“Na ndako na ndako”
“ MOKOLO na mokolo, kati na temple mpe na ndako na ndako, bateyaki mpe basakolaki nsango malamu na ntina na Klisto, Yesu.” (Misala 5:42, MN) Mbala mingi ba Témoins de Jéhovah bakotangaka verset oyo, mpe Misala 20:20, mpo na komonisa ete mosala ya kosakola oyo bazali kokokisa ndako na ndako, ezwi moboko na yango kati na Biblia. Kasi, na Alemanye, bakɔtɔli ya ba Témoins de Jéhovah batɛmɛlaki motindo oyo Traduction du monde nouveau ebongolaki mikapo yango, mpe balobaki ete ebongolaki mpenza te na kolanda makomi na Greke na ebandeli.
Maloba wana mazali solo? Soko moke te. Soko mabongoli motoba ya Biblia na Allemand ebongoli ba versets yango motindo moko. Tokoki kotanga libongoli ya mibale ya Zürcher Bibel mpe “Kondimana na Sika” oyo na Rupert Storr, oyo na Franz Sigge mpe oyo na Jacob Schäfer (ebongolamaki mpo na mbala ya mibale epai na N. Adler). Mabongoli ya Lingelesi mpe ya Lifalansé mazali kobongola mikapo yango lolenge moko.
Hans Bruns, molimboli na Biblia, ye moto ya Alemanye, alimboli ntina oyo ye abongolaki “ndako na ndako” na Misala 5:42, ete: “Engebene makomi ya ebandeli, emonani ete bazalaki kokende ndako na ndako.” Ya solo, liloba na Greke oyo lisalelami kati na mokapo yango, kat’ oi’kon, esalelami te na ndimbola ya komonisa esika moko (“na ndako”), kasi na ndimbola ya kokabola, mpe na elobeli na polele “kolanda ndako.” (Na Misala 20:20, tozali kokuta elobeli na boïke, kat’ oi’kous, oyo ezali na ndimbola ya “kolanda bandako.”) Balimboli mosusu, lokola Heinz Schürmann, alobaki ete asaleli kokabolama kati na kobongolama ya maloba Horst Balz mpe Gerhard Schneider, bakomi ya buku monene ekolimbolaka maloba ya Kondimana na Sika, balobi ete liloba yango likoki kobongolama na “ndako moko nsima na mosusu.” Motuya monene ya mikanda oyo mizali na mitindami na Lingelesi, mizali kolimbola verset yango na motindo moko.
Na yango, makambo bafundaki Traduction du monde nouveau ezali solo te. Oyo eleki mpenza ezali ete: emonani polele ete mosala ya kosakola ndako na ndako ezwi mobɔkɔ makasi na Biblia. (Tala Matai 10:11-14; 24:14.) Mpo na yango, ba Témoins de Jéhovah bazali na mokumba ya komekola baninga na bango ya ekeke ya liboso.