Malia akufaki ndenge bato nyonso bakufaka?
ENGEBENE zulunalo L’Osservatore Romano ya Vatican, liteya ya Ntombwa ya Malia, ya Lingomba ya Katolike elobaka ete: “Ngɔndɔ Mosantu Malia azalaki na lisumu-lisango te, akamatamaki na nzoto mpe na molimo mpo na nkembo ya likoló nsima ya bomoi na ye awa na mabelé.” Zulunalo yango elobi ete, liteya wana ememi banganga-mayele mosusu ya teoloji ya Lingomba ya Katolike na koloba ete Malia “akufaki te kasi abutaki mbala moko na bomoi na ye ya mabelé kino na nkembo ya likoló.”a
Na mikolo mileki, Pápa Jean-Paul II alimbolaki likambo yango na lolenge mosusu. Na liyangani monene oyo esalemaki na Vatican mokolo ya 25 Yúni 1997, alobaki ete: “Kondimana ya Sika elobi eloko te likoló na makambo masalemaki na liwa ya Malia. Lokola Biblia elobi eloko te, bamoko bapusami na kokanisa ete ezalaki lokola liwa ya bato nyonso, mpamba te likambo moko te ekoki kobenda likebi elobami. . . . Emonani ete moboko ezali te mpo na koloba ete akufaki te lokola bato nyonso.”
Maloba ya Pápa Jean-Paul II ebulunganisi liteya oyo elobaka ete Malia abotamaki na lisumu te. Soki mama ya Yesu azalaki na “lisumu-lisango” te, ndenge nini Malia akokaki kokufa “lokola bato nyonso” liwa oyo euti na lisumu ya Adama moto na masumu? (Baloma 5:12) Mokakatano wana ya bato ya teoloji euti na likanisi mabe oyo Lingomba ya Katolike ezali na yango na ntina na mama ya Yesu. Tokokamwa te ete likambo yango ebimisi bokabwani mpe mobulungano kati na Lingomba ya Katolike.
Wana Biblia elobeli Malia lokola mosɔkɛmi, mosembwi, mpe moto oyo amipesi, elobi te ete bizaleli wana ezalaki epai na moto oyo “azalaki na lisumu te.” (Luka 1:38; Misala 1:13, 14) Nzokande Biblia elobi ete: “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” (Baloma 3:23) Ɛɛ, Malia asangolaki lisumu mpe kozanga kokoka lokola bato mosusu nyonso, mpe elembeteli moko te emonisi ete akufaki te lokola bato nyonso.—Kokanisá na 1 Yoane 1:8-10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Ntombwa ya Malia—Ezali liteya liutaki na Nzambe?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1994, nkasa 26-29.