Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/7 lok. 31
  • Batyaki elikya na bango epai na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batyaki elikya na bango epai na Jéhovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Botya elikya na bino epai na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/7 lok. 31

Masoló ya basakoli na Bokonzi

Batyaki elikya na bango epai na Jéhovah

JÉHOVAH asili kopesa etinda epai na ba Témoins na ye ete basakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba, ete bato ya mabota nyonso bayoka nsango ya mokili ya sika molakami na Nzambe. Mbala mingi na kopusama na bakonzi ya mangomba, bamboka mosusu ezali kopekisa mosala na biso. Ezali yango nde esalemaki na mboka moko ya Afrike. Kasi ba Témoins de Jéhovah bafandi na mboka yango, bazali kozongela maloba oyo ya mokonzi Davidi ete: “Nazali na elikya epai na Nzambe. Nakobanga te.” (Nzembo 56:11. MN) Makambo oyo bandeko na biso bazali kokutana na yango kati teritware wana, emonisi ete bazali na elikya epai na jéhovah mpe bazali kolanda kokokisa mosala yango ya ntina mingi.

Témoin moko, ye directeur ya eteyelo, azwaki ekateli ya ’’kotósa Nzambe liboso na kotósa bato,” na koboya kosangana na makambo ya Leta. (Misala 5:29) Abetamaki mingi mpenza mpe bato bamizelaki ete tribinale efunda ye lokola moteki. Bato nyonso bakanisaki ete akobomama. Atako bongo, ye atyaki elikya na ye epai na Jéhovah. Atikalaki sembo mpe alimbolaki mpo na nini lisosoli na ye limemaki ye na kozwa ekateli wana ya koboya kosangana na makambo ya Leta. Likambo nini lisalemaki? Batikaki ye mpe bazongisaki ye na engumba na ye epai kuna basali na Leta oyo babetaki ye, basengaki ye bolimbisi. Témoin wana ya sembo azongelaki esika na ye ya mosala mpe akómaki inspecteur pédagogique.

Directeur ya eteyelo moko alongolaki Témoin de Jéhovah moko azalaki molakisi. Sanza moko na nsima, directeur wana azwaki mokanda okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis oyo pionnier spécial moko atikelaki ye mpe abandaki koyekola Biblia elongo na ye. Nsima na kotalela mokapo 6, asengaki kolongwa na mosala mpe abandaki koyangana elongo na mwasi na ye na makita nyonso ya ba Témoins de Jéhovah. Mokolo ya lomingo na ntongo, molakisi oyo alongolamaki na mosala asepelaki mingi wana akutanaki na moto oyo alongolaki ye na mosala mpe na komona ete azalaki pene na kokóma ndeko ya elimo.

Likambo mosusu lisalemaki na mboka yango limonisi lolenge oyo ba Témoins de Jéhovah bazali komemya bibongiseli bikamatami na Jéhovah mpe lolenge oyo bazalaki kosala makasi ete lisangá na ye lizala peto. Pionnier moko azalaki kosakola kati na teritware moko etangwi mosika, akutanaki na botemeli. Lokola azalaki moto ya ekólo wana te kasi moto ya etúká mosusu, banguna ya solo balingaki kobengana ye na mboka. Kasi, mokonzi ya mboka akumisaki etamboli na ye malamu mpe matomba malamu ya mosala na ye, mpe apesaki lotomo te ete babengana ye. Mokonzi wana amonaki ete, uta pionnier spécial akómaki, bato ya mboka bakómaki komemya bakonzi ya Leta na kofutáká mpáko mpe na kobongisa banzela mbala moko na poso moko.

Na butu moko, bakangaki Témoin de Jéhovah mosusu kosala ekóbo elongo na mwasi moko azalaki Témoin te. Yango epesaki nsoni, mpe mokonzi ya mboka abengaki pionnier spécial mpe apameli ye ete: “Tala ndeko na yo oyo bakangi ye kosala ekóbo.’’ Bongo pionnier spécial alimbolaki ete: “Atako tozali bato tozangi kokoka, kasi tokeseni, mpamba te kati na lingomba na biso, bakozipaka miso te likoló na masumu minene.”

Témoin oyo asalaki ekóbo, akɔtaki boloko mpe afutaki lomandi. Lisusu, lokola abongwanaki na mabe na ye te, abimisamaki na lisangá ya boklisto. Ekateli wana ekamwisaki mokonzi ya mboka mpe apekisaki baoyo bazalaki kosɛka ba Témoins de Jéhovah. Mokonzi wana alobaki ete, “Botika kotuka ba Témoins de Jéhovah. Bazali na solo. Mangomba mosusu bakosalaka bibongiseli motindo oyo te.’’

Ba Témoins ya sembo kati na mboka wana bazali kolanda toli oyo ezali na Nzembo 37:3. ete: “Zala na elikya epai na Jéhovah mpe sala malamu; fanda na mokili mpe zala na bosembo.’’ Tokosala nde lokola baklisto wana na kotyáká elikya epai na Jéhovah?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto