Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/12 nk. 8-13
  • Tosepelaka kati na elikya na bokonzi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosepelaka kati na elikya na bokonzi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esengo ya solo: ezaleli ya motema
  • Tosepelaka kati na elikya
  • Tobosana elikya na biso te
  • Tosepelaka uta sikawa kati na elikya na Bokonzi
  • Bomoi oyo tokosepela na yango mpenza
  • Sepelá na elikya oyo ekoyokisa yo nsɔni te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Tyelá Yehova elikya mpe zalá na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tósepela kati na Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tósalela Yehova na esengo na motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/12 nk. 8-13

Tosepelaka kati na elikya na bokonzi!

“Bosepelaka kati na elikya. Boyika mpiko kati na bolózi.”​—BALOMA 12:12, MN.

1. Mpo na nini tokoki kozwa esengo epai na Jéhovah, mpe toli nini ntóma Paulo esili kopesa epai na baklisto?

“NZAMBE ya esengo.” (1 Timoté 1:11) Maloba oyo makokani mpenza epai na Jéhovah. Ya solo, misala na ye nyonso mikopesaka esengo monene. Lokola Jéhovah nde abandisi makambo nyonso malamu mpe oyo ekopesaka esengo, moko na moko kati na bikelamu na ye ya mayele akoki kozwa bolamu epai na ye. Tala ntina oyo ntoma Paulo apesaki toli na baklisto ete basepela na libaku kitoko oyo bozali na yango ya koyeba Jéhovah Nzambe, na kozala na botɔndi epai na ye mpo na makabo na ye nyonso ya kitoko emonani na biloko na kozalisama, mpe na kosepela kati na motema malamu oyo azali komonisela bango. Paulo akomaki ete: “Bosepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nalobi lisusu ete: bosepelaka!”​—Bafilipi 4:4, MN; Nzembo 104:31.

2. Elikya nini eleki mpenza na kosepelisa, mpe baklisto bazwi elendiseli nini kati na likambo yango.

2 Baklisto bazali nde kotya likebi na toli oyo Paulo? Na ntembe te. Bandeko na elimo na Yesu Klisto bazali kosepela kati na elikya kitoko oyo Nzambe asili kopesa bango. (Baloma 8:19-21; Bafilipi 3:20, 21)Na yango, bayebi ete bakosangana kati na kokokisama ya elikya monene etali bomoi ya bato na ntango ekoya, bato na bomoi mpe bakufi, na kosalanáká elongo na Klisto kati na Bokonzi na ye, to boyangeli na likoló. Kanisa esengo oyo ekozala na batuki na libula elongo na Klisto kati na mikumba na bango ya bakonzi mpe banganga. (Emoniseli 20:6) Ekozala mpenza esengo mpo na bango ete basalisa bato na sembo kino kokóma na ezaleli ya kokoka mpe kosala ete mabelé makóma paradis. Ya solo mpenza, basaleli nyonso na Nzambe bazali “na ntina ya kozala na elikya na bomoi ya seko bolakami na Nzambe uta kalakala, ye oyo akobukaka lokutá te.” (Tito 1:2, MN) Ezali na kokanisáká mpo na elikya wana kitoko nde ntóma Paulo apesaki elendiseli oyo elandi epai na baklisto nyonso, ete: “Bosepelaka kati na elikya.”​—Baloma 12:12, MN.a

Esengo ya solo: ezaleli ya motema

3, 4. (a) “Kosepela” elimboli nini, mpe ntango nini baklisto basengeli kosepela? (b) Esengo ya solo ezali nini, mpe yango eutaka wapi?

3 Kosepela” elimboli kozala na esengo mpe komonisa yango; kasi moto na esengo asengeli te bobele komonisa ntango nyonso nsai na ye to mpe kobimisa mayoki na ye. Ba verbes oyo ekokani na maloba na Liebele mpe na Greke oyo esalelami kati na Biblia mpo na kolobela “esengo,” “bosepeli” mpe “nsai” elakisaka mayoki ya kati na motema mpe ekomonisamaka na esengo na libandá. Baklisto balendisami na kolanda kosepela,’ na ‘kosepela ntango nyonso.​—2 Bakolinti 13:11; 1 Batesaloniki 5:16.

4 Kasi, tokoki kozala ntango nyonso na esengo? Ee, mpamba te esengo ya solo ezali ezaleli ya motema, mayoki ya mozindo mpe na elimo. (Deteronome 28:47; Masese 15:13; 17:22) Ezali mbuma na elimo na Nzambe oyo elandi bolingo kati na molongó oyo Paulo atangaki. (Bagalatia 5:22) Lokola yango ezali ezaleli ya kati na motema, esengo euti na makambo na libandá te, ata na bandeko na biso mpe te; kasi euti na elimo santu na Nzambe. Euti na bosepeli na mozindo oyo moto azalaka na yango na ntango ayebi solo, na ntango azwi elikya na Bokonzi mpe soki azali kosala likambo lizali kosepelisa Jéhovah. Na yango, esengo ezali bobele ezaleli ya kobotama te; ezali moko na bilembo na “bomoto ya sika,” bizaleli nyonso oyo bimonisi Yesu klisto.​—Baefese 4:24; Bakolose 3:10.

5. Ntango nini mpe lolenge nini esengo ekomonisamaka libanda?

5 Atako esengo ezali ezaleli ya motema, ekómaka mbala mosusu ete ebima libandá. Lolenge nini? Na mitindo mikeseni, oyo ekomonanaka na bosepeli na elongi to lokola moto oyo azali kopumbwa soko mpe atóndi na esengo. (1 Mikonzi 1:40; Luka 1:44; Misala 3:8; 6:15) Yango elimboli ete baoyo balobaka mingi te to asɛkaka mingi te bazali na esengo te? Ezali bongo te. Esengo ya solo ezali ntango nyonso komonana te bobele na kosɛka mingi, na kosɛka mwa moke to na masoló mingi. Esengo emonisamaka na mitindo mikeseni engebene mabaku mamonani. Na Salle du Royaume, ezali te bobele masoló na biso ya esengo nde ezali kosepelisa bandeko na biso, kasi bolingo oyo tozali na yango epai na bango ezali mpe kosepelisa bango.

6. Mpo na nini baklisto bakoki kosepela ntango nyonso, ata soko bazali kati na ezalela ya mpasi?

6 Oyo ekesenisi esengo mpe bizaleli mosusu ezali ete, esengo ekoumelaka na kati na motema ya moto; ezali ezaleli ya motema oyo euti na bomoto ya sika na moklisto. Mpo na yango, tokoki kozala ntango nyonso na esengo. Ya solo, mbala mosusu tokoki kozala na mitungisi to kokutana na likambo moko ya mpasi. Kasi makambo wana makoki kopekisa biso te ete tozala na esengo. Baklisto mosusu ya ekeke ya liboso baoyo bazalaki baombo, bazalaki na bankolo na matáta mingi. Bakokaki nde kozala ntango nyonso na esengo? Ee, mpo ete bozalaki na elikya na Bokonzi mpe bazalaki na esengo ya motema.​—Yoane 15:11; 16:24; 17:13.

7. (a) Yesu alobaki nini na ntina na esengo oyo tokoki kozala na yango liboso na bolózi? (b) Eloko nini ezali kosalisa biso na koyika mpiko kati na bolózi, mpe nani asili kopesa ndakisa eleki malamu kati na likambo yango?

7 Nsima na koloba ete: “Bosepelaka kati na elikya,” ntóma Paulo abakisi ete: “Boyika mpiko kati na bolózi.” (Baloma 12:12, MN) Yesu mpe alobaki na ntina na esengo oyo tokoki kozala na yango kati na bolózi na ntango alobaki,engebene Matai 5:11, 12 (MN) ete: “Esengo na bino wana bazali kotuka bino, mpe wana bazali konyokola bino . . . Bosepela mpe bozala na esengo, mpo ete mbano na bino ezali monene kati na makoló.” Kati na likambo oyo, ezali te kosepela mpe kopumbwa na esengo mpe kobimisa mayoki na ndimbola na yango ya liboso, kasi ezali mpenza bosepeli ya mozindo kati na motema, oyo moto azalaka na yango na ntango ayebi ete asepelisi Jéhovah mpe Yesu Klisto, wana atɛlɛmi ngwi liboso na momekamo.(Misala 5:41) Esengo wana ezali kosalisa biso na koyika mpiko kati na bolózi. (1 Batesaloniki 1:6) Kati na likambo oyo, Yesu asili kopesa biso ndakisa eleki malamu. Tozali kotanga kati na Makomami ete: “Mpo na esengo etyamaki liboso na ye, ayikelaki nzeté na mpasi mpiko.”​—Baebele 12:2, MN.

Tosepelaka kati na elikya

8. Mikakatano nini baklisto bakoki kokutana na yango, kasi mpo na nini mikakatano wana mikoki kopekisa esengo na bango te?

8 Basaleli na Jéhovah babatelami na mikakatano nyonso te. Bakoki kozwa mpasi na libota, mitungisi mpo na mosolo, mikakatano na kolongono na nzoto to mpe kotungisama na liwa ya moto oyo balingaka. Atako makambo wana makoki kookisa biso mawa, ekoki kopekisa biso te na kosepela kati na elikya na Bokonzi, mpe na esengo oyo ezali kati na motema na biso.​—1 Batesaloniki 4:13.

9. Mikakatano nini Abalayama akutanaki na yango, mpe lolenge nini toyebi ete azalaki na esengo na motema?

9 Tala ndakisa ya Abalayama. Bomoi ezalaki ntango nyonso malamu te mpo na ye. Libota na ye lipesaki ye mitungisi mingi. Agare, mwasi na ye mosusu, mpe Sara, mwasi na ye ya liboso, bazalaki koyokana te. Bazalaki kowelana. (Genese 16:4, 5) Yisamaele azalaki ntango nyonso kotyola Yisaka mpe azalaki konyokola ye. (Genese 21:8, 9; Bagalatia 4:29) Na nsuka, Sara, mwasi oyo ye azalaki kolinga, akufaki (Genese 23:2) Atako mikakatano wana, Abalayama azalaki kosepela kati na elikya etali Libota na Bokonzi, Libota na Abalayama, na nzela na yango nde mabota nyonso ya mabelé makopambolama. (Genese 22:15-18) Na esengo na motema, Abalayama alendendelaki kati na mosala na Jehovah na boumeli ya ekeke moko, nsima wana asilaki kotika engumba na ye, Ulu. Tala mpo na nini bakomaki na ntina na ye ete: “Azalaki kotalela mboka oyo ezali na miboko ya solo, mboka oyo Nzambe azali motongi na yango mpe mozalisi na yango.” Kondima ya Abalayama na koya na Bokonzi ya Masiya epusaki nkolo Yesu,oyo Nzambe asilaki kopona na eleko yango mpo na kozala mokonzi, nakoloba ete abalayama . . . asepelaki mingi kati na elikya ya komona mokolo na ngai;amonaki yango mp asepelaki.”​—Baebele 11:10; Yoane 8:56 MN.

10, 11. (a) Biso baklisto tosengeli kobunda etumba nini, mpe eloko nini ezali kobikisa biso? (b) Eloko nini ekolobela nzoto na biso na masumu, wana ezali biso kolonga te na kobunda na lolenge na kokoka?

10 Mpo na kosala malamu, biso bato tozangi kokoka tosengeli mpe kobundisa nzoto na biso ya masumu, likambo oyo likoki kozala mpasi mingi. Kasi, likambo oyo ete tosengeseli kobundisa bolɛmbu na biso elimboli te ete tozangi elikya. Paulo atungisamaki na likambo yango, mpe alobaki ete: “Nani akolongola ngai na nzoto oyo ezali na nsé na kufa? Tika ete ngolu ezala na Nzambe kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Baloma 7:24, 25, MN) Tokobika mpo na Yesu Klisto mpe mpo na mbeka oyo ye apesaki.​—Baloma 5:19-21.

11 Mbeka na lisiko na Klisto ezali kolobela biso; wana tozangi kobunda na motindo na kokoka. Mbeka yango ezali liziba ya esengo mpo na biso, mpamba te ezali kopesa nzela ete tozwa lisosoli ya pɛto mpe na kozwa lilimbisi na masumu na biso. Na Baebele 9:14, Paulo alobi na ntina na “makila na Klisto,” oyo ezali na nguya ya ‘kopɛtola lisosoli na biso longwa na misala na kufa. Na bongo lisosoli na baklisto lisengeli kotungisama te na ekweli to na mayoki oyo ya moto asali mabe. Bakisa na elikya oyo tozali na yango lisosoli wana lizali kozwila biso esengo mpe bolamu mingi. (Nzembo 103:8-14; Baloma 8:1, 2, 32) Awa tozali kotalela elikya na biso, tolendisami na kobunda mpo na kolónga.

Tobosana elikya na biso te

12. Elikya nini epesami na likanisi na baklisto bapakolami?

12 Ezali likambo ya ntina ata mpo na batikali bapakolami to mpo na bampate mosusu ete babosana “elikya ya lobiko” te kasi baláta yango lokola ekɔti na komibatela. (1 Batesaloniki 5:8) Baklisto bapakolami bakoki kokanisa uta sikawa mpo na libaku kitoko ya kozala na bomoi kozanga kokufa kati na makoló, na kozala penepene na Jéhovah Nzambe mpe kozala na boyokani malamu elongo na Yesu Klisto oyo akembisami, elongo na bantóma mpe baoyo kati na ba 144 000 batikalaki sembo na boumeli na bikeke. Oyo nde nkembo monene na kozaláká elongo na bato wana!

13. Bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé bazali na likanisi nini likoló na elikya na bango?

13 Lolenge nini bamoko na bapakolami baoyo bazali naino awa na mabelé bazali kotalela elikya na Bokonzi? Makanisi na bango makoki komonisama na maloba oyo ya Frederick Franz, prezida ya la Societé Watch Tower, oyo azwaki batisimo na 1913, ye ete: “Elikya na biso ezali solo; ekokokana mpenza, mpe koleka oyo tokoki kokanisa, likoló na mokomoko na basangani 144 000 ya etonga moke. Wana biso nyonso tozalaki kokanisa mpo na kokenda na likoló, baoyo kati na biso bazalaki na mobu 1914, tobungisi naino te motuya ya elikya yango. Nkutu tozali nde kosepela na yango koleka na liboso, mpe motuya na yango mozali sé kobakisama na miso na biso awa ezali biso kozela. Ezali eloko oyo tosengeli mpenza kozela na motema molai, ata soko ekosɛnga milió moko na bambula. Nazali kotalela elikya yango lokola eloko eleki mpenza motuya, mpe nalingi soko moke te ete nabungisa bokangani na ngai mpo na yango. Elikya ya etonga moke ezali mpe kondimisa ete oyo ya ebele monene ya bampate mosusu ekokokisama mpenza na koleka lolenge oyo tokoki kokanisa. Yango wana totɛlɛmi ngwi kino lelo oyo, mpe tokotɛlɛma ngwi kino Nzambe amonisa ete ye azali kokokisa ‘bilaka na ye kitoko mpe minene mingi.”’​—2 Petelo 1:4, MN; Mituya 23:19; Baloma 5:5.

Tosepelaka uta sikawa kati na elikya na Bokonzi

14. Elikya nini ebele monene basengeli kobungisa yango te?

14 Kondima wana ya esengo oyo eyebisami ezali kopesa bantina kitoko ya kosepela epai na basangani ya ebele monene. (Emoniseli 7:15, 16) Bato yango basengeli te kobungisa elikya na bango ya kobika na Armagedon. Ee, tosepelaka na likanisi oyo ete Bokonzi bokolóngisa boyangeli na Jéhovah Nzambe na molongó mobimba mpe ekokumisa nkombo na ye monene na kobimisáká bolózi monene; nsima na yango nde mabelé makopɛtolama na bato mabe oyo Diable azali nzambe na bango. Oyo nde esengo na kobika na bolózi monene!​—Danyele 2:44; Emoniseli 7:14.

15. (a) Makamwisi nini na kobikisa Yesu akokisaki na ntango azalaki awa na mabele, mpe mpo na nini? (b) Babiki na Armagedon bakozala na mposa nini na ntina na kolongono na nzoto, mpe mpo na nini? mposa na bango ekokesena na oyo ya basekwi?

15 Na ntina na ebele monene, tozali kotanga kati na Emoniseli 7:17 ete: “Mwana na Mpate. . . akobatela bango, mpe akokamba bango epai na maziba na mai na bomoi. Nzambe mpe akopangusa mpisoli nyonso na miso na bango.”atako esakweli oyo ezali kokokana na elimo na eleko na biso, kasi babiki na Armagedon bakomona kokokana na yango mpenza na mosuni. Lolenge nini? Yesu asalaki nini na ntango azalaki awa na mabelé? Abikisaki bilɛ́mɛ mpe, atambolisaki batɛngumi, azipolaki matoi ya bato bakufa matoi mpe afungolaki miso na bakufi miso, abikisaki bato na mába, na bakatatali mpe “motindo na maladi nyonso mpe motindo na bokɔno nyonso.” (Matai 9:35; 15:30, 31, MN) Wana ezali makambo oyo baklisto bazali na yango mposa lelo. Boye te? Ebele monene bakokɔta kati na mokili ya sika elongo na mbébá mpe na bokɔnɔ oyo bazwaki na mokili na kala. Tozali kozela nini epai na Mwana na Mpate mpo na likambo wana? Bamposa ya babiki na Armagedon ekokesena na oyo ya basekwi. Atako bakokóma naino na ezaleli ya bato na kokoka te, nzokande emonani ete basekwi bakozonga na bomoi na nzoto oyo ekozala na kolongono malamu, na mbébá te. oyo ekozanga eloko te. Ekozwa bango litomba na likamwisi ya lisekwa , na ntembe te bakozala na mposa na likamwisi mosusu te oyo ekobikisa bango na bokɔnɔ na bango ya kala. Nzokande, na nsima na kobika na Armagedon, basangani mingi ya ebele monene bakozala na mposa ya kobikisama na likamwisi, mpe bakobika. Emonani ete, moko na mikano minene ya makamwisi na kobikisa na Yesu ezalaki mpo na kolendisa ebele monene na koyeba ete, basengeli bobele kobika (na Armagedon) te, kasi basengeli mpe kobikisama (na maladi).

16. (a) Na lolenge emonani, ntango nini ebele monene bakobikisama na bokono, na likamwisi, mpe yango ekobimisa matomba nini? (b) Tokolanda kosepela kati na elikya nini na boumeli ya Mbula Nkɔto?

16 Ebongi na kokanisa ete ebele monene bakozwa kobikisama na likamwisi mwa ntango moke nsima na Armagedon, liboso ete lisekwa likoka kobanda. (Yisaya 33:24; 35:5, 6; Emoniseli 21:4; tala Malako 5:25-29.) Bongo, bato bakobwaka manɛti na bango, pɛngo (canne) na bango, nzeté na bango ya kotɛnguma (béquilles), bavelo na bango ya baandikapé, bakobwaka mino oyo basalelaki bango na masini, bakobwaka biyokeli oyo basalelaki bango na masini mpe bongo na bongo. Oyo nde esengo monene! Kobikisa oyo Yesu akosala yango na ebandeli ya Mbula nkɔto, ekosalema mpo na kokokisama ya mokumba oyo mokopesama epai na babiki na Armagedon, bafandi na liboso na mabelé ya sika! Bamaladi oyo ekolɛmbisaka nzoto, ekolongolama mpo ete babiki yango bakoka kozala ntango nyonso na esengo mpe na nzoto makasi, kozeláká na motema likoló ete bakokisa mokumba kitoko oyo basengeli kokokisa yango na boumeli ya mbula yango nkɔto, mpe babikisama na bampasi oyo banyokwamaki na yango na mokili na kala. Na boumeli ya Mbula Nkɔto, bakosepela kati na elikya ya kozela ete bakóma na ezaleli ya bato na kokoka kati na makambo nyonso, ndelo ekozala na nsuka na mbula nkɔto.

17. Bisengo nini bikozwama ntango wana mabelé makolanda kobongwana paradis?

17 Soko yango ezali elikya na yo, kanisa lisusu mpo na esengo oyo okozala na yango na kosangana na mosala ya kobongola mabelé paradis (Luka 23:42, 43) Na ntembe te, babiki na Armagedon bakozala na mokumba ya kopɛtola mabelé mpe kobongisa bisika malamu epai bakufi bakosekwa. Mbala mosusu milulu ya boyei malamu ya basekwi ekokitana milulu ya bokundi ebembe; kati na basekwi yango, ekozala mpe na bato oyo tolingaki bango mingi. Kanisa mpo na mibali mpe basi na sembo oyo bazaláká na ntango na kala, baoyo bakozala mpenza baninga malamu. Okolinga mpenza kolobana na nani? Abele, Enoka, Noa, Yobo, Abalayama, Sara, Yisaka, Yakobo, Yozefe, Moize, Yosua, Rahaba, Débola, Samson, Davidi, Eli, Elizé, Yelemia, Ezekiele, Danyele to Yoane Mobatisi? Etaleli wana kitoko ezali kati na elikya oyo ozali na yango. Okosolola elongo na bango, koyekola mpe kosala misala elongo na bango mpo na kobongola mabelé mobimba makóma paradis.

18. Bisengo nini mosusu bityami liboso na biso?

18 Kanisa lisusu mpo na bilei malamu, mpo na mai mpe mopepe na pɛto oyo tokokuta na mabelé oyo makozongisama na ezalela na kokoka. kati na ezingelo na yango lokola Jéhovah azalisaki yango; Bomoi ya kokoka ekozala bobele mpo na kofánda mpamba te, kasi ekosangana lisusu na misala na mayele mpe na esengo. Kanisa ete, kati na mokili mobimba, mabe,kowelana, zuwa mpe koswana ekozala lisusu te kati na libota na bato oyo basangani na yango nyonso bakozala na bomoko na bolingo ya bandeko, bakolona mpe bakobota mbuma ya elimo. Oyo nde elikya kitoko!​—Bagalatia 5:22, 23.

Bomoi oyo tokosepela na yango mpenza

19. (a) Ntango nini tosengeli kolanda toli oyo ezwami na Baloma 12:12 mpe kosepela? (b) Mpo na nini tosengeli kozwa ekateli ya kosala nyonso mpo ete mitungisi ya bomoi mibebisa elikya na biso te?

19 Elikya oyo esili kokokana ezali lisusu elikya te; na yango, tosengeli nde kolanda sikawa elendiseli na Paulo oyo ezwami na Baloma 12:12 mpe kosepela. (Baloma 8:24) Bobele kokanisa na bolamu oyo bokouta na Bokonzi na Nzambe ezali kopesa biso nzela ya kosepela uta sikawa. Bongo, tozala na ekateli makasi ya kosala nyonso ete mitungisi mibebisa te elikya na biso kitoko, na mokili mabe oyo tozali kobika kati na yango. Tolemba te mpe tosɛnzwa te; tobungisa elikya na biso te. (Baebele 12:3) Mikakatano na biso mikolimwa te ata soko totiki boklisto. Omikundola ete, moto oyo atiki kosalela Nzambe mpo ete atondaki na mitungisi ya bomoi akozala ntango nyonso na mitungisi na ye, nzokande akobungisa elikya na ye mpe likoki ya kosepela na likanisi ya biloko kitoko oyo azali kozela.

20. Elikya na Bokonzi ezali na bopusi nini likoló na baoyo bazali na yango, mpe mpo na nini?

20 Basaleli na Jéhovah bazali na bantina mingi ya kozala na esengo. Elikya na bango kitoko, na esengo, ezali kopusa bango na kososola ete bomoi na bango ezali na ntina. Epai mosusu, bazali kobomba elikya wana kitoko bobele mpo na bango moko te. Bazali na mposa makasi ya koyebisa yango epai na bato mosusu. (2 Bakolinti 3:12) Lisusu, bato oyo bazali na elikya na Bokonzi basali libota libongi na kotya motema, mpe bazali kosala makasi mpo na kolendisa bato mosusu na kolobeláká bango na ntina na nsango malamu euti na Nzambe. Baoyo bazali kondima nsango yango bazali kozwa elikya oyo eleki nyonso mosusu na kitoko mpo na bomoi na bango, elikya na Bokonzi oyo ekozongisa Paradis awa na mabelé. Ata soko bato bazali koboya nsango yango, tozali bobele na esengo, mpamba te tozali na elikya. Biso tozangi litomba te kati na likambo yango, kasi baoyo baboyi koyoka nde bazangi yango.​—2 Bakolinti 4:3, 4.

21. Likambo nini libɛlɛmi, mpe lolenge nini tosengeli kotalela elikya na biso?

21 Nzambe alaki biso ete; “Tala, nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.” (Emoniseli 21:5) Mokili ya sika mpe bolamu na yango nyonso ya seko oyo ezali kosepelisa bomoi, esili kobɛlɛma. Ata ezali mpo na bomoi na likoló to kati na Paradis awa na mabelé, elikya na biso ezali na motuya mingi: tokangama na yango.Na mikolo ya nsuka oyo na mpasi, tosengeli kotalela elikya yango “lokola lóngo mpo na molimo, ekobukana te mpe ekoningana te.” Awa totii elikya na biso makasi epai na Jéhovah, ye “Libangá na Seko,” tozali mpenza na ntina makasi ya ‘kosepela’ uta sikawa “kati na elikya” oyo etyami liboso na biso.​—Baebele 6:19; Yisaya 26:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na 1992, ba Temoins de Jéhovah ya mokili mobimba bakozala na mokapo ya mbula oyo, ete: “Bosepelaka kati na elikya . . . Bolendendela kati na mabondeli”​—Baloma 12:12, MN.

Bozongeli

◻ Elikya nini kitoko epesameli bato?

◻ Esengo ya solo ezali nini?

◻ Na lolenge emonani, ntango nini kobikisama na bokono, na likamwisi, ekosalema mpo na babiki ya Armagedon?

◻ Mpo na nini tosengeli kotika te ete mitungisi ya bomoi mibebisa elikya na biso?

◻ Bisengo nini ozali kozela na motema likoló ete ozwa yango na mokili ya sika?

[Elilingi na lokasa 9]

Komona makamwisi na kobikisa lokola oyo Yesu asalaki, ekotondisa motema na biso na esengo, boye te?

[Elilingi na lokasa 10]

Baoyo bazali kosepela kati na Bokonzi bazali kolendisa bato mosusu na kokaboláká elikya na bango elongo na bato mosusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto