Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 4 lok. 16
  • Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato nde babandisá lingomba?
  • Ezali na ntina kozala mondimi ya lingomba moko boye?
  • Lingomba
    Lamuká!—2014
  • Kozala mondimi ya lingomba moko ezali na ntina?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 4 lok. 16
Bato ya libota moko bazali kotala bisika ndenge na ndenge ya losambo

Biblia elobi nini?

Bato nde babandisá lingomba?

BATO MOSUSU BAKANISAKA ete bato nde babandisá lingomba; basusu bakanisaka ete Nzambe asalelaka lingomba mpo na kosalisa bato bakóma baninga na ye. Okanisi nini?

OYO BIBLIA ELOBAKA

Ezali na “losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata.” (Yakobo 1:27) Nzambe nde abandisá Lingomba ya solo; elingi koloba oyo ezangi mbindo.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?

  • Mpo Nzambe asepela na lingomba, mateya na yango esengeli euta na solo ya Biblia.​—Yoane 4:23, 24.

  • Lingomba oyo mateya na yango euti na makanisi ya bato ezali mpamba.​—Marko 7:7, 8.

Ezali na ntina kozala mondimi ya lingomba moko boye?

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

OYO BIBLIA ELOBAKA

“Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.” (Baebre 10:24, 25) Nzambe alingi ete bato báyanganaka esika moko mpo na kosambela ye.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?

  • Mateya ya baoyo basambelaka esika moko esengeli kozala na boyokani.​—1 Bakorinti 1:10, 11.

  • Bandimi ya lingomba oyo Nzambe andimaka bazali lisangá ya bandeko na mokili mobimba.​—1 Petro 2:17.

Mpo na koyeba makambo mosusu talá mokapo 15 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto