yehova ezalaka na esika nyonso, ezali kotalatala bato mabe ná bato malamu.​—Mas. 15:3.

Agare, oyo azalaki mosaleli ya Sarai, asalaki makambo na bozoba nsima ya kokóma mwasi ya Abrama. Ntango Agare akómaki na zemi, akómaki kotyola Sarai mpo azalaki na bana te. Likambo yango ekómaki mabe mpenza tii Sarai abenganaki Agare. (Eba. 16:4-6) Biso bato ya kozanga kokoka tokoki komona lokola ete Agare azalaki makambo mabe mpe azwaki oyo ebongaki na ye. Kasi, Yehova amonaki likambo mosusu epai ya Agare. Atindelaki ye anzelu moko. Ntango anzelu yango amonaki Agare, asalisaki ye abongola bizaleli na ye mpe apambolaki ye. Agare amonaki ete Yehova azalaki kotala ye mpe ayebaki makambo nyonso oyo akutanaki na yango. Yango etindaki ye aloba ete Yehova azali “Nzambe oyo amonaka, . . . ye oyo azali komona ngai.” (Eba. 16:7-13) Yehova amonaki nini epai ya Agare? Ayebaki malamu bomoi ya Agare ya kala mpe makambo nyonso oyo akutanaki na yango. Yehova asepelaki te ndenge Agare azangaki limemya epai ya Sarai, kasi tokoki kondima ete atalelaki bomoi ya Agare ya kala mpe makambo oyo azalaki kokutana na yango. w20.04 16 par. 8-9

Mwamibale, 4 sanza ya 1

Napoti mbangu tii na nsuka.​—2 Tim. 4:7.

Ntoma Paulo alobaki ete bakristo nyonso ya solo bazali na kati ya momekano moko ya kopota mbangu. (Ebr. 12:1) Mpe tózala bilenge to mikóló, tózala na makasi to tolɛmbi, biso nyonso tosengeli koyika mpiko tii na nsuka mpo tózwa mbano oyo Yehova alaki biso. (Mat. 24:13) Paulo azalaki na elobeli ya polele mpo alongaki ‘kopota mbangu tii na nsuka.’ (2 Tim. 4:7, 8) Kasi, momekano ya kopota mbangu oyo Paulo azalaki kolobela ezali mpenza nini? Na bantango mosusu, Paulo asalelaki makambo oyo ezalaki kosalema na masano ya Bagrɛki ya ntango ya kala mpo na koteya makambo ya ntina mingi. (1 Ko. 9:25-27; 2 Tim. 2:5) Na mabaku mosusu, asalelaki ndakisa ya momekano ya kopota mbangu mpo na kolobela bomoi ya bokristo. (1 Ko. 9:24; Gal. 2:2; Flp. 2:16) Moto akɔtaka na momekano yango ya elilingi ntango amipesi na Yehova mpe azwi batisimo. (1 Pe. 3:21) Akokóma na ndelo ya nsuka ntango Yehova apesi ye mbano ya bomoi ya seko.​—Mat. 25:31-34, 46; 2 Tim. 4:8. w20.04 26 par. 1-3

Mwamisato, 5 sanza ya 1

Bókamata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe.​—Ef. 6:13.

“Nkolo azali sembo, mpe akopesa bino makasi mpe akobatela bino na moto mabe.” (2 Tes. 3:3) Ndenge nini Yehova abatelaka biso? Yehova apesá biso molato ya etumba oyo ekoki kobatela biso ntango Satana azali kobundisa biso. (Ef. 6:13-17) Molato yango ya etumba ezali makasi mpe esalisaka mpenza! Kasi ekobatela biso kaka soki tokobi kolata eteni nyonso ya molato yango. Na ndakisa, solo lokola mokaba ezali komonisa mateya ya solo oyo ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Mpo na nini tosengeli kolata mokaba yango? Mpo Satana azali “tata ya lokuta.” (Yoa. 8:44) Abandá lokuta yango banda kala mpenza mpe akosaka “mabele mobimba esika bato bafandi”! (Em. 12:9) Kasi mateya ya solo oyo ezali na Biblia ebatelaka biso mpo tókosama te. Ndenge nini tolataka mokaba yango ya elilingi? Tosalaka yango na ndenge toyekolaka solo na ntina etali Yehova, na ndenge tosambelaka ye na “elimo mpe na solo,” mpe na ndenge tozalaka sembo na makambo nyonso.​—Yoa. 4:24; Ef. 4:25; Ebr. 13:18. w21.03 26-27 par. 3-5

Mwaminei, 6 sanza ya 1

Lisusu akokɔta mpenza na mokili Kitoko.​—Dan. 11:41.

Eloko esalaki ete ekólo yango ezala na ntina mingi ezali mpo kaka kuna nde bato bazalaki kosambela Yehova. Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., esika moko te awa na mabele ezalaki kobengama “mokili kitoko.” Ezali bongo mpo lelo oyo, basaleli ya Yehova bafandi na mokili mobimba. Na yango, “mokili kitoko” ezali bibongiseli nyonso ya elimo ya basaleli ya Nzambe, na ndakisa makita mpe mosala ya kosakola. Na boumeli ya mikolo ya nsuka, mokonzi ya nɔrdi akɔti mbala mingi na “mokili kitoko.” Na ndakisa, ntango Allemagne ezalaki mokonzi ya nɔrdi, mingimingi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ekɔtaki na “mokili kitoko” na ndenge enyokolaki mpe ebomaki basaleli ya Nzambe. Ntango Union soviétique ekómaki mokonzi ya nɔrdi nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ekɔtaki na “mokili kitoko” na ndenge enyokolaki basaleli ya Nzambe mpe etindaki bango bakangami na bikólo mosusu. w20.05 13 par. 7-8

Mwamitano, 7 sanza ya 1

Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye, lisusu apesi bango kondimana na ye, mpo báyeba yango.​—Nz. 25:14.

Tólobela mwa moke mwa ndambo ya bato oyo bakómaki baninga ya Nzambe liboso ete Kristo aya. Abrahama azalaki na kondima ya makasi mpenza. Mbula koleka 1 000 nsima ya liwa na ye, Yehova azalaki kaka kobenga ye “moninga na ngai.” (Yis. 41:8) Yango emonisi ete ata liwa ekoki te kokabola Yehova ná baninga na ye ya motema. Abrahama azalaki kaka na bomoi na makanisi ya Yehova. (Luka 20:37, 38) Ndakisa mosusu ezali ya Yobo. Ntango baanzelu bayanganaki na likoló, Yehova alobaki malamu mpo na Yobo mpe amonisaki ete atyelaka ye motema. Yehova abengaki ye moto oyo “azangi mbeba mpe azali sembo, abangaka Nzambe mpe akimaka mabe.” (Yobo 1:6-8) Yehova azalaki koyoka ndenge nini mpo na Danyele, oyo asalelaki ye na bosembo na boumeli ya bambula koleka 80 na mokili oyo bato na yango bazalaki kosambela Yehova te? Mbala misato mobimba baanzelu bayebisaki Danyele, oyo na ntango wana asilaki kokóma mobange ete, azali “moto oyo alingami mingi” na miso ya Nzambe. (Dan. 9:23; 10:11, 19) Yango endimisi biso ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kosekwisa baninga na ye ya motema.​—Yobo 14:15. w20.05 26-27 par. 3-4

Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 1

Teyá ngai malako na yo.​—Nz. 119:68.

Moyekoli ya malamu akoki koyekola mibeko ya Nzambe ata mpe kolinga yango. Kasi bolingo nde esengeli kotinda moyekoli yango atosa Yehova. Kobosana te, Adama ná Eva bayebaki mibeko ya Nzambe kasi bazalaki mpenza kolinga ye te. (Eba. 3:1-6) Yango wana, tosengeli kosuka kaka te na koteya bato mibeko ya sembo ya Nzambe. Mibeko ya Nzambe ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. (Nz. 119:97, 111, 112) Kasi bato oyo toyekolaka na bango Biblia bakoki komona te ete Yehova atyá mibeko yango mpo na bolamu na biso. Na yango, tokoki kotuna moyekoli ya Biblia boye: “Okanisi nini, mpo na nini Nzambe asɛngi basaleli na ye básala likambo boye, mpe apekisi bango básala likambo boye? Yango eteyi biso nini mpo na ye?” Soki tosalisi bayekoli ya Biblia bákanisa mpo na Yehova mpe bákolisa bolingo mpo na nkombo na ye monene, yango ekosalisa biso tósimba mitema na bango. Bakolinga mibeko ya Nzambe kasi mpe Yehova, Mopesi-Mibeko yango. Kondima na bango ekokóma makasi mpe bakoyika mpiko na mikakatano oyo bakoki kokutana na yango.​—1 Ko. 3:12-15. w20.06 10 par. 10-11

Mwalomingo, 9 sanza ya 1

[Yokáká] noki, kowelaka koloba te.​—Yak. 1:19.

Tosengeli komonisa motema molai mpo esɛngaka ntango mpo moto azongela Yehova. Bandeko mingi oyo batikaki kosakola mpe koyangana na makita balobi ete mpo bázongela lisusu Yehova, esɛngaki kaka bankulutu mpe bandeko mosusu ya lisangá báyaka kotala bango. Ndeko mwasi moko na nkombo Nancy akomi boye: “Moninga moko ya motema na kati ya lisangá asalisaki ngai mingi. Alingaki ngai lokola ndeko na ye ya mwasi. Akundwelaki ngai bantango ya malamu oyo tolekisaki elongo. Azalaki komonisa motema molai ntango nazalaki kobimisa mayoki na ngai, mpe azalaki kokakatana te mpo na kopesa ngai toli. Amonisaki ete azali mpenza moninga ya solo oyo akoki kosalisa ngai ntango nyonso.” Ntango moto moko azali komitungisa ekoki kozala lokola azoki mpota. Komitya na esika na ye ezali lokola nkisi oyo ekoki kosalisa ye ayoka malamu. Bandeko mingi batiká lisangá bambula mingi mpe bazalaka kaka na nkanda mpo ndeko moko na kati ya lisangá apesaki bango mpasi. Yango wana, bazalaka lisusu na mposa ya kozongela Yehova te. Basusu bakoki kokanisa ete basalelaki bango makambo na kozanga bosembo. Bazalaka na mposa ete moto moko ayoka bango mpo na koyeba ndenge oyo bazali komiyoka. w20.06 26 par. 10-11

Mwayambo, 10 sanza ya 1

Bolongi moto mabe.​—1 Yoa. 2:14.

Mbala nyonso oyo oboyi kosala likambo ya mabe, ekozala pɛtɛɛ mpo osala oyo ezali malamu. Kobosana mpe te ete ndenge oyo mokili etalelaka likambo ya kosangisa nzoto, eutá na Satana. Na yango, soki oboyi kokanisa ndenge bato ya mokili bakanisaka, ‘okolonga moto mabe.’ Toyebi ete Yehova nde azali na lotomo ya koyebisa biso likambo nini ezali lisumu. Mpe tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tókwea na lisumu te. Kasi soki tosali lisumu, toyebisaka yango Yehova na nzela ya libondeli. (1 Yoa. 1:9) Mpe soki tosali lisumu ya monene, tolukaka lisalisi ya bankulutu oyo Yehova atyá mpo bábatelaka biso. (Yak. 5:14-16) Kasi, tosengeli te kokoba komipesaka foti mpo na mabunga oyo tosalá kala. Mpo na nini? Mpo Tata na biso ya bolingo apesá mbeka ya lisiko ya Mwana na ye, mpo masumu na biso elimbisama. Soki Yehova alobi ete akolimbisa masumu ya baoyo babongoli motema, akosala yango. Na yango, eloko moko te ekoki kopekisa biso tósalela Yehova na lisosoli ya pɛto.​—1 Yoa. 2:1, 2, 12; 3:19, 20. w20.07 22-23 par. 9-10

Mwamibale, 11 sanza ya 1

Liziba ya bomoi ezali epai na yo.​—Nz. 36:9.

Na ntango moko boye, Yehova azalaki kaka ye moko. Kasi, yango ekómisaki ye mawamawa te. Azalaki na mposa te ete moto azala pene na ye mpo azala na esengo. Atako bongo, Nzambe alingaki ete bato mosusu básepela mpe na bomoi. Bolingo etindaki Yehova abanda kokela. (1 Yoa. 4:19) Yehova abandaki naino na kokela mwana na ye Yesu. Na nsima, na nzela ya Mwana yango ya liboso, “biloko mosusu nyonso ezalisamaki,” ezala mpe bamilio ya baanzelu. (Kol. 1:16) Yesu asepelaki na libaku oyo azalaki na yango ya kosala elongo na Tata na ye. (Mas. 8:30) Baanzelu mpe bazalaki na ntina ya kosepela. Bazalaki komona ndenge Yehova ná Yesu, Mosali na ye ya mayele, bazalaki kokela likoló mpe mabele. Baanzelu yango bamiyokaki ndenge nini? “Babandaki koganga na esengo” ntango mabele esalemaki, mpe na ntembe te, bakobaki kosepela mbala nyonso oyo Yehova akeli eloko moko; mingimingi ntango akelaki bato. (Yobo 38:7; Mas. 8:31) Biloko nyonso oyo Yehova akelaki, emonisaki bolingo mpe bwanya na ye.​—Nz. 104:24; Rom. 1:20. w20.08 14 par. 1-2

Mwamisato, 12 sanza ya 1

Bikólo nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.​—Mat. 24:9.

Yehova akelá biso mpo tólingaka bato mpe bato bálingaka biso. Yango wana, soki moto mosusu ayini biso, epesaka biso mpasi, mpe ekoki ata kobangisa biso. Ndeko mobali moko akomi boye: “Ntango basoda babɛtaki ngai, bafingaki ngai, mpe balobaki ete bakozokisa ngai mpo nazali Motatoli ya Yehova, nabangaki mpenza mpe namimonaki ntina te.” Toyokaka mabe mpenza soki bato bayini biso ndenge wana, kasi yango ekamwisaka biso te. Yesu asakolaki ete bakoyina biso. Mpo na nini mokili eyinaka bayekoli ya Yesu? Mpo ndenge moko na Yesu, biso mpe ‘tozali bato ya mokili te.’ (Yoa. 15:17-19) Na yango, atako totosaka bakonzi ya mokili oyo, toboyaka kosambela bango, to mpe bilembo oyo emonisaka bokonzi na bango. Tosambelaka kaka Yehova. Tondimaka ete kaka ye nde azali na lotomo ya koyangela bato. Nzokande, Satana ná “momboto” na ye baboyaka kondima likambo yango. (Eba. 3:1-5, 15) Tosakolaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato, mpe ete mosika te ekoboma bato nyonso oyo batɛmɛlaka yango. (Dan. 2:44; Em. 19:19-21) Yango ezali nsango malamu mpo na bato ya komikitisa, kasi ezali nsango ya mawa mpo na bato mabe. w21.03 20 par. 1-2

Mwaminei, 13 sanza ya 1

Toyebi ete touti na Nzambe.​—1 Yoa. 5:19.

Yehova apesi bandeko basi esika ya lokumu na kati ya lisangá. Bazali bandakisa mpo na misala malamu, mpe mpo na bizaleli malamu lokola bwanya, kondima, molende, mpiko, mpe elimo ya bokabi. (Luka 8:2, 3; Mis. 16:14, 15; Rom. 16:3, 6; Flp. 4:3; Ebr. 11:11, 31, 35) Tosepelaka mpe mingi na bandeko na biso ya mibange oyo bazali na masangá na biso. Lokola mbula na bango ezali se kopusana, bandeko yango mingi bazali kobunda na likambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto. Atako bongo, bandeko yango ya mibange basalaka oyo bakoki na mosala ya kosakola, mpe basalelaka makasi na bango mpo na kolendisa basusu mpe kopesa bango formasyo! Mpe tozwaka matomba mingi na makambo oyo bayebi. Bazali mpenza kitoko na miso ya Yehova mpe na miso na biso. (Mas. 16:31) Bongo bilenge na biso? Lokola bazali na mokili oyo eyangelami na Satana Zabolo mpe oyo elandaka makanisi na ye ya mabe, bazali kokutana na mikakatano mingi. Kasi, ntango tomonaka bilenge yango bazali kopesa biyano na makita ya lisangá, bazali kosakola mpe bazali kolobela na mpiko nyonso mateya oyo bandimaka, yango elendisaka biso. Ya solo, bino bilenge, bozali na motuya mingi na lisangá ya Yehova!​—Nz. 8:2. w20.08 21-22 par. 9-11

Mwamitano, 14 sanza ya 1

Nazali kotinda bino lokola bampate na kati ya bambwa ya zamba.​—Mat. 10:16.

Ntango tobandi kosakola mpe koyebisa basusu ete tozali Batatoli ya Yehova, bandeko ya libota bakoki kotɛmɛla biso, baninga bakoki kotyola biso, mpe bato mosusu bakoki koboya koyoka nsango na biso. Ndenge nini okoki kokóma na mpiko mingi? Ya liboso, osengeli kondima ete Yesu azali kokoba kotambwisa mosala ya kosakola. (Yoa. 16:33; Em. 14:14-16) Ya mibale, kómisá kondima na yo makasi na elaka ya Yehova oyo elobi ete akokokisa bamposa na yo. (Mat. 6:32-34) Soki kondima na yo ekómi makasi, okokóma mpe na mpiko mingi. Omonisaki kondima makasi ntango oyebisaki baninga mpe bandeko ya libota na yo ete okómá koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe koyangana na makita. Na ntembe te, osali bambongwana mingi na bomoi na yo mpo na kotosa mibeko ya sembo ya Yehova. Yango esɛngaki mpe omonisa kondima mpe mpiko. Lokola ozali kokóma na mpiko mingi, okoki kozala na kondima ete “Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”​—Yos. 1:7-9. w20.09 5 par. 11-12

Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 1

Yehova apesaki ye bopemi.​—2 Nt. 14:6.

Mokonzi Asa azali ndakisa malamu mpo na biso. Asalaki na bwanya ndenge atyelaki Yehova motema mobimba. Asalelaki Yehova na ntango ya kimya mpe na ntango oyo makambo ezalaki kotambola malamu te. Uta na ebandeli, “motema ya Asa ezalaki mobimba epai ya Yehova.” (1 Bak. 15:14) Na ndakisa, Asa alongolaki losambo ya lokuta na Yuda mpo na komonisa ete amipesaki mobimba epai ya Yehova. Biblia elobi ete “alongolaki bitumbelo ya bapaya mpe bisika oyo etombwaná, abukaki makonzí ya losambo mpe akataki banzete ya losambo.” (2 Nt. 14:3, 5) Alongolaki kutu Maaka, nkɔkɔ na ye ya mwasi, na esika ya lokumu oyo azalaki na yango na bokonzi. Mpo na nini? Mpo azalaki kolendisa bato na losambo ya bikeko. (1 Bak. 15:11-13) Asa asukaki kaka te na kolongola losambo ya lokuta. Azongisaki losambo ya pɛto, mpe asalisaki bato ya Yuda bázongela kosambela Yehova. Yehova apambolaki Asa mpe Bayisraele na ndenge apesaki bango eleko moko ya kimya. Na boumeli ya mbula zomi na boyangeli ya Mokonzi Asa, “mokili ekómaki na kimya.”​—2 Nt. 14:1, 4, 6. w20.09 14 par. 2-3

Mwalomingo, 16 sanza ya 1

Timote, batelá eloko oyo ebombami epai na yo.​—1 Tim. 6:20.

Mbala mingi, tosɛngaka basusu bábombela biso biloko na biso ya motuya. Na ndakisa, tokoki kobomba mbongo na biso na banki. Totyaka yango kuna na elikya ete ekobatelama malamu, ekobunga te, mpe bakoyiba yango te. Ntoma Paulo akundwelaki Timote ete azwaki eloko moko ya motuya: boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe mpo na bato. Yehova apesaki mpe Timote mokumba ya ‘kosakola liloba’ mpe ya kosala “mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.” (2 Tim. 4:2, 5) Paulo ayebisaki Timote abatela eloko oyo ebombami epai na ye. Lokola Timote, tozali na biloko ya motuya oyo ebombami epai na biso. Na boboto na ye, Yehova apesá biso boyebi ya sikisiki ya mateya ya solo oyo ezali na Biblia, Liloba na ye. Mateya yango ezali na motuya mingi mpo eteyaka biso ndenge ya kozala na boyokani malamu na Yehova, mpe emonisaka biso makambo oyo epesaka esengo ya solosolo na bomoi. Ntango tondimi mateya yango mpe tozali kosalela yango, tolongwaka na boombo ya mateya ya lokuta mpe totikaka bizaleli ya mbindo.​—1 Ko. 6:9-11. w20.09 26 par. 1-3

Mwayambo, 17 sanza ya 1

Boyebi motindo ya bato biso tokómaki epai na bino mpo na bolamu na bino.​—1 Tes. 1:5.

Moyekoli asengeli komona ete olingaka mateya ya Biblia oyo ozali koteya mpe ondimaka yango. Na nsima, ye mpe akolinga makambo oyo azali koyekola. Ntango mosusu okoki mpe koyebisa ye ndenge mitinda ya Biblia esalisaki yo na bomoi. Na ndenge yango, akomona ete Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa mpe ye. Ntango bozali koyekola, lobelá bandakisa ya bandeko oyo bakutanaki na mikakatano lokola oyo ya ye mpe balongaki yango. Okoki kokende elongo na ndeko moko ya lisangá oyo ndakisa na ye ekoki kosalisa moyekoli yango. Salisá moyekoli amona ete kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye ezali malamu mingi mpenza. Soki moyekoli na yo abalá, molongani na ye mpe ayekolaka Biblia? Soki ayekolaka te, sɛngá ye mpe aya kosangana na boyekoli. Lendisá moyekoli na yo ya Biblia ayebisaka bandeko ya libota mpe baninga na ye makambo oyo azali koyekola.​—Yoa. 1:40-45. w20.10 16 par. 7-9

Mwamibale, 18 sanza ya 1

Osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana na yo.​—Mib. 6:7.

Lokola Maria ná Yozefe balandaki malako oyo Yehova apesá baboti, yango esalisaki bango bábɔkɔla Yesu na ndenge oyo esalaki ete Nzambe andima ye. (Mib. 6:6, 7) Maria ná Yozefe bazalaki kolinga Yehova mingi, mpe mokano na bango ya libosoliboso ezalaki ya kosalisa bana na bango básala mpe bongo. Maria ná Yozefe bazalaki na momeseno ya kosambela Yehova elongo na bana na bango. Na ntembe te, bazalaki kokende makita pɔsɔ na pɔsɔ na sinagoga ya Nazarete, mpe mbula na mbula bazalaki kokende kosala fɛti ya Elekeli na Yerusaleme. (Luka 2:41; 4:16) Ekoki kozala ete na mibembo yango, bazalaki kobɛtela Yesu ná baleki na ye lisolo ya basaleli ya Yehova. Ntango mosusu nzelanzela, bazalaki kolakisa bango bisika to bamboka oyo Makomami elobeli. Na ntembe te, ntango Maria ná Yozefe bakómaki na bana mingi, ekómaki mpasi mpo básambela Yehova mbala na mbala ndenge bamesanaki. Kasi, kanisá mapamboli oyo bazwaki ndenge balɛmbaki te! Lokola batyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso, libota na bango ezalaki makasi na elimo. w20.10 28 par. 8-9

Mwamisato, 19 sanza ya 1

Ezera abongisaki motema na ye mpo na koyekola mobeko ya Yehova, . . . mpe koteya malako mpe bosembo.​—Ezr. 7:10.

Soki ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo ayekola Biblia na moyekoli na ye, ekozala malamu obongisa makambo oyo bokotalela. Dorin, ndeko moko oyo azali mobongisi-nzela monene alobi boye: “Nasepelaka mingi soki ndeko oyo azali elongo na ngai abongisi boyekoli malamu. Yango ekoki kosala ete apesa makanisi oyo ebongi mpenza.” Lisusu, moyekoli akoki komona ete bino mibale bomibongisaki malamu mpenza mpe yango ekopesa ye ndakisa malamu oyo asengeli kolanda. Ata soki okokoka te kobongisa makambo nyonso oyo bokoyekola, okoki kozwa mwa ntango mpo na kotalela makanisi ya ntina ya boyekoli yango. Lokola libondeli ezali na ntina mingi ntango bozali koyekola na moto Biblia, ekozala malamu okanisa liboso makambo oyo okoloba soki basɛngi yo obondela. Soki osali bongo, okoloba makambo ya sikisiki na libondeli na yo. (Nz. 141:2) Hanae, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Japon, abosanaka te mabondeli oyo ndeko mwasi moko oyo azalaki koya elongo na ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye Biblia azalaki kosala. Alobi boye: “Nazalaki komona ete azalaki na boninga ya makasi mpenza elongo na Yehova, yango wana ngai mpe nalingaki komekola ye. Lisusu, ntango azalaki kotánga nkombo na ngai na mabondeli, yango ezalaki kosalisa ngai namona ete alingaka ngai mpenza.” w21.03 9-10 par. 7-8

Mwaminei, 20 sanza ya 1

Zalá na mpiko! . . . Osengeli kopesa litatoli na Roma.​—Mis. 23:11.

Yesu ayebisaki ntoma Paulo ete akokóma na Roma. Nzokande, Bayuda mosusu na Yerusaleme basalaki likita mpo bátyela ntoma Paulo motambo mpo báboma ye. Ntango Klode Lisiasi, komanda ya basoda ya Roma, ayebaki likambo yango, asalisaki Paulo. Na mbala moko, Klode apesaki mitindo na limpinga ya basoda ete bábatela Paulo mpe bákende na ye tii na Kaisaria. Kuna, Guvɛrnɛrɛ Feliksi apesaki mitindo ete ‘bábatela Paulo na ndako ya bokonzi ya Erode.’ Na ndenge yango, Bayuda oyo balingaki kosala Paulo mabe bakokaki lisusu kozwa ye te. (Mis. 23:12-35) Kasi Festusi akómaki guvɛrnɛrɛ na esika ya Feliksi, oyo alingaki ete “Bayuda básepela na ye.” Atunaki Paulo boye: “Olingi komata na Yerusaleme mpe kosambisama kuna liboso na ngai?” Ntoma Paulo ayebaki ete Bayuda bakokaki koboma ye na Yerusaleme. Alobaki ete: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!” Festusi alobaki na Paulo ete: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala, okokende epai ya Kaisala.” Mosika te, Paulo asengelaki kokende na Roma, mosika mpenza na Bayuda oyo balingaki koboma ye.​—Mis. 25:6-12. w20.11 13 par. 4; 14 par. 8-10

Mwamitano, 21 sanza ya 1

Mitema na biso ezali kokweisa biso.​—1 Yoa. 3:20.

Na bantango mosusu, ekómelaka biso nyonso tómiyoka ete tomemi ngambo. Na ndakisa, bato mosusu bakobaka komipesa foti mpo na makambo ya mabe oyo basalá liboso báyeba solo. Bamosusu mpe bamiyokaka ete bamemá ngambo mpo na mabunga oyo basalaki nsima ya kozwa batisimo. (Rom. 3:23) Na ntembe te, tozalaka na mposa ya kosala makambo ya malamu. Kasi “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yak. 3:2; Rom. 7:21-23) Atako tosepelaka te komiyoka ete tomemi ngambo, kasi ntango mosusu komiyoka bongo ekoki kozala mpe malamu. Mpo na nini? Mpo koyoka ete tomemi ngambo ekoki kotinda biso tósembola banzela na biso, mpe tózwa ekateli ya kozongela lisusu mabunga na biso te. (Ebr. 12:12, 13) Nzokande, ekoki kosalema ete tomipesaka foti koleka ndelo, elingi koloba, tokobaka koyoka ete tomemi ngambo ata soki tobongolá motema mpe Yehova alimbisá biso. Komipesa foti ndenge wana ekoki kosala biso mabe mpenza. (Nz. 31:10; 38:3, 4) Ezali malamu ete tókeba na motambo ya komipesaka foti mingi ndenge wana. Mpo na nini? Mpo Satana akosepela mingi soki totiki kosalela Yehova, atako Yehova alimbisá biso!​—Talá mpe 2 Bakorinti 2:5-7, 11. w20.11 27 par. 12-13

Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 1

Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.​—Nz. 73:13.

Mokomi ya Nzembo yango akómaki kolula bato mabe mpe ya lolendo, mpo na makambo ya mabe oyo bazalaki kosala te, kasi nde mpo ezalaki komonana ete bazalaki na bomoi ya malamu. (Nz. 73:2-9, 11-14) Ezalaki komonana lokola bazalaki na nyonso oyo esengeli; na ndakisa bomɛngo, bomoi ya malamu, mpe ata motungisi moko te. Molevi yango asengelaki kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Ntango asalaki bongo, amitungisaki lisusu te, mpe akómaki na esengo. Alobaki ete: ‘Longola Yehova, nazali na esengo mosusu te na mabele.’ (Nz. 73:25) Ndenge moko mpe, tosengeli soki moke te kolula bato mabe oyo bazali komonana lokola bazali na bomoi ya malamu. Esengo na bango ezali ya likolólikoló mpe ya ntango moke. (Mos. 8:12, 13) Soki tozali kolula bango, tokolɛmba nzoto mpe tokoki ata kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Yango wana, soki obandi kolula bomoi ya bato mabe, salá oyo Molevi wana asalaki na nsima. Salelá toli oyo Nzambe apesaka biso na bolingo mpenza, mpe yanganáká elongo na bato mosusu oyo basalaka mokano ya Yehova. Soki ozali kolinga Yehova koleka eloko mosusu nyonso, okozwa bolamu ya solosolo. Mpe okotikala na nzela ya “bomoi ya solosolo.”​—1 Tim. 6:19. w20.12 19 par. 14-16

Mwalomingo, 23 sanza ya 1

Mokakatano yango oyo: eloko oyo tosengeli kobondela mpo na yango ndenge mposa na biso ezali toyebaka te, kasi elimo yango moko elobelaka biso ntango tozali kokimela, atako maloba ezali kobima te.​—Rom. 8:26.

Ntango ozali kobwakela Yehova mitungisi na yo na libondeli, kobosana mpe te kopesaka ye matɔndi. Tóbosanaka mpe te kokanisa ebele ya makambo ya malamu oyo Nzambe apesá biso, ata ntango tozali na mikakatano ya makasi mpenza. Kasi okosala nini soki ozangi maloba mpo na komonisa Yehova ndenge ozali komiyoka? Kobosana te ete, Yehova akoyanola na mabondeli na yo ata soki olobi kaka ete ‘Nabondeli yo, salisá ngai!’ (2 Nt. 18:31) Tyelá bwanya ya Yehova motema, kasi oyo ya yo moko te. Na mikolo ya mosakoli Yisaya, bato ya Yuda babangaki ete bato ya Asiri bakoya kobundisa bango. Lokola bato ya Yuda balingaki te ete bato ya Asiri bálonga bango, bakendaki koluka lisalisi epai ya bato ya Ezipito. (Yis. 30:1, 2) Yehova akebisaki bango ete, lokola batyelaki bato ya Ezipito motema, libebi ekoyela bango. (Yis. 30:7, 12, 13) Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisaki bango ndenge bakoki kozwa libateli ya solosolo. Alobaki ete: ‘Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.’​—Yis. 30:15b. w21.01 3-4 par. 8-9

Mwayambo, 24 sanza ya 1

Nayokaki motángo ya bato oyo batyamaki elembo, nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000).​—Em. 7:4.

Mpo na bosembo na bango, Yehova akopesa bango mbano mpe bakokóma bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo kuna na likoló. (Em. 20:6) Yehova, Yesu, mpe baanzelu bakosepela mingi ntango bakomona ete bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo bazwi mbano na bango na likoló. Nsima ya kolobela makambo etali bakonzi mpe banganga-nzambe yango 144 000, ntoma Yoane amonaki likambo mosusu oyo esepelisaki ye mingi, “ebele mpenza ya bato” oyo babiki na Armagedone. Na kokesana na etuluku ya bato 144 000, etuluku ya “ebele mpenza ya bato” bazali mingi koleka mpe motángo na bango eyebani te. (Em. 7:9, 10) “Balati bazambala ya mpɛmbɛ,” yango emonisi ete bamibateli mpe bazali na ‘litɔnɔ te’ oyo euti na mokili ya Satana mpe batikali sembo epai ya Nzambe mpe Kristo. (Yak. 1:27) Bazali koganga ete babiki mpo na makambo oyo Yehova ná Yesu, Mwana-Mpate ya Nzambe, basali. Lisusu, basimbi mandalala, oyo emonisi ete bazali kondima na esengo mpenza ete Yesu azali Mokonzi oyo Yehova atye mafuta na elimo.​—Talá mpe Yoane 12:12, 13. w21.01 15-16 par. 6-7

Mwamibale, 25 sanza ya 1

Komikitisa na yo nde ezali kokómisa ngai moto monene.​—2 Sa. 22:36.

Mobali akoki koyekola kozala mokonzi malamu ya libota soki amekoli ndenge oyo Yehova ná Yesu basalelaka bokonzi na bango. Na ndakisa tótalela ezaleli ya komikitisa. Yehova azali na bwanya koleka moto nyonso. Atako bongo, ayokaka makanisi ya basaleli na ye. (Eba. 18:23, 24, 32) Atako Yehova azali Nzambe ya kokoka, asɛngaka biso te tósala makambo na ndenge ya kokoka. Kutu, asalisaka bato ya kozanga kokoka oyo basalelaka ye bálonga na makambo oyo basalaka. (Nz. 113:6, 7) Lisusu, Biblia ebengi Yehova “mosungi.” (Nz. 27:9; Ebr. 13:6) Mokonzi Davidi alobaki ete asalaki makambo ya minene kaka mpo Yehova azali na komikitisa mpe asalisaki ye. Tótalela ndakisa ya Yesu. Asukolaki makolo ya bayekoli na ye atako azali Nkolo mpe Mokonzi na bango. Yesu ye moko alobaki ete: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoa. 13:12-17) Atako azalaki na bokonzi mingi, Yesu alingaki te ete bato básalela ye. Kutu, ye nde azalaki kosalela basusu.​—Mat. 20:28. w21.02 3-4 par. 8-10

Mwamisato, 26 sanza ya 1

Lokumu ya bilenge ezali makasi na bango.​—Mas. 20:29.

Bandeko mibali oyo bozali naino bilenge, bokoki kosalisa lisangá na makambo mingi. Mingi kati na bino bozali na makasi mingi ya nzoto. Bosalaka makambo mingi mpo na kosalisa bandeko ya lisangá na bino, mpe ntango mosusu bozalaka na mposa makasi ya kokóma basaleli na misala. Nzokande, bokoki kokanisa ete bato mosusu bamonaka bino kaka lokola bana mike. To mpe boyebi naino makambo mingi te mpo bápesa bino mokumba moko ya ntina mingi. Ata soki bozali naino bilenge, ezali na makambo oyo bokoki kosala sikoyo mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema mpe bámemyaka bino. Bilenge mibali, ezali na makambo oyo boyebi oyo ekoki kosalisa bandeko mosusu na lisangá? Mingi kati na bino bozali na yango. Na ndakisa, bandeko oyo bakómi mibange basepelaka mingi soki bilenge balakisi bango ndenge ya kosalela batablɛti mpe baaparɛyi mosusu mpo na boyekoli na bango moko, to mpo na makita ya lisangá. Bokoki kosalela boyebi yango mpo na kosalisa bandeko oyo bakómi mibange. Na makambo nyonso oyo ozali kosala, sepelisá motema ya Tata na yo ya likoló. w21.03 2 par. 1, 3; 7 par. 18

Mwaminei, 27 sanza ya 1

Mpo moto na moto akomema mokumba na ye moko.​—Gal. 6:5.

Ata soki mwasi atángá kelasi mingi koleka mobali, mobali nde azali na mokumba ya kotambwisa losambo na kati ya libota mpe makambo mosusu ya elimo. (Ef. 6:4) Mwasi asengeli komikitisa liboso ya mobali na ye. Kasi ye moko azali na mokumba ya kobatela kondima na ye makasi. Mpo na yango, asengeli kozwaka ntango ya kosala boyekoli na ye moko mpe ya komanyola. Yango ekosalisa ye akoba kolinga Yehova mpe kotosa ye, mpe akozwa esengo ndenge azali komikitisa liboso ya mobali na ye. Basi oyo bamikitisaka liboso ya mibali na bango mpo balingaka Yehova, bakozala na esengo mingi koleka baoyo baboyaka kotosa ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá. Bakozala mpe bandakisa malamu mpo na bilenge basi mpe bilenge mibali. Mpe bakosala ete bolingo mpe kimya ezala na kati ya libota mpe na kati ya lisangá. (Tito 2:3-5) Lelo oyo, basaleli mingi ya sembo ya Yehova ezali nde basi.​—Nz. 68:11. w21.02 13 par. 21-23

Mwamitano, 28 sanza ya 1

Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.​—Yak. 4:8.

Ntoma Paulo azali ndakisa malamu na likambo etali komonisa mpiko mpe koyika mpiko. Na bantango mosusu azalaki kolɛmba. Kasi ayikaki mpiko mpe atyelaki Yehova motema ete akopesa ye makasi oyo asengelaki na yango. (2 Ko. 12:8-10; Flp. 4:13) Tokoki kozala na makasi mpe na mpiko ya ndenge wana soki na komikitisa nyonso, toyebi ete tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova. (Yak. 4:10) Tosengeli koyeba ete mikakatano oyo tozali kokutana na yango ezali bitumbu ya Yehova te. Moyekoli Yakobo ayebisi biso ete: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te, mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yak. 1:13) Koyeba likambo yango ekosalisa biso tópusana penepene na tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo. Yehova “abongwanaka te.” (Yak. 1:17) Asalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso ntango bakutanaki na mikakatano. Lelo oyo mpe akosalisa mokomoko na biso. Bondeláká Yehova na motema mobimba mpo apesa yo bwanya, kondima mpe mpiko. Akoyanola na mabondeli na yo. w21.02 31 par. 19-21

Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 1

Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.​—Mas. 27:17.

Wana moyekoli ya Biblia azali kokoba kayangana na makita, kobá komonisa ete otyelaka ye likebi. (Flp. 2:4) Okoki koyebisa ye ete ozali kosepela ndenge azali kosala bambongwana na bomoi na ye. Okoki mpe kotuna ye makambo oyo etali boyekoli na ye ya Biblia, libota mpe mosala na ye. Kasi osengeli kokeba ete otuna ye te mituna oyo ekoki koyokisa ye nsɔni. Masolo ya ndenge wana ekoki kosala ete bókóma baninga. Soki okómisi moyekoli ya Biblia moninga na yo, okosalisa ye mpo akola tii azwa batisimo. Wana moyekoli ya Biblia azali kokoba kokola na elimo, mpe kosala bambongwana na bomoi na ye, salisá ye amiyoka ete azali mopaya te na lisangá. Okoki kosala yango soki omoniseli ye ezaleli ya koyamba bapaya. (Ebr. 13:2) Ntango moyekoli ya Biblia akómi mosakoli, okoki mpe kosɛnga ye bóbima elongo na mosala ya kosakola. Diego, ndeko mobali moko oyo afandaka na Brésil, alobi boye: “Bandeko mibali mingi bazalaki kobengisa ngai mpo tóbima elongo na mosala ya kosakola. Yango esalisaki ngai nayeba bango lisusu malamu kaleka. Koyeba bango malamu esalisaki ngai nayeba makambo mingi mpe nakómaki komiyoka penepene na Yehova mpe Yesu.” w21.03 12 par. 15-16

Mwalomingo, 30 sanza ya 1

Bózongisela moto mabe na mabe te.​—Rom. 12:17.

Yesu ayebisaki bayekoli na ye bálingaka banguna na bango. (Mat. 5:44, 45) Kosala bongo ezalaka pɛtɛɛ te! Kasi na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, yango ekoki kosalema. Bolingo, motema molai, boboto, motema pɛtɛɛ mpe komipekisa ezali na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Gal. 5:22, 23) Bizaleli yango esalisaka biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso. Bato mingi batiká kotɛmɛla biso mpo molongani na bango, mwana na bango, to mpe moninga na bango moko ya kartye amonisaki bizaleli yango. Kutu, banguna na biso mingi bakómá bandeko na biso ya elimo. Na yango, soki omoni ete ezali mpasi olinga bato oyo bayinaka yo mpo osalelaka Yehova, sɛngá Yehova apesa yo elimo santu na ye. (Luka 11:13) Mpe yebá ete kotosa Nzambe ezalaka ntango nyonso likambo oyo eleki malamu oyo tosengeli kosala. (Mas. 3:5-7) Bakoki koyina biso makasi mpenza, mpe yango ekoki kopesa biso mpasi mingi, kasi bolingo ezali na nguya mingi koleka koyina. Soki tomoniseli basusu bolingo, yango ekoki kobongola lolenge oyo batalelaka biso mpe bakoki kotika kotɛmɛla biso. Mpe yango esepelisaka motema ya Yehova. Kasi ata soki banguna bazali kokoba koyina biso, tokoki kaka kozala na esengo. w21.03 23 par. 13; 24 par. 15, 17

Mwayambo, 31 sanza ya 1

Ekólo moko ekɔti na mokili na ngai, ezali na nguya mpe motángo ya bato na yango eyebani te.​—Yoe. 1:6.

Mosakoli Yoele azalaki kolobela limpinga ya basoda oyo bayei etumba. (Yoe. 2:1, 8, 11) Yehova alobaki ete akosalela “limpinga monene ya basoda” na ye (elingi koloba basoda ya Babilone) mpo na kopesa Bayisraele oyo bazangaki botosi etumbu. (Yoe. 2:25) Limpinga yango ya basoda ebongi mpenza kobengama “moto ya nɔrdi” mpo bato ya Babilone bakɔtelaki Yisraele na ngámbo ya nɔrdi. (Yoe. 2:20) Limpinga yango ezali lokola ebele ya mayoyo oyo ebongisami malamu. Yoele alobi mpo na yango ete: “Bazali se kokende ndenge [soda] atambolaka. . . . Bazali kosopana na engumba, . . . Bazali komata na bandako. Bazali kokɔta lokola moyibi na maninisa.” (Yoe. 2:8, 9) Meká komona yango na makanisi! Basoda bazali bisika nyonso. Esika ya kobombana ezali te. Moto te akoki kokima mopanga ya basoda ya Babilone! Lokola mayoyo, bato ya Babilone (to, Bakaladea) bakɔtelaki engumba Yerusaleme na 607 L.T.B. Biblia elobi boye: “Mokonzi ya Bakaladea, . . . ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te.”​—2 Nt. 36:17. w20.04 5 par. 11-12

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto