Bazali kosakola epai na bato ya mitindo nyonso na Athènes ya mikolo na biso
NA NTANGO ntoma Paulo asalaki mobembo na Athènes pene na mobu 50 T.B., engumba yango ezalaki naino esika monene ya mombongo, atako ezalaki lisusu te na lokumu na yango ya kala. Búku moko ya makambo ya kala eyebisi ete: “[Athènes] ekóbaki kozala engumba ya makambo ya elimo mpe ya ntɔ́ki ya Grèce, ezalaki mpe esika oyo bato batángá mingi mpe bato ya nguya ya eleko wana bazalaki kolinga yango mingi.”
Ekoki mpenza kozala ete ntango Paulo azalaki kuna, azwaki libaku ya kosakola epai na Bayuda, epai na bafandi ya Athènes oyo bazalaki bapakano, mpe epai na bato oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge. Lokola azalaki molakisi ya bokɛngi mingi mpe ya mayele, alobaki kati na lisukúlu na ye moko ete Nzambe apesaki “bato nyonso bomoi, na mpema,” ete “na nkɔ́kɔ moko abotisi mabota nyonso na bato,” mpe ete “na bisika nyonso ete bábongola mitema” mpamba te Ye akosambisa “mikili nyonso.”—Misala 17:25-31.
Teritware ya bato ndenge na ndenge
Na bambula oyo, Athènes ezongelaki lisusu lokumu na yango ya engumba oyo ebendaka bato bauti na bisika bikeseni. Bantoma ya bikólo mpe basodá bayaka wana mpo na kosala misala oyo bamboka na bango etindi bango. Bilenge bautaka na Afrika mpe na Moyen-Orient bayaka mpo na kokɔta eteyelo monene wana. Basáli oyo bautaka na Afrika, na Azia, mpe na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti bayaka wana ebele. Ezali mpe na bato mingi ya Philippines mpe basusu bauti na Azia ya súdi-ɛ́sti, oyo bakóma kofanda kuna mpo na koluka kosala lokola bana ya misala kati na bandako. Mpe ntango nyonso bato oyo bakimá bamboka na bango, oyo bazali kouta na mikili ya pembenipembeni mpe na bisika mobulu ezali kati na mabelé mobimba, bazali kosopana kuna.
Ezalela wana ya makambo oyo ezali kopesa mokumba monene mpo na basakoli ya nsango malamu ya engumba wana. Mingi na baoyo bayaka kofanda kuna mpo na mwa ntango moke balobaka Lingelesi, kasi basusu kati na bango balobaka bobele nkóta na bango ya kobotama. Bato yango bauti na ebele ya mimeseno mpe mangomba makesani. Kati na bapaya oyo bayaka na mboka yango, okomona bato oyo bamilobaka ete bazali baklisto, bamizilmá, ba hindouistes, ba bouddhistes, basámbeli bankɔ́kɔ, ba agnostisques, mpe baoyo balobaka ete Nzambe azali te. Batatoli ya Yehova basengeli koyokanisa bokɔti na bango na masoló engebene biutelo ya bato wana.
Lokola mingi kati na bato wana oyo bazali koya sika na engumba yango basilaki kokutana na makambo ya mpasi na bomoi na bango, batunaka mingi mituna oyo mitali ntina ya bomoi mpe bilikya mpo na mikolo mizali koya. Basusu batalelaka Biblia na motuya mpenza mpe bazalaka na mokakatano te mpo na kondima oyo yango ezali koloba. Eteni monene ya bato bafandaka na teritware wana ya bato ndenge na ndenge bazali na komikitisa, na bopɔlɔ, mpe bazali na nzala ya koyeba solo. Bazali komiyoka ete bazali na bonsomi mingi mpo na koluka solo mpamba te bazali mosika na mabota na bango mpe mosika na mboka na bango.
Lisangá moko ya Lingelesi efungwamaki na Athènes na 1986 mpo na koteya na teritware wana. Bokóli ezali mpenza monene. Na boumeli ya bambula mitano oyo euti koleka, pene na bato ya sika 80 basilaki kozwa batisimo. Litomba emonanaki ete lisangá moko ya lokóta ya Arabe, lisangá moko ya lokóta ya Polonais, mpe mpo na mwa ntango etuluku moko ya Lifalansé eutaki kofungwama. Basusu oyo bautaki na lisangá ya Lingelesi bakendaki na masangá mpe na bituluku lolenge wana na Thessalonique na nɔ́rdi, na Héraklion, na Crète, mpe na Le Pirée, mpe na libóngo ya Athènes. Okolinga koyoka mwa masoló ya bamoko na bapaya oyo bayekolaki solo na Athènes?
Baoyo na motuya bauti na mabota bazali koya
Thomas abotamaki na Asmara, Érythrée, akólaki lokola Mokatoliki oyo amipesi mpenza. Wana akómaki na mibu 15, akɔtaki seminɛ́lɛ ya yambo mpo na kokóma sángó. Atunaki moko na bakambi na ye ete: “Lolenge nini ekoki mpenza kosalema ete Nzambe moko azala Banzambe misato?” Mokambi yango ayanolaki ete: “Mpamba te tosengeli kondima mateya ya pápa na ntina etali makambo ya elimo. Likambo lileki ntina lizali ete, oyo ezali libombami, kasi yo ozali naino elenge mpe okoki naino te mpo na kokanga ntina na yango.” Nsima ya mbula mitano kati na seminɛ́lɛ ya yambo, Thomas alongwaki, abulunganisamaki mpe alɛmbaki mpo na etamboli mpe mateya ya lingomba. Kasi, atikaki te kosala bolukiluki na ye ya koyeba Nzambe ya solo.
Mokolo moko, mwa moke nsima ya bokómi na ye na Athènes, akutaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ekuke na ye, oyo ezalaki na motó ya likambo na lokasa ya ezipeli na yango ete “Okoki kozwa kolɔngɔ́nɔ́ malamu mpe esengo.” Atángaki yango mbala mingi. Bobele kati na zulunalo yango, atángaki lisusu ete tosengeli koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. (Matai 6:33) Thomas afukamaki mpe asɛngaki na Nzambe ete alakisa ye lolenge ya kosala bongo, alakaki ete: “Soki olakisi ngai lolenge nini nakoki koluka Bokonzi na yo, nakopesa sanza motoba ya bomoi na ngai mpo na koyekola lolenge ya kosalela yo.” Nsima ya pɔ́sɔ́ misato, Batatoli mibale babɛtaki na ekuke na ye. Nokinoki, Thomas andimaki boyekoli ya Biblia, mpe sanza zomi na nsima azwaki batisimo. Alobi ete: “Yehova ayanolaki mpenza na libondeli na ngai, mpe apesaki ngai libaku ya kokóma moko na Batatoli na ye. Sikawa bolingo na ye ezali kopusa ngai ete naluka liboso Bokonzi na ye mpe boyengebene na ye kati na bomoi na ngai.”
Wana bazalaki kosakola ndako na ndako, Batatoli mosusu mibale bamonaki nkombo moko ya mopaya mpembeni ya ngɛ́ngɛ́lɛ ya ekuke.
Mongongo ya mwasi moko eyokanaki na elobeli oyo etyami na ekuke, ete: “Bolingi nini?”
Moko na Batatoli yango alobaki ete bazalaki koluka kokutana na bato oyo balobaka Lingelesi, oyo bazali na mposa ya koyekola Biblia.
Mwasi yango atunaki ete: “Bozali bato ya lingomba nini?”
“Tozali Batatoli ya Yehova.”
“Ee, malamu! Bómata awa na ndako ya likoló.”
Bamataki mpe, wana ekuke ya etómbola efungwanaki, mobali moko monene oyo asepelaki na biso te atɛlɛmaki wana. Kasi mwasi yango alobaki na mongongo makasi uta na ndako.
“Tiká bango bákɔta. Nalingi kosolola na bango.”
Mwasi yango ayebisaki Batatoli wana ete azalaki kosala mobembo na mikili ndenge na ndenge elongo na bato ya etuluku ya masano ya mobali na ye, mpe bobele lobi loleki azalaki kosambela ete akutana na Batatoli ya Yehova. Na yango babandaki nokinoki boyekoli ya Biblia. Lokola ntango na bango ya kofanda na Grèce ezalaki mokuse, basalaki ebongiseli ete báyekolaka mbala misato na pɔ́sɔ́, basilisaki mokanda Bomoi ya seko bobele na pɔ́sɔ́ zomi.
Eleko mosusu ya masano oyo elandaki esalaki ete báya lisusu na Grèce. Mwasi yango azongelaki boyekoli na ye mpe azalaki kokóla malamu. Nsima ya mwa basanza, akómaki kosakola elongo na Batatoli kati na mosala ya kosakola lokola mosakoli oyo azwi naino batisimo te mpe nokinoki, abandisaki boyekoli na ye ya Biblia ya liboso. Elongo na nani? Elongo na mobali na ye, ye akamwaki mingi mpo na Batatoli ya Yehova mpe mpo na mbongwana oyo mwasi na ye asalaki.
Allan, mwana ya pastɛ́rɛ moko ya Protestá, akólaki na Afrika ya Súdi. Kobanda na bomwana mpenza, andimisamaki ete Biblia ezali emoniseli epemami euti na Nzambe. Lokola lingomba na ye ekokisaki mposa na ye te, akómaki komipesa na filozofi mpe na makambo ya politiki, kasi yango ebakisaki lisusu mayoki na ye ya kozanga ntina na bomoi. Nsima ya kokóma na ye na Grèce, mayoki na ye ya kozanga eloko ekólaki. Amiyokaki ete bomoi na ye ezalaki na ntina te, mpe azalaki kati na nzela oyo ezalaki komema ye na esika moko te.
Mokolo mosusu na butu likambo moko lisalemaki. Allan ayebisi ete: “Nafukamaki mpe nafungolaki motema na ngai epai na Nzambe. Nalelaki mpo na lolenge ya bomoi na ngai, nalɔmbaki na Nzambe ete alakisa ngai epai basaleli na ye ya solo bazali. Nalakaki ete nakotambola kati na pole ya litambwisi na ye.” Bobele na pɔ́sɔ́ wana, akendaki na magazini moko mpe asololaki elongo na mwasi nkolo magazini yango, oyo azalaki bongo Motatoli. Lisoló yango esalaki mbongwana monene kati na bomoi ya Allan. “Na mikolo oyo milandaki, bindimeli na ngai oyo nazalaki kolinga mingi ebomamaki nyonso: Bosato, lifelo ya mɔ́tɔ, kozanga kokufa ya molimo—nyonso wana ezalaki mateya ya Biblia te.” Kati na Ndako ya Bokonzi, babalani Batatoli mibale bamipesaki mpo na koyekola na ye Biblia. Andimaki mpe akólaki nokinoki. Allan azali komikundola ete: “Nalelaki na esengo mpo na solo, mpe esikolaki ngai.” Azwaki batisimo na nsima ya mbula moko. Lelo oyo azali na esengo ya kosala lokola mosaleli na misala kati na lisangá.
Elizabeth autaki na Nigeria, epai kuna azalaki koluka solo kati na mangomba ndenge na ndenge kasi azwaki yango te. Eloko ezalaki kobangisa ye mingi koleka ezalaki bongo liteya ya konyokolama ya seko na mɔ́tɔ ya lifelo. Na ntango ayaki na Athènes elongo na libota na ye, Batatoli mibale bayaki na ekuke na ye, mpe babandaki boyekoli ya Biblia. Elizabeth asepelaki mingi na wana bayebisaki ye ete Nzambe anyokolaka bato te, kasi azali nde kopesa elikya mpo na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Azalaki na zemi mpo na kobota mwana na ye ya minei, mpe azalaki pene ya kolongola zemi yango. Na nsima, ayekolaki likanisi ya Yehova kati na Biblia na ntina na ezalela ya bulɛɛ ya bomoi. Sikawa azali na mwana moko ya mwasi ya kitoko. Elizabeth akólaki nokinoki mpe mosika te azwaki batisimo. Atako azali na bana minei mpe azali kosala mosala ya mokolo mobimba, azali na likoki ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi pene na sanza nyonso. Azwaki lipamboli ya komona ete mobali na ye abandaki koyekola Biblia. Alobi ete: “Nasili komona Nzambe ya solo mpe losambo ya solo, nazali kotɔ́nda Yehova mpe lisangá na ye.”
Mingi kati na teritware wana ya bato ndenge na ndenge bazali kozwama kati na mosala ya koteya na balabála, kasi esɛngaka kolendendela mpo na kokólisa mposa na bango. Ezalaki bongo mpo na elenge mwasi moko na nkombo Sallay, oyo autaki na Sierra Leone. Motatoli moko apesaki ye trakte, azwaki adresi na ye, mpe bayokanaki mpo ete akende kotala ye. Sallay asepelaki mpe andimaki boyekoli ya Biblia, kasi mpo na mitungisi ya mosala mpe mikakatano mosusu, boyekoli ezalaki kosalema pɔ́sɔ na pɔ́sɔ te. Na nsima, akomaki kofanda na esika mosusu kozanga koyebisa adresi na ye ya sika. Motatoli yango alendendelaki na kokendáká na adresi ya kala, mpe na nsima Sallay atindaki maloba epai na Motatoli yango ete alanda ye na adresi na ye ya sika epai akómaki kofanda.
Boyekoli ekómaki sikawa kosalema mbala mingi, atako Sallay azalaki na sanza ya nsuka ya zemi na ye. Nsima ya kobotama ya mwana, Sallay akómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Atako ekoki komonana lokola ete ezalaki pɛtɛɛ, kasi ezalaki pɛtɛɛ te. Na 6:30 ya ntɔ́ngɔ́, azalaki komilɛngɛla mpo na kokamata bisi oyo ezalaki kosala miniti ntuku misato na nzela mpo na kokende kotika mwana na ye na eteyelo ya bana mike, mpe azalaki kozwa bisi mosusu oyo ezalaki kosala ngonga moko na nzela mpo na kokende na mosala. Nsima ya kosilisa mosala na ye ya kosukola bandako, azalaki kozonga na ndako na ye. Na mpokwa ya mokolo ya makita, to na ntango akendaka na mosala ya kosakola, azwaka bisi mosusu oyo esalaka ngonga moko na kokende mpe ngonga moko na kozonga, atako mobali na ye atɛmɛlaka ye. Wana azalaki komonisela ye bolingo mpe motema molai, akólaki kino amipesaki mpe azwaki batisimo. Ezali boni mpo na mobali na ye? Ayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto mpe andimaki koyekola Biblia.
Bapambolami na matomba kitoko
Ndambo monene ya bato wana bafandaka na Athènes mpo na ntango moke. Mingi bazongaka na bamboka na bango mpo na kokende kosakola nsango malamu epai na bandeko mpe epai na baninga na bango. Basusu bakendaka na mikili mosusu ya Mpótó mpe balandaka kokóba kosalela Yehova. Baoyo bazali kotikala na Grèce bazali kozwa matomba ya kosakola epai na bato ya mboka na bango oyo bayaki mpe kofanda na Grèce. Mbala mosusu, mbotó ya solo ezali kobimisa mbuma bobele nsima wana bapaya yango balekaki na mboka mosusu mpe Batatoli basololaki na bango kuna.
Nyonso wana ezali komonisa ete Yehova azali na koponapona te. Andimaka bato ya bikólo nyonso oyo babangaka ye mpe balingaka boyengebene. (Misala 10:34, 35) Mpo na bato oyo bakokani na bampate, kokenda oyo bakendaka na mboka mosusu mpo na koluka biloko ya mosuni ememeli bango mapamboli mingi koleka ndenge bakanisaki yango—boyebi ya Nzambe ya solo, Yehova, mpe elaka na ye ya bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya sembo. Ee, Yehova asili kopesa bango mapamboli mingi mpo na bokutani na bango na Batoli kati na Athènes ya mikolo na biso!
[Bililingi na lokasa 16]
Bato bauti bamboka ndenge na ndenge bazali koyoka nsango malamu na Athènes