Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 nk. 20-23
  • Tópesa Yehova mbeka oyo akondima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tópesa Yehova mbeka oyo akondima
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baponi banzela ekeseni
  • Toli ya Yehova mpe eyano ya Kaina
  • Liteya mpo na biso
  • Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nkanda etindaki ye aboma
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mwana malamu ná mwana mabe
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 nk. 20-23

Tópesa Yehova mbeka oyo akondima

NA ELEKO moko na lisolo ya bato, likambo moko ya kokamwa emonanaki na ekɔtelo ya ɛsti ya elanga ya Edene.a Bakeluba, bikelamu ya nguya batɛlɛmaki wana mpo na kokɛngɛla ete moto aleka te. Ndenge batɛlɛmaki ezalaki kobangisa moto nyonso mpe moto moko te amekaki kokɔta kuna. Eloko mosusu oyo ezalaki kobangisa ezalaki mopanga ya mɔ́tɔ oyo ezalaki kobaluka. Na ntembe te ezalaki kobangisa mpo moto apusana pene na banzete te. (Genese 3:24) Lokola likambo yango ezalaki kobangisa, moto nyonso azalaki kotala yango kaka na mosika.

Ekoki kozala ete Kaina na Abele bazalaki kokende kotala esika yango mbala mingi. Lokola Adama na Eva babotaki bango na libándá ya elanga, bazalaki kosuka se na kokanisa lolenge nini ya bomoi ezalaki na Paladiso esika baboti na bango bafandaki liboso. Lokola banzete na yango ezalaki kozwa mai na ndenge oyo esengeli, ezalaki kobota mbuma mingi mpe nkasa na yango ezalaki na langi kitoko. Na ntango wana, Edene ekómaki esika oyo balonaka lisusu te mpe etondi na matiti.

Na ntembe te, Adama na Eva bayebisaki bana na bango ntina oyo elanga esundolamaki mpe mpo na nini babenganaki bango kuna. (Genese 2:17; 3:6, 23) Ekoki kozala ete likambo yango epesaki Kaina na Abele nkanda! Bakokaki komona elanga, kasi bakokaki kokɔta kuna te. Bazalaki kofanda pene na Paladiso kasi bazalaki na lotomo ya kokɔta na kati te. Kaina na Abele babotamaki na kozanga kokoka, likoki ya kolonga yango ezalaki mpe te.

Boyokani ya baboti na bango ekokaki kobongisa makambo te. Ntango Nzambe apesaki Eva etumbu, alobaki na ye ete: “Okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Lokola esakweli yango elobaki, ekoki kozala ete Adama abandaki koyangela mwasi na ye, mbala mosusu azalaki kotalela ye lisusu lokola moninga mpe mosungi te. Eva abandaki komonisa ete azali na mposa ya mobali na ye mingi mpenza. Mokanda moko kutu elobi ete ezalaki lisusu “mposa” te kasi “ekómaki nde maladi.”

Biblia eyebisi te kino esika nini boyokani mabe ya mwasi na mobali wana ebebisaki botosi ya bana epai na baboti na bango. Kasi, ezali polele ete, Adama na Eva bapesaki bana na bango ndakisa mabe.

Baponi banzela ekeseni

Na nsima, Abele akómaki mobateli ya mpate mpe Kaina mosali ya bilanga. (Genese 4:2) Ntango azalaki kokamba bibwele na ye, na ntembe te, Abele azalaki na ntango mingi ya kokanisa esakweli monene oyo elobamaki liboso bábengana baboti na ye na elanga, ete: “Nakotya koyinana kati na yo na mwasi, kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Na ntembe te Abele amitunaki, ‘Ndenge nini elaka ya Nzambe mpo na mombóto oyo ekosasa nyoka ekokokisama, mpe ndenge nini nyoka ekosasa ye na litindi?’

Nsima ya ntango, na ntembe te, wana bakómi mikóló, Kaina na Abele bapesaki Yehova likabo. Lokola Abele azalaki mobateli ya mpate, tokoki kokamwa te na ndenge apesaki “bana na liboso kati na etonga na ye mpe mafuta na yango lokola.” Nzokande, Kaina apesaki “mbuma na elanga.” Yehova andimaki likabo ya Abele, kasi “andimaki Kaina te mpe likabo na ye te.” (Genese 4:3-5) Mpo na nini?

Bato mosusu balobaka ete mpo mbeka ya Abele ezalaki “bana na liboso na kati ya etonga na ye,” kasi Kaina apesaki bobele “mbuma na elanga.” Likambo ezalaki mpenza na biloko oyo Kaina apesaki te, mpamba te lisolo elobi ete Yehova andimaki “Abele mpe likabo na ye,” nde andimaki “Kaina te mpe likabo na ye te.” Yehova atalaki liboso motema ya mosambeli. Ntango asalaki bongo, amonaki eloko nini? Baebele 11:4 elobi ete “mpo na kondima” Abele apesaki mbeka na ye. Na bongo, Kaina azalaki na kondima te lokola kondima ya Abele, mbeka ya Abele endimamaki nde mpo na kondima.

Na yango, tomoni mpenza ete mbeka ya Abele ezalaki mpe na makila. Mbala mosusu asosolaki ete elaka ya Nzambe mpo na mombóto oyo nyoka ekosasa na litindi ekosɛnga mbeka ya bomoi. Boye, mbeka ya Abele ezalaki lokola nde azali kosɛnga bolimbisi, mpe na ndenge yango amonisaki kondima ete Nzambe akopesa mbeka mpo na kolimbisa masumu na ntango ebongi.

Nzokande, Kaina akanisaki mpenza te ntina oyo apesaki mbeka. Molimboli moko ya Biblia na ekeke ya 19 T.B., alobi ete, “Likabo na ye ezalaki bobele elembo mpo na komonisa ete ayebaki Nzambe lokola mopesi ya biloko malamu. Emonisaki polele ete azali na nyongo te epai ya Mozalisi, to azali na ntina ya koyambola masumu te, mpe azali na mposa ya bolimbisi te.”

Na koleka, lokola azalaki mwana ya liboso, Kaina akokaki kokanisa na lolendo nyonso ete ye nde mombóto oyo alakamaki, oyo akoboma Nyoka, Satana. Eva mpe akanisaki ndenge wana mpo na mwana na ye ya liboso. (Genese 4:1) Ya solo, soki Kaina na Eva bakanisaki bongo, bamikosaki mpenza.

Biblia elobi te ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi mbeka ya Abele. Balimboli mosusu ya Biblia balobaka ete mɔ́tɔ ekitaki na likoló mpe ezikisaki mbeka yango. Ezala bongo to te, ntango amonaki ete baboyi mbeka na ye, “Kaina asilikaki mingi, mpe elongi na ye ezalaki na nkanda.” (Genese 4:5) Kaina asukaki mabe.

Toli ya Yehova mpe eyano ya Kaina

Yehova asololaki na Kaina. Atunaki ye: “Mpo nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda?” Yango epesaki Kaina likoki ya kotalela mayoki mpe mposa na ye. Yehova alobaki lisusu: “Soko osali malamu okondimama te? Mpe soko osali malamu te mbɛ lisumu ezali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo nde ekoki ete oleka yango.”​—Genese 4:6, 7. (Talá etanda na lokasa 23.)

Kaina ayokaki te. Kutu, amemaki Abele na elanga mpe abomaki ye. Na nsima, ntango Yehova atunaki soki Abele azali wapi, Kaina akosaki mpo na kobomba lisumu na ye. Azongisaki ete: “Ngai nayebi te. Ngai nazali nde mobateli na ndeko na ngai?”​—Genese 4:8, 9.

Ezala liboso to nsima ya koboma Abele, Kaina aboyaki ‘kosala malamu.’ Atikaki lisumu ezala na bokonzi likoló na ye, mpo na yango, babenganaki Kaina na esika bato bazalaki kofanda. Mbala mosusu “elembo,” elimboli ete mobeko epesamaki, mpo ete moto moko aboma Kaina te atako abomaki Abele.​—Genese 4:15.

Na nsima, Kaina akendaki kotonga engumba mpe apesaki yango nkombo ya mwana na ye. Likambo ya kokamwa ezali te na ndenge bakitani na ye bayebanaki lokola bato ya mobulu. Libota ya Kaina esukaki ntango Mpela ya mikolo na Noa ebomaki basali na mabe nyonso.​—Genese 4:17-24; 7:21-24.

Biblia ebateli lisolo ya Kaina na Abele bobele mpo na kosepelisa batángi te. Kasi, “ekomami mpo na kolakisa biso” mpe ‘ekoki kopesa litomba na mateya, na mpamela.’ (Baloma 15:4; 2 Timote 3:16) Lisolo yango ekoki koteya biso nini?

Liteya mpo na biso

Lelo oyo, lokola Kaina na Abele, baklisto basɛngisami kopesa Nzambe mbeka. Bakotumbela ye biloko ya mosuni te, kasi “mbeka ya masanzoli . . . yango mbuma na bibɛbu bizali koyambola nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Yango ezali kokokisama lelo oyo na mokili mobimba, ntango Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mikili koleka 230. (Matai 24:14) Ozali kosangana na mosala yango? Soki ezali bongo, okoki kozala na elikya ete “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.”​—Baebele 6:10.

Ndenge moko na makabo ya Kaina na Abele, mbeka na yo ezali kotalelama bobele na libándá te​—na ndakisa, bangonga oyo ozali kolekisa na mosala ya kosakola. Yehova atalaka na mozindo. Yilimia 17:10 elobi ete ye ‘alukalukaka na kati ya motema’ mpe ‘amekaka makanisi’​—elingi koloba makanisi, mayoki, mpe mposa ya motema ya moto. Likambo ya ntina ezali mposa, kasi motuya te. Ɛɛ, mbeka ezala monene to moke, Nzambe akondima yango soki epesami na motema ya bolingo.​—Kokanisá Malako 12:41-44 na Mko. 14:3-9.

Tosengeli koyeba lisusu ete, Nzambe akondima mbeka ya banyama oyo ezali kotɛnguma te, ndenge moko aboyaki likabo Kaina apesaki ye na mitema mibale. (Malaki 1:8, 13) Yehova azali kosɛnga opesa ye oyo eleki malamu, elingi koloba kosalela ye na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo mobimba, mpe na makasi na yo mobimba. (Malako 12:30) Osalaka bongo? Soki ezali bongo, ozali na bantina ya kosepela na mbeka oyo ozali kopesa. Paulo akomaki ete: “Tiká ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na moto mosusu te.”​—Bagalatia 6:4.

Kaina na Abele babɔkwamaki esika moko. Kasi ntango mpe makambo ya bomoi epesaki mokomoko na bango libaku ya kokolisa bomoto oyo ekeseni na oyo ya moninga. Mokemoke Kaina abandaki kokolisa zuwa, kowelana, mpe nkanda.

Nzokande, Nzambe ayebi Abele lokola moto ya sembo. (Matai 23:35) Lokola azwaki ekateli ya kosepelisa Nzambe ezala na mpasi to na bisengo, Abele akesanaki na bato ya libota na ye oyo bazangi botɔndi, elingi koloba Adama, Eva, mpe Kaina. Biblia eyebisi biso ete atako Abele akufá, “azali naino koloba.” Mosala ya sembo oyo asalelaki Nzambe ezali moko na masolo oyo ekomami na kati ya Biblia. Tólanda ndakisa ya Abele mpe ntango nyonso tópesa Nzambe mbeka oyo andimaka.​—Baebele 11:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato mosusu balobaka ete elanga ya Edene ezalaki na etúká ya ngomba-ngomba na ɛsti ya ekólo Turquie.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Ndakisa mpo na baklisto oyo balingi kopesa toli

“MPO na nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda?” Na boboto nyonso, Yehova atunaki Kaina motuna wana mpo na kosolola na ye. Apusaki Kaina na makasi te ete abongwana, mpamba te Kaina azalaki na bonsomi ya kopona. (Talá Deteronome 30:19.) Atako bongo, Yehova amonisaki Kaina makama ya nzela mabe oyo aponaki. Akebisaki Kaina boye: “Soki okosala malamu te talá lisumu ezali kolala na ekuke na yo.”​—Genese 4:6, 7, NW.

Tozali komona mpenza ete ata ntango azalaki kopesa mpamela wana ya makasi, Yehova atalaki Kaina te lokola moto oyo akoki ‘kozwa lisusu lisungi te.’ Yango wana, ayebisaki Kaina ete akozwa mapamboli soki atiki makanisi mabe, mpe azalaki na elikya ete Kaina akoki kolonga likambo yango soki alingi. Yehova alobaki ete, “Soko osali malamu okondimama te?” Ayebisaki lisusu Kaina mpo na nkanda na ye ya mabe ete: “Mposa na yango elingi kosimba yo nde ekoki ete oleka yango.”

Lelo oyo, bankulutu na lisangá ya boklisto basengeli kolanda ndakisa ya Yehova. Lokola mokanda ya 2 Timote 4:2 (NW) emonisi yango, basengeli ‘kosembola’ mpe ‘kopamela,’ komonisa polele makama oyo makoki kobima na nzela oyo moto aponi na motó makasi. Bobele na ntango yango, bankulutu basengeli mpe ‘kopesa toli.’ Liloba ya Greke oyo ebongolami na kopesa toli ezali pa·ra·ka·leʹo, elimboli “kolendisa.” Buku moko (Theological Dictionary of the New Testament) elobi ete “likebisi yango ezali na maloba ya kozokisa te, kotyana ntembe te, to kotyola te. Lokola liloba yango ekoki mpe kolimbola libɔndisi, yango ebongi mpenza.”

Likambo ya kobenda likebi ezali ete liloba moko ya Greke oyo eyokani na yango, pa·raʹkle·tos, ekoki kosalelama mpo na moto oyo azali kosalisa moninga to avoka oyo azali kosambela moto likambo. Yango wana, ata ntango bankulutu bazali kopesa toli oyo esengeli, basengeli kobosana te ete bazali basalisi, moto oyo bazali kopesa ye toli azali monguna na bango te. Na ndakisa ya Yehova, bankulutu basengeli kozala na makanisi malamu, na elikya ete moto oyo bazali kopesa toli akoki kolonga mokakatano na ye.​—Talá Bagalatia 6:1.

Nzokande, na nsuka ezali likambo ya moto ye moko soki akolanda likebisi oyo bapesi ye to te. (Bagalatia 6:5; Bafilipi 2:12) Bato oyo bazali kopesa toli bakoki komona ete moto mosusu alandi makebisi na bango te, ndenge Kaina aboyaki koyoka likebisi ya Mozalisi. Kasi, soki bankulutu bakomekola Yehova, oyo azali Ndakisa ya kokoka mpo na baklisto oyo balingi kopesa toli, bakoki komindimisa ete basali oyo basengelaki kosala mpo na kosunga bandeko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto