Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/4 nk. 4-7
  • Mpo na yo, ntango ezali naino to esili koleka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na yo, ntango ezali naino to esili koleka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo nyonso maumeli “lokola ezalaki yango na ebandeli na kozalisama”?
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Okotosa likebisi na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mikolo ya nsuka
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/4 nk. 4-7

Mpo na yo, ntango ezali naino to esili koleka?

Mikolo misato liboso na liwa na ye, Yesu azalaki na mokolo moko ya mosala mingi na Yelusaleme, mokolo moko oyo mosengelaki komonana mpenza na ntina mingi mpo na baklisto oyo bazali na bomoi lelo. Ateyaki kati na tempelo, ayanolaki na ebele na mituna ya mayele mabe oyo mitunamaki na bakonzi na mangomba na Bayuda kati na mokano ya kozwa ye na motambo. Na nsuka, akweisaki na nguya nyonso bakomeli mpe Bafalisai, kobengaka bango bakosi mpe bitupa oyo basengeli koleka na Geena.​—Matai, mikapo 22, 23.

Wana Yesu azalaki kobima na tempelo, moko kati na bayekoli na ye alobaki na ye ete: “Tala, Molakisi, motindo na kitoko na mabanga mpe motindo na kitoko na ndako!” Yesu, oyo amonisaki ete ekamwisi ye soko moke te, ayanolaki ye ete: “Ozali kotala ndako minene oyo? Libanga moko ekotikala na likoló na libanga mosusu te, makobwakama nyonso na nse.” (Malako 13:1, 2) Na bongo Yesu atikaki tempelo mosika mpo na mbala ya nsuka, mpe akitaki na lobwaku ya Gédron, oyo akatisaki yango, mpe amataki likoló na ngomba na olive.

Lokola Yesu afandaki likoló na ngomba na olive, kati na kongenga wana ya mpokwa, elongo na tempelo oyo ezali komonana liboso na ye na ngambo mosusu ya lobwaku, likoló na ngomba Moriah, Petelo, Yakobo, Yoane mpe André bayei epai na ye bango minei. Batungisamaki mpenza na maloba na ye ete tempelo ekobomama. Batunaki ye: ’’Yebisa biso: Nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3; Malako 13:3, 4) Eyano oyo Yesu apesaki bango na mpokwa wana likoló na ngomba na Olive ezali mpenza na ntina monene mpo na biso. Ekoki kosalisa biso na kozela ntango molai te liboso na kokanisa mpo na “nsuka na biloko na ntango oyo.”

Motuna na bango mozalaki na makambo mibale. Epai moko, nsuka na tempelo mpe ya ebongiseli na Bayuda; epai mosusu, koya na Yesu lokola Mokonzi mpe nsuka ya biloko na ntango oyo. Makambo mibale ya motuna yango mazongelamaki kati na eyano na Yesu, eyano oyo tozali kokuta kati na Matai 24 mpe 25 mpe Malako 13 mpe Luka 21. (Tala lisusu Emoniseli 6:1-8.) Mpo na oyo etali nsuka ya mokili oyo, to ya biloko na ntango oyo, Yesu ayebisaki makambo mingi oyo, soki masangisami nyonso, makokoma elembo moko ya makambo ndenge na ndenge oyo ekomonisa mikolo na nsuka. Elembo yango ya makambo ndenge na ndenge ezali kokokisama sikawa? Ezali kotya biso kati na mikolo ya nsuka oyo Biblia ezali kolobela? Kokokisama na yango ezali mpenza likebisi oyo emonisi ete ntango esili kokoma mosika?

Moko na makambo ndenge na ndenge na elembo na Yesu ezali oyo: “Libota moko ekotemela libota mosusu mpe bokonzi moko ekotemela bokonzi mosusu.” (Matai 24:7) Na 1914 Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Ba Témoins de Jéhovah ya ntango wana babandaki na mbala moko kokengela. Mpo na nini? Na Décembre 1879, mwa mibu 35 liboso, Mosenzeli (ebimeli ya anglais), kotalelaka mitango ya Biblia, elobaki ete 1914 ekokotisa mbongwana kati na lisolo na bato. Etumba wana ezalaki mpenza ya liboso mpo ete ezwaki mokili mobimba. Mikili ntuku mibale na mwambe emikotisaki kati na yango mpe ebendaki liwa ya bato 14 milió. Ezalaki nde ebandeli na makambo oyo makokokisa elembo ya makambo ndenge na ndenge oyo epesamaki na Yesu, elembo oyo ezali koyebisa nsuka? Makambo mosusu ya elembo makomonana nsima?

Kosopama na ebele na makila oyo esakolamaki mpe kati na “emoniseli na Yesu Klisto.” Elobami kati na yango mpo na mpunda moko na langi motane oyo azali “kolongola kimya na mokili.” (Emoniseli 1:1; 6:4) Ezali yango mpenza nde esalemaki kati na 1914 mpe 1918. Nzokande, Etumba na Liboso ya mokili mobimba ezalaki bobele ebandeli. Na 1939 Etumba na Mibale ya mokili mobimba elandaki yango. Mbala oyo, mikili 59 emikotisaki kati na bitumba mpe bato pene na 50 milió bakufaki. Uta Etumba na Mibale ya mokili mobimba, na boumeli ya mibu 45, bitumba koleka 125 bisili kobima, kobendaka liwa ya bato koleka 20 milió.

Tala likambo mosusu ya elembo: “Nzala ekozala’’ (Matai 24:7) Nzala ekotelaki eteni monene ya mokili na boumeli ya Etumba na Liboso ya mokili mobimba.Batangaki nzala minene koleka 60 kobanda 1914; ebomaki bamilio mingi ya bato. Lisusu, lelo oyo mpe, bana 40 000 bazali kokufa mokolo na mokolo mpo na kolya malamu te to mpo na maladi oyo mbele bakokaki te kozwa yango.

“Koningana na mabelé ekozala.” (Luka 21:11) Eningisaki mabelé nsima na Etumba na Liboso ya mokili mobimba. Na 1915, koningana moko na mabelé ebomaki bato 32 610 na ltalie; na 1920, mosusu ebomaki bato 200 000 na Chine; na 1923, bato 99 300 bakufaki na Japon; 25 000 na 1935 na mboka oyo ezali kobengama lelo Pakistan; na 1939, bato 32 700 bakufaki na Turquie; na 1970, bato 66 800 bakufaki na Pérou; na 1976, bato 240 000 bakufaki na chine (bamosusu bazali koloba 800 000); na 1988, bato 25 000 babungisaki bomoi na Arménie. Ya solo, kobanda 1914 koningana minene na mabelé esili kosalema!

‘’Maladi mabe ekozala esika na esika ” (Luka 21:11) Na 1918 mpe 1919, grippe espanole ebetaki bato koleka miliare moko, baoyo kati na bango koleka 20 milio bakufaki. Kasi ezalaki bobele ebandeli. Kati na mikili oyo mikoli naino te, malaria, bilharziose, bokufi miso, pulúpulú makasi mpe bampasi mosusu ezali kokoba kotungisa mpe koboma ebele na bamilió na bato. Epai mosusu, maladi ya motema mpe kanser ezali koboma bamilió na bato. Maladi oyo mazali kozwama na nzela na bosangisi nzoto ezali koboma bato mingi. Engebene makanisi na minganga, SIDA, bolozi oyo na kufa oyo ezali kobangisa, ezali kozwa moto ya sika na minite nyonso, nzokande nkisi ata moko te esili komonana

“Mobulu ekoyikana mingi.” (Matai 24:12) Mobulu ebandaki koyikana mingi uta 1914, mpe lelo oyo makambo masili kobeba nde kobeba. Koboma, kosangana na basi na makasi, koyiba na nzela na mindoki mpe bitumba ya batomboki ezali kolobelama mingi kati na bazulunalo, ba radio mpe ba télévizyó. Koboma bato mpambampamba ezali se kobakisama kozanga ete basukisi yango. Na Etats​—Unis, moto moko oyo azalaki na mondoki abetaki masasi nkama likoló na etuluku ya bana ya eteyelo moko ya primaire, kobomaka bana mitano mpe kozokisaka bana 29. Na Angleterre, moto moko ya ligboma oyo azalaki na mondoki AK-47 abomaki bato 16. Na Kanada, moto moko, oyo alingaka basi te, akendaki na université ya Montréal mpe abomaki basi 14. Bato yango bakokani na bambwa ya zamba, na banyama na yauli, mpenzampenza na banyama bazangi mayele baoyo babotamaki mpo na kokangama mpe kobomama.​—Tala Ezekiele 22:27; Sofoni 3:3; 2 Petelo 2:12.

“Bato bakosenzwa na nsomo na kotalela makambo makobima na mokili.” (Luka 21:26) Mwa moke nsima na kopanzana na bombe atomike ya liboso, Harold Urey, moto na mayele mingi na zébi atomiste, ayebisaki mpo na kolobela ntango ezali koya ete: “Banda lelo, ata tozali kolya, to kolala, to kozala na bomoi to kokufa, ekozala ntango nyonso kati na kobanga.” Likoló na kobanga etumba ya nikleere eyei lisusu kobakisama kobanga oyo euti na bobomi, na nzala, na kotengatenga ya nkita, na kobeba ya bizaleli, na kobeba ya etando. Na yango, na eleko oyo ya mobulu oyo bazulunalo to batélévizyó ezali komonisa biso mokolo na mokolo, kobanga ezali komonana na bisika nyonso.

Ntoma Paulo ayebisaki mpe makambo oyo makomonana na mikolo na nsuka ya biloko na ntango oyo. Ntango tozali kotanga maloba na ye, ezali lokola ete tozali kotanga bansango ya mokolo na mokolo. “Akomaki ete: kasi ososola likambo oyo ete, na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Mpamba te bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matondi, bato bazangi bulee, bato bazangi bolingo, bato bazangi boboto, batongi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkò, bato batondi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali koangana nguya na yango. Opengwa [na bato] ndenge yango.”​—2 Timoté 3:1-5.

Makambo nyonso maumeli “lokola ezalaki yango na ebandeli na kozalisama”?

Ntoma Petelo asakolaki mpe elembo mosusu oyo ekomonisa mikolo na nsuka: “Na mikolo na nsuka baseki bakoya mpe bakoseka, bakotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza, bakoloba ete: ‘Wapi elaka na koya na ye? Mpamba te longwa na ntango na kufa na bankoko, makambo nyonso maumeli bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na kozalisama.’”​—2 Petelo 3:3, 4.

Na eleko na biso, ntango likambo etali mikolo na nsuka elobelami, bato mingi bazali mpenza kokokisa maloba na esakweli oyo na Petelo, kosekaka mpe kolobaka ete: ‘Makambo oyo nyonso mazali uta kala. Ezali bobele Lisolo na bato nde ezali kozongelama mbala na mbala.’ Na bongo bazali kozwa na motuya te makebisi mpe bazali kokoba kotambola “engebene bamposa mabe na bango.’ Ezali “mpo na bamposa mabe na bango” nde bazali koboya kotalela kokokisama ya bisakweli oyo bizali komonisa na polele mpenza mikolo na nsuka.​—2 Petelo 3:5.

Mpo na koloba solo, makambo ndenge na ndenge ya elembo oyo esakolamaki na Yesu makokisama naino boye te liboso, yango nyonso na mbala moko kati na eleko mokuse, mpe mingi boye na mbala moko mpe na makama minene boye. (Na ndakisa, tala lisusu, Matai 24:3-12; Malako 13:3-8; Luka 21:10, 11, 25, 26.) Tolingi lisusu kobenda likebi na yo mpenza likoló na elembo mosusu ya mikolo na nsuka oyo eyebisami kati na Emoniseli.

Totalela mokapo ya Emoniseli 11:18. Kuna elobami ete ntango Bokonzi na Klisto ekobanda koyangela, mabota bakosilika mpe ete ntango na kosambisa ekokoma, na bongo Jéhovah ‘akoboma baoyo bazali kobebisa mabelé.’ Kobeba na mopepe mpe mai ezali kobebisa ezingelo te? Ezali solo ete bato basalelaki ntango nyonso biloko bizali na mabelé mpo na komikomisa bazwi. Kasi naino ata mbala moko te basila kobebisa etando na motindo boye. Nzokande, na nzela na mayele ya teknike oyo ekoli kobanda 1914, bato bazali sikawa na makoki ya kosala yango mpe, na kolukaka na lokoso nyonso komipesa bozwi mingi, bazali mpenza kobebisa mabelé, kobebisa ezingelo mpe kokitisa makoki ya mabelé mpo na kobatela bomoi.

Mokili oyo na lokoso mpe oyo ezali ntango nyonso koluka bozwi ya mosuni ezali kokola na lombango moko ya nsomo. Tala mwa bambeba oyo esili kobima: mbula ya acide, kobakisama ya molunge na etando, madusu na eboke ya ozone, koyikana na bosoto ya bitika na biloko oyo basi bazali kolamba, bitika na bisaleli biuti na ba izine minene oyo bizali na pwazó, nkisi mpo na koboma bangungi mpe banyama mosusu ya mikemike kasi ezali mpe na pwazó, bitika ya nikleere, pétrole oyo ebwakami na mai minene, bosopi ya mai na bosoto mauti na w.c. kati na banzela, kolimwa ya banyama mosusu, bitima bizangi biloko na bomoi na kati, kobebisama ya mai, kobebisama ya zamba, kobebisama ya mabelé, kobeba ya mabelé oyo mazali mpo na milona mpe kobeba ya mopepe ezali kobebisa banzete mpe bobuki mbuma mpe kolongono ya nzoto na moto.

Profesere Barry commoner alobi ete: “Nabanzi ete kobebisama na mabelé mbala na mbala soki epekisami te, bato bakokoka lisusu kofanda na etando na biso oyo te. . . . Mokakatano ezali mpo na kozanga boyebi ya bato na mayele te, kasi mpo na lokoso.” Mokanda Ezalela ya mokili 1987 (angl.) elobi na lokasa 5 ete: “Kobakisama ya misala na bato ebandaki kotya na likama efandeli ya bato awa na mabelé.” Kolandana ya ba émisyó ya télévizyó oyo emonisamaki na 1990 na Etats-Unis ezalaki na motó na likambo ete “Tosala noki mpo na kobikisa etando.”

Moto akotya nsuka te na kobebisama ya mopepe, ya mai mpe ya etando; Nzambe akosala yango na kobomaka baoyo bazali kobebisa mabelé. Nzambe mpe Maréchal na ye ya likoló, Yesu Klisto, bakozwa mokumba wana na kokokisaka lisambisi likoló na mabota oyo bamipesi na bozwi ya mosuni, na ntango ya etumba ya nsuka na Armagedon.​—Emoniseli 16:14, 16; 19:11-21.

Tala mpo na kosukisa elembo oyo ya polele ya esakweli na Yesu na ntina na mikolo na nsuka: “Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba.’’ (Matai 24:14) Nsango malamu yango ezali kosakola ete Bokonzi na Nzambe ezali koyangela sikawa kati na makoló mpe ete mosika te ekosala eloko mpo na koboma ebongiseli na biloko mabe ya ntango oyo, liboso na kozongisa Paradis na mabelé. Nsango yango esilaki mpenza kosakolama kala, kasi na mikili nyonso ya bato te. Nzokande, kobanda 1914, ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mosala yango atako minyoko oyo Yesu asakolaki: kopekisama na Leta, kosalelama makambo na makasi epai na bato, kokangama, kobetama mpe kobomama.

Na 1919, bazalaki bato 4 000 oyo bazalaki kosakola nsango malamu. Motuya na bango mozali ntango nyonso kobakisama, na boye ete mobu mouti koleka Batemwe koleka 4 milió bazalaki kosakola kati na mikili 212, na minoko pene na 200, kokabolaka ebele na bamilió ya ba Biblia, ya mikanda mpe bazulunalo, koyekolaka Biblia na bandako elongo na bamilió na bato mpe kobongisaka ba assemblées kati na ba stades minene epai na epai kati na mokili. Naino te mosala moko monene boye ya kosakola Nsango malamu esalemaki liboso na 1914. Mpo na kokokisa mokumba yango esengelaki koluka binyateli minene ya vitesi mingi, bamwayé ya transport ya sika, na ba ordinatere, na bamasini oyo ezali kotinda nsango na lombango mpenza bakisa mpe na makoki ya mpepo mpe telefone oyo ekomi kosalelama bobele na eleko na biso.

Yelusaleme ya ntango na Yilimia ekebisamaki mpo na kobomama na yango oyo ebelemaki; likambo bobele moko oyo bafandi na yango basalaki ezalaki bobele koseka, kasi bayaki nde kosutuka na nsima. Na mikolo na biso, nsango na likebisi ya nguya mingi oyo ezali kosakola koya na Armagedon esili kosakolama, elongo na bilembo ndenge na ndenge (Emoniseli 14:6, 7, 17-20) Bamilió na bato bazali kokanga matoi. Kasi ntango ezali kokoma mokuse; esili kokoma mosika mpenza. Ososoli ete ntango esili kopusana mpenza?

[[Elilingi na lokasa 7]

Na eleko na Yilimia, bato bayaki kosutuka na nsima mpenza

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto