Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/1 lok. 15
  • Minyoko mizali se kokoba na Burundi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Minyoko mizali se kokoba na Burundi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/1 lok. 15

Minyoko mizali se kokoba na Burundi

NA EBANDELI ya 1989, bakonzi ya Burundi, mboka ya Afrique centrale, babimisaki minyoko mpo na ba Témoins de Jéhovah. Lokola Mosenzeli ya le 15 aout 1989 (n 16/89) eyebisaki yango, bakonzi bamekaki kosangisa ba Témoins de Jéhovah na makasi ete nawangana kondima na bango. Ba Témoins batyolamaki, bakangamaki, babetamaki mpe myango makasi mikweisamelaki likoló na bango. Kobanda kala, likambo yango ezali ndenge nini?

Lisolo mosusu euti na Burundi eyebisi ete, na ntango mokengeli ya distrike alekaki na masanga ya Kinyinya mpe ya Gitega, bakonzi bamekaki kokanga basangani kati na likita moko ya lisangá. Mokengeli ya distrike mpe oyo ya circonscription balongaki na kokima, kasi bamosusu bakangamaki kati na bango ezalaki na bana mibale oyo bazali kotanga na lycée mpe mwana mwasi moke oyo azalaki na école primaire. Bango nyonso babetamaki Lobi elandi, ba Témoins oyo bakangamaki bamemamaki liboso na gouverneur mpe balimbolaki ye soko mpo na nini bakoki komikɔtisa kati na politike te. Babetaki bango lisusu. Masolo mosusu mazali sé kolobela motindo na makambo yango.

Moklisto moko oyo azali nkulutu na lisangá moko ya Burundi akomi boye: “Témoin moko te asili kokangama mpo na moyibi, mpo na koboma to mpo na mobulu, Soko bakonzi bazali na bifundelo na ntina na ba Témoins de Jéhovah, baloba yango na bisambiselo na esika ya konyokola ba citoyens ya kimya, na koluka bango lokola banyama ya zamba, mpe kobotola biloko na bango. Bandeko mingi basengelaki bobele kokima epai na bango mpo na kokende epai mosusu. Moklisto mwasi moko azalaki koluka lolenge nini mobali na ye akokaki kozwa bonsomi epai na bakonzi. Baboyaki koyamba ye na bakonzi nyonso. Bayanolaki ye ete, ’mobali na yo akoki kozwa bonsomi te, lokola ete ba Témoins de Jéhovah bazali kozwa mbongo ya bapaya mpo na kobebisa mboka na biso.’ Oyo nde lokuta!

Kasi tozali bobele kozwa bansango malamu longwa na Burundi: Ba Témoins bazali komitika te na mitungisi ya banguna. Na mayele nyonso kasi solo mpenza, mosala ya kosakola nsango malamu ezali kosalema, mpe bandeko na biso mibali mpe basi bazali kososola ete bakoki koyika mpiko na kotyáká motema na bango mobimba epai na Jéhovah. Mikanda mingi mitemeli minyoko wana misili kotindama na Burundi, mpe na ntembe te, ebele na yango lisusu ekolanda ntango mokili mobimba ekoyoka ete Burundi ezali se kokoba konyokola ba Témoins de Jéhovah.

[Etanda na lokasa 15]

Tala adresse ya président ya Burundi:

Son Excellence le Major Pierre Buyoya

Président de la République du Burundi

Bujumbura

REPUBLIQUE DU BURUNDI

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto