Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jr mok. 11 nk. 128-139
  • “Babateli oyo motema na ngai endimi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Babateli oyo motema na ngai endimi”
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BAZALI NA MOKUMBA YA KOBATELA BAMPATE
  • “BAKOLEISA BINO MPENZA”
  • “TALÁ OYO YEHOVA ALOBI”
  • BAPESAKA DISIPLINI “NA NDENGE OYO EBONGI”
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bóbatela na bolingo nyonso bampate ya motuya mingi ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bankulutu oyo bazali “bandakisa epai ya etonga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Babateli ya mpate ya Klisto, ‘Bófungola mpenza mitema na bino’!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
jr mok. 11 nk. 128-139

MOKAPO YA ZOMI NA MOKO

“Babateli oyo motema na ngai endimi”

1, 2. (a) Likambo nini ekoki kokómela bampate soki babatelami malamu te? (b) Na ntango ya kala, mobateli ya mpate azalaki na mosala nini?

NA EKÓLO Japon, ezalaki na mwana mobali moko ya moke na nkombo Hiroyasu. Mama na ye asombaki mpate moko ya mwasi mpe mosusu ya mobali. Hiroyasu azalaki kobatela yango, mpe na nsima mpate yango ekómaki kobota bana-mpate mibale mbula na mbula, mpe mokemoke etonga yango ekómaki monene. Ntango Hiroyasu akokisaki mbula 12, akómaki na etonga ya bampate soki 12 to 13. Hiroyasu alobi boye: “Mokolo moko na ntɔngɔntɔngɔ wana nazalaki naino na mbeto, nayokaki bampate yango ezali kolela. Nabimaki mbala moko te. Kasi na nsima ntango nabimaki, namonaki etuluku ya bambwa ya zamba ezali kokima, euti esika bampate na ngai ezalaki; mpe ntango nakendeki kotala, nakutaki esasi yango. Na motema likoló, nakómaki kolukaluka mpate ya mwasi. Nakutaki yango ezali kobunda na liwa na kati ya makila. Kaka mpate ya mobali nde ebikaki. Esalaki ngai mpasi mingi na motema. Esengelaki nabima mbala moko ntango nayokaki yango ebandi kolela. Bampate yango ezalaki na makasi te ya kobundisa bambwa ya zamba.”

2 Na ntango ya kala, moto nyonso ayebaki mokumba ya mobateli ya mpate. Mobateli ya mpate azalaki na mosala ya komema etonga esika matiti ya kolya ezali mpe kosala nyonso mpo ete banyama oyo azalaki kobatela elya malamu. Azalaki mpe kobatela yango mpo banyama mabe elya yango te mpe azalaki koluka bampate oyo ebungi. (1 Sam. 17:34-36) Mobateli ya mpate azalaki kopemisa bampate na ye mpe kosala nyonso mpo eloko moko etungisa yango te. Ntango mpate ya mwasi ezalaki kobota, azalaki kosalisa yango ebota malamu mpe na nsima azalaki kobatela bana-mpate yango. Bato mingi oyo bakomaki Biblia, ata mpe Yirimia, basaleli elilingi ya mobateli ya mpate mpo na kolobela moto oyo azwi mokumba ya kobatela bato, ezala mokonzi oyo azali koyangela bango to moto oyo azali mokɛngɛli na bango na makambo ya elimo.

3. Yirimia alingaki komonisa nini ntango asalelaki maloba “mobateli ya mpate” mpe “koleisa bampate”?

3 Bandeko mosusu bakanisaka ete bankulutu bazali babateli ya mpate kaka ntango bakendaka kotala bandeko epai na bango mpo na kosalisa bango mpe kolendisa bango. Nzokande, ndenge oyo Yirimia asalelaki maloba “mobateli ya mpate” mpe “koleisa bampate” emonisi ete azalaki kolobela makambo nyonso oyo etali boyokani oyo ezalaki kati na bakɛngɛli ya Yuda ná bato oyo bango bazalaki kobatela. Mbala mingi Nzambe alobaki ete bankumu, basakoli, mpe banganga-nzambe ya Yuda bazali babateli mabe mpo bazalaki koluka matomba ya bato te. (Yir. 2:8) Bazalaki konyokola “bampate” oyo bazalaki kokɛngɛla, kobungisa bango nzela mpe bazalaki kokipe bango te mpo bazalaki koluka matomba na bango moko. Basundolaki mpenza bato ya Nzambe mpe bato yango babebaki mpenza na elimo. Yehova alobaki ete “mawa” mpo na babateli yango ya lokuta, mpe alakaki bato na ye ete akopesa bango babateli oyo bakokipe bango mpe bakotyela bango likebi mpe bakobatela bango mpenza.​—Tángá Yirimia 3:15; 23:1-4.

4. Lelo oyo, banani bazali kobatela etonga ya Nzambe, mpe basengeli kozala na makanisi nini mpe ezaleli nini?

4 Yesu, Mobateli Monene ya bampate ya Yehova oyo akómaki Mokonzi ya lisangá ya bokristo, nde akokisaki elaka yango ya Nzambe na mobimba na yango. Ye moko alobaki ete azali “mobateli ya mpate oyo aleki malamu,” oyo azalaki koyokela bampate oyo azalaki kokamba mawa. (Yoa. 10:11-15) Lelo oyo, mpo na kobatela bampate na ye awa na mabele, Yehova azali kosalela babateli basungi, elingi koloba bankulutu oyo bazali na bokɛngi mpe bazali kokokisa mokumba na bango malamu, ezala baoyo bazali kati na bakristo oyo batyami mafuta na elimo to baoyo bazali kati na “ebele mpenza ya bato.” (Em. 7:9) Babateli yango basalaka makasi bámekola elimo ya komipimela oyo Yesu azalaki na yango. Na ndakisa ya Kristo, basepelaka koleisa lisangá mpe balingaka yango. Mawa mingi na nkulutu nyonso oyo azali kokipe bandeko na ye te, oyo azali komikómisa mokonzi na bango, oyo azali makambo makasimakasi to azali na lolendo! (Mat. 20:25-27; 1 Pe. 5:2, 3) Lelo oyo Yehova azali kosɛnga nini epai ya babateli na lisangá? Ndenge nini makambo oyo Yirimia akomaki ekoki kosalisa bankulutu bázala na makanisi mpe ezaleli oyo ebongi ntango bazali kokokisa mikumba na bango? Tiká tótalela mikumba oyo bankulutu bazali na yango ya kosalisa, kobatela mpe koteya na kati mpe na libanda ya lisangá, mpe mokumba na bango ya kosambisa.

BAZALI NA MOKUMBA YA KOBATELA BAMPATE

5-7. (a) Yehova alingi ete bábatela bampate na ye ndenge nini, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini bankulutu bakomonisa ete bazali na bolingo ya solo mpo na bandeko na bango, ezala mpe baoyo batiki etonga?

5 Ntoma Petro amonisi ete Yehova azali “mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na [biso].” (1 Pe. 2:25) Ezaleli nini Yehova amoniselaka “bampate” na ye? Tokozwa eyano soki totaleli ndenge oyo asalaki kala na ntango ya Yirimia. Nsima ya kopamela babateli mabe ya ntango wana, oyo bapanzaki mpe basundolaki etonga, Yehova alobaki ete ‘akoyanganisa’ bampate na ye, mpe akozongisa yango na esika na yango ya koleisa banyama matiti. Alakaki ete akopesa yango babateli ya mpate ya malamu, “oyo bakoleisa mpenza yango” mpe ete akosala nyonso bábatela bato na ye mpo banguna básala bango mabe te. (Yir. 23:3, 4) Ya solo, Yehova azalaki kozwa bampate na ye na motuya mingi. Lelo oyo bampate na ye bazali mpe na motuya mingi. Apesaki eloko moko ya valɛrɛ mingi mpo bázwa bolamu ya libela.​—1 Pe. 1:18, 19.

6 Na ndakisa ya babateli ya mpate, bakɛngɛli ya lisangá basengeli te kozala na bopɔtu ntango bazali kobatela lisangá. Soki ozali nkulutu, ozalaka ekɛngɛ mpo na koyeba likambo nyonso oyo emonisi ete bandeko bazali konyokwama, mpe ozalaka na mposa ya kosalisa bango kozanga koumela? Mokonzi ya mayele Salomo akomaki ete: “Osengeli koyeba mpenza ndenge ya etonga na yo. Tyá motema na yo na bitonga na yo.” (Mas. 27:23) Vɛrsɛ yango ezali kokumisa milende oyo babateli ya mpate bazalaka na yango; kasi, maloba yango etaleli mpe ndenge oyo babateli ya mpate na lisangá babatelaka bandeko. Soki ozali nkulutu, oboyaka ezaleli nyonso ya kokonza bandeko na lisangá? Lokola Petro apekisaki ezaleli ya ‘komikómisa mokonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe,’ yango emonisi ete ekoki kosalema ete nkulutu amonisa ezaleli yango. Okoki kosala nini mpo okokisa makambo oyo Yirimia 33:12 elobeli? (Tángá.) Mbala mingi, bakristo oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko, bandeko basi to bandeko mibali oyo balongani na bango bakufá, mibange mpe bilenge bazalaka na mposa ete básalisa bango mpe bátyela bango likebi.

Elilingi na lokasa 130

7 Na bantango mosusu, esɛngaka ete mobateli ya mpate na lisangá akende koluka mpe asalisa bandeko oyo, mpo na ntina moko boye, batikaki etonga, kaka ndenge mobateli ya mpate asalaka mpo na etonga na ye. Mpo asala yango, asengeli kozala na elimo ya komipimela mpe komikitisa. Asengeli kozala na motema molai mpe kondima kosalela ntango na ye mpo na kokokisa bamposa ya bandeko oyo azali na mokumba ya kokɛngɛla. Na bosembo nyonso, bankulutu basengeli komituna boye: ‘Nasalaka mpenza nyonso mpo na kolendisa mpe kotonga bandeko na esika ya kopamela bango to koloba mabe mpo na bango? Nazalaka mpenza na mposa ya kobongisa bizaleli na ngai mosusu?’ Mbala mosusu esɛngaka milende mingi mpo na kosalisa ndeko amona makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Soki ndeko mobali to ndeko mwasi andimi mbala moko te toli oyo euti na Biblia (kasi te oyo euti na makanisi na yo moko), kanisá ndakisa ya Yehova oyo azali Mobateli ya mpate mpe Mokɛngɛli oyo Aleki. Lokola azali na motema molai, ‘azalaki kaka koloba’ na bato na ye oyo bakómaki batomboki mpe azalaki kosala nyonso mpo asalisa bango. (Yir. 25:3-6) Lelo oyo basaleli mingi ya Nzambe bazali na momeseno ya kosala mabe te, kasi ntango esengeli kopesa toli, nkulutu asengeli kolanda ndakisa ya Yehova.

8. Ndenge nini babateli na lisangá bakoki komekola ezaleli ya Yirimia?

8 Lokola elikya ezalaki naino ete bato ya ekólo na ye bakokaki kozongela lisusu Yehova, Yirimia abondelaki Nzambe mpo na bango ete: “Kanisá ndenge natɛlɛmaki liboso na yo mpo na koloba malamu na ntina etali bango, mpo na kozongisa nkɛlɛ na yo nsima mpo elongwa epai na bango.” (Yir. 18:20) Maloba yango emonisi ete Yirimia azalaki koluka nde makambo ya malamu oyo Bayuda bazalaki kosala, na esika ya kokanisela bango mabe. Lelo oyo mpe, bakɛngɛli na lisangá basengeli komekola ezaleli ya Yirimia, bakolongola elikya kaka soki emonani polele ete moto aponi kosala oyo ezali mabe mpe aboyi kobongola motema. Ekozala malamu bankulutu bápesaka bandeko longonya mpo na makambo malamu oyo basalaka mpe bábondelaka mpo na bango mpe elongo na bango.​—Mat. 25:21.

Na nzela ya Yirimia, Nzambe alakaki ete akopesa babateli ya ndenge nini? Mpe ndenge nini bakɛngɛli bakristo basengeli kobatela etonga?

“BAKOLEISA BINO MPENZA”

9, 10. Mpo na nini kozala mobateli ya malamu (nkulutu na lisangá) esɛngi mpe kozala moteyi?

9 Maloba oyo ezali na Yirimia 3:15 emonisi ete babateli ya mpate na lisangá basengeli ‘koleisa [basusu] mpenza na boyebi mpe na mayele ya kososola,’ elingi koloba basengeli kozala bateyi. (1 Tim. 3:2; 5:17) Yehova alakaki bato na ye ete babateli ya malamu oyo akopesa bango bakosala ndenge wana. Mpe alendisaki Bayuda bálanda mateya oyo Yirimia azalaki kopesa bango mpo na kosembola bango. (Tángá Yirimia 6:8.) Bampate esengeli koleisama malamu mpo ezala makasi. Ndenge moko mpe, mpo bato ya Nzambe bázala makasi na elimo, basengeli koleisama mpe kotambwisama na nzela ya Liloba ya Nzambe.

10 Na likambo etali koteya, bankulutu bazali na mikumba mibale: Basengeli kosalisa bandeko oyo bazali na lisangá mpe lisusu kosalisa bato oyo bakómi naino bakristo te. Mpo na oyo etali kosalisa baoyo bakómi naino bakristo te, kobosana likambo oyo te: Moko ya bantina minene oyo mpo na yango lisangá ya bokristo esalemaki ezali mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yango wana, bankulutu basengeli kozala basakoli ya molende. (Yir. 1:7-10) Soki basali bongo, bakokokisa mokumba oyo Nzambe apesi bango mpe bakozala ndakisa malamu mpo na bandeko na bango. Soki ozali nkulutu na lisangá, omonaka te ete kosakola mbala na mbala elongo na bandeko basi mpe mibali ndenge na ndenge epesaka yo libaku ya kosalisa bango bábongisa lolenge na bango ya koteya, yo mpe obongisa oyo ya yo? Mpe ntango ozali kopesa ndakisa ya malamu mpo ozali kosakola na molende, ozali kolendisa lisangá mobimba mpe yango ekoki kosala ete lisangá ekende liboso.

11, 12. Soki nkulutu moko alingi kozala mobateli malamu, asengeli kotya likebi na likambo nini?

11 Mpo makambo oyo bankulutu bateyaka na lisangá ezala bilei malamu oyo ekotonga bandeko na elimo, esengeli kouta na Biblia. Na yango, mpo babateli na lisangá bázala bateyi malamu, basengeli koyekola Liloba ya Nzambe na molende. Basengeli kokesana na bateyi ya ntango ya Yirimia. Yirimia amonisi polele mpo na nini mateya na bango ezalaki kosalisa bato te; alobi boye: “Mpo babateli ya mpate bamitambwisi na bozoba mpenza, mpe baluki Yehova te. Yango wana basali makambo kozanga mayele ya kososola, mpe [bampate] nyonso oyo bazalaki koleisa epalangani.” (Yir. 10:21) Bateyi yango bazalaki kolanda malako ya Makomami te mpe bazalaki koluka litambwisi ya Nzambe te. Yango wana bazalaki na bwanya ya solo te. Kutu, Yirimia asakolaki bitumbu ya makasi oyo ekokwela bato oyo bazalaki kotuta ntolo ete bazali basakoli.​—Tángá Yirimia 14:14, 15.

12 Bakɛngɛli na lisangá bakeseni na babateli mpate wana ya lokuta mpamba te bango bayekolaka mpe balandaka ndakisa ya Yesu. Yango wana, bazalaka bakɛngɛli ya bwanya ntango bazali kosalisa etonga. Mbala mosusu ezalaka pɛtɛɛ te bálanda programɛ na bango ya boyekoli mpamba te makambo mingi esɛngaka ntango mpe likebi na bango. Kasi soki ozali nkulutu na lisangá, ondimaka mpenza ete mateya na yo ekozala na litomba mpe ekozala ya solo, ete mateya na yo ekomonisa boyebi mpe mayele ya kososola, kaka soki euti na Liloba ya Nzambe mpe na litambwisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele? Soki omoni ete oyekolaka lisusu mingi te ndenge ozalaki kosala liboso, okoki kosala nini mpo ozala te lokola babateli ya lokuta ya ntango ya Yirimia?

Elilingi na lokasa 135

13. Likambo nini esalisaki Yirimia azala moteyi malamu, mpe lelo oyo ndenge nini ndakisa ya Yirimia ekoki kosalisa babateli na lisangá?

13 Likambo mosusu oyo esalaki ete Yirimia azala moteyi moko ya malamu mpenza, ezali bandakisa oyo azalaki kosalela. Ezali solo ete Yehova nde apesaki ye bandakisa oyo azalaki kosalela. Na ntembe te bato ya ntango na ye babosanaki te ndenge oyo bamonaki ye abuki mbɛki ya mabele mpe na nsima bayokaki ye azali kosakola ete na ndenge yango nde Yerusaleme mpe bato na yango bakobebisama! (Yir. 19:1, 10, 11) Yirimia asalelaki ndakisa mosusu. Asalaki ekanganeli ya nzete mpe atyaki yango na nkingo na ye mpo na komonisa ndenge oyo bato na ye bakonyokwama makasi ntango Babilone ekokonza bango. (Yir., mik. 27-28) Ezali solo ete Nzambe azali te kosɛnga bankulutu ya lisangá na bino básala makambo ya ndenge wana mpo na kopesa liteya moko boye. Atako bongo, ntango bazali koteya, osepelaka na ndenge oyo baponaka malamu bandakisa oyo bapesaka mpe makambo oyo bato mosusu bakutanaki na yango, boye te? Na ntembe te, kosalela maloba ya elilingi mpe bandakisa ekoki mpenza kozala na nguya mpe kotinda bato bákanisa.

14. (a) Mpo na nini Yirimia alobelaki ‘balsame na Gileade’? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bandeko bázala malamu na elimo?

14 Tozali na botɔndi mingi mpo na mateya oyo babateli na lisangá bapesaka! Yirimia amonaki ete bato ya ntango na ye basengeli kobikisama na elimo. Atunaki boye: “Balsame ezali na Gileade te? To moto oyo abikisaka azali kuna te?” (Yir. 8:22) Na ntango wana, ezalaki mpenza na nzete ya balsame na Gileade, na ɛsti ya Yordani. Nzete yango ezalaki kobimisa mafuta ya nsolo kitoko, oyo eyebanaki mingi mpo bazalaki kosalela yango lokola nkisi, mingimingi mpo na kokitisa mpasi ya mpota mpe kosilisa yango. Atako bongo, kobikisama ya elimo ezalaki te. Mpo na nini? Yirimia alobi boye: “Basakoli bazali mpenza kosakola na lokuta; mpe banganga-nzambe bazali konyata bato na nguya na bango. Mpe bato na ngai balingi ezala ndenge wana.” (Yir. 5:31) Ezali boni mpo na biso lelo? Omoni mpenza te ete “balsame ezali na Gileade,” elingi koloba na kati ya lisangá na yo? Tokoki kokokanisa balsame oyo ezalaki kokitisa mpasi na libɔndisi oyo babateli malamu ya lisangá bapesaka na bolingo, ntango babendaka likebi ya bandeko na mitinda ya Biblia, wana bazali kotonga bango mpe kobondela mpo na bango mpe elongo na bango.​—Yak. 5:14, 15.

Wapi lolenge oyo bankulutu ya lisangá na bino bateyaka oyo esepelisaka yo mingi mpenza? Nini esalaka ete mateya na bango esimba motema?

“TALÁ OYO YEHOVA ALOBI”

15, 16. Mpo na nini babateli batyelaka bampate likebi mpe mpo na nini babateli na lisangá basengeli mpe kotyela bandeko likebi?

15 Kanisá esengo oyo mobateli ya mpate azalaka na yango ntango amonaka bana-mpate ezali kobotama na nzoto makasi nsima ya kolekisa bangonga ebele na mosala ya kobatela bampate! Kasi ayebaka ete, mpo bana-mpate yango ekola malamu, asengeli kotyela yango likebi mpenza. Mobateli yango asengeli kosala nyonso elya malamu. Na bisika mosusu, bana-mpate ebotamaka na mokila molai, mpe yango ekoki kokanga nyɛi mpe salite. Lokola mobateli ya mpate yango alingi ete bampate na ye ezala ntango nyonso pɛto mpe nzoto makasi, mbala mosusu akoki kokata yango mikila; kasi akosala yango na mayele mpenza mpo esala mpasi mingi te. Ndenge moko mpe, babateli na lisangá batyelaka bandeko likebi na bolingo nyonso. (Yoa. 21:16, 17) Bankulutu yango bayokaka mpe esengo mingi ntango bato oyo basepeli na solo bazali kosala nyonso oyo esengeli mpo bakóma bakristo ya solo. Bakɛngɛli ya lisangá balingaka bampate nyonso bázala malamu na elimo mpe baleisama malamu, ezala bilenge to mikóló; yango wana balɛmbaka te kotyela bango likebi mpe kosalisa bango soki esengeli. Ya solo, mosala oyo basalaka esɛngaka mpe bákundwela bandeko na bango makambo “oyo Yehova alobi” elingi koloba makambo oyo Biblia eteyaka.​—Yir. 2:2, 5; 7:5-7; 10:2; Tito 1:9.

16 Yirimia asengelaki kozala na mpiko mpo na kosakola nsango ya Nzambe. Na bantango mosusu mpe, bakɛngɛli na lisangá basengeli kozala na mpiko, mingimingi ntango basengeli koloba polele mpo na kobatela bandeko na bango. Na ndakisa, mobateli moko na lisangá akoki komona ete asengeli kokebisa ‘mwana-mpate moko oyo abotami sika’ ata mpe “mpate” oyo aumeli na lisangá mpo abebisama te na bosɔtɔ ya mokili ya Satana. Mbala mosusu, moto oyo azali na likama yango azali ata koluka lisalisi ya bankulutu te. Ata bongo, mobateli ya mpate oyo azali ekɛngɛ mpe akokisaka mokumba na ye malamu akokanga nde mabɔkɔ ntango amoni ndenge oyo mpate moko azali kobunga nzela? Te! Akozwa mpe likambo yango na lisɛki te mpe akosala te lokola nde likambo ezali na yango te, nzokande ndeko yango azali na likama mpe akoki kobebisa boyokani na ye ná Nzambe.​—Yir. 8:11.

17. Ntango nini mobateli asengeli kotyela mpate moko likebi koleka, mpe mpo na nini?

17 Soki mpate moko ekebi te, eloko moko ekoki kobenda yango mosika na etonga mpe ekoki kobunga nzela; kasi mobateli ya mpate oyo azali ekɛngɛ akosala nokinoki mpo azongisa mpate yango na etonga. (Tángá Yirimia 50:6, 7.) Ndenge moko mpe, na bantango mosusu esɛngaka ete mokɛngɛli na lisangá asolola na ndeko moko na ndenge ya lisɛki te kasi na bolingo nyonso mpo na kokebisa ndeko yango oyo azali koyengayenga na nzela oyo ekoki komema ye na likama. Na ndakisa, akoki komona ete bandeko mibale oyo bazali bafianse bazali kolekisa ntango mingi elongo, na bisika oyo bamposa ya nzoto ekoki komema bango mosika, kozanga ete moto mosusu azala na bango. Nkulutu ya boboto mpe oyo azali na bososoli akosalisa bandeko wana bákima makambo ya ndenge wana oyo ekoki kokweisa bango. Ntango azali kosolola na bango, akokeba ete maloba na ye ezokisa bango te, kasi asengeli nde komonisa bango ete ezaleli yango ekoki komema bango na etamboli oyo Yehova ayini. Na ndakisa ya Yirimia, bankulutu ya sembo bakweisaka makambo oyo Nzambe akweisaka. Na ndenge yango, balandaka ndakisa ya Yehova, oyo na nzela ya Yirimia, alobelaki bato na ye maloba makasi te, kasi na boboto nyonso alobaki na bango ete: “Nabondeli bino, bósala te likambo ya bosɔtɔ ya ndenge wana oyo ngai nayiná.” (Yir. 5:7; 25:4, 5; 35:15; 44:4) Osepelaka mpenza na ndenge oyo babateli ya bolingo batyelaka bampate likebi?

18. Milende oyo babateli na lisangá basalaka ekoki kobimisa matomba nini?

18 Ya solo, bato nyonso te nde balandaki toli ya Yirimia. Kasi bato mosusu balandaki toli na ye. Na ndakisa ntango Baruke, moninga mpe sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia, asengelaki kozwa toli ya makasi, Yirimia akakatanaki te kopesa ye toli yango. (Yir. 45:5) Mpe yango ebimisaki matomba nini? Nzambe asepelaki lisusu na Baruke mpe abikisaki ye ntango Yerusaleme ebebisamaki. Ndenge moko mpe lelo, soki bankulutu balongi kosalisa bandeko bázonga na nzela ya malamu, yango ekoki kolendisa bango moko ‘bákoba komipesa . . . na kolendisa mpe na koteya’ mpo na kobikisa bato.​—1 Tim. 4:13, 16.

BAPESAKA DISIPLINI “NA NDENGE OYO EBONGI”

Elilingi na lokasa 138

19, 20. Mokumba nini bankulutu bazalaka na yango ntango bazali kosalisa mosumuki?

19 Lelo oyo, bakɛngɛli bazali mpe na mokumba ya kosambisa na lisangá. Na bantango mosusu, esɛngaka ete bankulutu básalisa ndeko moko oyo asali lisumu na nko abongola motema. Ntango Yehova alendisaki basumuki bátika banzela na bango ya mabe, alobelaki bango polele kasi na boboto. (Yir. 4:14) Kasi soki ndeko moko aboyi kotika makambo na ye ya mabe, bakɛngɛli basengeli kozwa bibongiseli mpo na kobatela etonga na makambo mabe oyo ekoki kobebisa yango. Mbala mosusu bakobimisa ye na lisangá ndenge Biblia esɛngi. Na ntango yango, Yehova alingaka ete bankulutu básala makambo na kolanda bosembo na ye. Mokonzi malamu Yosiya apesaki ndakisa na likambo yango. “Alobelaki lotomo ya moto ya mpasi mpe ya mobola.” Azalaki komekola ndenge oyo Nzambe alingaka bosembo. Yango wana, mpo na makambo oyo Yosiya asalaki, Yehova alobaki ete: “Yango te koyeba ngai?” Lokola Yosiya asalaki makambo na bosembo mpe boyengebene, “makambo na ye etambolaki malamu.” Ntango bankulutu na lisangá na bino basalaka nyonso mpo na komekola bosembo ya Yosiya, omiyokaka ete obatelami malamu, boye te?​—Yir. 22:11, 15, 16.

20 Yebá ete Yehova apesaka moto oyo asali lisumu disiplini “na ndenge oyo ebongi.” (Yir. 46:28) Ndenge moko mpe, na bantango mosusu esɛngaka ete bankulutu bálendisa, bápamela to bápesa ndeko moko boye toli, na kotalela likambo oyo asali mpe ezaleli oyo amonisi. Kutu, mbala mosusu esɛngaka ete moto oyo aboyi kobongola motema abimisama na lisangá. Soki bankulutu basali bongo, bakobondela te liboso ya bato nyonso mpo na moto yango oyo abimisami na lisangá mpe azali kaka kokoba na etamboli ya mabe; kobondela mpo na moto ya ndenge wana ezali na ntina te.a (Yir. 7:9, 16) Atako bongo, mpo na kolanda ndakisa ya Yehova, bankulutu bakomonisa moto oyo abimisami na lisangá nini oyo asengeli kosala mpo andimama lisusu epai ya Yehova. (Tángá Yirimia 33:6-8.) Ntango moto abimisami na lisangá esalaka mpasi; atako bongo, toyebi malamu ete mitinda ya Nzambe ezalaka ntango nyonso ya bosembo mpe ya boyengebene mpe ezali mitinda oyo eleki malamu.​—Bil. 1:18.

21. Etonga ya Nzambe esengeli kozala ndenge nini, mpe likambo nini okoki kosala mpo ezala bongo?

21 Etonga ya Nzambe esengeli koleisama malamu, kozala makasi mpe kobatelama malamu. Mpo na yango babateli na lisangá basengeli koyeba mpe kosalela mitinda ya Nzambe malamu. (Nz. 23:1-6) Makambo Yilimia alobeli oyo etali bizaleli mpe makanisi, ezala oyo ebongi ná oyo ebongi te, ekoki kosalisa bakɛngɛli na lisangá bákokisa malamu mokumba na bango ya kobatela bampate ya Nzambe. Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nakopesa bankulutu mabɔkɔ, baoyo “baleisaka mpenza” etonga “na boyebi mpe na mayele ya kososola” mpo námonisa botɔndi na ngai epai ya Yehova mpo na bibongiseli oyo atyá ya koteya, kotambwisa, mpe kobatela bato na ye?’​—Yir. 3:15; 23:4.

Ntango nini esɛngaka ete bankulutu bázala na mpiko? Yehova asɛngi bankulutu bámonisa ezaleli nini ntango bazali kosambisa?

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2001, nkasa 30-31.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto