Osilá kotumba zámba?
OKOKI koyanola ete, naino te. Kasi zela! Mbala mosusu osilá kotumba. Yoka maloba oyo ya moyekoli Yakobo: “Lolemo ezali elembo moke mpe ekomikumisa na makambo minene. Tala mwa mɔ́tɔ moke ekozikisaka zamba monene mingi!”—Yakobo 3:5.
Lolemo ezali enama ya ntina mingi mpo na koloba, kasi basalelaka yango mpenza mabe! Bato bazali kosalela lolemo mpo na kokosa mpe kotɔnga. Na yango bazali kolobela mpenza mabe mpo na bato mosusu, kobebisa lokumu na bango, mpe kobuba bango. Batombokisi basalelaka lolemo mpo na kobandisa mobulu. Adolf Hitler asalelaki lolemo na ye mpo na kopusa ekólo mobimba na etumba—‘mɔ́tɔ monene’ mpenza!
Ata baoyo bazali na mikano malamu bakoki mwa moke ‘kozikisa zámba.’ Naino oloba likambo moko te mpe nokinoki na nsima okómi kokanisa ete mbele olobaki yango te? Soki ezali bongo, ozali koyeba ndimbola ya maloba oyo Yakobo alobaki ete: “Nde moto te ayebi kotya lolemo nsima.”—Yakobo 3:8.
Nzokande, tokoki komeka kosalela lolemo na biso mpo na makambo malamu. Lokola mokomi na Nzembo, tokoki koloba na ekateli makasi ete: “Nakobatela kotambola na ngai ete nasala masumu te na monoko na ngai.” (Nzembo 39:1) Na esika ya koloba mpenza mabe na ntina na basusu, tokoki komeka kolendisa bango. Na esika ya kotɔnga, tokoki kolobela malamu na ntina na bato mosusu. Na esika ya kobuba mpe kokosa, tokoki koloba solo mpe koteya. Wana epusami na motema malamu, lolemo ekoki koloba maloba kitoko ya kobikisa. Yesu asalelaki lolemo na ye na motindo moko kitoko mpo na kolakisa bato makambo ya lobiko.
Ya solo, “kufa mpe bomoi ezali na nguya ya lolemo.” (Masese 18:21) Lolemo na yo ezali elembo ya liwa to ya kopesa bomoi? Yango ‘ezikisaka zámba’ to ezimisaka yango? Mokomi na Nzembo abondelaki epai na Nzambe ete: “Lolemo na ngai ekoloba mpo na liloba na yo, mpo ete malako na yo nyonso mazali boyengebene.” (Nzembo 119:172) Soki toloni elimo oyo mokomi na Nzembo azalaki na yango, biso mpe tokosalela lolemo na biso mpo na makambo malamu.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
U.S. Forest Service photo