Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/8 lok. 32
  • Ezali mabe ya nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali mabe ya nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/8 lok. 32

Ezali mabe ya nani?

Bato mingi bamonaka Nzambe mabe na ntina na mikakatano na bango. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Bozoba ya moto ye moko ebebisaka bomoi na ye, mpe akokangela Nkolo nkanda.” (Masese 19:3, The New English Bible) Kasi, komona Nzambe mabe mpo na bampasi ya bato, ezali lokola kopamela mosali ya motuka na ntina na makama mingi oyo ezali kobima mpo ete basofele bazali kotambwisa nsima ya kolangwa masanga.

Kati na Biblia, Liloba na ye, Nzambe apesi bato litambwisi malamu. Soki toyekoli buku yango oyo euti na Nzambe mpe tolandi mibeko mpe malako na yango, tokoki kopɛngola makama mingi oyo ekómelaka bato. Nzokande, koboya kolanda litambwisi ya Nzambe ememaka makama. Na ndakisa, baoyo balekisaka ndelo na kolya, baoyo bamelaka likaya, baoyo balangwaka masanga, to baoyo basalaka pite, mbala mingi babebisaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. (Luka 21:34; 1 Bakolinti 6:18; 2 Bakolinti 7:1) Ntoma moklisto Paulo akomaki ete: “Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto; nde ye oyo akokona kati na [elimo, NW] akobuka bomoi na seko na nzela na [elimo].”​—Bagalatia 6:7, 8.

Kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe eleki malamu! Soki tokosala bongo, tokomona bosolo ya elaka oyo Nzambe apesaki na nzela ya mosakoli Yisaya ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soko oyokaki malako na ngai! Mbɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge na mai-na-monana.”​—Yisaya 48:17, 18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto