Lingomba: Ezali ekila kosolola na ntina na yango?
“EZALI na makambo mibale oyo nalingaka kosolola na ntina na yango te: lingomba mpe politiki!” Wana ezali maloba oyo Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango mbala na mbala ntango basololaka elongo na bato na ntina na Biblia. Mpe ezali mpasi te kokanga ntina ya likanisi ya bato oyo balobaka bongo.
Ntango bato batyanaka ntembe na makambo ya politiki, bakoki kosilika mpe matáta makoki kobima. Mingi bamitikaka te kozimbisama na bilaka ya lokuta ya bato na politiki mpe bazali koyeba malamu ete mbala mingi bato ya politiki balukaka bobele nguya, lokumu mpe mosolo. Na mawa nyonso, mbala mosusu kokesena makanisi na makambo matali politiki ememaka mobulu.
Okoki koloba ete: ‘Kasi, ezali bobele bongo mpo na lingomba, boye te?’ Ezali molende ya lingomba nde ezali kopelisa matáta mingi oyo tozali komona lelo, boye te? Na Irlande ya Nɔ́rdi, Bakatolike mpe Baprotestá balendisamaka na kobundisana. Kati na bitúká ya Balkans, basangani ya lingomba ya Ortodokse ya Ɛ́sti, ya lingomba ya Katolike ya Loma mpe mangomba mosusu bazali kowela mabelé. Yango ebimisi nini? Makambo ya nsɔ́mɔ mpe motema mabe oyo ezali sé kokóba.
Soki bazali liboso na likámá ya kufa, mingi balukaka kobomba bindimeli na bango mpe oyo ya mabota na bango. Na Afrika, bikeke mingi ya koyinana kati na bato ya boklisto ya nkombo mpamba mpe basangani ya mangomba mosusu ya bapaya, mpe ya mangomba ya bitulúká, etindaki baboti na kopesa bana na bango nkombo mibale oyo ezali kopesa mwa libateli, momeseno oyo mozali kotosama kino lelo oyo. Na yango elenge moko akoki komimonisa lokola mosangani ya lingomba moko ya boklisto ya nkombo mpamba to ya lingomba mosusu na kosaleláká nkombo moko, kasi mosusu te. Wana bomoi ya moto moko ezali na likámá na ntina na bindimeli na ye ya lingomba, ezali likambo ya kokamwa te ete akakatana mpo na kosolola polele makambo matali lingomba.
Mpo na bato mosusu, kosolola na ntina na lingomba ezali ekila, ata ntango bomoi na bango ezali na likámá moko te. Bazali kobanga noki kosolola elongo na bato mosusu na ntina na bindimeli na bango ekomema na koswana oyo ezangi ntina. Ezali mpe na bato mosusu oyo bazali kokanisa ete mangomba nyonso mazali malamu. Wana makambo oyo moto andimi mazali kosepelisa ye, kosolola na ntina na makambo oyo makesenisi mangomba emonani lokola ete ezali na ntina te.
Ata bato ya bwanya oyo bayekolaka lolenge mpe makambo oyo mazali kati na mangomba bakómaka na bosukisi motindo moko te. Kati na lisoló “Boyekoli mpe bokesenisi ya mangomba,” búku monene The New Encyclopædia Britannica endimi ete: “Mbala mingi te . . . bato ya mayele bandimaka bango nyonso likambo litali lolenge ya [lingomba] . . . Na yango, na boumeli ya lisoló mobimba ya bato, likambo yango lisili kobimisa ntembe moko monene.”
Diksionere moko elimboli lingomba lokola “elembo ya kondima mpe limemya mozindo oyo moto azali na yango epai na nguya moko eleki bato oyo eyebani lokola mozalisi mpe moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́.” Yango ezali kosɛnga ete lingomba lizala na mokumba monene kati na bomoi. Na ntembe te, lingomba ezali likambo moko monene kati na lisoló ya bato. Búku Oxford Illustrated Encyclopedia of Peoples and Cultures, emonisi ete: “Ezali na etuluku moko te ya bato oyo ezangi kolimbola molɔngɔ́ mpe ntina ya bomoi engebene bandimbola ya lingomba.” Kokangisáká maloba ya ntina lokola “molɔngɔ́” mpe “ntina” elongo na bomoi, lingomba libongi mpenza ete básolola na ntina na yango na lolenge mosusu, kasi kati na “koswana” to “kowelana” te. Nzokande, ebongi ete básolola na ntina na yango—elingi koloba, botaleli ya mozindo—elongo na moto mosusu. Kasi elongo na nani, mpe litomba nini okoki kozwa na botaleli yango?