‘Toyoka nsoni mpo na nsango malamu te’
”Mpo ete nayoki nsango malamu nsoni te! Yango ezali nguya na Nzambe kobikisa bandimi nyonso.”—BALOMA 1:16.
1. Nsango malamu eyambámáká ndenge nini, kasi nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe ezali na bopusi nini likoló na bato bazangi kondima?
Likambo oyo emonani lokola nsango malamu epai na moto moko ezali mpenza nsango malamu te mpo na mosusu. Momemi na nsango malamu ayambamaka na esengo mingi mpe ayokamelaka na likebi monene mpenza. Nzokande, Biblia esakolaká ete bato oyo bazangi kondima bakooka esengo ata moke te na kotia matoi na nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe mpe na maloba na lobiko oyo mazwami kati na yango.—Tala 2 Bakolinti 2:15, 16.
2. Ntoma Paulo alobaki nini na ntina na nsango malamu oyo azalaki kosakola mpe mpo na nini nsango yango ezali nsango malamu kino lelo?
2 Ntoma Paulo azali kati na bato oyo batindamaki mpo na kokende kosakola nsango malamu liboso na bato nyonso. Ndenge nini azalaki kotalela mokumba na ye? Alobi ete: “Bongo, ngai nazali na mposa ete nasakola nsango malamu epai na bino bozali kati na Loma. Mpo ete nayoki nsango malamu nsoni te.” (Baloma 1:15, 16) Soki nsango yango ezali naino malamu, nzokande ntoma Paulo akomaki na baklisto ya Loma esili bongo koleka penepene na mibu 2 000, boye ezali na matomba ya koumela. Ya solo, ezali “nsango malamu na seko”.—Emoniseli 14:6.
3, 4. Mpo na nini Paulo azalaki koyoka nsoni te mpo na nsango malamu?
3 Mpo na nini Paulo alobaki ete ayokaki nsango malamu nsoni te? Mpe mpo na nini akokaki kooka nsoni? Mpo ete nsango yango ezalaki koyambama malamu te: ezalaki kolobela moto moko abomamaki likoló na nzete ya mpasi, lokola mosali na mabe mpe batyolaki ye mingi. Na boumeli ya mibu misato na ndambo, mobali yango atambolaki Palestine mobimba mpo na kosakola nsango malamu, mpe akutanaki na botemeli makasi epai na Bayuda, mingi mpenza epai na bakonzi na bango ya mangomba. Paulo, oyo amemaki nkombo ya moto yango oyo atyolamaki, azalaki kokutana na koyinama ya motindo moko.—Matai 9:35; Yoane 11:46-48, 53; Misala 9:15, 20, 23.
4 Na ntina na botɛmɛli wana, bato mosusu bakokaki kokanisa ete Paulo mpe bayekoli mosusu na Yesu Klisto mbele basengelaki kooka nsoni. Mpamba te, kondima oyo Paulo azalaki na yango na ntango wana, kala atalelaki yango lokola nsoni. Ye moko aokisaki bayekoli na Yesu Klisto nsoni. (Misala 26: 9-11) Nzokande, abongwanaki. Sikawa, ezalaki ye mpe baoyo, lokola ye, babongwanaki na lisangá ya boklisto, bazalaki kokutana na monyoko monene.—Misala 11:26.
5. Ndenge nini Paulo alimboli ntina oyo ye ayokaki nsoni te mpo na nsango malamu?
5 Ye oyo azali kooka nsoni mpo ete azali moyekoli na Yesu Klisto azali komona makambo na miso ya mosuni. Ntoma Paulo azalaki moto motindo wana te. Mpe alimboli mpo na nini azalaki koyoka nsoni te mpo na nsango malamu oyo azalaki kosakola. Alobi ete “yango ezali nguya na Nzambe kobikisa bandimi nyonso.” (Baloma 1:16) Likambo ya koyoka nsoni ezali te mpo na nguya na Nzambe oyo ezali kosala na nzela na moyekoli moko na Yesu mpo na kokokisama ya mokano kitoko mingi, ya Nzambe na kokamwisa oyo Yesu Klisto ye moko azali kosambela mpe kokumisa.—Tala 1 Bakolinti 1:18; 9: 22, 23.
Nsango malamu esakolami kati na mokili mobimba
6, 7. (a) Mokumba nini etali nsango malamu Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi na kokokisa yango, mpe litomba na yango kati na mokili mobimba ezali nini? (b) Tolingi te ete kobanga epekisa biso kopesa litatoli, kasi likambo nini bosengeli kosala mbala mosusu? (Tala note)
6 Lokola Paulo, Ba Témoins de Jéhovah bazali bayekoli ya Mwana na Ye akembisami, Yesu Klisto. Epai na Batemwe na ye, Jéhovah apesaki eloko na motuya, “nsango malamu na nkembo”. (1 Timote 1:11.) Ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mokumba oyo monene, mpe bapesameli toli ete bayoka nsoni te. (2 Timote 1:8) Esengeli mpenza te ete kobanga to ezalela ya koyoka nsoni epekisa bango na kopesa litatoli to na koyebisa ete bazali Ba Témoins de Jéhovah.a
7 Na nzela na litatoli wana ya molende mpe ya mpiko, nkombo na Nzambe Oyo aleki—Likoló esakolami na mabelé mobimba mpe nsango malamu ya Bokonzi na ye esakolami kati na mokili mobimba. Mwana na Nzambe alobaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya’’,—esakweli oyo ekokokana mpenza. (Matai 24:14) Nsango malamu yango esakolami lelo kati na mikili mpe bisanga koleka 210, mpe kosakolama naino esili te. Tozali na nsoni na ntina na nsango malamu te mpe tozali kotala avenire na mpiko nyonso, na kosambelaka lokola esalaki yango bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto: “Mpe sasaipi, Jéhovah, . . . pesa baombo na yo nzela ete basolola Liloba na yo na mpiko nyonso.”—Misala 4:29.
8 Mpo na nini Ba Témoins de Jéhovah basengeli kolɛmba te mpo na botemeli oyo bazali kokutana na yango kati na mikili nyonso?
8 Ya solo, kati na mikili nyonso, Ba Témoins de Jéhovah bazali koyinama mpe koboyama; nzokande, engebene bisakweli, wana ezali nde elembo oyo ezali kokesenisa basambeli ya solo ya Nzambe bobele moko ya bomoi. (Yoane 15:20, 21; 2 Timote 3:12) Na ntina yango, na esika ya komitika kolembisama na makambo motindo wana, basakoli na nsango malamu bayebi nyonso ete bandimami epai na Nzambe mpe bazali kati na lisangá oyo Jéhovah Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba andimi yango.
9. Mpo na nini tosengeli kobulungana te atako mokili mobimba eyini biso.
9 Tobosana te ete tozali na lisungi ya Nzambe Oyo-Aleki—Likoló, Nkolo ya molongo mobimba. Na bongo yango ekosala biso nini ata mangomba nyonso mpe masangá nyonso ya politike ya mokili bayini biso? Mwana bobele moko ya Nzambe ayinamaki na mokili mobimba, mpe tozali na nsoni te ya kozala na ezalela motindo moko. Yesu alobaki na bantoma na ye: “Soko bamokili bazali koyina bino, boyeba ete basili koyina ngai liboso naino bayinaki bino te. Soko bozalaki bato na mokili, mbele bamokili balingaki bato na bango mpenza. Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino.”—Yoane 15:18, 19.
10. Ba Témoins de Jéhovah banyokwamaka mingimingi na banani, mpe mpo na nini tozali koyoka nsoni mpo na yango te?
10 Ba Témoins de Jéhovah bazali konyokwama kati na mokili mobimba, kasi mingimingi kati na mikili oyo mizali komibenga ete ya boklisto. Monyokoli wana oyo euti na boklisto ya mokili ezali komonisa te ete Ba Témoins de Jéhovah bazali baklisto ya solo te. Nkutu, ezali mpenza kondimisa likambo oyo: Ba Témoins ya Nzambe mpe Tata na Yesu Klisto, elingi koloba ya Jéhovah, bazali mpenza baklisto ya solo lokola bazali koloba yango. Lokola bazali Batemwe ya Nzambe, bazali na nsoni te ya konyokwama mpo na likambo etali Nzambe. Na bongo, toli oyo ntoma Paulo apesaki na baklisto ya ekeke ya liboso, ya kozala na nsoni te mpo na nsango malamu, ezali mpe na ntina mpo na Ba Témoins de Jéhovah ya ekeke na biso.—Tala Bafilipi 1:27-29.
Nsango eleki kitoko oyo ebongi na kosakola
11. Lokola tomemi nkombo Témoins de Jéhovah elakisi ete tozali bayekoli na Yesu Klisto te?
11 Baklisto oyo bazali kondima na molende nyonso nkombo Témoins de Jéhovah bazali kokokisa maloba oyo Jéhovah ayebisaki kala na libota ya kondimana. (Yisaya 43:10) Nzokande, yango elimboli te ete bazali lisusu bayekoli na Klisto te, Yesu azali Mokonzi na bango mpe Ndakisa na bango. Ye moko azali témoin de Jéhovah. Ya solo, ye nde Témoin de Jéhovah ya liboso.—1 Timote 6:13; Emoniseli 1:5.
12. Nsango nini Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola kati na mokili mobimba, mpe mpo na nini?
12 Nsango oyo Ba Témoins de Jehovah wana bazali kosakola kati na mokili mobimba ezali nsango eleki kitoko oyo ebongi na kosakola Boyangeli moko te ekoki kozala malamu mpo na bato koleka Bokonzi na Masiya oyo esalemi na Jéhovah kati na mokano ya kotambwisa bato, oyo atindaki Mwana na ye bobele moko mpo na kosomba bango. (Yisaya 9:6, 7) Bafandi ya mabelé oyo epai na bango nsango malamu ya Bokonzi esakolami bazali na likoki ya kondima nsango mpe komimonisa ete babongi mpo na kozwa likabo ya bomoi ya kokoka awa na mabelé oyo ekobongwana paradis, mpe yango mpo na libela.
13. Mpo na nini tosengeli kondima ete Bokonzi na Masiya ekozala boyangeli malamu koleka biyangeli nyonso, mpe na esika ya koyokela yango nsoni, Ba Témoins de Jéhovah bazali kolakisa nde nini?
13 Ya solo, soki Yesu andimaki liwa ya nsomo mpo na kosomba baoyo basengelaki kokoma bato na ye, ezakaki mpo na kopesa bango boyangeli ya kitoko koleka. Yango wana tozali kosɛnga na bato nyonso ete: bokoma bato na sembo mpe ya botosi ya boyangeli yango. Tozali na nsoni te mpo na boyangeli oyo tozali kolakisa na motema moko epai na bato nyonso ya mabelé. Ata soki tosengeli konyokowama, tozali kosakola Bokonzi kozanga kokakatana. Moko moko kati na biso azali kozongela mpo na ye maloba oyo ya ntoma Paulo: “Nayoki nsango malamu nsoni te.”
14. Engebene esakweli na Yesu, kosakolama ya Bokonzi esengeli kokoma kino wapi na mikolo na biso oyo?
14 Yesu asakolaki ete kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi ekosalema kati na mokili mobimba, mpe kokokisama ya esakweli yango kati na mokili mobimba eyokanaki malamu elongo na nsango oyo esengeli kosakolama. (Malako 13:10) Yesu azalaki kobanga te na koloba ete kosakolama ya Bokonzi na Jéhovah ekokoma kino nsuka nyonso ya mokili. (Misala 1:8) Yesu ayebaki ete bisika nyonso oyo bakokaki kokuta bato, basaleli na ye ya sembo bakosala milende ya solo mpo na koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi.
15, 16. (a) Nani abongi koyoka nsango malamu? (b) Mpo na nini mosala ya kosakola ezali kosalema atako monyoko ezali oyo ebimisami na lisangá ya Diable?
15 Lelo, mabelé ezali na bamiliare na bato bapalangani na biteni nyonso ya mokili mpe kati na bisanga minene. Atako bato bapalangani boye, eteni moko te ya mokili epai bato bafandi ezali mpenza mosika koleka mpo na Ba Témoins de Jéhovah, oyo bazali kosala molende na komema nsango malamu na bisika nyonso. Mabelé mobimba ezali etyelo na makolo ya Jéhovah Nzambe. (Yisaya 66:1) Ezala na esika nini bazali likoló na etyelo yango ya makolo bato oyo Nzambe akelaki babongi koyoka nsango malamu na lobiko.
16 Na eleko na biso, nsango malamu ezali bongo kosakolama moko ya kosepelisa: boyangeli na mokonzi epesamaki na maboko ya Masiya. Yesu ayebaki ete uta kati na botemeli makasi oyo lisangá na Diable ebimisaki, elimo na Nzambe ekopusa bayekoli ya solo ya Klisto na kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo ete “nsango malamu oyo na Bokonzi esakolama na mokili mobimba.”—Matai 24:14.
Toyoka nsoni te mpo na Yesu Klisto mpe Jéhovah
17. (a) Likambo nini basambeli ya solo ya Nzambe bazali na nsoni mpo na yango te? (b) Etinda nini Yesu ayebisi kati na Malako 8:38, mpe ndimbola na yango ezali nini?
17 Nzambe Oyo-Aleki—Likoló abangaki te mpo na komipesa nkombo, Jéhovah; basaleli na ye ya sembo basengeli koyoka nsoni mpo na nkombo yango? Basambeli na solo ya Nzambe bayebani mpo ete bazali bato oyo bazali kosambela nzambe mosusu te bobele Mozalisi na bango mpe bazali kotosa ye na makambo nyonso, mpe lokumu wana ezali kosepelisa bango. Kolobaka mpo na ye moko, Yesu ayebisi na Malako 8:38 lilako moko to etinda oyo ete: “Moto nani akoyoka nsoni na ntina na ngai mpe na ntina na maloba na ngai na kati na libota oyo na pite mpe na masumu, Mwana na moto akoyoka nsoni na ntina na ye, wana ekoya ye kati na nkembo na Tata na ye esika moko na baanzelu na bulee.” Motindo moko mpe, ye oyo ayoki Nzambe mpe Tata na Nkolo Yesu Klisto nsoni, Jéhovah mpe akooka ye nsoni. Lisusu, ekelamu nyonso oyo Jéhovah ayoki ye nsoni mpo ete azali komitambwisa mabe, abongi te mpo na kofanda ata na esika nini kati na likoló to na mabelé, biloko ya Nzambe.—Luka 9:26.b
18. (a) Mpo na nini tosengeli kokɔtisa kati na elimo na biso mpe na motema na biso maloba na Yesu oyo makomami kati na Matai 10:32, 33? (b) Likambo nini ezali kokomela bato oyo bazali kotika nzela na kobanga ete ezwa bango kino kowangana Yesu mpe Jéhovah? (Pesa bandakisa na kosalelaka note)
18 Tokotisa maloba oyo na Yesu kati na elimo na biso mpe na motema na biso: “Boye, moto na moto oyo akoyambola ngai liboso na bato, ngai nakoyambola ye liboso na Tata na ngai na likoló. Nde ye oyo akowangana ngai liboso na bato, ngai mpe nakowangana ye liboso na Tata na ngai na likoló.” (Matai 10:32, 33; Luka 12:8, 9) Motindo moko mpe, ye oyo akosangana Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu Klisto, Nzambe mpe akowangana ye. Akondimama te mpo na kozala mosangani ya libota oyo Yesu Klisto azali Mwana ya liboso. Na bongo akobomama na Nzambe na eleko oyo etyamaki”.
19, 20. (a) Mpo na nini bato oyo bazali kosambela mpo ete nkombo na Jéhovah ebulisama bakozala ata na ntina moko te ya koyoka nsoni? (b) Basakoli na mpiko na nsango malamu bazali kosala nini, mpe nani azali kosunga bango?
19 Libondeli oyo Yesu ateyaki lokola ndakisa epai na bayekoli na ye ekokokana: “Tata na biso oyo azali na likoló, nkombo na yo ezala mosanto! Tika bokonzi na yo eya, tika mokano na yo esalema na nse pelamoko na likoló!” (Matai 6:9, 10) Ntango yango ekokokana, bayekoli na Yesu oyo bazali kosalela bolingo bakozala na ntina moko te ya koyoka nsoni. Nkombo na Jéhovah ekokumisama, ekobulisama, bobele te na bamilió na bato oyo bazali lelo na bomoi oyo bakokufa te, kasi lisusu na bamiliare ya bato oyo bazali kati na nkunda mpe oyo Nzambe akobianga bango na bomoi na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula nkoto. Bato nyonso wana bakozala na likoki ya kozala na bomoi libela na libela na mabelé oyo ekobongwana paradis.
20 Kozanga nsoni kati na botemeli oyo bazali kokutana na yango, basakoli na mpiko na nsango malamu na Bokonzi bazali kopesa litatoli na mabelé mobimba mpamba te basimbami na nguya oyo eleki nguya na bato, ezali oyo ya baanzelu na makóló. Tala ntina Ba Témoins de Jéhovah ‘bazali kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo’. Emoniseli 14:6, 7.
Kozanga ata koyoka nsoni, tobanga Nzambe mpe topesa ye nkembo
21. Likambo nini Ba Témoins de Jéhovah bazali koyoka nsoni te na kosala yango, mpe litomba nini yango ebimisi?
21 Ba Témoins de Jéhovah bazali na nsoni te mpo na kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo; bazali nkutu kosalela nkombo na ye mpenza: Jéhovah. Yango wana, na kokokisamaka na bilaka na Nzambe Oyo-Aleki-likóló, bazali kozwa matomba malamu. Na wana mpe, Jéhovah amonani lokola Nzambe ya solo bobele moko, Nkolo moyangeli ya molongo mobimba.
22. Mpo na nini Ba Témoin de Jéhovah bakozwa minyoko makasi, kasi batondi na esengo ya motindo nini?
22 Mosika te, biyangeli bikobalukela bakonzi na mangomba, bakisa mpe na oyo ya boklisto na mokili oyo, mpe bakoboma bango nyonso. (Emoniseli 17:16, 17) Nsima na yango, mokili ekobimisela Ba Témoins de Jéhovah monyoko makasi. Soki Nzambe ya seko azalaki elongo na biso te, mbele tokokoka koyika mpiko te liboso na minyoko yango mpe kobika; kasi azali. Yango wana tokozala na esengo ya komona banguna nyonso ya Jéhovah mpe banguna ya losambo ya solo ya boklisto bakobomama nyonso na maboko na Nzambe oyo biso tozali kosambela ye kozanga kowangana ye. Tokoyoka nsoni te ya kotalelama lokola banguna ya boyangeli ya solo ya Nzambe mpe kobomama lokola banguna yango, tokotonda nde na esengo monene, mpe tokoyembela Jéhovah ete: “Longwa bobele na liboso mpenza mpe lobiko na lobiko, yo ozali Nzambe.”—Nzembo 90:2.
23. Mpo na nini Ba Témoins de Jéhovah bazali ata na ntina moko te ya koyoka nsoni, mpe ezalela yango ebimisi litomba nini?
23 Baklisto ya solo bakosepela kati na Nzambe, Tata na Yesu Klisto na nsima na ye oyo libota na bato esombami ekozala na bomoi libela na libela kati na kokoka mpe bolamu awa na mabelé oyo ekobongwana paradis. Jéhovah asili komimonisa, na nzela na Klisto Yesu, Nzambe moko na nguya mpenza. Kati na mayele na ye mpe bolingo na ye, asalelaki malamu nguya na ye nyonso kozanga kobebisa yango. Na bongo, tozali ata na ntina moko te ya koyoka nsoni mpo na ye to mpo na Mwana na ye bobele moko, Yesu Klisto. Tozali na nsoni te mpo na kosakola nsango malamu oyo eleki kitoko, oyo ezali koyebisa nguya ya Jéhovah ezangi nsuka. Nguya yango, azali kosalela yango na nsima na Yesu Klisto, oyo alobaki, na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé: “Boyika mpiko, ngai nasili kolonga mokili,” (Yoane 16:33) Ezali yango nde tolingi kosala na kolandaka ntango nyonso ndakisa na Paulo, oyo ata mbala moko te na bomoi na ye ayokaki nsɔni mpo na nsango malamu. Soki tozali kosala bongo, Nzambe Mozwi-na—Nguya—Nyonso akoyoka biso nsoni te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tolingi kozala na nsoni te ya kondima ete tozali Batemwe; nzokande, ezali na bantango oyo tosengeli kozala na “ekenge lokola nyoka”. (Matai 10:16.) Kati na Alemanye nazi, Batemwe bayebaki ete ntango ezali mpo na komibimisa ete bazali Batemwɛ mpe ntango mosusu kozanga komibimisa.-Tala Misala 9: 23-25.
b Emonanaki mbala mingi, baoyo batikaki nzela na kobanga ete ezwa bango, kino kowangana Yesu mpe Jéhovah, bazali mpe kozwela yango bolamu te epai na bato ya mokili. Ezali yango nde tozali komona ntango tozali kotanga na ndakisa, na wf N 9/89, page 12; Annuaire 1982, page 168; Annuaire 1977, pages 175 kino 177; bakisa mpe Annuaire 1974, pages 148 kino 150, 176 kino 178. Epai mosusu, ata batɛlɛmi mabe koleka ya nsango malamu bazali komizela ete Ba Témoins batikala ngwi, kozanga kowangana Yesu mpe Jéhovah (Annuaire 198, pages 115 kino 118.) Tala Matai 10:39 mpe Luka 12:4.
Bozongeli
◻ Kolandaka ndakisa ya ntoma Paulo, ndenge nini tosengeli kotalela kosakolama ya nsango malamu, mpe mpo na nini?
◻ Mpo na nini nsango oyo Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola ezali nsango eleki kitoko oyo bato bayoka naino te?
◻ Likebisi nini Yesu apesaki na ntina na moto oyo akoyoka nsoni mpo na ye ntango akokoma kati na nkembo na ye?
◻ Nini ezali kokomela baoyo bazali kowangana Yesu mpe Jéhovah?
◻ Basakoli ya nsango malamu, basalaki nini kozanga koyoka nsoni, mpe mpo na nini?