Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/4 nk. 3-4
  • Elikya ya kimya na mokili: Ndoto mpamba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya ya kimya na mokili: Ndoto mpamba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Nani akoki kotya kimya ya seko?
    Lamuká!—1996
  • Likámá ya nikleere​—Elongolami mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/4 nk. 3-4

Elikya ya kimya na mokili: Ndoto mpamba

LELO oyo, bato bakomi kotya motema mpenza ete etikali moke kimya ekozala na mokili mobimba. Kati na zulunalo Toronto Star, carol Goar akomaki: “Boyokani ndenge na ndenge mpo na kimya ezali kobakama, kobanda na mokili ya Afgbanistan kino na Angola. Matata na mikili mingi oyo mizalaki komonana ete ekoki mpenza kosila te, esili koleka mwa basanza matata yango ezali kopesa elembo ya kokita moke mpe O.N.U. elendisami na makambo yango.” Goar, abakisi ete: “Nyonso wana ebimisaki elikya bipai binso na mokili” Zulunalo USA Today na lisolo na yango ya ebandeli, elobaki bobele bongo ete: “Kimya emonani bipai binso na mokili mobimba.”

Likambo na kokamwisa mpenza na mikolo oyo, ezali oyo nimero moko ya Zulunalo ya Nations Unies (angl.) ebengaki “boyokani ya sika kati ya. Union soviétique mpe Etats—Unis”. Kolongwa ya mapinga ndenge na ndenge na mikili ya bopaya, makambo oyo mabimi pwasa na Europe de l’Est, boyokani mpo na kokitisa motuya na basoda mpe bibundeli: makambo oyo nyonso na sika mapesaki elikya ete nsukansuka banguya ya mokili bakotika kosala bibundeli. Elikya motindo wana ezali koyambama na esengo mingi kati na mokili oyo, bazali koloba ete, mbongo oyo bazali kosalela mpo na bibundeli mpe basoda eleki 425 miliare ya bazaires na mbula, yango ezali kokweisa nkita.

Nzokande, nini ekondimisa mpenza ete elikya ya kimya na mokili mobimba ekokokisama mokolo moko? Ata bato oyo bazali kotalela makambo ya mokili na elikya nyonso, balobi ete makambo ya kosala mazali naino mingi longwa na kokitisa motuya na bibundeli kino kolongola bibundeli nyonso. Kosilisa libela bibundeli ya niklere ezali kosenga confiance makasi mpenza kati na ngambo nyonso mibale koleka oyo na kala. Kasi likambo na mawa ezali oyo ete, uta kala banguya minene ya mokili bazali na suvenire mabe ya kozanga confiance moko epai ya mosusu. Lokola esakolamaki na Biblia, tozali kobika na ntango oyo bato bazali komimonisa ete “bato na yauli (“bazangi sembo”, MN)”.​—2 Timoté 3:3.

Lisusu, moto nyonso andimi te ete kosilisa bibundeli ya nikleere nde ekomema kimya. Ata soko mabota bazwi ekateli ya koboma bakompanyi na bango oyo ekosalaka bibundeli ya nikleere, mindoki mosusu ekoki bobele koboma. Etumba ya liboso mpe ya mibale ya mokili mobimba ezali litatoli ya mawa mpenza mpo na yango. Lisusu, teknike mpo na kosala bibundeli ya nikleere ekozala naino, emilengeli na kosalelama wana boyokani ya politike ekobanda kobeba. Bamosusu, lokola Richard Ned Lebow moto na mayele na makambo na politike, balobaki ete: “Na kobombaka mwa bibundeli ya nikleere, ezali mpenza kopusa na kozala na bokengi.”

Kasi, ntango nyonso bibundeli na nikleere bikozala, kobanga etumba monene ya niklere ekopesa nzela te ete bato bandima kotyama ya kimya. Ekozala bobele ndenge moko soko mikakatano, oyo mitaleli bitumba te mikozala ntango nyonso, mpamba te yango mpe ezali kozangisa bato kimya ya mokolo na mokolo. Secrétaire général ya Nations Unies, Javier Pérez de Cuellar, alobaki mpo na “mpasi ya bamilio (ya bato) bazali na bandako te to bazali kofanda na bandako ya malonga te. Mpasi yango ezali sé kobakama”. Zulunalo ya Nations Unies (Angl.) elobi lisusu ete sous-développement économique (bosenga kati na makambo ya nkita) ezwi “eteni mibale kati na misa na bato na mokili mobimba, nivo ya mpasi mpe ya bobola ezali, mpo na bato mosusu, lokola bampasi oyo ebimisami na bitumba”. Mpe tokoloba nini mpo na ezalela ya bato bakima mboka na bango (réfugiés) oyo motuya elobami ete bazali bato soko 12 milió na mokili? Kokitisa motuya na bibundeli, soko kolongola yango libela, ekomema nde kimya na bomoi na bango?

Emonani polele ete, kokanisa mpenza ete moto akotya kimya na mokili, ezali ndoto mpamba, likanisi mokuse mpe ezangi komona makambo na mosika. Elikya kitoko ezali mpo na kimya? Ye solo, elikya ezali mpenza. Kati na Mosenzeli ye mbala eleki, tomonaki ete Biblia ezali kopesa biso elikya ya solo mpo na kotyama ya kimya’.a Mosika te, Yesu Klisto oyo ezali Mokonzi na Bokonzi na Nzambe, akotya kimya oyo ekokamwisa bato. Kesi kimya yango elimboli mpenza nini mpo na bato? Lisolo elandi ekolobela likambo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala lisolo na motó ya likambo “Nani akokamba bato epai na kimya” oyo ebimaki kati na Mosenzeli ya le 1er Avril 1990.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto