Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/1 nk. 18-22
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Malako na ye mazali na bozito te’
  • Koyekola koyeba Nzambe
  • Kotosa mitindá ya Nzambe
  • Komonisa limemya mpo na bomoi mpe makila
  • Tósala elongo na libota ya Yehova oyo libongisami
  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bolingo ya Nzambe eumelaka seko
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nzambe azwaka bomoi na motuya—Bongo yo?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/1 nk. 18-22

Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

“Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.”​—1 YOANE 5:3.

1, 2. Mpo na nini ezali likambo ya kokamwisa te na komona ete Nzambe atye masɛngami mpo na baoyo balingi kosambela ye na lolenge lobongi?

“LINGOMBA na ngai ebongi na ngai!” Ezali yango nde bato balobaka mbala mingi, boye te? Nzokande, na bosolo nyonso, motuna mosengeli kotunama boye: “Lingomba na ngai esepelisaka Nzambe?” Ɛɛ, Nzambe azali na masɛngami mpo na baoyo balingi kosambela ye na lolenge lobongi. Yango esengeli nde kokamwisa biso? Soko moke te. Tókamata ndakisa: Kanisá ete ozali na ndako moko kitoko, oyo outi kobongisa kala mingi te mpe mosala yango esɛngaki yo mbongo mingi. Okopesa nzela na moto ata ya lolenge nini ete afanda kati na yango? Soko moke te! Moto nyonso oyo akolinga kofanda kuna lokola mofuteli-ndako asengeli kokokisa masɛngami na yo.

2 Bobele bongo, Yehova apesaki mabelé oyo ete ezala efandelo ya bato. Mosika te, na litambwisi ya Bokonzi na ye, mabelé “makozongisama sika”​—makobongolama paladiso moko kitoko. Yehova akokokisa yango. Na komipimeláká ye moko, Nzambe apesaki Mwana mobotami-bobele-moko na ye mpo ete yango ekoka kosalema. Ya solo, Nzambe asengeli kozala na masɛngami mpo na baoyo balingi kofanda wana!​—Nzembo 115:16; Matai 6:9, 10; Yoane 3:16.

3. Lolenge nini Salomo amonisaki na mokuse makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso?

3 Lolenge nini tokoki koyeba masɛngami ya Nzambe? Salomo, Mokonzi na mayele, apemamaki na Yehova mpo na kolobela na mokuse makambo oyo Ye azali kosɛnga epai na biso. Nsima ya komanyola na makambo nyonso oyo alandaki​—oyo kati na yango totángi bozwi na ye, bandako oyo atongaki, mitindo mikeseni ya miziki oyo azalaki komisepelisa na yango, mpe lolango na ye mpo na basi​—Salomo ayaki koyeba likambo oyo: “Tóyoka nsuka na likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá [malako, “NW”] na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.”​—Mosakoli 12:13.

‘Malako na ye mazali na bozito te’

4-6. (a) Wapi ndimbola mpenza ya liloba ya Greke oyo ebongolami awa na “bozito”? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete malako ya Nzambe mazali na bozito te?

4 “Batelá malako na ye.” Ya solo, ezali yango nde Nzambe azali kosɛnga epai na biso. Makambo oyo asɛngi biso ezali mpenza makasi? Soko moke te. Ntoma Yoane ayebisi biso likambo moko ya kolendisa na ntina na malako ya Nzambe, to masɛngami. Akomaki ete: “Bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.”​—1 Yoane 5:3.

5 Liloba ya Greke oyo libongolami awa na “bozito” elimboli mpenza “kiló mingi.” Ekoki komonisa eloko oyo ezali mpasi mpo na kosala to ezali mokakatano mpo na kokokisa yango. Na Matai 23:4, liloba yango moko lisalelami mpo na kolobela “mikumba na bozito,” mibeko misalemi na bato mpe makambo na bonkɔ́kɔ, oyo bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kotya likoló na bato. Okangi ntina ya bosukisi oyo mobangé ntoma Yoane apesi? Malako ya Nzambe mazali mokumba na bozito te, mazali mpe mpasi te mpo na biso kotosa yango. (Kokanisá na Deteronome 30:11.) Kútu, soki tolingi Nzambe, kokokisa masɛngami na ye ekopesa biso esengo. Yango ekopesa biso libaku malamu ya komonisa bolingo na biso mpo na Yehova.

6 Mpo na komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe, tosengeli koyeba malamumalamu makambo oyo azali kosɛnga epai na biso. Tiká tótalela sikawa masɛngami mitano kati na masɛngami ya Nzambe. Ntango tozali kotalela yango, batelá na makanisi na yo makambo oyo Yoane akomaki ete: ‘Malako ya Nzambe mazali na bozito te.’

Koyekola koyeba Nzambe

7. Lobiko na biso etaleli likambo nini?

7 Lisɛngami ya liboso ezali bongo koyekola koyeba Nzambe. Tótalela maloba ya Yesu oyo mazwami na Yoane mokapo ya 17. Ezalaki na butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki na bomoi na ye lokola moto. Yesu alekisaki ntango mingi na mpokwa kobongisáká bantoma na ye mpo na bokei na ye. Azalaki komibanzabanza mingi mpo na bomoi na bango ya mikolo mizalaki koya, lobiko ya seko na seko na mikolo mizalaki liboso. Wana atombolaki miso na ye na likoló, abondelaki mpo na bango. Na vɛrsɛ́ ya 3 (NW), totángi ete: “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe ye oyo otindaki, Yesu Klisto.” Ɛɛ, lobiko na bango etalelaki ‘koyekola koyeba’ Nzambe mpe Klisto. Yango etaleli mpe biso. Mpo na kozwa lobiko, tosengeli koyekola kozwa boyebi wana.

8. ‘Koyekola koyeba’ Nzambe elimboli nini?

8 ‘Koyekola koyeba’ Nzambe elimboli nini? Liloba ya Greke oyo ebongolami awa na ‘koyekola koyeba’ elimboli “koya koyeba, kondima,” to “kososola na mobimba.” Yebá lisusu ete elobeli ‘koyekola koyeba’ emonisi ete yango ezali likambo oyo lizali koumela ntango molai. Koyekola koyeba Nzambe elimboli bongo koya koyeba ye, likolólikoló te, kasi na mozindo mpenza, kokólisáká boninga ya boyebani mozindo elongo na ye. Kolanda kozala na boyokani na Nzambe ememaka moto na kobakisa ntango nyonso boyebi na ye. Likambo yango ekoki kolandana libela na libela, zambi tokokaka te kosilisa koyekola makambo nyonso oyo tosengeli koyeba na ntina na Yehova.​—Baloma 11:33.

9. Nini tokoki koyekola na ntina na Yehova uta na búku ya bozalisi?

9 Lolenge nini tokoki koyekola koyeba Nzambe? Ezali na búku mibale oyo ekoki kosalisa biso. Ya liboso ezali búku ya bozalisi. Biloko Yehova asilá kozalisa​—oyo bizali na bomoi mpe oyo bizangi bomoi​—bizali kopesa biso mwa bososoli na ntina na bomoto na ye. (Baloma 1:20) Tótalela mwa bandakisa. Makɛlɛlɛ kitoko ya bweta (chute), lokito ya mbonge na ntango ya mopɛpɛ makasi, kotala likoló wana etondi na minzoto na butu​—makambo wana mazali koteya biso ete Yehova azali Nzambe na “makasi kati na nguya,” boye te? (Yisaya 40:26) Mwana moke oyo azali kosɛka wana azali komona mwana ya mbwa azali koningisa mokila na ye to mwana ya nkɔndɔkɔ wana azali kosakana na mwa bále moke​—nyonso oyo emonisi ete Yehova, “Nzambe na esengo,” alingaka masɛki, boye te? (1 Timoté 1:11) Elɛngi ya bilei kitoko, nsolo mpímbó ya bafololo na zámba, lángi ndenge na ndenge mpe kitoko ya lipekapeka, nzembo ya bandɛkɛ na eleko ya prɛntá, esengo ya koyambama ya mɔ́tɔ na mabɔkɔ ya moto oyo olingaka​—tozali kososola na makambo wana ete Mozalisi na biso azali Nzambe ya bolingo, oyo alingi ete biso mpe tósepela na bomoi, boye te?​—1 Yoane 4:8.

10, 11. (a) Makambo nini tokoki te koyekola na ntina na Yehova mpe mikano na ye uta na búku ya bozalisi? (b) Mituna nini biyano na yango bizali kozwama bobele na Biblia?

10 Nzokande, ezali na makambo mosusu matali Nzambe oyo tokoki te koyeba yango na kotaláká búku ya bozalisi. Na ndakisa: Nkombo ya Nzambe ezali nani? Mpo na nini asalaki mabelé mpe atyaki moto ete afanda wana? Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe? Mikolo mizali koya mibombeli biso makambo nini? Mpo na kozwa biyano na mituna oyo, tosengeli kotalela búku mosusu oyo ezali kopesa boyebi ya Nzambe​—Biblia. Kati na nkasa na yango, Yehova amonisi makambo na ye moko, nkombo na ye, bomoto na ye, mpe mikano na ye​—makambo oyo tokoki koyeba na nzela mosusu te.​—Exode 34:6, 7; Nzembo 83:18; Amosa 3:7.

11 Kati na Makomami, Yehova azali mpe kopesa boyebi ya ntina likoló na bato mosusu oyo tosengeli koyeba bango. Na ndakisa, Yesu Klisto azali nani, mpe mokumba nini azali na yango kati na kokokisama ya mikano ya Yehova? (Misala 4:12) Satana Zábolo azali nani? Ndenge nini azimbisaka bato? Lolenge nini tokoki kopɛngola ye ete azimbisa biso te? (1 Petelo 5:8) Biyano ya ntina na mituna wana bizwami bobele kati na Biblia.

12. Lolenge nini okoki kolimbola ntina oyo emonisi ete ezali likambo ya bozito te koyekola koyeba Nzambe mpe mikano na ye?

12 Kozwa boyebi wana ya Nzambe mpe mikano na ye ezali nde likambo ya bozito? Soko moke te! Okoki komikundola nini ezalaki mayoki na yo ntango oyebaki mpo na mbala ya liboso ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, ete Bokonzi na ye ekozongisa Paladiso awa na mabelé, ete apesaki Mwana molingami na ye lokola lisiko mpo na masumu na biso, bakisá mpe makambo mosusu kitoko ya solo? Yango ezalaki lokola nde balongoli yo elamba ya kozanga boyebi oyo ezipaki miso na yo mpo na komona makambo polelepolele na mbala ya liboso, boye te? Koyekola koyeba Nzambe ezali bozito te. Ezali nde likambo ya esengo!​—Nzembo 1:1-3; 119:97.

Kotosa mitindá ya Nzambe

13, 14. (a) Mbongwana nini tosengeli kosala kati na bomoi na biso wana tozali koyekola koyeba Nzambe? (b) Nzambe asɛngi ete tóboya misala nini ya mbindo?

13 Ntango tozali koyekola koyeba Nzambe, toyaka kososola ete tosengeli kosala mbongwana kati na bomoi na biso. Yango ememi biso na lisɛngami ya mibale. Tosengeli kotosa mitindá ya Nzambe mpo na etamboli malamu mpe tosengeli kondima solo na ye. Solo ezali nini? Oyo tozali kosala mpe kondima ezali na ntina na miso ya Nzambe? Bato mingi na mikolo na biso bakanisaka ete yango ezali na ntina te. Lapólo moko ebimisamaki na 1995 na lingomba libéngami Église anglicane emonisaki ete kofanda lokola mwasi na mobali kozanga kobalana esengeli te kotalelama lokola lisumu. Episkɔ́pɔ moko alobaki ete: “Maloba ‘kofanda makango’ ezali ebéngeli oyo ezokisaka mpe epesaka litomba te.”

14 Boye, tokoloba nde ete “kofanda makango” ezali lisusu lisumu te? Yehova ayebisi biso na maloba ya polele mpenza mayoki na ye liboso na etamboli motindo wana. Liloba na ye, Biblia, elobi boye: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (Baebele 13:4) Kosangisa nzoto liboso ya kobalana ekoki kotalelama ete ezali lisumu te na miso ya bakonzi ya mangomba oyo bazangi bizaleli malamu mpe baílingomba na bango, kasi yango ezali lisumu monene na miso ya Nzambe! Ezali mpe bongo mpo na ekobo, kosangisa nzoto na ndeko, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. (Levitike 18:6; 1 Bakolinti 6:9, 10) Nzambe asɛngi ete tóboya misala wana, oyo ye azali kotalela yango ete mizali mbindo.

15. Lolenge nini masɛngami ya Nzambe mataleli ezala makambo oyo tozali kosalela basusu mpe makambo oyo tondimaka?

15 Nzokande, esuki te bobele na kotika misala oyo Nzambe atalelaka ete mizali masumu. Masɛngami ya Nzambe mataleli mpe lolenge oyo tozali kosalela basusu makambo. Kati na libota, azali kosɛnga ete mobali mpe mwasi bázala na bolingo mpe na limemya moko epai na mosusu. Nzambe asɛngi ete baboti bákokisa bamposa ya mosuni, ya elimo, mpe ya mayoki ya bana na bango. Asɛngi na bana ete bátosa baboti na bango. (Masese 22:6; Bakolose 3:18-​21) Kasi ezali boni mpo na bindimeli na biso? Yehova Nzambe alingi ete tóboya bindimeli mpe mimeseno oyo euti na losambo ya lokuta to oyo ezali kotɛmɛla mateya ya polele oyo mazali na Biblia.​—Deteronome 18:9-​13; 2 Bakolinti 6:14-​17.

16. Limbolá mpo na nini ezali likambo ya bozito te kotosa mitindá ya Nzambe na ntina na etamboli malamu mpe kondima solo na ye.

16 Ezali bozito mpo na biso kotosa mitindá ya Nzambe na oyo etali etamboli malamu mpe kondima solo na ye? Te, soki tótaleli matomba oyo mazali kozwama​—mabala oyo kati na yango mobali mpe mwasi bazali kolingana mpe kotyelana motema, na esika ya mabala oyo mazali kopanzana na ntina na kozanga sembo; bandako epai bana bazali komiyoka ete balingami mpe babatelami na baboti na bango, na esika ya mabota oyo kati na yango bana bazali komiyoka ete balingami te, batalelami na bopɔtu, mpe bazali na mposa na bango te; lisosoli ya pɛto mpe nzoto kolɔngɔ́nɔ́, na esika ya mayoki ya komema ngambo mpe nzoto oyo ebebisami na SIDA to na maladi mosusu oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto. Ya solo, masɛngami ya Yehova mazali kopimela biso eloko moko te oyo tosengeli na yango mpo na kosepela na bomoi!​—Deteronome 10:12, 13.

Komonisa limemya mpo na bomoi mpe makila

17. Lolenge nini Yehova atalelaka bomoi mpe makila?

17 Wana ozali kotambwisa bomoi na yo na boyokani na mitindá ya Nzambe, okoya koyeba ete bomoi ezali mpenza na motuya. Tiká sikawa tótalela lisɛngami ya misato ya Nzambe. Tosengeli komonisa limemya mpo na bomoi mpe makila. Bomoi ezali bulɛɛ na miso ya Yehova. Esengeli kozala bongo, mpamba te ye azali Liziba ya bomoi. (Nzembo 36:9) Ɛɛ, ata bomoi ya mwana oyo azali kati na libumu ya mama na ye ezali na motuya na miso ya Yehova! (Exode 21:22, 23) Makila ezali komonisa bomoi. Na yango, makila mpe ezali bulɛɛ na miso ya Nzambe. (Levitike 17:14) Na bongo, esengeli kozala likambo ya kokamwa te na koyoka ete Nzambe azali kosɛnga biso tótalela bomoi mpe makila lokola ye azali kotalela yango.

18. Likanisi ya Yehova na ntina na bomoi mpe makila esɛngi nini epai na biso?

18 Komemya bomoi mpe makila esɛngi nini epai na biso? Lokola tozali baklisto, totyaka bomoi na biso na likámá te bobele mpo na kozwa mwa esengo. Tomibanzabanzaka mpo na kopɛngola makámá mpe na yango tozali kotala malamu ete mituka na biso mpe bandako na biso ebimisa makámá te. (Deteronome 22:8) Tomelaka makaya te, tomelaka bángi te, mpe tosalelaka bilangwiseli te mpo na komisepelisa. (2 Bakolinti 7:1) Lokola tozali koyoka Nzambe ntango azali koloba ete ‘bóboya makila,’ tondimaka soko moke te ete tózongisama makila. (Misala 15:28, 29) Atako tolingaka bomoi, tokomeka te kobikisa bomoi na biso na kobukáká mibeko ya Nzambe, kotyáká na likámá elikya na biso ya bomoi ya seko!​—Matai 16:25.

19. Limbolá lolenge tozali kozwa litomba na komonisáká limemya mpo na bomoi mpe makila.

19 Ezali likambo ya bozito mpo na biso kotalela bomoi mpe makila ete ezali bulɛɛ? Soko moke te! Kanisá naino. Ezali likambo ya bozito kokima kozwa kanser ya mampúlúlú oyo eutaka na komela makaya? Ezali likambo ya bozito kokima boombo oyo bilangwiseli ya ngɛngɛ mabe bizali kopesa na makanisi mpe na nzoto? Ezali bozito soki tozali komibatela ete tózwa SIDA te, maladi ya libale (hépatite) te, to maladi mosusu oyo ezwamaka na kozongisama makila? Ya solo, koboya na biso ya misala wana mpe mimeseno wana ezali mpo na litomba na biso.​—Yisaya 48:17.

20. Lolenge nini libota moko ezwaki litomba na kobateláká likanisi ya Nzambe na ntina na bomoi?

20 Tótalela eksperiansi oyo. Esili koleka mwa bambula, Motatoli moko ya mwasi oyo azalaki na zemi ya sanza soko misato na ndambo abandaki kobima makila na mpokwa moko mpe bamemaki ye nokinoki na lopitalo. Nsima wana monganga asalaki ye ekizamɛ́, motatoli yango ayokaki monganga koyebisa na moko ya mafulumé ete basengeli kolongola zemi yango. Koyebáká lolenge Yehova atalelaka bomoi ya mwana oyo azali kati na libumu, na mpiko nyonso aboyaki ete básopa zemi yango, mpe ayebisaki monganga ete: “Soki mwana azali naino na bomoi, tiká zemi efanda!” Akóbaki koyoka mpasi ya kobima makila na bantango mosusu, kasi basanza mingi na nsima, atako zemi ekɔmɛlaki te, abotaki mwana mobali ya nzoto kolɔngɔ́nɔ́, oyo azali sikawa na mibu 17. Alobaki ete: “Tosili kolobela mwana na biso likambo oyo, mpe alobi ete asepelaka mingi lokola abwakamaki te na ekunde. Ayebi ete, soki azali na bomoi lelo oyo, ezali bobele mpo ete tozali basaleli ya Yehova.” Ya solo, kotalela bomoi lokola Nzambe atalelaka yango ezalaki likambo ya bozito te mpo na libota wana!

Tósala elongo na libota ya Yehova oyo libongisami

21, 22. (a) Yehova asɛngi biso ete tósalela ye elongo na banani? (b) Lolenge nini moto akoki koyeba libota libongisami ya Nzambe?

21 Tozali biso moko te na kosala mbongwana oyo esengeli mpo na koyokanisa bomoi na biso na mitindá ya Nzambe. Yehova azali na libota ya basaleli na ye awa na mabelé, mpe azali kosɛnga ete tósalela ye esika moko na bango. Yango ememi biso na lisɛngami ya minei. Tosengeli kosalela Yehova elongo na lisangá na ye oyo litambwisami na elimo na ye.

22 Nzokande, lolenge nini moto akoki koyeba libota ya Nzambe oyo libongisami malamu? Engebene mitindá oyo miyebisami kati na Makomami, bato ya libota yango bazalaka na bolingo ya solosolo kati na bango, bazalaka na limemya mozindo mpo na Biblia, bakumisaka nkombo ya Nzambe, basakolaka na ntina na Bokonzi na ye, mpe basanganaka na makambo ya mokili mabe oyo te. (Matai 6:9; 24:14; Yoane 13:34, 35; 17:16, 17) Ezali na lisangá bobele moko ya basambeli awa na mabelé oyo ekokisi makambo wana ya boklisto ya solo​—ezali bongo Batatoli ya Yehova!

23, 24. Ndakisa nini tokoki kopesa mpo na komonisa ete ezali likambo ya bozito te kosalela Yehova elongo na libota na ye libongisami?

23 Ezali likambo ya bozito kosalela Yehova elongo na libota na ye libongisami? Soko moke te! Kútu yango ezali nde libaku malamu ya komonisamela bolingo mpe kozwa lisungi ya libota ya boklisto oyo esalemi na bandeko mibali mpe bandeko basi kati na mokili mobimba. (1 Petelo 2:17) Kanisá ete bozindi na masuwa mpe ozali bobele yo moko kati na mai, ozali kobunda mpo na kokóma na libóngo. Wana omiyoki ete okokoka te koyika mpiko ntango molai, moto moko apesi yo lobɔkɔ mpo na kokɔtisa yo na masuwa ya bobikisi bomoi. Ɛɛ, kuna okuti babiki mosusu! Kati na masuwa ya bobikisi bomoi, yo mpe bato mosusu bozali kokende pembenipembeni na libóngo, mpo na kokamata babiki mosusu.

24 Tozali kati na ezalela motindo moko, boye te? Tolongolami na “mai” ya likámá ya mokili mabe oyo mpo na kokɔta na “masuwa ya bobikisi bomoi,” lisangá ya Yehova oyo ezali awa na mabelé. Kati na yango, tozali kosala lipeka na lipeka wana tozali kobɛlɛma na “mabóngo” ya mokili ya sika mpe ya boyengebene. Ntango mikakatano ya bomoi epusi biso na kolɛmba na nzela, tozali kozwa lisungi mpe libɔndisi ya baninga baklisto ya solo mpe tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi mpo na yango!​—Masese 17:17.

25. (a) Mokumba nini tozali na yango liboso na baoyo bazali naino kati na “mai” ya mokili mabe oyo? (b) Lisɛngami nini ya Nzambe tokolobela yango na lisoló lilandi?

25 Kasi, ezali boni mpo na basusu​—bato ya motema sembo oyo bazali naino kati na “mai”? Tozali na mokumba ya kosalisa bango ete bákɔta na lisangá ya Yehova, boye te? (1 Timoté 2:3, 4) Bazali na mposa ya lisungi mpo na koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga. Yango ememi biso na lisɛngami ya mitano ya Nzambe. Tosengeli kozala basakoli ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe. Ezali yango nde tokolobela na lisoló lilandi.

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini malako ya Nzambe mazali na bozito te?

◻ Lolenge nini tozali koyekola koyeba Nzambe?

◻ Mpo na nini ezali likambo ya bozito te kotosa mitindá ya Nzambe na ntina na etamboli malamu mpe kondima solo na ye?

◻ Likanisi ya Nzambe na ntina na bomoi mpe makila ezali kosɛnga nini epai na biso?

◻ Nzambe asɛngi biso ete tósalela ye elongo na banani, mpe lolenge nini moto akoki koyeba bato yango?

[Bililingi na lokasa 18]

Tozali koyekola makambo na ntina na Yehova uta na búku ya bozalisi mpe na Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto