Ntango nkoko na ye ya mobali akufaki
Mama moko ya libota na Virginia Beach (Etats-Unis) akomaki na ebandeli na mbula oyo ete: “Na sanza eleki, nakufelaki tata na ngai. Atako ntaka oyo ekabolaki bango, mwana na ngai ya moke ya mobali elongo na ye balinganaki mingi. Ntango nayebisaki ye ete nkoko na ye ya mobali akufaki, alelaki mingi mpenza. “Mbala moko nalukaki trakte Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basila kokufa? Ntango nazwaki yango, wana elongi ya mwana na ngai etondaki naino na mpisoli, nabandaki kotangela ye yango. Nsima na botangi, atikaki kolela. Merci mpo na mateya yango maleki na motuya oyo na ntina mingi na ntango ya mpasi.”
Mpo na kozwa trakte yango ya kobondisa, mpe mosusu, tuna epai na ba Témoins de Jéhovah ya mboka na yo.