Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/10 lok. 3
  • Olingi mokili epai kuna . . .

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingi mokili epai kuna . . .
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Terorisme ekosila mokolo mosusu?
    Makambo mosusu
  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—olenge nini kozwa yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/10 lok. 3

Olingi mokili epai kuna . . .

□ Okomiyoka na kimya epai na yo, ata soko na ngonga nini?

□ Ekozala na mposa te na bikuke mineneminene, na bibende bikokangaka bikuke makasi, na ba alarmes (bangonga ya ndako), ya lidusu moko na kokengele mpo na banguna, ya lopango, ya bakengeli, ya mbwa mpe bandenge mosusu ya koluka kimya?

□ Okoki kobima ata na butu yo moko kati na balabala na kimya nyonso?

□ Drogue mpe bampasi nyonso oyo yango ekobimisaka, ekozala lisusu te?

□ Bitumba nyonso bikosila mpe epai kuna bakosala lisusu bibundeli te, ata kobomba yango mpe te?

□ Bato bakomitungisa lisusu te na ntina na kobebisama ya bilei, ya mopepe mpe mai?

□ Makambo ya nsomo, kokanga bato mosusu lokola ndanga (prise d’otages) mpe makama ya ba bombe ekolongolama mpenza?

□ Bozwi ya mabelé bakobatelama, bokobongisama mpe bokosalelama na mayele mpo na bolamu ya bato banso?

□ Bato bakozala lisusu te na lokoso mpe na moimi?

□ Bana bakozala peto mpe bakoyeba kotosa bato mosusu mpe biloko na bango?

□ Basi bakonyokwama lisusu te?

□ Mibeko mikozala sembo mpe mikosalelama na boyengebene mpo na bolamu ya bato banso?

□ Bokonzi bokozwa bikateli na kotaleláká bamposa mpenza ya bato, kasi na kotalela matomba ya politike te?

□ Bonsomi mpe bokokani ekozala na maloba mpamba te, kasi likambo ya solo?

□ Bosenga ekozala ce, bato nyonso bakozwa nyonso ebongi mpo na kolongono ya nzoto na bango, mpo na bolamu mpe bomengo na bango?

□ Bana bakookama mposa mpe bakomonisama bolingo, mpe bakonyokolama ata soko moke te to mpe kosundolama?

□ Maladi mpe liwa ekolóngama mpe epai kuna bampasi minene ekozala lisusu te?

□ Okokuta bobele bato na bolingo, bato bayebi kosalisa baninga mpe babongi na kotyela motema?

□ Bomoi ya moto na moto ekozala na motuya mpenza mpe epai kuna bato nyonso bakozala na bomengo libela?

□ Lingomba ekozala lisusu ntina na bokabwani te oyo ezali kobimisa koyina mpe bitumba?

□ Moto na moto akofanda na esika malamu mpe epai kuna ndako ezangi te?

□ Soki osili koyanola ee na moko na mituna oyo, botongi ya masolo malandi ekosepelisa yo mingi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto