Basololaka mpenza na bakufi?
MBALA mosusu, bikipe ya ndembo ya Brezile basengaka lisalisi ya bilimu mabe. Basani bazali kobanga noki bakopola liboso na bawelani na bango mpe balingi kozwa batoli. Engebene zulunalo moko, “bamilio na bato bamekami na likoki ya kosolola na bilimu mabe na elikya ya kosilisa mikakatano ya ndenge nyonso”. Na mwa bamboka, bato minene ya politike, bazali kokenda ntango nyonso epai na banganga. Ezala mpo na kosilisa bokono, mpo na kosilisa mikakatano etali mosolo, mingi bazali komeka koyokana na bakufi, mpo bakanisi ete bango nde bazali na mayele eleki.
Kasi ezali mpenza ezaleli malamu ya kosolola na bakufi? Likambo yango ekoki kosalema? Ezali likama te? Mbala mosusu eyano ya Biblia ekokamwisa yo.
Likambo ya Saulo
Totalela likambo oyo esalemaki mpenza mpe eyebisami kati na Biblia: Lokola abangaki mpo na banguna na ye Bafilistia, Saulo, mokonzi ya kala ya Yisraele, akendaki epai na mwasi moko, ye nganga-nkisi na En—Dor. Asengaki mpo ete asolola na mosakoli Samwele, oyo asilaki kokufa. Ntango mwasi yango ayebisaki ye ete amonaki nkoko moko alati nzambala ezangi maboko, Saulo akanisaki ete moto wana azalaki Samwele. Nsango oyo eyebisamelaki ye esakolaki ete Yisraele ekokwea liboso na Bafilistia, mpe na mokolo mokolanda Saulo mpe bana na ye bakolanda “Samwele”, elingi koloba ete bakokufa na etumba. (1 Samwele 28:4-19) Lisakoli yango ekokanaki?
Nyonso ekokanaki te. Ya solo, Saulo azokaki makasi na etumba ya Bafilistia, kasi akufaki mpo amibomaki (1 Samwele 31:1-4) Nzokande, mwana na ye lse-Bosete, ye, abikaki, na bokeseni na lisakoli oyo elobaki ete bana na ye nyonso bakokufa elongo na ye.
Kasi ezalaki mpenza likambo malamu mpo na kosolola na bakufi? Te. Biblia elobi: “Saulo akufaki boye mpo na kozanga bosembo . . . mpe akendaki kotuna toli epai na mosololi na bilimu mabe.” (1 Ntango 10:13) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo oyo? Liteya oyo: Saulo akufaki mpo akendaki kosenga epai na nganga-nkisi asolola na bakufi, abukaki bongo mobeko oyo ya Nzambe: “Moto akozwama kati na bino te . . . to nganga-nkisi, to molengoli, to moto na kobyanga bilimu, to nganga na soloka, to moto na kosolola na bakufi. Mpo ete bato nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso na Jéhovah.” (Deteronome 18:10-12) Mpo na nini Saulo asalaki likambo na mbindo na kosololaka na bakufi? Liboso ya koyanola na motuna yango, tomituna motuna oyo mosusu:
Tokoki mpenza kotuna bakufi?
Mpo ete moto asolola na bakufi, esengeli bazala mpenza na bomoi, bazala na molimo oyo ezangi kokufa. Nzokande Biblia elobi: “Jéhovah Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Na yango, moto ya bomoi azali mpenza molimo. Azali na molimo te oyo ezangi kokufa mpe ekotikala na bomoi nsima na liwa ya nzoto. Biblia elobi boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Mpe lisusu: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” “Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi”, nkunda ya bato banso.—Mosakoli 9:5, 10.
Na yango, bakufi bazali na mayele te to sianse oyo eleki ya bato. Likoki ya kosolola na bango ezali te. Na bongo, soko totosi mobeko ya Nzambe oyo epekisi ete bato basolola na bakufi, tokokosama te. Ata bongo, nsango ekoki kopesama longwa bilimu mabe, lokola emonisi yango likambo esalemaki epai na mokonzi Saulo.
Kasi ezali nani mpenza oyo alobaka?
Ya liboso, bato oyo balobaka ete bazali kosolola na bakufi bazali na lokuta mingi. Mpo na yango tala likambo oyo The World Book Encyclopedia elobaki: “Esili komonisama ete ntango ya milulu ya bilimu mabe banganga-nkisi bazali kondimisa bakiliya na bango ete bilimu mabe bakoki kosolola na bato ya bomoi. Sianse ezali kolimbola ndambo monene ya makamwisi oyo esalemaka na milulu yango, Na ndakisa, banganga-nkisi mosusu balobaka na libumu, bamosusu bazali na bato na bango oyo balobaka na nkuku to bazali na masini moko ya sipesiale, to mpe bakoki komonisa moto bimonaneli. Bakiliya mingi bayaka na milulu ya bilimu mabe mpo bayoka mongongo ya ndeko na bango asila kokufa, mpe mposa yango ekoki kotinda bango bandima nsango nyonso oyo epesami na banganga-nkisi.”
Kasi ndimbola esuki wana te. Na kotosaka na mobeko ya Jéhovah oyo epekisi biso tosolola na bakufi, tozali komibatela na makambo mosusu. Ezali nsango oyo eutaka epai na bilimu mabe, baoyo bazali kotinda nsango yango ezali bongo bilimu makasi oyo balingi kopengola bato. Biblia emonisi ete ezali bongo “banguya mabe ezangi komonana”, Satan le Diable mpe baanzelu bazangi botosi oyo babengami na nkombo ya badémo. (Baefese 6:12) Epai na nganga-nkisi na En—Dor, Saulo asololaki na démo moko oyo alobaki ete ye azali mosakoli Samwele, oyo akufaki.
Likambo ya Saulo emonisaki yango malamu: bilimu mabe bazali na likambo ya malonga te oyo bakoki kopesa bato, mpe lisalisi na bango ezali bobele mpo na ntango moke. Lokola mokonzi na bango, Diable, bango banso bazali babuki lokuta (Malako 3:22; Yoane 8:44.) Mobritanike Arthur Conan Doyle, oyo asila kokufa, ye azalaki koyekola metafizike akomaki boye: “Nde na mawa, tosengeli kokutana na lokuta oyo bato na mayele mabe basili kokana yango. Nakanisi ete, baoyo nyonso basili koyekola likambo yango, bazali kokutana na lokuta oyo ebimisami na motema mpenza mpe oyo mbala mosusu ezali kosangana na solo.” (La nouvelle révélation [Angl.], lokasa 72) Okolinga ete okosama?
Tokanisa moke: Kotekisa baombo, na makambo na yango nyonso ya mabe, etyaki elembo monene kati na Lisolo ya bato. Nani kati na biso akondima konyokwama motindo yango na bolingo na ye mpenza? Moto te. Na yango, mpo na nini tokondima kokoma baombo ya bilimu mabe? Bazali bobele bakosi te, kasi lisusu bilimu yango, bazali kobotola mpenza na nko, bonsomi nyonso ya baoyo bazali koluka bango mpe mbala mosusu bazali konyokola mpe koboma. Yango emonisami na likambo eyelaki José (azali na mibu 29) mpe afandaka na Pernambuco (Brezile), ‘elimu moko ya mabe ekotelaki ye mpe etindaki ye na makasi ete aboma mwana na ye ya mbula moko’. Baoyo nyonso bazali koyokana na bilimu mabe bakoki kokoma baombo ya motindo boye. Na yango, lokola na kala baombo banyokwamaki bazalaki na mposa ya bonsomi, baoyo bazali lelo oyo baombo ya badémo basengeli koluka bonsomi. Soki batiki kokende koluka banganga-nkisi to kosolola na bakufi, bakoki kozwa bonsomi yango. Mpo na yango . . .
Esengeli mpenza kosolola na bakufi?
Te, mpamba te tozangi lisalisi te. Lokola bana oyo bazali na kotya elikya epai ya tata na bango, tokoki bongo kosenga lisalisi epai ya Tata na biso ya makolo, oyo akozala na esengo ya kosalisa baoyo bazali sembo. (Luka 11:9-13) Yisaya, mosakoli na Nzambe, akomaki: “Ekoloba bango na bino ete, Luka toli epai na bato bakosololaka na bilimu mpe banganga-nkisi baoyo bakolobaloba mpe bakoimaima, ekoki te ete bato baluka toli epai na Nzambe na bango? Balombela bato na bomoi epai na bakufi? Na malako mpe na matatoli-o!—Yisaya 8:19, 20.
Na yango, elikya na biso epai na Jéhovah ezali na moboko makasi soko tozali kosala mokano na ye mpe toboi koyokana na bilimu mabe. Moyekoli moklisto Yakobo alobaki: “Na bongo, botosaka Nzambe. Botemelaka oyo na mabe mpe akokima longwa na bino.” (Yakobo 4:7) Nsima na koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, mobali moko azali koyokana na bilimu mabe na boumeli ya mbula 28 alobaki: “Bobanga mabe na Diable te epai na baoyo batiki koyokana na badémo; nde botya elikya epai na Jéhovah.”
Soko tozali koleisa elimo na biso na solo oyo ezwami kati na Liloba na Nzambe mpe tobongisi misala na biso, tokokoka ‘kolata bibundeli nyonso ya Nzambe mpo na kotemela mayele mabe na Diable’ mpe tokokoma baombo na banguya mabe te. (Baefese 6:11) Lisusu, soko tozali kobondela Jéhovah ntango nyonso, tokobatelama mpenza na matindiki ya badémo.—Masese 18:10.
Ezali mpenza elendiseli na ndenge toyebi ete bakufi bazali na bomoi te! Liwa ekokani na mpongi. (Yoane 11:11) Nzokande Yesu Klisto apesaki ndanga ete lisekwa ya bakufi ekosalema.—Yoane 5:28, 29.
Mobali moko oyo na kala azalaki koyokana na badémo ayekolaki kati na Biblia, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye, ete ezali na ntina te mpo na komeka kosolola na bakufi to na moto oyo amitye na esika na bango. Lokola libota yango mpe mingi mosusu kati na mokili, okoki mpe kozwa bonsomi ya elimo. (Yoane 8:32) Luka oyeba solo na ntina ya bakufi mpe mokano ya Nzambe mpo na mokili. Mpo na yango, okozela na motema likolo ebongiseli ya sika ya Jéhovah kati na yango okomona lisekwa ya bandeko na yo, okosolola na bango, mpe ekofanda seko kati na kimya.—Yisaya 25:8.
[Elilingi na lokasa 4]
Nani alobaki, ntango mokonzi saulo asengaki kosolola na Samwele oyo asila kokufa?