Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/6 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Mpo na nini esengeli koteya?
  • Koluka litomba mabe na nzela na binama ya nzoto
  • Nani azali moklisto “malamu”?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/6 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

Mpo na nini esengeli koteya?

Engebene bakonzi mosusu ya mangomba kokita ya motuya na basambeli ya Mangomba minene ezali mpo ete bato na bango bateyaka te. Na 1988, lokola batungisamaki mpo na mbeba wana. Lingomba ebengami L‘Eglise unie du christ ezwaki ekateli ya kotya ’’mosala ya koteya mpe (na) kobakisama ya motuya na basembwi na yango na esika ya liboso na boumeli ya mibu minei.”

Zulunalo St. Petersburg Times eyebisi ete na Etats-Unis, mangomba mosusu ya minene, oyo na kati na yango Lingomba na protestá(presbytérienne)mpe Lingomba (épiscopalienne), bautaki kosala motindo moko. Nzokande, ankete moko ya sika oyo euti kosalema katikati na masangá 200 ya Lingomba L’Eglise unie du christ emonisi ete ntalo monene ya basangani na bango 1 600 000 bazangi makasi ya kolobela kondima na bango epai na baninga. Moko na bango atunaki motuna oyo: “Mpo na nini koloba na baninga soki tozali kosala malamu to te?’’ Mosusu alobaki: “Ntango moto azali na kondima na ye, ntina ya koloba yango ezali te.”

Nzokande, Wade clark Roof, moto oyo asanganaki na kokomama ya mokanda La grande religion américaine (Angl.), andimaki ete “lolenge oyo bato bazali koloba mpo na lingomba na bango mpe mpo na bomoi na bango ya elimo ekangisami mpenza na lobiko ya kondima yango.”

Soki esengeli bobele ‘kosala malamu’ mpe kozala na “kondima’’ mpo na kosepelisa Nzambe, mpo na nini ntoma Paulo akomaki boye ete: “Mawa na ngai soko nakosakola nsango malamu te!’’ Apesaki ndimbola oyo epai na bandeko na ye baklisto ya Rome: “Soko okoyambola na bibebu na yo ete Yesu azali nkolo mpe soko okondima na motema na yo ete Nzambe asekwisi ye na bakufi, okobika. Mpamba te kondima oyo ekokomisa moto na boyengebene ezali na motema, mpe eyambweli ekokomisa moto na lobiko ezali na bibebu.’’​—1 Bakolinti 9:16; Baloma 10:9, 10.

Koluka litomba mabe na nzela na binama ya nzoto

Kati na mikanda soko 1 100 ya bililingi oyo ebimisami kati na bazulunalo ndenge na ndenge ya bajaponé, bakisa oyo esalami mpo na bana mike, profesere Mamoru Fukutomi, ye oyo akambaki boyekoli oyo etalelaki mikanda misusu koleka 390 oyo esombami na tokyo na sanza moko, alobi ete koleka ndambo na yango ezali kolobaka mingi makambo oyo matali kosangisa nzoto.

Alobi ete, mingi kati na masolo etali kosangisa nzoto, elandaka nzela oyo: mibali bazali kosenga na makasi epai na basi oyo bazali koboya (ete basangisa nzoto) mpe, na nsuka na yango, bazali kondima.’ Zulunalo Daily Yomiuri ezali koyebisa ete pene na 80 % ya bafoto 6 861 oyo ebimisamaki kati na mikanda ya bajaponé oyo mitalelamaki “ezalaki komonisa basi na lolenge ya kolamwisa mposa ya nzoto. Na bafoto yango, ebele na basi bazalaki na “silipe, na maillot de bain to bolumbu’’ mpe bobele 40 % kati na bango balataki bilamba. nzokande 75 % ya mibali bazalaki na bilamba.

Ndenge bazali komonisa nzoto na motindo yango ezali na bopusi nini epai na bilenge? Kati na Masese, mokanda moko ya Biblia, tozali kokuta lisolo ya elenge mobali moko oyo akosamaki, “azangaki mayele’’, abendamaki epai na ndako ya mwasi na ndumba. (Masese 7:7) Nini elobelami na ntina na mwasi ya ndumba? “Sikawa azali libanda,sikawa azali na nzela, azali kozelazela na bizwanelo ya nzela nyonso. Boye akangi ye.”(Masese 7:8-13) Na mikolo na biso, ata lokasa oyo enyatami ‘ezali na nguya ya kokanga’ bilenge. Kasi Biblia epesi toli oyo: “Tika ete motema na yo ebendama na nzela na ye te! Opengolama na bilekelo na ye te.”​—Masese 7:25.

Nani azali moklisto “malamu”?

“Ezala ete moklisto moko azwi ekateli ya kozala soda to ya koboya mosala yango mpo na kobatela lisosoli na ye malamu, akozala na libunga na koloba ete azali kosalela boklisto malamu koleka moklisto mosusu, to mpe kobeta ntembe ete moklisto oyo aponi mosala na soda azali moklisto te, na ntina bobele moko oyo ete azwi etelemelo oyo ekeseni.”

Maloba wana malobamaki na lisangani moko ya Lingomba ya misioni na Alemanye na Juillet 1989. Mpo na nini? Batambwisi ya lingomba yango bazwaki ekateli ya kokweisa etelemelo oyo ezwamaki epai na bamoko na basangani ya lingomba na bango, baoyo engebene bango, koboya kosangana na mosala ya soda mpo na kobatela lisosoli malamu ezali ‘elembo eleki malamu’ ya ezalela na moklisto koleka mosala ya soda. Koyebáká ete baklisto bakoki kosilisa bitumba na “komibatela moto na moto na mobulu”, lisangani ya Lingomba yango endimaki ete bakoki mpe kolonga na kobundisaka mobulu na nzela na nguya na bibundeli mpo na kotya kimya.

Kati na zulunalo na ye Histoire du christianisme (Angl.). Edward Gibbon akomaki ete baklisto na ekeke ya liboso “bazalaki koboya kokota na boyangeli to na mosala ya soda ya Bokonzi. . . . bakokaki te komipesa na misala ya soda, ya magistrats to ya princes, longola bobele soki moto atiki kokokisa mokumba na bulee koleka.

Likambo ezali mpenza te na koluka koyeba soki nani azali moklisto “malamu koleka’’. kasi ezali nde ya koyeba soki moto akoki mpenza kozala solo moklisto wana ezali ye kosala makambo makeseni na boklisto ya liboso. Paulo akomaki: ’’Mpo, ata tozali kotambola kati na nzoto, kobunana na etumba na biso ezali na nzoto te.”​—2 Bakolinti 10:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto