Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/7 lok. 32
  • “Mpo na nini bana mike bazali kokufa?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mpo na nini bana mike bazali kokufa?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/7 lok. 32

“Mpo na nini bana mike bazali kokufa?”

Ezali likambo oyo libota moko oyo eutaki kokufela bana mike mibale balingaki koyeba. Mofandi moko na mboka Willowick (Etats-Unis) ayebisi:

“Likambo moko liuti kosalema na libota na ngai. Ndeko na ngai ya mwasi akufeli bana mibale ya mike na likámá ya motuka. Libota mobimba lizalaki na mawa mingi mpenza. Moteyi na bango ya lingomba ya baprotestá, akokaki te kopesa bango mwa likanisi ya kolendisa oyo ezwami na Makomami. Alobaki bobele ete: ‘Nzambe alingaki esalama bongo’ to ‘Nzambe azalaki na mposa na baanzelu mibale.’

“Tozalaki bobele na mwa ntango moke mpo na kosala bolukiluki, kasi nasalelaki mokanda comment raisonner à partir des Ecritures na sous-titre ‘Mpo na nini ata bana mike bazali kokufa?’ Na mikolo mpe baposo elandaki, mwasi na ngai mpe ngai topesaki biyano bibongi na ebele na mituna oyo libota na ngai etunaki, lokola oyo ete ‘Mpo na nini bana mike bazali kokufa?’, ‘Yango ezali mokano na Nzambe ya kolongola bana na baboti na bango?’ to, oyo na ntina mingi ete, ‘Tozali na elikya ya komona lisusu bana yango? Na nsima baboti na ngai balobaki ete balingaki koya na Salle du Royaume.”

Mokanda comment raisonner à partir des Ecritures ezali na maloba mpo na kobanda masoló koleka 70. Kati na yango “Liwa,” “Lifelo,” “Molimo,” “Liteya ya kokende na likolo,” “Liteya ya kozala na bomoi esika mosusu nsima na liwa,” “Binama ya nzoto,” “Bondoki,” mpe mingi mosusu. Nkasa sambo ya index ya masoló mpe ba versets ekosalisa yo na kozwa nokinoki biyano oyo ozali koluka. Soki olingi kozwa ekzamplere moko, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto