Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/8 lok. 6
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Kebá na mposa ya koluka lokumu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mokanda ya Biblia nimero 10—2 Samwele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Abisalome akómaki motomboki mpo azalaki koluka lokumu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Lolendo ememaka nsɔni
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/8 lok. 6

Mituna na batangi

◼ Mokapo ya 2 Samwele 18:8 oyo ezali koloba: “Etumba epalangani mokili mobimba: zamba emelaki bato mingi koleka bato baoyo mopanga emelaki bango” elimboli nini?

Mwana ya mokonzi Davidi, mobali kitoko Absalome, abotolaki kiti ya bokonzi, likambo oyo etindaki tata na ye ete akima Yelusaleme. Nsima na yango, zamba ya Efraime​—oyo mbala mosusu ezalaki na est ya Yordani-ezalaki esika etumba esalamaki kati na mampinga ya Absalome mpe basaleli na sembo ya mokonzi Davidi, mopakolami na Jéhovah. Na kotalela lisolo oyo 2 Samwele 18:6, 7 ezali koyebisa biso, bato na Davidi babomaki banguna nkoto ntuku mibale kati na etumba wana monene. Mokapo oyo elandi ebakisi: “Etumba epalanganaki na mokili mobimba; zamba emelaki bato mingi koleka bato baoyo mopanga emelaki bango.”

Bamosusu babimisaki likanisi oyo ete basoda batomboki bamelamaki epai na banyama mabe oyo bazalaki kofanda kati na zamba (1 Samwele 17:36; 2 Mikonzi 2:24) Nzokande, ezali mpenza na ntina te na kokolisa likanisi wana mpo na kolimbola liloba ‘komela’, mpamba te “mopanga”, yango mpe emelaki mpenzampenza te baoyo babomamaki na boumeli ya etumba. Mpo na koloba solo, “etumba epalanganaki na mokili mobimba . . . Mpo na yango, ekoki kozala solo ete basoda ya Absalome, lokola babangaki kati na zamba wana etondaki na mabanga, bakweaki kati na mabulu mpe bamitikaki komikotisa kati na motambo wana ezalaki bango kokima. Ezali komonana ete, engebene kolandana ya lisolo, Absalome ye moko akufaki kati na zamba. Na yango, moto na ye, ekangamaki kati na nzete monene-ntango mosusu ezali mpo na nsuki mingi oyo azalaki na yango​—likambo oyo epimelaki ye libateli nyonso na ntango Yoabe mpe bato na ye babetaki ye. Nzoto ya Absalome ebwakamaki ‘na zamba, kati na libulu monene, mpe bazipaki likolo na ye libondo monene ya mabanga’.​—2 Samwele 18:9-17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto