Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/8 nk. 4-7
  • Mikolo kitoko mizali koya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikolo kitoko mizali koya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzala oyo esakolamaki
  • Yehova abatelaki basaleli na ye na ntango ya kala
  • Nzambe azali kobatela basaleli na ye lelo oyo
  • Mikolo kitoko mizali liboso
  • Babólá oyo bazali na bozwi mingi: Lolenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Osí omeká limpa ya bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Libateli ya solo: Sikawa mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nani akobikisa baoyo bazali kolela mpo na kosɛnga lisalisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/8 nk. 4-7

Mikolo kitoko mizali koya

MWASI moko alobaki ete: “Biso tosalaka moko-zero-moko.” Moninga na ye azongisaki ete: “Mpo na ngai ezali nkutu mpasi koleka. Nazali na zero-zero-moko.”

Kati na bisika mosusu ya Afrika ya Wɛ́sti, elobeli motindo oyo ezali kosɛnga te ete bálimbola yango. Na esika ete bálya mbala misato na mokolo (moko-moko-moko), moto oyo azali na moko-zero-moko akoki kolya bobele mbala mibale na mokolo​—mbala moko na ntɔ́ngɔ́ mpe mbala moko na mpokwa. Elenge mobali moko oyo azali na zero-zero-moko ayebisi na ntina na ye: “Nalyaka mbala moko na mokolo moko. Natondisi frigo na ngai na mai. Nalyaka gari [nsɔngɔ́] na butu liboso ete nakende kolala. Yango ezali motindo oyo nazali koyika mpiko.”

Wana ezali mpasi ya bato mingi oyo motángo na bango mozali sé kokóla na mikolo na biso. Ntálo ya biloko ezali komata, mpe makoki ya kosomba biloko mazali kokita.

Nzala oyo esakolamaki

Kati na bimonaneli oyo bipesamelaki Yoane, Nzambe asakolaki mpasi oyo bato mingi basengelaki kokutana na yango na mikolo na biso. Nzala esengelaki kozala kati na mpasi yango. Yoane ayebisi ete: “Natali, mpe namoni mbalata mwindo. Mofandi na yango azalaki na kilo na lobɔ́kɔ na ye.” (Emoniseli 6:5) Mbalata wana ya mawa mpe mofandi na yango bazalaki elembo ya nzala​—biloko bisengelaki mpenza kozanga na boye ete ekosɛnga kolya yango mokemoke na emekeli.

Na nsima ntoma Yoane alobi ete: “Nayoki mongongo . . . koloba ete, Kɔ́pɔ mibale na [nganu, NW] denali moko, kɔ́pɔ motoba na loso denali moko.” Na mikolo ya Yoane, kɔ́pɔ mibale ya nganu ezalaki bilei ya mokolo moko mpo na sodá moko, mpe denali moko ezalaki mosolo ya lifuti ya mosala ya mokolo moko. Na yango, libongoli ya Richard Weymouth ebongoli mokapo wana: “Limpa moko, lifuti ya mokolo mobimba, mikate misato ya orge, lifuti ya mokolo mobimba.”​—Emoniseli 6:6.

Lelo oyo lifuti ya mokolo mobimba ezali boni? Lapólo State of World Population, 1994 (Ezalela ya bato ya mokili, na 1994) eyebisi ete: “Bato soko miliare 1,1 pene na 30% ya bafandi nyonso ya mikili ya bobólá, bazali kolya dolare moko (1$) na mokolo.” Na yango, mpo na bobólá ya mokili mobimba, lifuti ya mokolo moko ekoki mbala mosusu kosomba bobele limpa moko.

Yango ezali likambo ya kokamwa te mpo na baoyo bazali mpenza babólá. Mobali moko alobaki ete: “Limpa! Nani alyaka limpa? Na mikolo na biso limpa lizali bilei ya bato ya mbongo!”

Likambo ya kokamwa, bilei bizali kozanga te. Engebene balapólo ya O.N.U., na boumeli ya mibu zomi oyo miuti koleka, bilei oyo bilónamaki na mokili mobimba ebakisamaki na 24%, oyo elekaki bokóli ya motángo ya bato na mokili mobimba. Nzokande, bato nyonso te bazwaki litomba ya bokóli wana. Na ndakisa, na Afrika, bobimisi bilei ekitaki na 5%, wana motángo ya bato mokólaki na 34%. Mpo na yango, atako kati na mokili mobimba biloko bizali mingi, kozanga bilei ezali kokóba kati na bamboka mingi.

Kozanga bilei elimboli komata ya ntálo. Kozanga mosala, lifuti ya moke, mpe kokwea ya mosolo oyo ezali kokóba ezali kosala ete kozwa mbongo mpo na kosomba bilei oyo bizali ekóma likambo ya mpasi. Búku Human Development Report 1994 eyebisi ete: “Bato bazali kolala na nzala mpo na kozanga biloko te​—kasi mpo ete bakoki te kosomba yango.”

Kozanga elikya, bosɛnga mpe ezaleli ya mawa ezali sé kokóla. Glory, oyo azali kofanda na Afrika ya Wɛ́sti alobi ete: “Bato bazali kokanisa ete lelo makambo mazali mabe, kasi mikolo mikoya mikozala mpasi mingi.” Mwasi mosusu alobaki ete: “Bato bazali kokanisa ete bazali kobɛlɛma na likámá moko monene. Bazali kokanisa ete mokolo ezali wana eloko moko te ekomonana na zando.”

Yehova abatelaki basaleli na ye na ntango ya kala

Basaleli ya Nzambe bayebi ete Yehova apesaka libonza epai na basembwi na ye na kokokisáká bamposa na bango mpe na kopesáká bango nguya ya koyika mpiko kati na mikakatano. Ya solo, endimiseli motindo wana kati na makoki ya Nzambe ya kopesa lisungi ezali eteni ya ntina monene ya kondima na bango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”​—Baebele 11:6.

Kobanda kala, Yehova abatelaka basaleli na ye ya sembo. Na eleko ya kozanga mbula oyo eumelaki mibu misato na ndambo, Yehova apesaki Eliya bilei. Na ebandeli, Nzambe alakaki bandɛkɛ ete bamemela Eliya limpa mpe mosuni. (1 Mikonzi 17:2-6) Na nsima, Yehova abatelaki ndambo ya mfufu mpe mafuta ya mwasi moko mokufeli-mobali oyo azalaki kopesa Eliya bilei. (1 Mikonzi 17:8-16) Bobele na boumeli ya eleko wana ya nzala, atako Mokonzi mwasi Yezabele anyokolaki bango mingi na makambo matali losambo, Yehova asɛnzɛlaki ete basakoli na ye bákoka kozwa limpa mpe mai.​—1 Mikonzi 18:13.

Na nsima, ntango mokonzi ya Babilone atyaki basodá na ye kozinga Yelusaleme oyo esilaki kopɛngwa, bato basengelaki “kolya kwanga na ntina na bozito mpe na kobanga.” (Ezekiele 4:16) Makambo makómaki mpenza mpasi na boye ete basi mosusu balyaki misuni ya bana na bango. (Bileli 2:20) Nzokande, atako mosakoli Yilimia azalaki na bolɔ́kɔ na ntina na mosala ya kosakola, Yehova asɛnzɛlaki na boye ete “bapesaki ye mokate na mapa mokolo na mokolo uta na nzela na batumbi-na-mapa kino mapa nyonso na mboka esilaki.”​—Yilimia 37:21.

Yehova abosanaki Yilimia ntango mapa nyonso masilaki? Emonani polele ete te, mpo ete ntango mboka ekweaki na mabɔ́kɔ na bato ya Babilone, bapesaki Yilimia ‘ndambo na bilei mpe likabo, batikaki ye ete akenda.’​—Yilimia 40:5, 6; talá lisusu Nzembo 37:25.

Nzambe azali kobatela basaleli na ye lelo oyo

Motindo moko lokola Yehova asungaki basaleli na ye na ntango ya kala, azali kosala bobele bongo lelo oyo, azali kokokisa bamposa na bango na mosuni mpe na elimo. Na ndakisa, tótalela likambo likómelaki Lamitunde, oyo azali kofanda na Afrika ya Wɛ́sti. Ayebisi ete: “Nazalaki na ebokwelo moko monene ya bansósó. Mokolo moko, babɔtɔli bayaki na mandóki mpe bayibaki ebele na bansósó, motɛ́lɛ ya lotilíki, mpe mbongo oyo tozalaki na yango. Mwa moke na nsima, ndambo na bansósó oyo etikalaki nyonso ekufaki na bokɔnɔ. Yango ebebisaki mosala na ngai ya kobɔkɔla bansósó. Na boumeli ya mibu mibale namekaki koluka mosala kasi nazwaki te. Bomoi ezalaki mpenza mpasi, kasi Yehova asungaki biso.

“Koyeba ete Yehova apesaka nzela na makambo mosusu mpo na konangola biso esalisaki ngai ete nayika mpiko na ntango ya mpasi. Mwasi na ngai mpe ngai tobatelaki momeseno na biso ya boyekoli ya Biblia kati na libota, mpe yango esungaki biso mpenza. Libondeli lizalaki mpe liziba monene ya nguya. Na bantango mosusu nazalaki kooka mposa te ya kobondela, kasi ntango nazalaki kobondela, nazalaki kooka malamu.

“Na boumeli ya eleko wana ya mpasi, nasosolaki motuya ya komanyola likoló na Makomami. Nazalaki kokanisa mingi na ntina na Nzembo 23, oyo ezali kolobela Yehova lokola Mobateli na biso. Mokapo mosusu oyo eyikisaki ngai mpiko ezalaki Bafilipi 4:6, 7, oyo ezali kolobela ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.’ Mokapo mosusu oyo elendisaki ngai ezalaki 1 Petelo 5:6, 7, oyo elobi ete: ‘Bómisɔkisa na lobɔ́kɔ na Nzambe makasi, ete atombola bino na elaka eponi ye. Bóbwaka epai na ye makambo mazali kotungisa bino, zambi bino bozali mpo na ye.’ Mikapo oyo nyonso misalisaki ngai na mikolo yango ya mpasi. Wana ezali yo komanyola, okoki kozongisa makanisi na esika na yango kati na bɔɔngɔ́ na yo oyo ezali konyokwama na makanisi.

“Nasili sikawa kozwa lisusu mosala, kasi mpo na koloba solo, yango elingi koloba te ete makambo mazali pɛtɛɛ. Lokola Biblia esakolaki yango na 2 Timoté 3:1-5, tozali kobika ‘na mikolo na nsuka,’ oyo emonisami na ‘ntango ya mpasi.’ Tokoki te kobongola oyo mokapo wana molobi. Yango wana nazali te komizela ete bomoi ezala malamu. Nzokande, nandimisami mpenza ete elimo ya Yehova ezali kosalisa ngai ete nalónga.”

Atako tozali kobika na ntango ya mpasi, baoyo bazali kotya elikya epai na Yehova mpe Yesu Klisto, Mwana ye oyo azali Mokonzi, bakooka mawa te. (Baloma 10:11) Yesu ye moko andimisi biso ete: “Bongo nazali koloba na bino ete, Botungisa mitema na bino te ete bokolya nini mpe ete bokomela nini soko ete bokolatisa nzoto na bino nini. Mpo ete bomoi eleki bilei te? Mpe nzoto eleki bilamba te? Botala bandɛkɛ na likoló ete bakokónaka te mpe bakobukaka te, bakoyanganisaka na ebombelo mpe te; nde Tata na bino na Likoló azali koleisa bango. Bino nde boleki bango na motuya te? Nani kati na bino ayebi kobakisa ndambo mosusu na molai na ye bobele mpo na kobanzabanza? Bokomitungisa mpe mpo na bilamba na ntina nini?”​—Matai 6:25-28.

Na eleko oyo ya mpasi, wana ezali mpenza mituna oyo mibongi mpo na komitalela. Kasi Yesu akóbaki na maloba oyo ya kolendisa ete: “Talá epai na felele na lisobe, lokola ezali yango kokóla. Ikosalaka mosala te, ikotongaka busi mpe te. Nde nazali koloba na bino ete Solomo na nkembo na ye nyonso alati bilamba lokola moko na yango te. Soko nde Nzambe akolatisa matiti na elanga boye oyo ikobimisa felele lelo nde lobi ikobwakama na mɔ́tɔ, akoleka kokɛmbisa bino te? Bino bato na kondima moke mpenza! Boye, bomitungisa te mpo na koloba ete, Tokolya nini? soko ete, Tokomela nini? soko ete, Tokolata nini? Bapakano bakolukaka biloko yango nyonso. Zambi Tata na bino na Likoló ayebi ete bozali na bosɛnga na yango nyonso. Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye mpe biloko nyonso ikobakisama na bino.”​—Matai 6:28-33.

Mikolo kitoko mizali liboso

Ezali na bilembo oyo bimonisi ete kati na bisika mingi ya mokili, makambo ya nkita mpe ya bomoi ya bato makokóba sé kobeba. Nzokande, basaleli ya Nzambe bayebi ete makambo yango mazali bobele mpo na ntango mokuse. Bokonzi ya nkembo ya Mokonzi Salomo ezalaki elilingi ya boyangeli ya sembo ya Mokonzi oyo aleki Salomo na monene oyo akoyangela mabelé mobimba. (Matai 12:42) Mokonzi yango ezali bongo Klisto Yesu “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo.”​—Emoniseli 19:16.

Nzembo 72, oyo kokokisama na yango ya ebandeli etalaki Mokonzi Salomo, emonisi elilingi kitoko ya boyangeli ya Yesu Klisto. Tótala makambo mosusu ya kitoko oyo yango ezali kosakola na ntina na lolenge mabelé makozala na nsé ya boyangeli ya Mokonzi Klisto.

Kimya na mokili mobimba: “Na mikolo na ye, moyɛngɛbɛni akozala na makila malamu; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu; longwa mpe na ebale kino ndelo na mokili mpenza.”​—Nzembo 72:7, 8.

Komibanzabanza mpo na basɔkɛmi: “Ye akobikisa mobólá oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔ́zi mpe mobólá mawa; akobikisa milimo na babólá. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.”​—Nzembo 72:12-14.

Ebele na bilei: “Masango ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.”​—Nzembo 72:16.

Nkembo ya Yehova etondisi mabelé: “Tiká ete [Yehova] Nzambe, Nzambe na Yisalaele asanzolama zambi ezali bobele ye akosalaka makambo na kokamwa. Tiká nkombo na ye na nkembo esanzolama libela; tiká ete mokili nyonso etonda na nkembo na ye.”​—Nzembo 72:18, 19.

Solo mikolo kitoko mizali koya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto