Mituna na batangi
◼ Toli nini Masese 27:23 epesi epai na babateli na mpate na elimo mpe epai na baklisto nyonso?
Totangi ete: “Osengeli koyeba lolenge na etonga na yo. Tya motema na yo na bibwele na yo.” (Masese 27:23. MN) Mokapo oyo mokotangamaka mbala mingi mpo na kolendisa babateli na mpate na elimo ete bayeba basangani ya lisangá na boklisto mpe bayeba mikakatano na bango. Elendiseli oyo eyokani na Makomami, maye mazali kokokanisa bankulutu na babateli na mpate mpe lisangá lokola etonga na mpate. (Misala 20:28. 29; 1 Petelo 5:2-4) Kasi, atako yango esalelami mpo na bankulutu, verset oyo etaleli mpenza bango te.
Mokanda ya Masese motondi na ba versets mingi ekeseni oyo mokomoko na yango ezali kopesa batoli kitoko. Masese 27:23 ezali moko na ba versets oyo elobi ete: ’’Osengeli koyeba lolenge na etonga na yo. Tya motema na yo na bibwele na yo; mpamba te bozwi ekoumela te. Mpe motole mokotikala na libota na libota te. Wana matiti malongolami, matiti na sika mabimi, mpe matiti na ngomba mabukami. Bana na mpate babongi mpo na bilamba na yo, mpe bantaba mpo na motuya ya elanga. Mabɛlɛ na ntaba makoleisa yo mpe libota na yo, mpe basali na yo na basi.”—Masese 27:23-27, MN.
Mokapo oyo mopemami molobeli lolenge na bomoi mpe bopɔlɔ ya moto na molende oyo akolikya epai na Jehovah. Mokapo oyo mozali komonisa bomoi ya mobateli na mpate na Yisraele, oyo ekeseni mbala mosusu na bomoi na lokumu ya bato na mombongo oyo bazali na mposa ya kozwa misolo.
“Bozwi,” na elobeli mosusu mosolo oyo mozwami na misala na mombongo, mpe lokumu oyo yango ekopesaka (“motɔlɛ“), ekoki kosila, likambo oyo bato banso bayebi yango. Kozala na bomoi ya bopɔlɔ ezali na matomba mingi, lokola mobateli na mpate na ntango na kala oyo azalaki kokengela etonga na ye. Bomoi yango ezalaki na bopɔlɔ na ndimbola ya kozanga komibanzabanza te. Mobateli na mpate asengelaki komimonisa na ekenge mpe koyeba ete etonga na ye ezalaki na likámá te. (Nzembo 23:4) Emonaki ye ete moko na mpate na ye ezwi maladi to mpe ezoki, mobateli na mpate azalaki kopakola mpate yango mafuta. (Nzembo 23:5; Ezekiele 34:4; Zakaria 11:16) Mbata mingi, mobateli na mpate oyo azalaki kotya motema na ye mobimba mpe makasi na ye nyonso na mosala na ye, azalaki kozwa mbano mpo na yango: etonga na ye ezalaki sé kokóla.
Mobateli na mpate oyo azalaki kosala makasi mpe na malamu mingi, akokaki kolikya kozwa lisalisi na Jehovah. Lolenge nini? Nzambe akopesaka bileko mpe bibongiseli na biloko mosusu oyo bikobotisaka matiti mpo na koleisa etonga. (Nzembo 145:16) Wana matiti mazalaki kozanga na lobwako na nsuka na eleko, ekokaki mbala mosusu kozwama mingi likoló na ngomba, epai kuna mobateli na bolingo akokaki komema banyama na ye.
Masese 27:26, 27 emonisi moko na mbuma ya mosala yango: azalaki kozwa bilei mpe bilamba. Ya solo, mokapo oyo molobeli bilei na ntalo mingi te mpe oyo eleki na motuya mingi te; elobeli mpe bilamba na lokumu mingi te to mpe elamba eleki kitoko. Kasi, soki bamilengelaki na kosala milende makasi, mobateli na mpate mpe libota na ye bakokaki kozwa mabɛlɛ na etonga na bango (mpe kosala na yango fromage), mpe kozwa nkungé oyo ekosalisa bango na kotonga bilamba makasi.
Na yango, toli oyo ete: “Osengeli koyeba lolenge na etonga na yo,“ etaleli mpenzampenza bakengeli na lisangá te, kasi baklisto nyonso. Ezali kolobela ntina ya kosepela na bilei mpe na bilamba oyo bizwami na mosala makasi, na elikya ete Nzambe akotika biso te. (Nzembo 37:25; 2 Batesaloniki 3:8, 12; Baebele 13:5)Soki tokokanisi mokapo ya Masese 27:23-27 mpe oyo ya Luka 12:15-21 mpe 1 Timoté 6:6-11, tokomona ete toli na Nzambe na ntina na likambo oyo ezali na motuya mingi. Na yango, moko na moko kati na biso akoki kotanga lisusu Masese 27:23-27 mpe komituna ete: ‘Nazali nde kokanga ntina na etinda oyo? Nakosalelaka yango na bomoi na ngai ya mokolo na mokolo?’