Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 lok. 24
  • Esanga moko ya mosika mpe ya moke

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esanga moko ya mosika mpe ya moke
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 lok. 24

Esanga moko ya mosika mpe ya moke

MBALA mingi basalelaka maloba “ya mosika” mpe “ya moke” mpo na kolobela esanga Sainte-Hélène. Maloba yango mabongi mpenza, mpamba te esanga yango ezali na bolai ya kilomɛtɛlɛ 17, mpe na bonene ya kilomɛtɛlɛ 10. Kilomɛtɛlɛ 1 950, ekaboli yango na mabelé monene, elingi koloba bokula ya sudi-wɛsti ya Afrika. Na mobu 1815, ntango balongaki Napoléon Bonaparte na etumba, batindaki ye akende kofanda kuna kino ntango akokufa.

Soki ozali na mbu okomona esanga yango lokola ndako monene oyo ebatelami malamu. Ezali nde ngomba ya mɔ́tɔ oyo ekufa, ngomba yango eutá na kati ya mai mpe soki ozali na mbu okomona pembenipembeni na yango etɛlɛmi mpe etombwani na mɛtɛlɛ 500 kino 700. Na katikati na yango, okokuta Ngomba Actéon ezali na mɛtɛlɛ 818, ezali likoló koleka esanga mobimba. Mopɛpɛ ya mpiɔ oyo eutaka na sudi ya Atlantique mpe mbonge ya mbu, epesaka malili mpe klima ya malamu na esanga. Kasi soki obandi esika esanga esuki kino na katikati epai bangomba ezali mingi, okomona ete na bisika mosusu esanga ezali malili, mpe na bisika mosusu ezali molunge, mpe okomona banzete ndenge na ndenge.

Sainte-Hélène ezali mabelé ya ekólo Grande-Bretagne kobanda na nsuka ya ekeke ya 17. Bato soki 5 000 oyo bafandi kuna bautá na Mpoto, na Azia, mpe na Afrika. Lingelesi ezali lokota oyo balobaka na esanga mobimba, kasi lolenge ya kobénga maloba ekeseni. Esanga ezali na libándá ya mpɛpɔ te; mpo na kokende na mikili mosusu, basalelaka masuwa, oyo ekendaka ntango nyonso na Afrika ya Sudi mpe na Angleterre. Kutu, ezali se na katikati ya bambula ya 1990 nde bakómaki kotala televizyo na lisalisi ya satelite.

Nsango malamu ekɔtaki na esanga yango mpo na mbala ya liboso na ebandeli ya bambula ya 1930. (Matai 24:14) Nsima ya bambula, bato mingi ya esanga yango bandimi nsango malamu, bozwi oyo eleki bozwi ya mosuni na motuya. (Matai 6:19, 20) Lelo oyo, esanga ya Sainte-Hélène ezali na Motatoli moko na kati ya bato 31, mwayene oyo eleki mokili mobimba!

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Sainte-Hélène

JAMESTOWN

Levelwood

AFRIKA

MBU YA ATLANTIQUE

Sainte-​Hélène

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto