Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/10 nk. 3-4
  • Mpo na nini koyiba ekómi mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini koyiba ekómi mingi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato bazali koyiba?
  • Osengeli koyiba te
  • Mobola apesameli nzela ya koyiba?
    Lamuká!—1998
  • Kokóma moyibi ata moke te!
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yango ezali mpenza koyiba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokili mozangi miyibi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/10 nk. 3-4

Mpo na nini koyiba ekómi mingi?

RIO DE JANEIRO, mokolo na lomingo 18 Octobre 1992. Bisika ya zelo ya mabongo oyo eyebani mingi Copacabana mpe Ipanema etondaki na bato. Na mbala moko, bituluku ya bilenge batondisi bisika yango, bazali kobunda kati na bango mpe bazali kobotola bato biloko na bango ya motuya mingi. Bapolisi moke bayaki, kasi basalaki eloko moko te. Bafandi ya Rio mpe basáli na mibembo bazalaki na nsomo mingi na ntango ya moi.

Ya solo, moyibi ekómi likambo oyo ezali kosalema mingi. Kati na bingumba minene, ekómaka ete miyibi baboma bilenge bobele mpo ete bazwa basapato na bango. Miyibi bazali kokota na bandako ya bato, ezala ete bato bazali to bazali te. Nsima na komesena na bisika, basáli basi bazangi kolongobana kati na bandako bazali koyiba babiju mpe mbongo, na nsima bazali kolimwa. Bibele bazali kopunza bamagazini. Bituluku bibongisami malamu bazali nkutu kolimwisa bato, lokola emonisi yango motuya mingi ya bato oyo bazali kolimwisama na Brésil. Mbala mosusu okoki kopesa bandakisa mosusu oyo yo moko okutanaki na yango to oyo esalemaki na mboka na bino. Kasi mpo na nini moyibi ezali mingi boye?

Mpo na nini bato bazali koyiba?

Ezali petee te na koyanola na motuna wana, atako kobakisama ya bobóla mpe kosalela ba drogues esangani kati na makambo oyo mapesi nzela na likambo wana mabe. Mokanda The New Encyclopædia Britannica emonisi ete: “Batiká koluka ntina oyo ezali kopesa nzela na mabe.” Atako bongo, mokanda wana moko elobi ete makambo mabe lokola moyibi “ezali na boyokani na mayoki ya botomboki mpe mayoki ya mawa oyo elenge azali na yango na komona ete bozwi ya mosuni mpe makambo mazali kopesa bosepeli ya malamu mazali mpo na ye te.” Ee, na ntina na bopusi ya bato na mombongo, ebele na bato bazali na mwango mosusu ya kosala te bobele koyiba mpo na kozwa biloko oyo bazali na yango mposa.

Likanisi oyo epesamaki na The World Book Encyclopedia ezali na ntina: “Motuya ya makambo mabe etelemi se esika moko kati na mikili ya kala epai bato bazali kondima ete lolenge na bomoi na bango ekolanda kozala se bongo. Makambo wana ya mabe mazali koya mingi kati na mikili epai bato bazali kobongola mbala na mbala bifandelo mpe misala, epai bilikya mpo na mikolo mizali koya elobelami mingi.” Mokanda wana ebakisi ete: “Bilenge bazali na mpasi mingi mpo na kozwa mosala. Misala oyo bazali kopesa bango kozanga ete bazala ata na lipolomi moko, emonani ete ezali na ntina te soki bataleli matomba oyo bakozwa nokinoki na nzela ya koyiba. Lokola bazali te na eloko moko oyo bakobungisa, bilenge bazali kobanga te kokangama.”

Wana bato mingi oyo bazangi mosala to bato oyo bazali kozwa lifuta mingi te na mosala bazali koyiba te, nzokande, basáli na biro mpe basáli na misala mikeseni bazali kotalela koyiba oyo bazali kosala na mosala lokola kobakisama ya lifuta na bango. Tokoki nkutu koloba ete mpo na komipesa na misala mosusu ya kobuba esengeli kozala kati na bato minene. Osilá koyoka lisoló ya makambo matali koyiba mbongo na bato ya politike, na basáli ya Leta mpe na bato ya mombongo, boye te? Kozanga ntembe, ezali te bobele bato na bobóla nde bazali koyiba.

Tomikundola mpe ete lokola bazali kolakisa mbala mingi koyiba lokola likambo ya liseki (mpe moto oyo ayibaka lokola elombe), ba films mpe ba programmes ya televizyó ezali kosala ete likambo wana mabe endimama mingi. Ya solo, makambo wana makoki komonana lokola liseki; nzokande ezali komonisa na batáli na yango lolenge ya koyiba. Nkutu, likanisi oyo ete mabe mbala mosusu epesaka litomba, ezali kokota na mayele mabe nyonso kati na elimo na bango, boye te? Kozanga ntembe, lokoso, bogoigoi mpe likanisi oyo ete bato nyonso basalaka yango kozanga kozwa mpasi epesi nzela na bokóli ya kozanga kolongobana. Ya solo, tozali kobika na “ntango ya mpasi” oyo esakolamaki kati na Biblia, ntango oyo moimi mpe bolingo ya mbongo ekozala mingi.​—2 Timoté 3:1-5.

Osengeli koyiba te

Atako bizaleli mabe ya mokili oyo, ezali likambo ya ntina na kotosa etinda oyo: “Tika ete moyibi ayiba lisusu te.” (Baefese 4:28) Ye oyo azali kopesa motuya mingi na biloko ya mosuni to na bisengo azali komikosa na kokanisáká ete koyiba ezali na ntina. Mabe wana ezali monene na miso na Nzambe mpe ezali komonisa kozanga bolingo mpo na bazalani. Nkutu, ata koyiba ya moke ekoki koyeisa motema makasi. Mpe nani akolinga ete batalela ye lokola moto azangi kolongobana? Nani akosepela na moyibi? Na mayele nyonso, Liloba na Nzambe elobi na biso ete: “Tika te ete moto kati na bino ayoka mpasi lokola mobomi na bato soko moyibi soko mosáli na misala mabe.”​—1 Petelo 4:15.

Ya solo, ozali kosepela te ete moyibi ezala mingi boye, kasi lolenge nini bato oyo bafandi na ba quartiers ya makámá mingi bazali kosala? Lolenge nini miyibi balóngaki kobongola bomoi na bango? Moyibi ekosila mokolo mosusu? Tozali kobyanga yo na kotanga lisoló lilandi oyo ezali na motó na likambo “Mokili oyo mozangi miyibi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto