Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/4 lok. 29
  • Okoki koyanola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyanola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Tomekola Yesu, Ndakisa na moto oyo amipesaki na makambo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Baklisto babatisami, bolanda komipesa na makambo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bóbakisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ezaleli na bino ya koyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na koyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/4 lok. 29

Okoki koyanola?

Omonaki ete banimero ya Mosenzeli oyo eutaki kobima ezalaki na makanisi oyo ezali na litomba mpo na yo? Soki ee, meka komikundola makambo oyo esimbaki na lisalisi na mituna milandi.

◻ Tosengeli kosala nini soko tolingi komona boyokani mpe kimya oyo esakolami kati na emonaneli na Yisaya 2:4 mpo na bato na mabota nyonso?

Libosoliboso, tosengeli kondima ete Jehovah, Mozalisi na biloko nyonso azali na lotomo ya kolakisa biso ’’banzela na ye”. Ya mibale, tosengeli kozala na mposa makasi ya kotanda mibeko ya Nzambe mpe koloba ete: “Tokotambola na banzela na ye.’’ (Yisaya 2:2, 3), 15/12, (n 24/89) nkasa 5, 6.

◻ Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali kolemba te liboso na koyina mpe botemeli oyo bazali kokutana na yango kati na mikili nyonso?

Yesu asakolaki ete basambeli na solo ya Nzambe bakokutana na botemeli yango mpe bakoyinama. Yango elembo ezali kokesenisa bango.(Yoane 15:20, 21;2 Timoté 3:12). Na yango, basakoli ya nsango malamu bazali na elikya ya kondimama na Nzambe. Mpe lisusu, ba Témoins de Jéhovah bayebi ete bazali kobatelama na Nzambe oyo Aleki​—likoló, Jéhovah.​—1/1, (n 1/90) lokasa 12.

◻ Tanga bamoko na makambo minene oyo esengami mpo ete mabondeli na biso mandimama?

Tosengeli kondima na bosembo nyonso ete Nzambe azali na bomoi. Tosengeli ’koluka ye mpenza’, na elikya ete akopesa mbano epai na baoyo bazali kosala bongo. (Baebele 11:6) Tosengeli kobondela Jehovah bobele na nzela na Yesu Klisto. (Yoane 14:6, 14). 15/1, (n 2/90) Nkasa 4, 6.

◻ “Bizaleli na moto na Nzambe” elimboli nini? (1 Timoté 3:16,)

Bizaleli na moto na Nzambe elimboli komemya Nzambe, kosambela ye mpe komimonisa sembo na bokonzi na ye likoló na mokili mobimba. -15/1, lokasa 11.

◻ “Motyoli na mibeko” oyo Paulo alobeli kati na 2 Batesaloniki 2:3. azali nani?

Paulo azali kolobela mpo na moto moko te. mpamba te alobi ete “moto” yango amonani na eleko na ye mpe akozala na bomoi kino Jehovah akoboma ye na nsuka na biloko mabe na ntango oyo. Liloba ”motyoli na mibeko” ezali na elilingi. Makambo masili kosalema mamonisi ete ezali bongo bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo, baoyo batondi na lolendo mpe bazali komikumisa mpe na boumeli na bikeke, bamitomboli na kosalaka mibeko na bango moko. 1/2. (n 3/90) lokasa 11.

◻ Ndenge nini lokoso ekoki kosila?

Lokoso ekoki kosila soki bato bazwi mateya mpe kobongisama oyo esengeli, mpe soko bakolanda bamoko na mitinda na etambweli malamu. Mateya motindo wana masengeli kouta bobele na liziba oyo ezangi lokoso. Bobele Nzambe ya makoló nde azali na makoki ya kopesa mateya motindo wana, oyo ezali kati na mokanda oyo ye akomisaki, yango Biblia Mosantu. 15/2, (n 4/90) lokasa 5.

◻ Tosengeli kosala nini mpo ete boyekoli na moto na moto ekolisa kati na biso ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?

Mokano ya boyekoli na moto na moto esengeli kozala bobele ya kotanga bankasa mingi te to kotondisa elimo na biso na makambo mingi. Wana tozali kotanga mokapo moko ya Liloba na Nzambe, tozwa ntango ya kokanisa na makambo oyo tozali koyekola na ntina na bizaleli mpe misala na Jéhovah, na mokano ya kokokana na ye mingi koleka kati na makambo yango. 1/3, (n 5/90) lokasa 13.

◻ Mpo na nini tosengeli kokolisa botángi ya ba evanzile poso na poso mpe masolo ya bomoi na Yesu kati na boyekoli na biso ya Biblia?

Ndakisa na Yesu ezali kosalisa biso na kolona ezaleli ya komipesa na makambo na Nzambe. Yesu ayebaki Tata na ye koleka moto nyonso, yango wana azalaki komekola malamu mpenza misala mpe bizaleli ya Jéhovah. Atikelaki biso ndakisa ya kokoka ya etamboli malamu.(Yoane 1:18; 14:9; Baloma 13:14).1/3, (n 5/90) lokasa 19.

◻ Kati na lisese na talanta oyo elobamaki na Yesu, kobimisa talanta mosusu likoló elimboli nini? (Matai 25:19-23)?

Kobimisa talanta mosusu likoló elimboli kokokisa na bosembo nyonso mosala ya bantoma na Nzambe, kosala bayekoli mpe koteya solo ya elimo na ndako na Nzambe. (Matai 24:45; 28:19, 20; 2 Bakolinti 5:20)-15/3, (n 6/90) lokasa 13.

◻ Tanga makambo misato kati na yango Biblia ekeseni na mikanda misusu?

Ya liboso, batoli na yango ezali ntango nyonso na litomba. (Nzembo 93:5). Ya mibale, esili kolonga liboso na botemeli nyonso na boumeli na bikeke. (Yisaya 40:8; 1 Petelo 1:25) Ya misato, etondi na batoli oyo tokoki kozwa epai mosusu te. Ata tokutani na mokakatano nini to tosengeli kozwa ekateli nini, mayele ya Biblia ekoki kosalisa biso. 1/4, (n 7/90) page 13.

◻ Wapi makambo mibale mamonisi ete Biblia ezali Liloba na Nzambe kasi ya bato te?

Mayele na yango mpe nguya na yango ya kobongola bato, (Masese 2:1, 5. 6; Baebele 4:12). 1/4, (n 7/90) lokasa 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto