Ozali komikundola?
Omonaki ete banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima ezalaki mpenza na motuya mpo na yo? Na yango, mpo na nini te kotala lisusu soki okoki koyanola na mituna milandi:
▫ Mpo na nini Batatoli ya Yehova balɛmbaka te mpo na kozongela kotala bazalani na bango?
Batatoli ya Yehova bango moko balingi kozwa mapamboli ya Nzambe na nzela ya Bokonzi oyo elakami, mpe lokola bapusami na bolingo mpo na bazalani na bango, balingi ete bango mpe bázwa mapamboli wana. Na yango, na kolandáká ndakisa ya Yesu, bazali komiyoka ete bapusami mpenza na bolingo ya solosolo mpo na kozongela kotala bazalani na bango. (Matai 6:9, 10; 22:37-39)—8/15, nkasa 8, 9.
▫ Mpo na nini kondimela évolution ezali likambo litali kondima?
Bato ya zébi bamoná naino te mbongwana—ata mbongwana ya malamu—oyo ebimisaka lolenge ya bomoi ya sika; nzokande, bato oyo bandimaka évolution balobaka ete ezali na motindo wana nde lolenge mosusu ya biloko ekómaki na bomoi. Bato oyo bandimaka évolution bamoná naino te lolenge nini bomoi ebimaka pwasa, nzokande bazali koloba na molende nyonso ete bomoi ebandaki na lolenge wana.—9/1, lokasa 5.
▫ Lolenge nini tokoki mpenza kolónga kolɛmba oyo ekoki kouta na bandelo ya bomoi?
Ata soki ezalela ya makambo na biso ezali nini, tokoki kotya makanisi na biso mingi likoló na oyo tokoki kosala, na esika ya komilelalela na ntina na oyo tokoki te kosala, bomoi ekozala kitoko mpe tokozwa esengo kati na mosala ya Nzambe. (Nzembo 126:5, 6)—9/1, lokasa 28.
▫ Kolimbisa ezali na matomba nini?
Kolimbisa basusu eyeisaka boyokani malamu (Baefese 4:32); ezali bobele kopesa kimya te elongo na baninga na biso bato, kasi ezali mpe kopesa kimya oyo ezalaka kati na moto ye moko (Baloma 14:19; Bakolose 3:13-15); kolimbisa basusu ezali kopesa nzela ete masumu na biso málimbisama (Matai 6:14); lisusu, ezali kosalisa biso na komikundola ete tozali na mposa ya kolimbisama. (Baloma 3:23)—9/15, lokasa 7.
▫ Lolenge nini ndakisa ya Mosakoli Amosa ezali kosalisa biso kati na mosala na biso ya kosakola?
Lokola Amosa, tozali te kobongola soko mpe kolɛmbisa nsango ya Nzambe. Nzokande, na botosi nyonso, tozali kosakola yango ata soki bayoki na biso bazali komonisa ezaleli nini.—9/15, lokasa 17.
▫ Bizaleli nini ya Nzambe tosengeli komekola?
Ezali bongo bizaleli mibale ya ntina, makoki na ye ya kobongisa makambo mpe esengo na ye. (1 Bakolinti 14:33; 1 Timoté 1:11) Bizaleli wana ya Nzambe ezali kosalelama na lolenge lobongi, na boye ete moko ekoki koleka mosusu te.—10/1, lokasa 10.
▫ Wapi ndambo na makambo ya ntina oyo baboti basili kosala mpo na kosalisa bana na bango ete básalela Yehova?
Likambo ya ntina mingi ezali bongo, kobanda nokinoki. Makambo oyo masimbaki motema ya mwana mpe mateya oyo azwaki ntango motema na ye mokómi naino makasi te makoumela bomoi na ye mobimba. (Masese 22:6) Ezali na ntina koteya bango botosi mpe limemya mpo na Yehova mpe losambo na ye kati na makita nyonso. Baboti oyo bazali kolónga bazali koyekola koyeba bizaleli mabe, mpe bazali kosalisa bana na bango ete básembola yango. (Masese 22:15) Na nsuka, bandá nokinoki kotya mikano ya teokrasi mpo na bana na bino, mikano oyo bakoki mpenza kokokisa yango.—10/1, nkasa 27, 28.
▫ Ezaleli nini etali kolimbisa ya Yehova tosengeli koluka kosalela yango?
Yehova akolimbisaka mpe akobosanaka. (Yilimia 31:34) Yango ezali mpasi mpo ete bato bákoka kosala bongo. Yesu alobelaki ntina ya kosala bongo, lokola yango elobelami kati na Matai 6:14, 15.—10/15, nkasa 25-26.
▫ Wapi makambo misato oyo mapekisaka biso komonisa motema mawa?
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mayoki ya zuwa ekoki kopika misisa kati na biso. Soki tokómi na zuwa epai na moto moko, lolenge nini tokoki kosalela ye makambo na motema mawa nyonso? Komitika kotala mpambampamba makambo ya mobulu ezali mpe likambo mosusu oyo ekoki kopekisa biso na komonisa motema mawa. Yango ezali kosala ete tóyoka mawa te liboso na bampasi ya bato mosusu. Lisusu, moto oyo azali na ezaleli ya moimi akoki mpenza kozanga motema mawa. (1 Yoane 3:17)—11/1, nkasa 19, 20.
▫ Liteya nini tokoki kozwa na lisoló ya Makomami na ntina na Yobo?
Lisoló ya Yobo ezali kosalisa biso na koyeba malamu mitambo ya Satana mpe ezali kosalisa biso na komona lolenge nini boyangeli ya Yehova ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba ezali na boyokani na bosembo ya bato. Lokola Yobo, baoyo nyonso balingaka Nzambe basengeli komekama. Biso mpe tokoki koyika mpiko lokola Yobo ayikaki mpiko, komonisa ete Satana azali mokosi, mpe kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe.—11/15, lokasa 20.
▫ Lolenge nini mokambi ya lisangani ya bankulutu akoki komonisa ete azali kondima nkulutu mokomoko na lolenge lobongi?
Na ntango likoki lizali, ekozala malamu ete mokambi ya likita asɛnga liboso makanisi ya baninga na ye bankulutu mpe na nsima kopesa manáka mwa mikolo mingi liboso mpo na kopesa bango nzela ete bákanisa malamu mpe na bozindo likoló na makambo oyo matyami kati na manáka. Na boumeli ya likita ya bankulutu, akoluka te kokamba makanisi ya bankulutu, kasi akoluka nde kolendisa bango ete básalela “molende na maloba” na ntina makambo oyo bazali kotalela. (1 Timoté 3:13)—12/1, lokasa 30.