Oyo nde esengo na kofanda na mesa na jehovah!
Lisoló ya Ernst Wauer
Lelo, ezali na ngai mwa pɛtɛɛ mpo na koyangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah, na koyekola Biblia mpe na kosakola nsango malamu na Bokonzi. Kasi, ezalaki bongo te awa na Alemanye. Uta 1933 kino 1945, ntango mokonzi mabe Adolf Hitler azwaki bokonzi, baklisto oyo bazalaki kosangana na misala motindo wana, likambo lizalaki likámá mpo na bomoi na bango.
MBULA oyo ezalaki liboso ete Hitler azwa bokonzi, mpo na mbala ya yambo nakutanaki na ba Témoins de Jéhovah na mboka Dresde. Nazalaki na mibu 30. Na Janvier 1935, namipesaki epai na Jéhovah mpe namonisaki mposa ya kozwa batisimo. Lokolo mosala na biso mopekisamaki uta 1933, batunaki ngai ete: “Oyebi makambo oyo makoki koyela yo na ntina na ekateli oyo ozwi? Libota na yo, kolongono na nzoto na yo, mosala na yo, bonsomi na yo mpe ata bomoi na yo ezali na likámá.”
Nayanolaki ete: “Nasili kotanga mituya mpe nazali na mposa ya kosala mokano na Nzambe, ata soko nakobungisa bomoi mpo na yango.”
Nkutu nabandaki kosakola ndako na ndako liboso ete nazwa batisimo. Mbala mosusu, kati na mosala wana, sodá moko ya S.S. oyo alataki bilamba ya mosala (azalaki kati na limpinga libengamaki ete Chemises brunes mpe babateli na bakonzi na basodá na Hitler) afungwelaki ngai ndako; azalaki mokonzi ya bilenge basodá na Hitler. Angangaki na nkanda ete: “Oyebi te ete oyo ezali yo kosala epekisami? Nakobyanga la police!”
Nayanolaki na kimya nyonso ete: “Benga bango. Nazali kolobela bobele Biblia, mpe mobeko moko te mopekisi yango.” Bongo, nabimaki wana mpe nakendaki na ndako elandaki; moto moko na boboto akɔtisaki ngai nɔki. Na nsima wana, likambo moko lisalemaki te.
Nsima mwa moke, bapesaki ngai mokumba ya kotambwisa etuluku ya boyekoli oyo esalemaki ba Témoins mitano soko nsambo, baoyo bazalaki koyangana poso na poso. Tozalaki koyekola banimero ya Mosenzeli oyo ezalaki kokɔta na nkuku na Alemanye epai na nsuka na mboka. Na yango, atako epekiseli, tozalaki mbala na mbala kofanda na “mesa na Jéhovah” mpo na komilendisa kati na elimo.—1 Bakolinti 10:21.
Nakutanaki na mimekamo
Na 1936, Joseph Rutherford, prezidá ya la Société Watch Tower, ayaki na assemblée esalemaki na Lucerne, na mboka Suisse; na libaku wana, abengisaki bandeko nyonso oyo bazalaki na mokumba ya bokengeli kati na lisangá na Nzambe. Bobele bandeko moke nde bakendeki, mpamba te mikanda ya bosali mobembo ya bato mingi ekangisamaki, mpe bamosusu bakengelamaki mpenza na la police. Ndeko oyo azalaki kokamba mosala na mboka Dresde asengaki ngai ete nazala momonisi na ye na Lucerne.
Nalobaki na ye ete: “Nazali elenge, mpe nayebi makambo mingi te!”
Andimisaki ngai ete: “Oyo ezali na ntina na ntango oyo, ezali nde komimonisa sembo. Yango likambo na ntina mingi.”
Mwa moke nsima na bozongi na ngai longwa na Lucerne, bakangaki ngai mpe balongolaki ngai esika moko na mwasi ngai, Eva mpe na bana na ngai mibale ya mike. Wana tozalaki kokende epai na Commissariat central ya Dresde, nakanisaki mingi mpenza mokapo moko ya Makomami oyo ekokaki kosalisa ngai kati na ezalela wana. Masese 3:5, 6 eyelaki ngai na makanisi, ete: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima mayele na yo moko te. Talela ye kati na nzela nyonso, mpe ye akotambolisa yo.” Bokundoli ya mokapo oyo epesaki ngai makasi mpo na koyanola na mituna ya yambo. Na nsima, bakɔtisaki ngai kati na eteni na ndako moko moke, mpe na boumeli ya ntango, namiyokaki mpenza lokola ete natikamaki. Kasi, na kobondeláká Jéhovah na molende, mayoki na esengo matondaki motema na ngai.
Tribinale ekatelaki ngai etumbu ya sanza 27 ya boloko. Nakangisamaki na boumeli ya mbula moko na boloko ya mboka Bautzen. Mokolo mosusu, mokengeli moko na boloko, ye mosilasanzá, oyo azalaki kokitana bakengeli mosusu na mosala, afungolaki ekuke ya eteni na ndako na ngai mpe alobaki na ngai na boboto nyonso, ete: “Nayebi solo ete bozali na lotomo mpo na kotanga mikanda te, kasi mbala mosusu bozali na mposa na mwa eloko moko mpo na kobongola makanisi.” Na yango, na nkuku, apesaki ngai bazulunalo ya kala oyo elobelaki libota mpe abakisaki ete: “Nakoya kozwa yango na mpokwa ya lelo.”
Kasi, nazalaki na mposa ya ’kobongola makanisi te.’ Na boumeli ya bokangami, nazalaki komikanisela mikapo na Biblia mpe nazalaki kobongisa masoló oyo nsima nazalaki kotanga yango na mongongo makasi. Natalaki bazulunalo yango soki ezalaki na mikapo ya Makomami, mpe nakutaki mikapo mingi! Moko na yango ezalaki Bafilipi 1:6, oyo elobi ete: “Nandimi boye ete, mobandisi na mosala malamu kati na bino akomema yango kino nsuka.” Natɔndoki Jéhovah mpo na elendiseli wana.
Na nsima, batindaki ngai epai kuna bato na boloko bazalaki kosala mosala. Mpe, na elanga ya mobu 1939, wana mikolo ya boloko na ngai ekómaki na nsuka na yango, mokonzi ya boloko atunaki ngai soki bindimeli na ngai bibongwanaki. Nayanolaki ye ete: “Nalingi kotikala sembo na kondima na ngai.” Alobaki na ngai ete, nakotindama na molako ya ndako na monyoko ya mboka Sachsenhausen.
Ekómaki ngai, napesaki bilamba na ngai ya ndako mpe nasukolaki nzoto; bakɔkɔlaki nsuki nyonso ya nzoto na ngai mpe bapesaki ngai bilamba ya mokangami. Na nsima, bapolisaki ngai lisusu na esukwelo, na mbala oyo bilamba nyonso bipɔlaki: mwango oyo ba S.S. bazalaki kobenga ete “batisimo.” Nsima na yango, basengisaki ngai ete natelema kati na mai libanda, kino na mpokwa.
Kati na bandako na monyoko, ba S.S. bazalaki konyokola mingimingi ba Témoins de Jéhovah. Mbala mingi, totelemaki libanda na boumeli ya ngonga mingi. Mbala mosusu, moko azalaki koloba na mpasi nyonso ete: “Malamu soki tolyaki bilei kitoko. Boye te?” Mosusu ayanolaki ete: “Kokanisa biloko motindo wana te. Kasi kanisa nde lokumu malamu oyo ya kokɔtela nkombo na Jéhovah mpe Bokonzi na ye.” Mpe mosusu abakisaki ete: “Jéhovah akopesa biso makasi masengeli.” Ezali motindo wana nde tozalaki kolendisana moko na mosusu. Mbala mosusu, bobele elembo moko ya boninga ekokaki mpo na koloba ete: “Ngai nakotikala sembo; yo mpe lokola. Boye te?”
Bilei na elimo kati molako ya ndako na monyoko
Bamoko bazwaki mokumba ya kopesa bilei na elimo epai na bandeko, mpe naponamaki mpo na kosalisa bango. Tozalaki na Biblia monene ya Luther. Epekisamaki kozala na yango. Tobombaki eloko wana ya motuya, mpe, kati na eteni na ndako mokomoko, nzela epesamaki bobele na ndeko moko ete akɔta mpo na ntango moke. Wana ekómaki ngala na ngai, nakɔtaki na nsé na mbeto elongo na torche na ngai mpe nazalaki kotanga Biblia soko na boumeli ya minite 15. Nazalaki kokanga mikapo oyo nakokaki kosolola na yango elongo na bandeko oyo bazalaki na ngai na eteni na ndako moko. Na bongo, ebongiseli moko ekamatamaki mpo na kokabola bilei na elimo.
Tolendisaki bandeko nyonso na kobondela Jéhovah ete tozwa bilei mingi na elimo, mpe ayokaki malɔmbo na biso. Na boumeli ya eleko na mpiɔ ya mobu 1939—1940, ndeko moko, oyo autaki kokangama, alongaki kokɔtisa na nkuku, mwa banimero ya sika ya Mosenzeli kati na ndako na monyoko na kobómbáká yango kati na nzete oyo ezalaki kosalisa ye mpo na kotɛnguma. Ezalaki likamwisi, mpamba te bazalaki kotalela malamumalamu bato nyonso bazalaki kokɔta.
Mpo na bokengi, bobele bandeko oyo baponamaki nde bakokaki kotanga bazulunalo yango mbala moko na boumeli ya mokolo mobimba. Mokolo moko, wana bazalaki kotonga ndako ya kobongisa mituka, nalalaki kati na libulu moko mpe natangaki yango wana ndeko moko azalaki kokengela na libanda. Mbala mosusu, natyaki Mosenzeli na mabɔlɔngɔ na ngai na boumeli na “ngonga na biso ya kotonga bilamba” (na mpokwa, tozalaki na bisika na biso mpo na kobamba ba gants to bilamba mosusu), wana bandeko bazalaki kokengela bipai binso. Ntango mokengeli S.S. moko akɔtaki, nabombaki nokinoki Mosenzeli. Soki bakangaki ngai, mbɛlɛ babomaki ngai.
Ezali esengo na komona lolenge Jéhovah asalisaki biso na komikundola makanisi na kolendisa oyo mazalaki kati na masoló ya bazulunalo. Nazalaki kolɛmba mingi na mpokwa, mpe nazalaki kolala mingi. Kasi, soki natangaki Mosenzeli mokolo wana, mbala mingi nazalaki kolamuka na butu mpe makanisi ya zulunalo mazalaki kozongela ngai na sikisiki. Likambo yango lizalaki kosalema mpe epai na bandeko mosusu oyo baponamaki kati na biteni mosusu ya ndako na monyoko. Na bongo, Jéhovah apelisaki makanisi na biso ete tokoka kokabola bilei na elimo. Tozalaki kosala yango na kolobanáká elongo na ndeko mokomoko mpe na kolendisáká ye ete azala makasi.
Sembo kino na liwa
Na mokolo ya 15 Septembre 1939, etuluku na biso elongwaki na mosala liboso na ngonga ya momeseno. Likambo nini lisalemaki? August Dickmann, moko na bilenge bandeko na biso, asengelaki kobomama liboso na bato nyonso. Bakonzi ya Nazi bakanisaki ete, ba Témoins mingi bakotika kondima na bango wana ekomona bango likambo yango. Nsima na kobomama wana, bakangami nyonso bazongisamaki na boloko, longola bobele ba Témoins de Jéhovah. Ba S.S. balandaki biso bipai binso kati na libanda ya ndako, na kotukáká biso na makolo mpe na kobetáká biso na nzete, kino tokokaki koningana lisusu te. Bapesaki biso etinda ya kotya mabɔkɔ na mokanda oyo molobaki ete tondimaki koangana kondima na biso; soki te, tokobomama na mondoki.
Lobi lolandi, moto moko te atyaki mabɔko. Mokangami moko ya sika oyo, atyaki mabɔkɔ wana autaki kokɔta na boloko, akendeki koboma mokanda yango. Andimaki kokufa elongo na bandeko na ye na esika ete abima na ndako na monyoko lokola motɛki. Basanza elandaki, bapesaki biso etumbu na kosalisa biso misala makasi, na konyokoláká biso ntango nyonso mpe na kopimela biso bilei. Koleka ba Témoins 100 bakufaki na boumeli ya eleko wana ya mpiɔ makasi ya 1939—1940. Batikalaki sembo epai na Jéhovah mpe na Bokonzi na ye kino nsuka.
Mpe Jéhovah apesaki biso kimya. Bandeko mingi batindamaki na milako ya ndako na monyoko oyo esalemaki sika, epai kuna bazwaki bilei. Epai mosusu, mitungisi makasi ekitaki. Na elanga ya mobu 1940, natindamaki na molako ya ndako na monyoko na mboka Neuengamme.
Bilei na elimo na mboka Neuengamme
Ntango nakómaki, nakutaki soko ba Témoins ntuku mibale, baoyo bazalaki na Biblia te, ata mikanda mikolimbolaka Biblia te. Nabondelaki Jéhovah ete asalisa ngai mpo na kosalela makambo oyo nayekolaki na Sachsenhausen mpo na kolendisa bandeko ya Neuengamme. Na ebandeli, nasalelaki mikapo oyo nazalaki komikundola lokola texte du jour. Na nsima, bibongiseli bikamatamaki mpo na kosala makita oyo kati na yango nazalaki kolimbola makanisi na masoló ya Mosenzeli oyo natangaki na Sachsenhausen. Ntango bandeko mosusu bakómaki na esika wana, bazalaki koyebisa makanisi ya banimero ya nsuka ya Mosenzeli oyo bango batangaki.
Na 1943, motuya ya ba Témoins de Jéhovah na Neuengamme ekómaki 70. Na nsima, bayaki kopona ba Témoins mpo na kokende kosala mosala na libanda ya esika wana, na ndakisa kotya bopɛto na bisika epai kuna bampepo ebwakaki ba bombes. Yango esalisaki biso na kokɔtisa Biblia, baekzamplere ya Mosenzeli mpe mwa mikanda mpe ba brochures ya la Société kati na molako (camp) ya ndako na monyoko. Tozalaki mpe kozwa mikanda misusu na nzela na poste, mpe ata vinyo mpe mampa mazangi mfulu mpo na kokumisa Ekaniseli. Tokoki koloba ete Jéhovah azipaki miso ya baoyo bazalaki kotala maboke oyo matindamaki.
Lokola topalanganaki kati na milako mikeseni, tosalaki bongo bituluku nsambo ya boyekoli oyo mokomoko ezalaki na motambwisi moko ya Mosenzeli mpe mosungi moko. Bakopi ya Mosenzeli ezalaki kosalema nkuku kati na biro ya komandá ya molako, epai kuna nasalaki na boumeli ya mwa ntango. Na bongo, etuluku moko na moko ezalaki kozwa zulunalo mobimba mpo na boyekoli ya poso na poso. Likita moko lilongolamaki te. Lisusu, na ntɔngɔ nyonso, na esika bazalaki kobenga nkombo na bakangami, etuluku mokomoko ezalaki kozwa kopi moko ya texte du jour mpe makanisi mabimisami na Mosenzeli.
Eleko moko, ba S.S. bazwaki congé, mpe tosalaki assemblée ya ndambo na mokolo mpe tosololaki na ntina na lolenge ya kosakola nsango malamu kati na molako. Tokabolaki molako na bateritware mpe tosalaki na mayele mpo na komeka koyebisa “nsango malamu na Bokonzi” epai na bakangami. (Matai 24:14) Lokola bakangami bautaki na mikili mikeseni, tosalaki bongo bakarte ya litatoli na minoko mingi oyo ezalaki kolimbola mosala na biso mpe Bokonzi. Tosakolaki na molende mpenza na kino bato bakangami na makambo na politike bakómaki komilela ete: “Tokokende wapi? Tozali koyoka likambo mosusu te bobele makambo na Jéhovah.” Filiale ya Suisse oyo ezalaki na mboka Berne, ezwaki nkutu rapport moko ya mosala na biso oyo totindaki.
Makambo mazalaki malamu kino mokolo oyo Gestapo bakɔtaki na 1944 kati na milako minso ya ndako na monyoko. Ebombelo na biso oyo ezalaki na Neuengamme emonanaki te, kasi bakutaki mwa mikanda epai na Karl Schwarzer mpe epai na ngai. Na boumeli ya mikolo misato, basambisaki biso mpe tobɛtamaki mingi. Ntango batikaki kobɛta biso, nzoto nyonso etondaki na matutu. Kasi, na lisalisi na Jéhovah, tolóngaki.
Mapamboli mingi kati na elimo
Nabimisamaki na boloko na sanza ya Mai 1945 na mampinga na basodá. Lobi lolandi nsima na kobimisama na boloko, tosalaki mobémbo na makolo elongo na etuluku moke ya bandeko mpe bato oyo bazalaki kosepela na solo. Lokola tolɛmbaki, tofandaki pembeni na etimá moko oyo ezalaki na mboka ya liboso oyo tokómaki, mpe tomelaki mai. Wana namiyokaki lisusu na makasi, nakende kosakola ndako na ndako elongo na Biblia na ngai na maboko. Elenge mwasi moko akamwaki na koyoka ete ba Témoins de Jéhovah batindamaki na milako ya ndako na monyoko mpo na kondima na bango. Akendeki na kúku na ye mpe ayaki na miliki mpe na mampa mpo na etuluku nyonso.
Na nsima, bobele na bilamba na boloko, tosakolaki nsango na Bokonzi kati na mboka mobimba. Moto moko ya mboka wana abengisaki biso mpo na kolya bilei epai na ye. Apesaki biso biloko oyo tolyaka esila koleka bambula mingi. Yango esepelisaki biso mingi. Nzokande, tolyaki naino yango te. Tosalaki libondeli mpe tolyaki na kimya nyonso, na kotósa malako na bizaleli malamu. Yango ebendaki likebi ya bato na motindo boye ete, bayokaki diskur na Biblia oyo tosalaki na likita moko. Mwasi moko andimaki nsango malamu mpe azali lelo ndeko na biso kati na elimo.
Tolandaki mobémbo na biso mpe na kokamwa, tomonaki lolenge oyo Jéhovah abatelaki biso. Oyo nde esengo mozindo na kolanda kozwa litomba ya bilei nyonso ya elimo, oyo epesami na bonsomi nyonso na lisangá na Jéhovah, mpe na kokabola yango elongo na bato mosusu! Na bambula oyo elandaki, elikya na biso epai na Jéhovah ezwaki mbano na yango mbala mingi.
Kolongwa 1945 kino 1950, nazwaki libaku kitoko ya kosala na Bétel, na Magdebourg, mpe, nasalaki na filiale ya la Société Watch Tower, na Berlin kino na 1955. Na nsima, naponamaki lokola mokengeli ya zongazonga; nakokisaki mosala yango kino na 1963, mbula oyo mwasi na ngai, Hilde, ayebisaki ngai ete azalaki na zemi. (Eva, mwasi na ngai ya liboso, akufaki wana ezalaki ngai na boloko, mpe nabalaki mwasi mosusu na 1958.) Na nsima, mwana na biso ya mwasi akómaki Témoin moko ya molende.
Bana oyo nabotaki bango na libala ya yambo bakómaki ndenge nini? Likambo ya mawa mpenza, mwana na ngai ya mobali ayebaki solo te. Nzokande, mwana na ngai ya mwasi, Gisela, akɔtaki na Eteyelo ya Galaad na 1953. Ye mpe mobali na ye bazali kosala sikawa kati na moko na ba Salles d’assemblées ya Alemanye. Na lisalisi ya Jéhovah, nazali pionnier permanent uta 1963, mpe nazali kosala kati na masangá oyo mazali na mposa ya lisalisi, libosoliboso na mboka Francfort, mpe na Tũbingen sikawa.
Kino lelo oyo, nazali sé kosepela na bilei ya elimo ya lisangá na Jéhovah oyo bipesami na ndako na basaleli na Nzambe. (1 Timoté 3:15) Na mikolo na biso, nkaká ezali te mpo na kozwa bilei wana ya elimo, kasi ntango nyonso tosepelaka na motuya na yango? Nandimisami ete Jéhovah asili kobomba mapamboli mingi mpo na baoyo bazali kotya motema epai na ye, baoyo bazali sembo mpe baoyo bazali kolya na mesa na ye.
[Etanda on page 26, 27]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
CAMP DE CONCENTRATION YA SACHSENHAUSEN
A Milako ya ba S.S.
B Esika na kobenga nkombo na bakangami
C Boloko
D Eteni na ndako na boloko
E Milako epai bazalaki kokókola nsuki mpe nkúngé
F Esika na koboma bato
G Eteni na ndako ya bibundeli bizalaki na nkisi mpo na koboma