Olingaka ete bana na yo bázala ndenge nini na mikolo mizali koya?
BANA na yo, otalelaka bango lokola libula ya motuya monene? (Nzembo 127:3) To okanisaka ete kobɔkɔla bango ezali bozito oyo ezali kosɛnga yo mbongo mingi mpe ezali na ndanga te ete ekolonga? Na esika ete epesa yo mbongo, kobɔkɔla bana esɛngaka ntango nyonso kobimisa mbongo kino bakokóma na likoki ya komisalisa bango moko. Ndenge moko kobatela bozwi oyo moto asangoli esɛngaka ete ayeba kolɛngɛla makambo, ezali mpe bongo mpo na kozala moboti malamu.
Baboti oyo bazali komibanzabanza mpo na bana na bango balingaka kopesa bango ebandeli malamu na bomoi. Atako makambo ya mabe mpe ya mawa ekoki kobima na mokili oyo, baboti bakoki kosala makambo mingi mpo na kobatela bana na bango. Tótalela ndakisa ya Werner na Eva, baye tolobelaki na lisolo oyo eleki.a
Ntango baboti bazali mpenza komibanzabanza
Werner alobi ete na esika ya kotala kaka na miso, baboti na ye balukaki mpenza koyeba makambo oyo mazalaki koleka na eteyelo. “Nasepelaki mingi na toli malamu oyo bapesaki ngai, mpe namonaki ete bazalaki komibanzabanza mpo na ngai mpe bazalaki kosunga ngai. Lokola bazali baboti, bazalaki na bikateli mosusu ya makasi, kasi nayebaki ete bazalaki baninga na ngai ya solosolo.” Mpe ntango Eva akómaki kotungisama mingi mpo na boyekoli na ye kino anyokwamaki na makanisi mpe azalaki kozwa mpɔngi te, baboti na ye, Francisco na Inez, balekisaki ntango mingi mpo na kosolola na ye mpe kosalisa ye ete elimo na ye mpe na makanisi na ye ezonga kolɔngɔnɔ.
Francisco na Inez basalaki nini mpo na kobatela bana na bango mpe kobongisa bango mpo ete bázala malamu ntango bakokóma mikóló? Baboti yango ya bolingo bazalaki kosala misala na bango ya mokolo na mokolo elongo na bana na bango kobanda bazalaki naino mike. Na esika ya kolekisa ntango bobele na baninga na bango mikóló, Inez na Francisco bazalaki komema bana na bango bisika nyonso oyo bazalaki kokende. Lokola bazali baboti ya bolingo, bapesaki mpe bana na bango litambwisi ya malamu. Inez alobi boye: “Tolakisaki bango ndenge ya kobongisa ndako, kobatela mosolo, mpe kobongisa bilamba na bango. Tosalisaki mpe mokomoko na bango ete apona mosala oyo akosala mpe bázala na bokatikati kati na mikumba na bango mpe matomba ya elimo.”
Ezali na ntina mingi ete bóyeba bana na bino mpe bóbɔkɔla bango malamu! Tótalela ndenge misato oyo bokoki kosalela makambo yango: (1) Bósalisa bana na bino ete bápona mosala ya malamu; (2) Bóbongisa bango mpo báyeba kolonga mitungisi ya mayoki na kelasi mpe na esika ya mosala; (3) Bólakisa bango ndenge ya kokokisa bamposa na bango ya elimo.
Bósalisa bango ete bápona mosala ya malamu
Lokola mosala ya mosuni nde epesaka moto mbongo mpe lisusu ezwaka ye ntango mingi, kobɔkɔla bana malamu esɛngi kotalela makambo oyo mwana na mwana asepelaka na yango mpe makoki na ye. Lokola moto moko te oyo akanisaka malamu alingaka te ete azala bozito epai na bato mosusu, baboti basengeli kokanisa na malamu lolenge oyo bakoki kobongisa mwana na bango mpo ete azala na likoki ya komisalisa ye moko mpe libota na ye. Ebongi ete mwana na yo ya mobali to ya mwasi ayekola mosala ya mabɔkɔ mpo azala na bomoi ya malamu? Soki ozali moboti oyo azali mpenza komibanzabanza, salá makasi mpenza mpo osalisa mwana na yo ete akolisa makoki lokola kozala na molende na mosala, kozala na mposa ya koyekola, mpe koyeba kofanda na bato.
Tótalela ndakisa ya Nicole. Ye alobi boye: “Baboti na ngai bazwaki ngai mpo na kosala na bango na mwa kompanyi na bango ya kotya bopɛto. Bapesaki ngai likanisi ete napesaka ndambo ya mbongo oyo nazalaki kozwa mpo na bamposa ya libota mpe natikalaka na ndambo mosusu mpo na bamposa na ngai moko to nabombaka yango. Yango esalisaki ngai nazala na makanisi ya bomoto oyo na nsima, esalisaki ngai mingi na bomoi.”
Biblia, Liloba ya Nzambe, eyebisi mpenzampenza te mosala nini ya mosuni moto asengeli kopona. Kasi, ezali kopesa malako ya malamu. Na ndakisa, ntoma Paulo alobaki ete: “Soko moto nani alingi kosala mosala te, alya mpe te.” Ntango akomelaki baklisto ya Tesaloniki, alobaki mpe ete: “Toyoki ete bamosusu bazali kotambola kati na bino na goigoi, bazali kosalaka mosala te nde bobele bisalasala mpamba. Tozali kolaka mpe kopesa toli na bato na lolenge yango kati na Nkolo Yesu Klisto ete básala mosala na kimya ete bálya bilei na bango mpenza.”—2 Batesaloniki 3:10-12.
Kasi, bomoi esuki kaka te na kozala na mosala mpe kozwa mbongo. Mbala mingi baoyo bazali na mposa mingi ya lokumu basukaka na kozanga bosepeli mpe bakoki komona ete bazali “koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mosakoli 1:14) Na esika ete bátindika bana na bango báluka kokóma bato minene mpe bázwa bomɛngo, ekozala malamu soki baboti bakosalisa bango ete bákanga ntina ya bwanya oyo ezwami na maloba ya ntoma Yoane oyo apemamaki na Nzambe ete: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te. Zambi makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili. Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:15-17.
Ndenge nini bokoki kokokisa bamposa na bango ya mayoki?
Moboti, mpo na nini te kozala lokola molakisi ya bapoti-mbangu? Ntango azali kolakisa bapoti-mbangu, likebi na ye esukaka kaka te na kokolisa makoki na bango ya kopota mbangu koleka to kopumbwa likoló koleka. Emonani ete asalaka lisusu nyonso mpo na kosalisa bango ete bálonga makanisi mabe, mpe na ndenge yango bálendisa nguya ya mayoki na bango. Bongo yo, ndenge nini okoki kolendisa, kotonga mpe koyikisa mwana na yo mpiko?
Talelá ndakisa ya Rogério, elenge moko ya mbula 13. Amitungisaki mingi wana azalaki kokola; longola yango, azalaki konyokwama na mayoki mpo ete baboti na ye bazalaki koyokana te mpe bazalaki kotyela ya likebi te. Ebongi kosala nini mpo na bilenge lokola ye? Atako likoki ezali te ya kobatela bana na yo na mitungisi mpe bopusi nyonso ya mabe, kolɛmba mokumba na yo te lokola moboti. Kozanga ete olekisa ndelo na kobatela bango, pesá bana na yo disipilini na koyebáká komitya na esika na bango, mpe kobosana te ete mwana na mwana azali na lolenge na ye. Soki ozali komonisa boboto mpe bolingo, okoki kosala mingi mpo ete elenge amiyoka ete abatelami. Yango ekosalisa ye ete akola na komityela motema mpe kopesa nzoto na ye kilo.
Ata soki baboti na yo moko balongaki mpenza kokokisa bamposa na yo ya mayoki, ezali na makambo misato oyo ekoki kosalisa yo ete olonga na mokumba na yo ya kosalisa bana: (1) Kotika te ete mikakatano na yo moko emema yo na kobosana mikakatano oyo okoki komona lokola ete ezali mike epai ya bana na yo; (2) Salá nyonso mpo na kosolola na bango mokolo na mokolo na esengo nyonso mpe na kolobeláká makambo ya ntina; (3) lendisá elimo malamu na oyo etali kosilisa mikakatano mpe kofanda na bato.
Nsima ya kokanisa bolenge na ye, Birgit alobi ete: “Nazwaki liteya ete okoki kobongola bato te mpo bákóma ndenge yo olingi. Mama na ngai ayebisaki ngai ete soki namoni likambo moko epai ya bato mosusu oyo esepelisi ngai te, eloko nakoki kosala ezali ete namekola bango te. Alobaki na ngai lisusu ete ntango malamu ya kobongola etamboli na ngai ezali wana nazali naino elenge.”
Kasi, longola mosala ya mosuni mpe kozala malamu na mayoki, bana na yo bazali na mposa ya makambo mosusu. Omituna ete, ‘Natalelaka likambo ya kozala moboti lokola mokumba oyo Nzambe apesi ngai?’ Soki ezali bongo, osengeli kokokisa bamposa ya elimo ya bana na yo.
Ndenge ya kokokisa bamposa na bango ya elimo
Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu Klisto alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi ete bazali babola na elimo, mpamba te bokonzi ya likoló ezali mpo na bango.” (Matai 5:3, NW) Kokokisa bamposa ya elimo esɛngi makambo nini? Ntango baboti bazali kopesa ndakisa malamu ya kondima epai na Yehova Nzambe, ezalaka na bopusi ya malamu epai ya bana. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Nzokande, mpo ete kondima ezali na ntina, esengeli kobondelaka. (Baloma 12:12) Soki oyebi bamposa na yo ya elimo, okoluka litambwisi ya Nzambe, lokola tata na Samasona, mosambisi oyo ayebanaki mingi na Yisalaele. (Basambisi 13:8) Okosuka se na kobondela te kasi okoluka mpe lisungi kati na Biblia, Liloba ya Nzambe.—2 Timote 3:16, 17.b
Atako kopesa litambwisi ya malamu, lisungi na mayoki, mpe lisalisi ya elimo ezalaka mosala monene, mokumba ya moboti ekoki kopesa ye mbano monene. Tata moko oyo azali na bana mibale na Brésil alobi boye: “Nakoki ata kokanisa te ete nazanga bana na ngai. Ezali na makambo mingi ya malamu oyo tokoki kosala elongo na bango.” Mama abakisi boye mpo na kolimbola ntina oyo bana basalaka malamu: “Tozalaka na bango ntango nyonso, mpe tosalaka nyonso mpo ete tósala misala na esengo. Mpe, likambo eleki ntina, tobondelaka ntango nyonso mpo na bana.”
Priscilla abosani te bolingo mpe motema molai oyo baboti na ye bamoniselaki ye mbala nyonso oyo azalaki na mokakatano. Alobi ete, “Bazalaki mpenza baninga na ngai mpe bazalaki kosunga ngai na makambo nyonso. Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki mpenza komona ete bazali kotalela ngai lokola ‘likabo ya Yehova.’” (Nzembo 127:3) Ndenge baboti mosusu mingi basalaka, mpo na nini te kobongisa ntango mpo na kotánga Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia elongo na bana na bino? Koyekola masolo mpe mitinda ya Biblia wana bino nyonso bofandi malamu mpe bozali na esengo ekoki kosalisa bana ete bábangaka te mpe bázala na elikya ya solo mpo na mikolo mikoya.
Ntango bana nyonso bakozala na libateli
Atako mikolo mizali koya mizali komonana lokola ete mikozala mabe mpo na bana mingi lelo oyo, Liloba ya Nzambe elaki ete mosika te, mabelé makozala esika ya libateli mpo na bato nyonso. Kanisá mokili ya sika oyo Nzambe alaki, ntango baboti bakomitungisa lisusu te mpo na libateli ya bana na bango! (2 Petelo 3:13) Salá lokola ete ozali komona kokokisama ya esakweli oyo: “Nyama na yauli akofanda elongo na mwana na mpate, mpe nkoi akolala elongo na mwana na ntaba; mwana na ngɔmbɛ mpe nkosi mpe nyama na mafuta bakozala elongo mpe mwana moke na moto akokamba bango.” (Yisaya 11:6) Ata lelo oyo, libateli ya elimo oyo emonisami na maloba yango ezali kokokisama na ndenge ya elilingi kati na baoyo bazali kosalela Yehova. Soki ozali kati na bango, okomona ndenge Nzambe azali kobatela na bolingo nyonso. Soki omonisi ete olingaka Nzambe, okoki kondimisama ete azali koyeba mabanzo na yo lokola moboti mpe akosalisa yo mpo olonga mitungisi mpe komekama oyo okoki kokutana na yango. Yekolá Liloba na ye mpe tyá elikya na yo na Bokonzi na ye.
Zalá ndakisa malamu epai ya bana na yo mpo na kosalisa bango ete bátambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki oluki libateli epai na Yehova Nzambe, bomoi na yo mpe oyo ya bana na yo na mikolo mizali koya ekozala malamu koleka ndenge oyo okoki kokanisa. Okoki kondimisama lokola mokomi na nzembo oyo ayembaki ete: “Omisepelisa na [Yehova] mpe ye akopesa yo mposa nyonso na motema na yo.”—Nzembo 37:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu
b Talá buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, mokapo 5 kino mokapo 7, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.