Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/6 lok. 31
  • “Nsima apesaki yango mpe na mobali na ye”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nsima apesaki yango mpe na mobali na ye”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/6 lok. 31

“Nsima apesaki yango mpe na mobali na ye’’

ADAM azalaki wana ntango nyoka alobaki na Eva mpe akosaki ye mpo na kotombokela Nzambe? Biblia elobi yango te. Na Genese 3:6, tozali kotanga ete Eva “akamataki mbuma yango mpe aliaki. Na nsima apesaki yango mpe na mobali na ye, ntango azalaki elongo na ye” (MN). Nzokande, mabongoli mosusu ezali koyebisa ete makambo malekaki ndenge mosusu. Na ndakisa, Biblia Liloba lya Nzambe ezali kobongola mokapo yango boye: “Abuki mbuma, alei yango. Na nsima apesi mobali wa ye azali wana; ye mpe alei.”

Na hébreu, verbe ebongolami na “kopesa” ezali na imparfait mpe esangisami na lolenge na yango ya conjonction “mpe” (waw, na hébreu), likambo oyo emonisi kokitana ya malamu to ya mitango. Yango wana, na Genese 3:6, epai kuna liloba waw ezali komonana mbala mingi mpo na koyokanisa kolandana ya makambo, Traduction du monde nouveau ezali na bantina makasi ya kobongola yango boye.

Tokoki solo kokanisa ete Adam alandaki lisolo kati na mwasi na ye mpe nyoka, kozanga koloba eloko likoló na lokuta mpe na matongi ya motomboki oyo azangi komonana, oyo abombamaki na nsima ya nyoka? Tosimba ete molimboli na Biblia J. Lange, ye moto na Alemanye, azali kondima likanisi yango te mpe alobi boye: “Kokanisa ete mobali azalaki wana, mpe ete alobaki eloko moko te ekoki mpenza kondimama te.” Na ntina na maloba “elongo na ye”, molimboli B. .jacob, ye Moyuda, azali kolimbola ete yango (elimboli) te ete azalaki wana elongo na ye (na ntango ya likambo ya liboso to ntango azalaki kolya)”.

Lisolo ya Eva elongo na nyoka emonisi ete mobali na ye ayebisaki ye liboso mobeko na Nzambe na ntina na nzete. (Genese 3:3) Lokola azalaki mokonzi ya Eva, Adam akokisaki bongo mokumba yango. Diable, mpo na ye, atyolaki bokonzi oyo etyamaki na Nzambe mpe asalelaki na mayele nyonso libaku wana ya koloba na Eva ntango azalaki ye moko. Ye ayanolaki na nsima: “Nyoka akosi ngai, mpe nalei.” (Genese 3:13) Eva akosamaki, mpamba te andimaki lokuta, kasi yango elimbisaki libunga na ye te. Ndakisa wana ekebisi biso ete ata mbala moko te tokoki komilongisa na likambo moko mpo na kosala mabe liboso na Jéhovah.​—1 Timote 2:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto